Ndenge oyo Yesu Klisto akoki kosunga biso
NTANGO Yesu Klisto azalaki awa na mabele, asalaki makambo ya malamu mpenza mpo na kosalisa bato. Yango wana, ntango ayebisaki makambo ndenge na ndenge oyo Yesu asalaki na bomoi na ye, moto moko oyo amonaki makambo yango alobaki boye: “Yezu asalaki mpe makambo mosusu mingi. Soki bakomaki yango moko moko na mikanda, nakanisi ’te mokili mobimba elingaki kokoka te mpo na kotia mikanda wana.” (Yoane 21:25, Boyokani ya Sika) Lokola Yesu asalaki makambo mingi awa na mabele, tokoki komituna motuna oyo: ‘Ndenge nini akoki kozala mosungi na biso kuna na likoló? Yesu akoki mpe koyokela biso mawa lelo oyo?’
Eyano na motuna oyo ekosepelisa biso mpe ekolendisa biso. Biblia elobi na biso ete Klisto akɔtaki “na Likoló mpenza; [sikoyo] azali komonana liboso ya Nzambe mpo na biso.” (Baebele 9:24) Asalaki nini mpo na biso? Ntoma Paulo alobi ete “[Klisto akɔtaki] kati na Esika ya bulɛɛ [“likoló mpenza”] mbala moko mpo na libela, mpo na makila na bantaba mpe na bana na ngɔmbɛ te kasi na makila na ye moko. Boye azwaki lisiko ya seko.”—Baebele 9:12; 1 Yoane 2:2.
Likambo yango ezali mpenza nsango malamu! Ntango Yesu amataki na likoló, asukisaki kosalela bato misala malamu te; kutu, azwaki lisusu makoki ya kosalela bato makambo mingi. Mpamba te na ngɔlu na ye monene, Nzambe aponaki Yesu azala lokola “mosali,” to nganga monene, “na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nguya Monene kuna na Likoló.”—Baebele 8:1, 2.
“Mosali”
Kuna na likoló, Yesu azali mosali mpo na bato. Mosala na ye ekokani na mosala oyo nganga monene azalaki kosala mpo na basaleli ya Nzambe na Yisalaele na ntango ya kala. Mosala yango ezalaki nini? Paulo alobaki boye: “Nganga monene na nganga monene atyami na mosala ete atombola makabo mpe mbeka; boye nganga yango [Yesu Klisto ntango amati na likoló] azali na bosɛnga na eloko na kotombola.”—Baebele 8:3.
Yesu asengelaki kopesa eloko moko oyo eleki eloko oyo nganga monene azalaki kopesa. “Soko makila na bantaba mpe na bangɔmbɛ mibali” ekokaki kopɛtola Bayisalaele mwa moke na ntango ya kala, “na koleka mpenza, makila na Klisto . . . makopɛtola lisosoli na biso longwa na misala na kufa kino mosala kosalela Nzambe na bomoi.”—Baebele 9:13, 14.
Yesu azali mpe mosali oyo aleki basali nyonso mpamba te Nzambe apesaki ye nzoto oyo ekoki kokufa te. Na Yisalaele ya kala, “baoyo bakomaki banganga-Nzambe bazalaki ebele, mpe bazalaki kokufa; bongo bakokaki koumela na mosala te.” Kasi, tokoki koloba nini mpo na Yesu? Paulo akomaki boye: “Mosala na ye ya Nganga-Nzambe ekoki koleka na moto mosusu te. Yango wana akoki kobikisa libela baoyo bapusanaka penepene na Nzambe na nguya na ye, mpamba te akoumela seko mpo abondela Nzambe mpo na bango.” (Baebreo 7:23-25, Boyokani ya Sika; Baloma 6:9) Na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe kuna na likoló, tozali na mosali oyo ‘azali na bomoi libela ete abondela mpo na biso.’ Kanisá bolamu oyo likambo yango ekoki kopesa biso sikoyo!
Ntango Yesu azalaki awa na mabele, bato mingi bazalaki kokende epai na ye mpo asalisa bango, mpe mbala mosusu bazalaki kosala mibembo milai mpo na yango. (Matai 4:24, 25) Lokola azali kuna na likoló ezali na eloko moko te oyo ekoki kopekisa bato ya bikólo nyonso bákende epai na ye. Na esika oyo azali kuna na likoló, azali ntango nyonso mosali.
Yesu azali Nganga Monene ya ndenge nini?
Makambo oyo Baevanzile eyebisi biso mpo na Yesu emonisi ete azalaki mpenza moto ya boboto mpe ya motema mawa. Azalaki mpenza komipesa mpo na basusu! Mbala mingi, batikelaki ye ata ntango ya kofanda ye moko na bayekoli na ye te mpo na kopema mwa moke. Amonaki te ete babebisi ntango na ye oyo akokaki kopema mpe kofanda kimya; kasi, ‘ayokaki mawa’ mpo na bato oyo bazalaki koluka ete asalisa bango. Ata ntango alɛmbi, to azali na nzala, to mpe azali na mposa ya mai, “ayambaki bango na boboto” mpe andimaki kobosana naino kolya mpo na kosalisa bato ya masumu oyo babongolaki mpenza motema.—Malako 6:31-34; Luka 9:11-17, NW; Yoane 4:4-6, 31-34.
Lokola Yesu azalaki koyokela bato mawa asalaki oyo esengeli mpo na kokokisa bamposa na bango na nzoto, na mayoki mpe na elimo. (Matai 9:35-38; Malako 6:35-44) Ateyaki bango báluka libɔndisi mpe kopema. (Yoane 4:7-30, 39-42) Na ndakisa, yoká boboto na ye na maloba oyo ayebisaki bato: “Boyá liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola na ngai; zambi ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino.”—Matai 11:28, 29.
Yesu alingaki mpenza bato, yango wana, nsukansuka apesaki bomoi na ye mpo na bato ya masumu. (Baloma 5:6-8) Na likambo yango, ntoma Paulo alobaki boye: “[Yehova Nzambe] aboyisaki Mwana na ye te, kasi akabaki ye mpo na biso nyonso, akokabela biso biloko nyonso esika moko na ye te? . . . Klisto Yesu oyo akufaki, mpe asekwaki na kufa, oyo azali na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, ye wana azali kobondela mpo na biso!”—Baloma 8:32-34.
Nganga Monene ya mawa
Ntango azalaki moto, Yesu ayokaki nzala, ayokaki mposa ya mai, alɛmbaki, amitungisaki, anyokwamaki, mpe akufaki. Mpasi mpe mikakatano oyo akutanaki na yango ebongisaki ye malamumalamu mpo na mosala na ye lokola Nganga Monene mpo na bato oyo bazali konyokwama. Paulo akomaki ete: “Ebongaki ete [Yesu] akokana na bandeko na makambo nyonso ete akóma Nganga Monene ya mawa mpe ya sembo liboso ya Nzambe mpo na kosala mbɔndi na masumu ya bato. Zambi lokola esili ye moko koyoka mpasi mpe komekama, ayebi kosunga bamekami.”—Baebele 2:17, 18; 13:8.
Yesu amonisaki ete abongi mpo na kosalisa bato báya epai ya Nzambe mpe azali na mposa ya kosala yango. Kasi, elingi koloba te ete asengeli kobondela Nzambe moko ya makambo makasi mpe oyo ayokaka mawa te, oyo alingaka kutu kolimbisa te. Biblia eyebisi biso ete ‘Yehova azali malamu mpe alimbisaka mabe.’ Elobi lisusu ete: “Soko tokoyambola masumu na biso, ye azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopɛtola biso na bokesene nyonso.” (Nzembo 86:5; 1 Yoane 1:9) Maloba mpe misala ya boboto oyo Yesu asalaki ezali komonisa motema mawa, ngɔlu, mpe bolingo ya Tata na ye.—Yoane 5:19; 8:28; 14:9, 10.
Ndenge nini Yesu asalisaka bato ya masumu soki babongoli mitema? Asalisaka bango bázala na esengo na milende ya solosolo oyo bazali kosala mpo na kosepelisa Nzambe. Ntango akomelaki baninga na ye baklisto bapakolami, Paulo amonisaki likambo yango na mokuse na maloba oyo: “Bongo awa ezali biso na Nganga Monene monene oyo asili koleka na Likoló, ye Yesu, Mwana na Nzambe, tósimbaka eyambweli ngwi. Mpo tozali na Nganga Monene te oyo azangi koyoka mpasi esika moko na biso kati na bolɛmbu na biso. Nde amekami na makambo nyonso [lokola] biso, bobele ete akwei na masumu te. Boye, tiká ete tóbɛlɛma na molende epai na kiti na bokonzi na ngɔlu ete tózwa mawa mpe tómona ngɔlu na [lisungi na ntango ebongi, NW ].”—Baebele 4:14-16.
“Lisungi na ntango ebongi”
Kasi, biso tokosala nini ntango tokutani na mikakatano mpe tokanisi ete tokokoka kolonga yango te, na ndakisa maladi makasi, to tozali komiyoka lokola nde tomemi ngambo, to tolɛmbi nzoto, to soki totungisami na makanisi? Tokoki kosala likambo oyo Yesu azalaki kosala mbala na mbala, elingi koloba kobondela. Na ndakisa, na butu ya mokolo oyo ezalaki liboso ya mokolo oyo akabaki bomoi na ye mpo na biso, “abondelaki makasi, koleka, mpe kotɔka na ye ezalaki lokola matanga minene na makila kokwea na mabele.” (Luka 22:44) Yesu ayebi ndenge oyo moto amiyokaka soki azali kobondela Nzambe makasi. “Atombolaki mabondeli mpe malɔmbɔ na konganga makasi mpe na mpisoli epai na ye oyo ayebi kobikisa ye na kufa mpe ayokami mpo na kotosa na ye malamu.”—Baebele 5:7.
Yesu ayebi malamu ete bato bazalaka na mposa mpenza ete ‘báyoka bango’ mpe bálendisa bango. (Luka 22:43) Mpe lisusu, alakaki ete: “Soko bokolɔmba Tata eloko nini na nkombo na ngai, akopesa bino yango. . . . Bólɔmbaka mpe bokozwaka ete esengo na bino etondisama.” (Yoane 16:23, 24) Yango wana, tokoki koyebisa Nzambe bamposa na biso mpe kozala na elikya ete akopesa Mwana na ye nzela, na bokonzi oyo azali na yango mpe motuya ya mbeka oyo apesaki mpo na kobikisa biso, ete asalela biso nyonso oyo esengeli.—Matai 28:18.
Tokoki kozala na elikya ete na nguya oyo azali na yango kuna na likoló, Yesu akosunga biso na ndenge oyo ebongi mpe na ntango malamu. Na ndakisa, soki tosali lisumu mpe toyoki mpenza mawa na motema, tokoki kobɔndisama na koyeba ete “tozali na [Mosungi, NW ] epai ya Tata, ye Yesu Klisto, Moyengebene.” (1 Yoane 2:1, 2) Mosungi mpe Mobɔndisi na biso kuna na likoló akolobela biso mpe Nzambe akoyoka mabondeli oyo tozali kosala na nkombo na ye mpe oyo eyokani na Biblia.—Yoane 14:13, 14; 1 Yoane 5:14, 15.
Tómonisa botɔndi mpo na lisungi ya Klisto
Kobondela Nzambe na nzela ya Mwana na ye esɛngi makambo mingi. Mpo na motuya ya mbeka oyo apesaki, “Klisto asikoli biso” mpe akómi “mokonzi oyo asili kosikola” bato. (Bagalatia 3:13; 4:5; 2 Petelo 2:1) Tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo na nyonso oyo Klisto asali mpo na biso soki tondimi ete azali nkolo na biso mpe soki tondimi na esengo likambo oyo asɛngi biso ete: “Soko moto moko azali na mposa na kotambola nsima na ngai, tiká amiboya ye mpenza, mpe akamata nzete na ye mokolo na mokolo, mpe [alanda] ngai.” (Luka 9:23) ‘Komiboya’ elimboli kaka te koloba ete sikoyo Yesu akómi nkolo na ngai. Klisto “akufeli bato nyonso ete baoyo bazali na bomoi bábika lisusu mpo na bango mpenza te kasi mpo na ye oyo akufeli bango.” (2 Bakolinti 5:14, 15) Yango wana, soki tozali koyeba mpenza motuya ya mbeka, ekobongola ndenge na biso ya komona makambo, mikano na biso, mpe bomoi na biso. Nyongo monene oyo tozali na yango epai ya ‘Klisto Yesu, ye amipesaki mpo na biso,’ esengeli kotinda biso na koyeba ye malamu mpe koyeba Tata na ye ya bolingo, Yehova Nzambe. Tosengeli mpe koluka kokola na kondima na biso, kotosa mibeko ya Nzambe, mpe kozala “na mposa ya kosalaka misala malamu.”—Tito 2:13, 14; Yoane 17:3.
Tozali kozwa bilei ya elimo, bilendiseli, mpe litambwisi na ntango ebongi na nzela ya lisangá ya boklisto. (Matai 24:45-47; Baebele 10:21-25) Na ndakisa, soki ndeko moko azwi maladi ya elimo, akoki ‘kobenga mikóló [bankulutu oyo baponami] ya lingomba.” Yakobo alobi lisusu ete: “Zambi libondeli ya kondima ekobikisa mobɛli, Nkolo [akolamusa] ye. Ata asili kosala masumu, makolimbisama epai na ye.’—Yakobo 5:13-15.
Tópesa ndakisa moko: Moto moko oyo azali na bolɔkɔ na Afrika ya Sudi akomelaki nkulutu moko mokanda mpo na komonisa ye botɔndi na ye mpo na “Batatoli ya Yehova nyonso oyo bazali kosala mosala malamu oyo Yesu Klisto abandaki, mosala ya kosalisa bato bákɔta na Bokonzi ya Nzambe.” Na nsima akomaki ete: “Natondaki na esengo ntango nazwaki mokanda na yo. Ndenge oyo ozali komibanzabanza ete nabonga na elimo esimbaki mpenza motema na ngai. Epesi ngai makasi mpo nabanda lisusu koyoka Yehova Nzambe, ye oyo azali kosɛnga ngai nabongola motema. Mbula 27 mobimba nazalaki kobɛtabɛta mabaku mpe kotambola na molili ya masumu, lokuta, mombongo ya mabe, makambo ya nsɔni, mpe mangomba ya lokuta. Nsima ya kokutana na Batatoli ya Yehova, nakanisi mpenza ete namoni nzela ya solo! Esengeli na ngai nde nalanda yango.”
Tokozala na mposa ya lisungi mingi na mikolo ezali koya
Lokola makambo ya mokili oyo mazali se kobeba emonisi mpenza ete “bolɔzi monene” ezali lisusu mosika te. Sikoyo, ebele monene oyo euti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, mpe na minɔkɔ nyonso, ‘bazali kosukola bilamba na bango, mpe bazali koyeisa yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana ya Mpate.’ (Emoniseli 7:9, 13, 14; 2 Timote 3:1-5) Lokola bazali kosala misala oyo emonisi ete bandimi mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola bango, masumu na bango ezali kolimbisama, mpe bazali kosalisa bango bákóma baninga mpenza ya Nzambe.—Yakobo 2:23.
Mwana ya Mpate, Yesu Klisto, “akobatela [bato oyo bakobika na bolɔzi monene], mpe akokamba bango epai na mitó ya mai ya bomoi. Nzambe mpe akolongola mpisoli nyonso na miso na bango.” (Emoniseli 7:17) Nde na nsima, Klisto akosukisa misala na ye lokola Nganga Monene. Akosalisa baninga nyonso ya Nzambe bámela “na mitó ya mai ya bomoi” mpo bábika na elimo, na nzoto, na makanisi, mpe na mayoki. Misala oyo Yesu abandaki na mobu 33 T.B. mpe oyo alandaki kosala kuna na likoló banda amataki ekosuka na ntango wana na ndenge ya malamu mpenza.
Yango wana, tómonisa ntango nyonso botɔndi na biso mpo na makambo nyonso oyo Nzambe na Klisto basaleli biso mpe bazali kosalela biso. Ntoma Paulo alobaki boye: “Bósepelaka ntango nyonso kati na Nkolo. . . . Bómitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tiká ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. Mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekosɛnzɛla mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.”—Bafilipi 4:4, 6, 7.
Ezali na lolenge moko malamu mingi oyo okoki komonisa botɔndi na yo epai ya Yesu Klisto, Mosungi na biso kuna na likoló. Na mpokwa ya mokolo ya misato, 19 Aprili 2000, nsima ya kolala ya moi, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bakoyangana mpo na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. (Luka 22:19) Likambo yango ekopesa yo libaku mpo okanga lisusu ntina ya mbeka oyo Klisto apesaki mpo na kobikisa biso. Tobengisi yo na esengo oya koyoka ndenge okoki kozwa bolamu ya seko na makambo nyonso ya malamu oyo Nzambe abongisi mpo na kobikisa bato na nzela ya Klisto. Tosɛngi yo otuna Batatoli ya Yehova na esika oyo ofandi mpo na koyeba ngonga mpe esika oyo likita monene yango ekosalema.
[Elilingi na lokasa 7]
Yesu ayebi ndenge oyo moto amiyokaka soki azali kobondela Nzambe makasi
[Bililingi na lokasa 8]
Klisto akosalisa biso tólonga mikakatano koleka ndenge oyo tokoki kosala yango biso moko
[Elilingi na lokasa 9]
Klisto asalelaka bankulutu ya bolingo mpo na kosalisa biso.