Bopɔlɔ—Ezaleli oyo epesaka kimya
Soki moto nyonso na mokili azalaka na bopɔlɔ elingaki kozala esengo mingi mpenza! Mbɛlɛ bato bazali kosɛngisa baninga na bango makambo mingi te, mbɛlɛ bato ya libota moko bazali koswana mingi te, mbɛlɛ basali na bakompanyi bazali kowelana mingi te mpe mbɛlɛ bitumba ezali mingi te kati na bikólo. Okolinga kofanda na mboka moko oyo ezali na bato ya ndenge wana?
BASALELI ya solo ya Yehova Nzambe bazali komibongisa mpo na kokɔta na mokili ya sika oyo alakaki. Na mokili yango, bato bakozala na bopɔlɔ mpe bakotalela ezaleli yango lokola bolɛmbu te kasi lokola ezaleli malamu. (2 Petelo 3:13) Banda sikoyo bazali kutu kokolisa ezaleli ya bopɔlɔ, yango ezali malamu mpenza. Mpo na nini? Ezali mingimingi mpo Yehova asɛngi bango básala bongo. Mosakoli na ye Mika akomaki boye: “Ɛ moto, asili koyebisa yo oyo ezali malamu! [Yehova] alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.”—Mika 6:8.
Liloba bopɔlɔ elimboli mwa makambo mingi, lokola kozanga lofundo to lolendo mpe kozanga komikumisa mpo na makoki na yo, misala na yo mpe bozwi na yo. Diksionɛrɛ moko elobi ete bopɔlɔ elimboli mpe “koyeba esika oyo makoki na yo esuki.” Moto ya bopɔlɔ ayebaka esika oyo makoki na ye esuki ezala ata na etamboli na ye. Andimaka mpe ete makambo oyo asengeli kosala mpe oyo akoki kosala ezali na ndelo. Moto yango ayebi ete ezali na makambo oyo azali na ndingisa te ya kosala yango. Tolingaka mpenza kozala pene na bato ya bopɔlɔ. Joseph Addison, mokomi ya maloba ya ntɔki na Lingelesi akomaki ete: “Eloko moko te eleki bopɔlɔ na malamu.”
Bato ya kozanga kokoka babotamaka na bopɔlɔ te. Tosengeli kosala milende mpo na kolona ezaleli malamu yango. Liloba ya Nzambe elobeli mwa masolo oyo ezali kolakisa bopɔlɔ na mitindo na yango nyonso mpo na kolendisa biso.
Bakonzi mibale oyo bazalaki na bopɔlɔ
Davidi azalaki moko kati na basaleli ya Yehova oyo bazalaki sembo; azalaki naino elenge ntango apakolamaki mpo na kozala mokonzi ya Yisalaele. Nsima ya kopakolama yango, Saulo, mokonzi oyo azalaki koyangela na ntango wana, atungisaki Davidi mingi, azalaki koluka koboma ye mpe Davidi azalaki kokimakima ye.—1 Samwele 16:1, 11-13; 19:9, 10; 26:2, 3.
Ata na ntango wana, Davidi ayebaki ete makambo oyo akokaki kosala mpo na kobatela bomoi na ye ezalaki na ndelo. Mokolo mosusu na esobe, Davidi apekisaki Abisai koboma Mokonzi Saulo ntango alalaki, mpe alobaki na ye ete: “Ezali mabe na likanisi ya Yehova, mpo na ngai ete natombola lobɔkɔ na ngai mpo na kobɛta moto oyo Yehova apakoli” (1 Samwele 26:8-11, NW ) Davidi ayebaki ete kolongola Saulo na bokonzi ezalaki mokumba na ye te. Na yango, bopɔlɔ etindaki Davidi akangama na etamboli malamu. Lelo oyo mpe, basaleli ya Nzambe bayebi ete “na likanisi ya Yehova,” ezali na makambo oyo bakoki kosala soki moke te ata soki bomoi na bango ezali na likama.—Misala 15:28, 29; 21:25.
Ntango azalaki elenge, Salomo, mwana ya Mokonzi Davidi, azalaki mpe na bopɔlɔ atako ezalaki na lolenge mosusu. Ntango akómaki mokonzi, amonaki ete akokoka te kokokisa mokumba monene ya kozala mokonzi. Abondelaki boye: “Ɛ [Yehova], Nzambe na ngai, otii moombo na yo na bokonzi na esika na Davidi tata na ngai, ata ngai bobele mwana moke; nayebi to kobima te to kokɔta te.” Emonani polele ete Salomo andimaki ete akokoka te mpe amesanaki na makambo yango te. Na bongo azalaki na bopɔlɔ mpo azalaki na lofundo te to na lolendo te. Salomo asɛngaki Yehova ete azala na bososoli mpe Yehova apesaki ye yango.—1 Mikonzi 3:4-12.
Masiya mpe moto oyo atindamaki liboso na ye
Mbula koleka 1 000 nsima na Salomo, Yoane Mobatisi asalaki mosala ya kobongisa nzela mpo na Masiya. Lokola azalaki moto oyo atindamaki liboso ya Mopakolami, Yoane akokisaki esakweli ya Biblia. Akokaki komikumisa mpo na libaku malamu oyo azwaki. Yoane akokaki mpe komikumisa mpo, na mosuni, azalaki ndeko ya Masiya. Kasi ayebisaki bato mosusu ete abongaki ata moke te mpo na kofungola nsinga ya sandale ya Yesu. Mpe ntango Yesu ayaki epai na ye mpo na kozwa batisimo na Ebale ya Yaladene, Yoane alobaki ete: “Ngai nazali na bosenga ete nabatisama na yo nde yo oyei epai na ngai!” Yango emonisi ete Yoane azalaki moto ya lolendo te. Azalaki na bopɔlɔ.—Matai 3:14; Malaki 4:5, 6; Luka 1:13-17; Yoane 1:26, 27.
Nsima ya batisimo na ye, Yesu akómaki mosakoli ya ntango nyonso; azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Atako azalaki moto ya kokoka, Yesu alobaki ete: “Ngai nakoki kosala mosala ngai moko te . . . Zambi nakolukaka mokano na ngai moko te kasi mokano na ye oyo atindi ngai.” Lisusu, Yesu alukaki te ete bato bákumisa ye, kasi akumisaki nde Yehova na makambo nyonso oyo asalaki. (Yoane 5:30, 41-44) Yango ezali elembo ya bopɔlɔ!
Na yango, emonani polele ete basaleli ya sembo ya Yehova lokola Davidi, Salomo, Yoane Mobatisi ata mpe Yesu moto ya kokoka, bazalaki mpenza na bopɔlɔ. Bamikumisaki te, bazalaki na lolendo te to na lofundo te mpe basukaki esika makoki bango esuki. Ndakisa na bango emonisi solo ete basaleli ya Yehova lelo oyo basengeli kokolisa mpe komonisa bopɔlɔ. Kasi ntina mosusu oyo tosengeli kozala na bopɔlɔ ezali.
Lokola mokili ekómi na eleko moko ya mobulu mingi, bopɔlɔ ezali ezaleli oyo ezali na ntina mingi mpo na baklisto ya solo. Bopɔlɔ ekosalisa moto ete azala na kimya elongo na Yehova Nzambe, elongo na bazalani na ye mpe azala na kimya na nzoto na ye moko.
Kimya elongo na Yehova Nzambe
Tokozala na kimya elongo na Nzambe kaka soki totosi makambo oyo asɛngi mpo na losambo ya solo. Adama na Eva, baboti na biso ya liboso, batosaki te makambo oyo Nzambe asɛngaki bango mpe bazalaki bato ya liboso oyo bazangaki bopɔlɔ. Babungisaki boyokani na bango ya malamu na Yehova, babungisaki esika na bango ya kofanda, bomoi na bango ya ntango wana mpe ya mikolo oyo ezalaki koya. (Genese 3:1-5, 16-19) Oyo nde mbano mabe mpenza bazwaki!
Likambo oyo ekómelaki Adama na Eva ezali kopesa biso liteya monene, mpamba te losambo ya solo ezali kopekisa biso makambo mosusu na lolenge oyo tosengeli komitambwisa. Na ndakisa, Biblia elobi ete “moto na pite mpe mosambeli na bikeko mpe bato na ekobo mpe bakembi na nsɔni mpe mibali bamibebisi na mibali mpe bayibi mpe bato na bilulela mpe balangi masanga mpe batuki mpe babotoli bakosangola Bokonzi ya Nzambe te.” (1 Bakɔlinti 6:9, 10) Na mayele mpenza, Yehova apekisi makambo wana mpo na bolamu na biso mpe tokomonisa mayele soki totosi yango. (Yisaya 48:17, 18) Masese 11:2 eyebisi biso ete: “Mayele ezali elongo na bato na [bopɔlɔ].”
Bongo ekozala boni soki lingomba moko eyebisi biso ete ata tolekisi ndelo tokozala kaka na kimya elongo na Nzambe? Lingomba ya ndenge wana ezali koluka kopɛngwisa biso. Nzokande bopɔlɔ esalisaka biso tókolisa boyokani ya malamu elongo na Yehova Nzambe.
Kimya elongo na bazalani na biso
Bopɔlɔ esalaka mpe ete tózala na kimya elongo na bato mosusu. Na ndakisa, ntango baboti bazali kopesa ndakisa wana bazali kosepela na biloko ya mosuni oyo bazali na yango mpe bazali kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, bana bakolanda mpe ezaleli wana. Ekozala mpasi te mpo na bilenge básepelaka na biloko oyo bazali na yango atako bakokoka te kozwa ntango nyonso biloko oyo balingi. Yango ekosalisa bango bázala na bopɔlɔ na bomoi na bango mpe libota ekozala na kimya mingi koleka.
Bakɛngɛli basengeli mpenza kosala makasi mpo na kozala na bopɔlɔ mpe kosalela bokonzi na bango na lolenge ya mabe te. Na ndakisa, baklisto bazwi etinda oyo: “Bóleka liboso na makambo makomami te.” (1 Bakɔlinti 4:6, NW ) Bankulutu na kati ya lisangá bayebi ete bakoki te kondimisa bato mosusu na makasi makambo oyo bango moko bankulutu balingi. Na esika ete básala bongo, basalelaka Liloba ya Nzambe mpo na kolendisa moto alanda nzela ya malamu mpo na etamboli, lolenge ya kolata mpe ya kokata nsuki to lolenge ya kominanola. (2 Timote 3:14-17) Ntango bandeko mosusu ya lisangá bazali komona ete bankulutu bazali kotosa makambo oyo Makomami epekisi, yango ekokolisa limemya mpo na bato yango mpe ekosala ete lisangá ezala na esengo, na bolingo mpe na kimya.
Kimya na yo moko
Bato ya bopɔlɔ bazali na kimya kati na mitema na bango. Moto ya bopɔlɔ alonaka te mposa makasi ya kozala likoló ya bato mosusu. Yango elingi koloba te ete amityelaka mikano te. Na ndakisa, akoki koluka kozwa mikumba mosusu, kasi akozela Nzambe mpe akoloba ete mikumba nyonso oyo akoki kozwa na lisangá euti na Yehova. Akomona te ete ezali ye moko nde asali makasi mpo na kozwa yango. Yango esalaka ete bato ya bopɔlɔ bázala na boyokani malamu na Yehova, “Nzambe ya kimya.”—Bafilipi 4:9.
Bongo ekozala boni soki na bantango mosusu tomoni ete bato mosusu bazali kotyola biso? Ekozala malamu bátyola biso mpo tozali bato ya bopɔlɔ na esika ya kobenda likebi ya bato na bomoto na biso oyo ezangi bopɔlɔ, boye te? Bato ya bopɔlɔ balonaka mposa makasi te ya kozala likoló ya bato mosusu. Na yango bazali na kimya na mitema na bango; yango ezali na litomba mpo na kozala malamu na makanisi mpe na nzoto.
Zalá moto ya bopɔlɔ mpe batelá ezaleli yango
Adama na Eva bakweaki na ezaleli ya kozanga bopɔlɔ mpe bakitani na bango bazwaki ezaleli yango. Nini ekosalisa biso tókwea te na libunga lokola baboti na biso ya liboso? Ndenge nini tokoki kokolisa ezaleli malamu ya bopɔlɔ?
Libosoliboso, tosengeli koyeba esika na biso liboso ya Yehova, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́, yango ekosalisa biso. Makambo nini tosalá oyo ekoki kokokana na oyo ya Nzambe? Yehova atunaki Yobo, mosaleli na ye ya sembo, ete: “Yo ozalaki wapi wana natyaki miboko na mokili? Yebisá ngai, soko oyebi kososola.” (Yobo 38:4) Yobo akokaki koyanola te. Lokola ye, toyebi makambo nyonso te, tozali na makoki mingi te mpe tomeseni na makambo mingi te, boye te? Na yango, ekozala malamu tóndima ete toyebi makambo nyonso te mpe tozali na makoki mingi te, boye te?
Lisusu, Biblia eyebisi biso ete: “Nse mobimba ezali na [Yehova] mpe bisika nyonso ezali kati na yango; mokili mpe bango bakofandaka kati na yango,” ezala “nyama nyonso na zamba . . . mpe bibwele likoló na ngomba nkóto na nkóto.” Yehova akoki koloba ete: “Palata ezali na ngai mpe wolo ezali na ngai.” (Nzembo 24:1; 50:10; Hagai 2:8) Bozwi nini tokoki kozala na yango oyo ekokani na bozwi ya Yehova? Mpo ata moto oyo azali na bozwi koleka bato nyonso azali na ntina ata moko te ya kobɛta ntolo mpo na biloko oyo azali na yango! Na yango, ekozala malamu kolanda toli ya ntoma Paulo oyo apesaki baklisto ya Loma ete: “Mpo na likabo na ngɔlu lizwi ngai, nazali koloba na moko na moko kati na bino ete bóleka te komikanisa bino mpenza na motindo mobongi te.”—Baloma 12:3.
Lokola tozali basaleli ya Nzambe mpe tozali na mposa ya kokolisa bopɔlɔ, tosengeli kobondela mpo tózala na mbuma ya elimo lokola bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ mpe komikanga motema. (Luka 11:13; Bagalatia 5:22, 23) Mpo na nini? Mpamba te ezaleli mokomoko kati na bizaleli yango ekosalisa biso tózala na bopɔlɔ. Na ndakisa, bolingo mpo na bazalani na biso ekosalisa biso tóbundisa ezaleli ya komikumisa to lofundo. Komikanga motema ekosalisa biso tómipekisa mpe tókanisa liboso ya komitambwisa na kozanga bopɔlɔ.
Tókeba! Tosengeli kosɛnzɛla ntango nyonso mpo tókwea te na mitambo ya ezaleli ya kozanga bopɔlɔ. Bakonzi mibale kati na bakonzi oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo bamonisaki te ezaleli ya bopɔlɔ na makambo nyonso. Mokonzi Davidi azangaki likebi mpe atángaki motuya ya bana ya Yisalaele, likambo yango eyokanaki te na mokano ya Yehova. Mokonzi Salomo azangaki bopɔlɔ kino amikɔtisaki na losambo ya lokuta.—2 Samwele 24:1-10; 1 Mikonzi 11:1-13.
Ntango nyonso oyo mokili oyo eboyi kondima Nzambe ekozala, esengeli tósɛnzɛlaka ntango nyonso mpo na kozala na bopɔlɔ. Kasi, milende wana ezali mpamba te. Na mokili ya sika ya Nzambe, bobele bato ya bopɔlɔ nde bakozala kuna. Bakotalela bopɔlɔ lokola bokasi kasi lokola bolɛmbu te. Ekozala solo esengo ntango wana bato nyonso mpe mabota nyonso bakosepela na kimya oyo euti na ezaleli ya bopɔlɔ!
[Elilingi na lokasa 23]
Na bopɔlɔ mpenza, Yesu alobaki ete makambo nyonso oyo azalaki kosala eutaki na Yehova.