Tozali bato oyo bazali na kondima
Bazali kosakola nsango ya kobɔndisa na Italie
YEHOVA azali “Nzambe na kobɔndisa nyonso.” Lokola balandaka ndakisa na ye, basaleli na ye bazali “kobɔndisa bango bazali kati na bolɔzi.” (2 Bakolinti 1:3, 4; Baefese 5:1) Yango ezali moko na mikano minene ya mosala ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala.
Basalisi mwasi moko oyo azali na bosɛnga
Mingimingi na bambula oyo, bobola, bitumba, mpe mposa ya kozala na bomoi ya malamu ezali kotinda bato mingi bákende kofanda na mikili ya bozwi mingi. Kasi ezali likambo ya pɛtɛɛ te mpo na komesana na mboka ya sika. Manjola azalaki kofanda makango na mobali moko ya ekólo Albanie na Borgomanero. Lokola azalaki kofanda na Italie kasi azalaki na mikanda ya Leta te, azalaki kokakatana mpo na kosolola na Wanda, ye azali Motatoli ya Yehova. Atako bongo, nsukansuka Wanda abongisaki mokolo mpo na kosolola na Manjola. Nokinoki Manjola asepelaki koyekola Liloba ya Nzambe atako azalaki na mwa mokakatano mpo ayebaki koloba lokota ya Italie malamu te. Nzokande, nsima ya kozongela ye mwa mbala mingi, Wanda amonaki lisusu moto na ndako yango te. Likambo nini esalemaki? Wanda ayokaki ete bato nyonso ya ndako yango bakimaki mpamba te bazalaki koluka kokanga moto moko na ndako wana, elingi koloba makango ya Manjola mpo abomaki moto!
Nsima ya sanza minei, Wanda akutanaki lisusu na Manjola. Wanda alobi ete: “Azalaki lokola moto asili makila mpe akɔndi, amonanaki mpenza ete azali konyokwama.” Manjola alobaki ete makango na ye akɔtaki bolɔkɔ mpe akendaki epai ya baninga ya makango na ye mpo básalisa ye kasi basundolaki ye. Lokola ayebaki lisusu eloko ya kosala te, abondelaki Nzambe asunga ye. Na nsima akanisaki lisusu Wanda oyo ateyaki ye makambo ya Biblia. Manjola asepelaki ntango amonaki ye lisusu!
Bazongelaki koyekola Biblia, mpe eumelaki te, Manjola abandaki koyangana na makita ya lisangá. Azwaki mikanda ya Leta mpo na kofanda na Italie. Na nsima ya mbula moko, Manjola akómaki Motatoli oyo azwi batisimo. Lokola abɔndisamaki na bilaka ya Nzambe, azongaki na Albanie mpo na koteya nsango ya kobɔndisa oyo euti na Biblia epai ya bato ya mboka na ye.
Bazali kopesa litatoli na kaa ya bapaya
Masangá mingi ya Italie ezwi bibongiseli mpo na kopesa bapaya litatoli lokola Manjola. Na ndakisa, bandeko ya lisangá moko na Florence bazwaki bibongiseli ya kosakola na kaa ya bapaya pɔsɔ na pɔsɔ. Bafandi ya kaa, mingi bauti na Mpoto ya Ɛsti, Macédoine, mpe Kosovo, bazalaki na mikakatano ya ndenge na ndenge. Bamosusu bazalaki komela bangi mpe kolangwa masanga. Mingi bazalaki koyiba mpo na kobikela.
Kosakola epai ya bato yango ezalaki likambo moke te. Kasi, Paola mosakoli ya ntango nyonso akutanaki na Jaklina, elenge mwasi oyo autaki na Macédoine. Nsima ya mwa masolo, Jaklina alendisaki ndeko na ye Susanna ete atángaka Biblia. Susanna mpe ayebisaki bandeko na bango mosusu. Mosika te, bato mitano ya libota na bango babandaki koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ, koyangana na makita ya lisangá mpe kosalela makambo oyo bazalaki koyekola. Atako bazali kokutana na mikakatano, bazali kozwa libɔndisi epai ya Yehova mpe na Liloba na ye.
Mamɛlo moko andimi libɔndisi ya Yehova
Na engumba ya Formia, Assunta mosakoli moko ya ntango nyonso, asololaki na mwasi moko oyo azalaki kotambola na kotɛnguma. Mwasi yango azalaki mamɛlo ya lisangá moko oyo esungaka bato ya maladi na bibɔsɔnɔ na lopitalo mpe na bandako.
Assunta alobaki na mamɛlo boye: “Yo mpe ozali komona mpasi, boye te? Ezali mpenza mawa, biso nyonso tozali na mikakatano oyo tosengeli koyikela mpiko.” Ntango ayokaki bongo mamɛlo alelaki mpe alobaki ete azali mpenza kotungisama na nzoto. Assunta alendisaki ye, alobaki na ye ete Nzambe ya Biblia akoki kobɔndisa ye. Assunta apesaki ye bazulunalo oyo elimbolaka Biblia mpe mamɛlo azwaki.
Na lisolo na bango ya mbala ya mibale, mamɛlo yango nkombo na ye Palmira, andimaki ete azali mpenza konyokwama. Afandaki bambula mingi na lisangá moko ya bamamɛlo. Ntango abimaki mwa moke mpo na maladi, baboyaki azonga lisusu. Kasi, Palmira amonaki ete asengeli kokokisa ndayi asalaki epai ya Nzambe ya kozala mamɛlo. Akendaki epai ya bato oyo babikisaka bato ya maladi mpo na koluka “lisalisi” kasi likambo yango epesaki ye maladi ya makanisi. Palmira andimaki koyekola Biblia, mpe ayanganaki na makita ya lisangá mbula mobimba. Na nsima akendaki esika mosusu mpe bazalaki kokutana lisusu na Assunta te. Nsima ya mbula mibale Assunta amonaki ye lisusu. Bandeko ya Palmira mpe bakonzi ya lingomba bazalaki konyokola ye makasi. Atako bongo, azongelaki koyekola Biblia, akolaki na elimo, azwaki batisimo mpe akómá Motatoli ya Yehova.
Na ntembe te, bato mingi bazali kolendisama na nsango ya ‘Nzambe oyo apesaka libɔndisi.’ (Baloma 15:4, 5) Yango wana, Batatoli ya Yehova na Italie bazwi mokano ya kolanda ndakisa ya Nzambe ya kosakwela bato mosusu nsango malamu ya kobɔndisa.