Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/12 nk. 30-31
  • Ngomba Athos ezali “ngomba mosantu”?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ngomba Athos ezali “ngomba mosantu”?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Ngomba mosantu” etondá na bamonastere
  • Ngomba Athos lelo oyo
  • “Ngomba mosantu” mpo na bato nyonso
  • Bamposa na ye ya elimo ekokisamaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Sinai: Ngomba na Moize mpe ngomba na mawa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ndako ya Yehova etombwami
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Bantaba ya ngomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/12 nk. 30-31

Ngomba Athos ezali “ngomba mosantu”?

MPO na baklisto koleka milio 220 oyo basambelaka na Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ, Athos, ngomba ya mabangamabanga oyo ezali na nɔrdi ya Grèce ezali “ngomba oyo eleki bosantu mpo na bango.” Bato mingi kati na bango bamonaka ete kokenda kotala Athos “ngomba mosantu” ezali likambo oyo eleki ntina na bomoi na bango. “Ngomba mosantu” yango ezali nini? Ndenge nini ezwaki lokumu mingi boye? Kasi, ngomba yango ezali nde “ngomba” epai bato oyo babangaka Nzambe basengeli koluka litambwisi ya elimo mpe losambo ya solo?

Liloba “ngomba mosantu” ezali na Biblia. Yango ezali na boyokani na losambo mosantu, ya pɛto mpe oyo etombwami ya Nzambe ya solo, Yehova. Na Yelusaleme ya kala, Ngomba Siona ekómaki “ngomba mosantu” ntango Mokonzi Davidi akendaki na sanduku ya kondimana kuna. (Nzembo 15:1; 43:3; 2 Samwele 6:12, 17) Ntango Salomo atongaki tempelo na Ngomba Moliya, lopango ya tempelo ekómaki na Ngomba “Siona” mpe ngomba yango ekómaki kobengama “ngomba mosantu” ya Nzambe. (Nzembo 2:6; Yoele 3:17) Lokola tempelo ya Nzambe ezalaki na Yelusaleme, na nsima, engumba yango ekómaki kobengama mpe “ngomba mosantu” ya Nzambe.​—Yisaya 66:20; Danyele 9:16, 20.

Ezali boni mpo na lelo? Ngomba Athos—to nsongɛ ya ngomba nyonso mosusu—ezali “ngomba mosantu,” esika bato basengeli kokende kosambela mpo Nzambe andima bango?

“Ngomba mosantu” etondá na bamonastere

Ngomba Athos ezali na nsuka na epai ya ɛsti ya Péninsule Chalcidique, na nsongɛ ya mwa etando ya mabelé oyo ekɔta na Mai Monene ya Égée, na ɛsti mpenza ya mboka Thessalonique ya lelo oyo. Ezali nsɔngɛ monene ya libanga ya marbre oyo ebimi na mai monene na bolai ya mɛtrɛ 2 032.

Uta kala, batalelaka Athos lokola esika mosantu. Na masapo ya Bagreke, esika yango ezalaki mboka ya banzambe liboso ete Ngomba Olympe ekóma mboka na bango. Mwa moke nsima ya Mokonzi Constantin le Grand (ekeke ya minei T.B.), Athos ekómaki esika mosantu mpo na mangomba ya boklisto. Lisapo moko elobi ete, “ngɔndɔ” Malia na Yoane, mokomi ya Evanzile bakendaki kotala Lasalo na Kupulu (Chypre), bakitaki na Athos mpo na mopɛpɛ makasi oyo eyaki na mbalakaka. Lokola akamwaki na bonzenga ya ngomba yango, Malia asɛngaki Yesu mpo azwa yango. Yango wana Athos eyebanaki lokola “Elanga ya Ngɔndɔ Mosantu.” Na katikatii ya eleko oyo Empire byzantin ezalaki, ngomba mobimba etalelamaki lokola ngomba mosantu. Bato bandimaki ebengeli yango mpe na kati kati ya ekeke ya 11, Mokonzi Constantin IX Monomachus abimisaki mobeko mpo na kondimisa likambo yango.

Lokola ezali na mabanga mpe ezali mwa mosika na mboka, Athos ezali esika oyo ebongi mpo na bato oyo balingaka kofanda bango moko. Na boumeli ya bikeke mingi, esika yango ebendaki baklisto mingi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ na mokili mobimba—Bagreke, Baserbe, bato ya Roumanie, bato ya Bulgarie, bato ya Russie mpe bato mosusu—batongaki ebele ya bamonastere kuna mpe bandakonzambe mpo na bandimi ya mangomba na bango. Bamonastere yango mpe bandakonzambe yango pene na 20 ezali naino kino lelo oyo.

Ngomba Athos lelo oyo

Lelo oyo, Athos ezali mboka oyo ekóma komitambwisa yango moko mpe likambo yango endimamaki na mibeko na 1926. Nsima ya mbula oyo motango ya basango ezalaki se kokita, lelo oyo basango bakómi mingi kuna, koleka 2 000.

Monastere mokomoko ezali na esika ya kosala bilanga mpe ya kobɔkɔla bibwele, ezali mpe na bandakonzambe, mpe bandako ya kofanda. Ndakonzambe ya nsuka ya bato oyo balingaka kofanda bango moko ezali na mboka Karoúlia, oyo etongami likoló ya libongo ya ngomba na nsuka ya Ngomba Athos. Na esika yango, ezali na molɔngɔ ya bandako mikemike; mpo moto atambola kuna, asengeli bobele kolanda bilembo batyá na mabanga mpe minyololo moko nsima na mosusu. Na Athos, basango bazali kokoba kosala milulu ya kala ya losambo na bango mokolo na mokolo, bazali kosalela montre ya Empire byzantin (oyo mokolo ebandaka ntango moi elali) mpe manaka ya Jules César (calendrier julien) (oyo batángaka yango mikolo 13 nsima na manaka ya Grégoire [calendrier grégorien]).

Atako balobaka ete esika yango ya losambo ezwaki “bosantu” mpo na mwasi (Malia), na boumeli ya mbula 1 000 basango mpe bato oyo balingaka kofanda mosika na bato mosusu oyo bazalaka kuna balobaka ete, epekisami na lolenge nyonso ya basi kozala na esanga yango mobimba—ezala basi ya bato to banyama ya basi—bakisa mpe mikube na mibali oyo bazangi mandefu. Eleki mikolo mingi te, mobeko etali bato bazangi mandefu mpe banyama mosusu ya basi elongolamaki. Kasi, bapekisi makasi ete basi bákóma te na ntaka ya mɛtrɛ 500 na libongo ya Athos.

“Ngomba mosantu” mpo na bato nyonso

Bato oyo babangaka Nzambe basengeli nde kokende kosambela ye na Athos, “ngomba mosantu”? Ntango alobaki na mwasi Mosamalia oyo andimaki ete bato basengeli kosambela Nzambe na Ngomba Gelizimi, Yesu amonisaki polele ete ata ngomba moko te ekoponama lokola esika ya kosambela Nzambe. Yesu alobaki ete: “Ntango ekoya wana bakosambela Tata na [Gelizimi] te to na Yelusaleme te.” Mpo na nini? “Nzambe azali [Elimo, NW] mpe ekoki na basambeli na ye ete básambela ye na [elimo, NW] mpe na solo.”—Biso nde totɛngisi makomi; Yoane 4:21, 24.

Wana azalaki kolobela ntango na biso, mosakoli Yisaya asakolaki ete “ngomba na ndako na [Yehova],” ngomba ya elilingi “ekokokisama likoló koleka ngomba monene nyonso” mpe “ekotombwama likoló na nkeka,” mpe na elobeli ya elilingi, bato ya mabota nyonso bakoya wana.​—Yisaya 2:2, 3.

Mibali na basi oyo balingi kozala na boyokani malamu na Nzambe, babyangami kosambela Yehova na “elimo mpe na solo.” Bamilio ya bato na mokili mobimba bazali komona nzela oyo ezali komema na ‘ngomba ya Yehova.’ Bango mpe bato mosusu, bazali na makanisi lokola ya zuzi moko ya mwasi na Grèce oyo alobaki mpo na Athos ete: “Nandimi te ete bato bakókoma bato ya elimo bobele soki bakofanda na bisika minene oyo batongi mpo na yango to na bamonastere.”—Talá Misala 17:24.

[Etanda na lokasa 31]

Biloko ya motuya ebombama uta kala

Na boumeli ya bikeke mingi, basango ya Athos bayanganisaki ebele ya biloko ya motuya oyo kati na yango maniskri soko 15000, oyo balobi ete ndambo na yango ekomamaki na ekeke ya minei; yango esali ete biloko wana ezala biloko oyo eleki motuya na mokili mobimba. Ezali na barulo, Baevanzile na mobimba na yango mpe na biteni, banzembo mpe maloba ya ntɔki, kozanga kotánga mayemi, bililingi ya losambo, bikeko ya mabanga, ya mabaya mpe ya bibende. Ngomba Athos ekoki kozala na pene ya ndambo moko likoló na minei ya maniskri ya Bagreke, atako etángami naino malamu te. Na 1997, mpo na mbala ya liboso, basango bandimaki ete mwa ndambo ya biloko na bango ya motuya elakisama na engumba Thessalonique.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]

Telis/Greek National Tourist Organization

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto