Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/6 nk. 14-19
  • ‘Omibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Omibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Omisɛnzɛla yo moko”
  • ‘Osɛnzɛla mateya na yo’
  • Salisá moyekoli akóma moninga ya Yehova
  • Salá makasi obikisa bana na yo
  • Tyá likebi na ‘mayele na yo ya koteya’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya mibale
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Salisá bato bátosa oyo Biblia eteyaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/6 nk. 14-19

‘Omibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo’

“Omisɛnzɛla yo moko mpe mateya na yo . . . ekosalaka yo boye okomibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo.”​—1 TIMOTE 4:16.

1, 2. Nini etindaka baklisto ya solo na kokoba mosala na bango ya kobikisa bomoi ya bato?

NA MWA mboka moko mosika, na nɔrdi ya Thaïlande, mobali moko na mwasi na ye, bazali Batatoli ya Yehova, bayekoli monɔkɔ moko ya sika mpe bazali komeka nzoto mpo na koloba yango na bakóló monɔkɔ: ekólo moko oyo bafandaka na bangomba oyo ezali kuna. Mobali yango na mwasi na ye bayekoli monɔkɔ ya Lahu mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bato ya mboka yango.

2 Mobali yango alobi boye: “Nazangi kutu maloba mpo na kolimbola esengo oyo tozali na yango ndenge tozali kosakola epai ya bato yango oyo batondá boboto. Tozali komona mpenza ete biso mpe tozali kokokisa Emoniseli 14:6, 7; tozali kosakola nsango ya esengo ‘na mabota, bikólo mpe minɔkɔ nyonso.’ Bisika oyo nsango malamu ekómi naino te ezali lisusu mingi te mpe mboka oyo ezali moko na bisika yango. Tozali koyekola Biblia na bato mingi, tozali kutu kokoka te koyekola na bango nyonso.” Tomoni polele ete mobali yango na mwasi na ye bazali na elikya ya komibikisa mpe kobikisa baoyo bazali koyoka bango. Lokola tozali baklisto, biso nyonso tozali na elikya ya kosala ndenge yango, boye te?

“Omisɛnzɛla yo moko”

3. Mpo na kobikisa basusu, tosengeli libosoliboso kosala nini?

3 Ntoma Paulo apesaki Timote toli ete, “Omisɛnzɛla yo moko mpe mateya na yo” mpe toli yango ebongi mpo na baklisto nyonso. (1 Timote 4:16) Ya solo, mpo na kosalisa bato mosusu bázwa lobiko, tosengeli libosoliboso komisɛnzɛla biso moko. Ndenge nini tokoki komisɛnzɛla biso moko? Ya liboso, tosengeli kobosanaka te mikolo oyo tozali. Yesu apesaki elembo oyo ezali na makambo mingi mpo na kosalisa bayekoli na ye báyeba ete “nsuka ya mokili” ekómi pene. Kasi, Yesu alobaki mpe ete tokoyeba te mokolo nini mpenza nsuka ekoya. (Matai 24:3, 36) Ndenge nini tosengeli kotalela likambo yango?

4. (a) Ndenge nini tosengeli kotalelaka ntango oyo etikali liboso ete mokili oyo ebomama? (b) Elimo nini tosengeli koboya?

4 Mokomoko kati na biso asengeli komituna ete: ‘Nazali kosalela ntango oyo etikali liboso nsuka eya mpo namibikisa mpe nabikisa baoyo bazali koyoka ngai? To nazali nde kokanisa ete, “Lokola toyebi te mokolo nini mpenza nsuka ekoya, nakomitungisa mpo na yango te”?’ Soki moto azali kokanisa bongo, azali na likama. Makanisi yango elandi ata moke te makambo oyo Yesu alobaki mpo na kolendisa bayekoli na ye, ete: “Ekoki na bino [kosɛnzɛla, NW] mpo ete Mwana na moto akoya na ntango ekanisi bino te.” (Matai 24:44) Ya solo, oyo ezali ntango te ya kolɛmbisa mabɔkɔ na biso na mosala ya Yehova to koluka biloko ya mokili mpo ebatela biso to koluka bisengo.—Luka 21:34-36.

5. Batatoli ya Yehova oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto aya, bapesaki ndakisa nini?

5 Lolenge mosusu tokoki komonisa ete tozali komisɛnzɛla ezali soki tozali koyika mpiko na bosembo nyonso na bomoi na biso lokola baklisto. Basaleli ya Nzambe na ntango ya kala bazalaki koyika mpiko, ezala na ntango oyo lobiko na bango ezalaki penepene to te. Nsima ya kolobela batatoli mosusu oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto aya, bato lokola Abele, Enoka, Noa, Abalayama, na Sala, Paulo alobaki ete: “Bazangaki kozwa biloko bilakami, kasi bamonaki yango mosika mpe bapesaki yango losako. Bayambolaki ete bazali bapaya na mokili, bato ya mokili mosusu.” Balukaki bomoi ya pɛtɛɛ te mpe lisusu bamipesaki te na misala ya mabe oyo bato mosusu bamipesaki na yango, kasi bazalaki kozela ntango oyo ‘bakozwa biloko bilakami.’—Baebele 11:13; 12:1.

6. Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na bomoi ya ndenge nini lokola bazalaki kotalela lobiko ?

6 Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki mpe komimona “bapaya” na mokili oyo. (1 Petelo 2:11) Baklisto ya solo babikaki ntango Yelusaleme ebomamaki na mobu 70 T.B., kasi nsima na yango batikaki kosakola te to mpe balandaki makambo ya mokili te. Bayebaki ete lobiko monene ezali liboso mpo na baoyo bakotikala sembo. Kutu, nsima mpenza, na mobu 98 T.B., ntoma Yoane akomaki boye: “Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano ya Nzambe akoumelaka seko.”1 Yoane 2:17, 28.

7. Ndenge nini Batatoli ya Yehova na mikolo na biso bayiki mpiko?

7 Na mikolo na biso, Batatoli ya Yehova mpe bayiki mpiko na mosala ya kosakola, atako bakutanaki na minyoko makasi. Lokola bayikaki mpiko, basalaki nde mosala ya mpunda? Te, mpamba te Yesu alobaki ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika,” ezala na nsuka ya mokili to na liwa. Na lisekwa, Yehova akobosana te basaleli na ye nyonso ya sembo oyo bakufá mpe akopesa bango mbano.—Matai 24:13; Baebele 6:10.

8. Ndenge nini tokoki komonisa ete tosepelaka na ndenge oyo baklisto ya ntango ya kala bayikaki mpiko?

8 Tozali mpe na esengo ya komona ete baklisto ya sembo na ntango ya kala bazalaki komibanzabanza kaka mpo na lobiko na bango te. Na ntembe te biso oyo toyebi Bokonzi ya Nzambe na nzela ya molende na bango, tozali na botɔndi na ndenge bayikaki mpiko mpo na kosala mosala oyo Yesu atindaki ete: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, . . . kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso oyo esili ngai kolaka.” (Matai 28:19, 20) Ntango nyonso oyo tozali naino na libaku ya kosakola mpo na komonisa botɔndi na biso, tósakola nsango epai ya bato mosusu oyo bayoki naino nsango malamu te. Kasi, kosakola ezali se likambo ya liboso mpo na kokómisa bato bayekoli.

‘Osɛnzɛla mateya na yo’

9. Ndenge nini makanisi malamu ekoki kosalisa biso na kobanda boyekoli ya Biblia na bato?

9 Mosala na biso esuki kaka na kosakola te, tosengeli mpe koteya. Yesu alobaki tóteya bato bátosa makambo nyonso oyo atindaki. Ya solo, na bateritware mosusu, bato moke kaka bandimaka koyekola makambo ya Yehova. Kasi, soki tozali na makanisi mabe mpo na teritware na biso, ekoki kolɛmbisa milende oyo tozali kosala mpo na kobanda koyekola Biblia na bato. Yvette azali mobongisi-nzela na teritware moko oyo bandeko mosusu balobaki ete ebotaka mbuma te. Kasi, ye amonaki ete bandeko oyo bazalaki bapaya na teritware yango, lokola bazalaki na makanisi ya ndenge wana te, bazalaki kozwa bato oyo babandaki koyekola na bango Biblia. Ntango Yvette atikaki makanisi mabe mpo na teritware yango, azwaki bato oyo bandimaki koyekola Biblia.

10. Wapi mokumba na biso ya liboso lokola tozali bateyi?

10 Baklisto mosusu bakakatanaka kosɛnga bato oyo basepeli koyoka nsango ete bábanda koyekola na bango Biblia mpo bamonaka ete bakoki te mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia. Ya solo, biso nyonso tozali na makoki ndenge moko te. Kasi, tozali na mposa te ya kozala naino na makoki soki tii wapi mpo tózala bateyi malamu ya Liloba ya Nzambe. Nsango ya pɛto oyo euti na Biblia ezali na nguya, mpe Yesu alobaki ete bato oyo bazali lokola bampate bayebaka mongongo ya Mobateli ya mpate ya solo ntango kaka bayoki yango. Yango wana, mokumba na biso ezali ete tóyebisa bato nsango ya Yesu, Mobateli Malamu ya mpate, mpe tóloba yango polele na kotalela makoki na biso.—Yoane 10:4, 14.

11. Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli ya Biblia malamumalamu?

11 Ndenge nini okoki koyebisa nsango ya Yesu malamu koleka? Ya liboso, luká naino koyeba malamu makambo oyo Biblia elobi na lisolo oyo bozali kotalela. Liboso ya koteya bato mosusu likambo moko, yo moko osengeli naino kokanga ntina na yango. Lisusu, salá na boye ete ntango ozali koyekola na moto, ezalaka lokola baninga bazali kosolola. Bayekoli, ata oyo bazali bana mike, basimbaka makambo malamu soki bazali kobanga te mpe soki moto oyo azali kolakisa bango azali kopesa bango limemya mpe azali na boboto.—Masese 16:21.

12. Ndenge nini okoki koyeba ete moyekoli azali kokanga ntina ya makambo oyo ozali koteya ye?

12 Molakisi asengeli kosuka te na koyebisa moyekoli makambo bongo na nsima moyekoli azongelaka yango lokola tshaku. Salisá nde moyekoli akanga ntina ya makambo oyo azali koyekola. Mpo na moyekoli, mayele na ye ya kelasi, makambo oyo ayebi na bomoi na ye mpe makambo oyo ayebi na Biblia, nde ekoki kosalisa ye ete akanga ntina ya makambo oyo ozali koteya ye. Yango wana, osengeli komituna ete, ‘Azali kokanga ntina ya bavɛrsɛ oyo batii na paragrafe?’ Okoki koyeba yango soki otuni ye mituna oyo ezali kosɛnga ye alimbola makanisi na ye na esika asuka kaka na koloba ɛɛ to te. (Luka 9:18-20) Mpe lisusu, bayekoli mosusu bakakatanaka mpo na kotuna moto oyo azali koteya bango. Yango wana, bakoki kotika ete boyekoli ekoba kozanga ete bákanga ntina malamu ya makambo oyo bazali koteya bango. Lendisá moyekoli ete atunaka mituna mpe ayebisa yo esika nyonso oyo akangi ntina malamu te.—Malako 4:10; 9:32, 33.

13. Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli mpo akóma molakisi?

13 Ntina moko monene oyo totambwisaka boyekoli ya Biblia ezali mpo na kosalisa moyekoli akóma moteyi. (Bagalatia 6:6) Yango wana, na bozongeli ya makambo oyo boyekolaki, okoki kosɛnga ye alimbola likambo moko na maloba ya polele, lokola nde azali kolimbola yango epai ya moto oyo azali koyoka yango mpo na mbala ya liboso. Na nsima, soki akómi na makoki ya kosakola, okoki kosɛnga ye obima na ye na mosala ya kosakola. Na ntembe te akobanga mingi te soki azali kosakola na yo elongo mpe ntango akobanda komesana, kobanga ekosila mokemoke tii akokóma na makoki ya kobima ye moko na mosala ya kosakola.

Salisá moyekoli akóma moninga ya Yehova

14. Mokano ya libosoliboso ya moteyi ezali nini mpe nini ekoki kosalisa yo na kokokisa mokano yango?

14 Moklisto oyo azali koyekolisa moto Biblia asengeli kozala na mokano mpenza ya kosalisa moyekoli akóma moninga ya Yehova. Okoki kosala yango soki ozali kosuka kaka na koloba te kasi soki ozali mpe kopesa ndakisa ya malamu. Ndakisa ya malamu esimbaka mpenza mitema ya bayekoli. Kosala eleki koloba mpamba, mingimingi ntango tozali kosalisa moto akolisa bizaleli malamu mpe azala na molende. Soki na maloba mpe na misala na yo moyekoli azali komona ete ozali mpenza moninga ya Yehova, yango ekoki kosimba motema na ye mpe akoluka kozala moninga ya Yehova.

15. (a) Mpo na nini ezali na ntina ete moyekoli azala na makanisi malamu mpo na kosalela Yehova? (b) Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli mpo akola ntango nyonso na elimo?

15 Osengeli koluka ete moyekoli asalela Yehova kaka te mpo alingi kokufa na Armagedon te, kasi mpo alingi ye. Soki ozali kosalisa ye akolisa mposa malamu wana, ekozala lokola nde ozali kotonga na biloko oyo ezikaka na mɔ́tɔ te, oyo ekobeba te ata soki kondima na ye emekami. (1 Bakolinti 3:10-15) Makanisi ya mabe, lokola mposa makasi ya kokóma lokola yo to lokola moto mosusu nyonso, ekopesa ye makasi te ya koboya misala mabe ya mokili to ekolendisa ye te na kosala oyo ezali malamu. Kobosana te ete okozala molakisi na ye libela na libela te. Lokola ozali sikoyo molakisi na ye, okoki kolendisa ye atángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe akanisaka mingi makambo oyo azali kotánga mpo akóma mpenza moninga ya Yehova. Soki azali kosala bongo akolanda ntango nyonso kokɔtisa na bɔɔngɔ na ye “lolenge ya maloba sembo” oyo ezali na Biblia mpe na mikanda oyo elimbolaka Biblia ata nsima soki otiki koyekola na ye.—2 Timote 1:13.

16. Ndenge nini okoki koteya moyekoli mpo asalaka mabondeli oyo ezali kouta na motema?

16 Okoki mpe kosalisa moyekoli akóma moninga ya solosolo ya Yehova soki ozali koteya ye asalaka mabondeli oyo ezali kouta mpenza na kati ya motema. Ndenge nini okoki kosala yango? Mbala mosusu okoki komonisa ye libondeli ya ndakisa, oyo Yesu apesaki mpe lisusu komonisa ye mabondeli ebele oyo eutaki mpenza na motema, mabondeli oyo ezali na Biblia, lokola na mokanda ya nzembo. (Nzembo 17, 86, 143; Matai 6:9, 10) Longola yango, ntango moyekoli na yo azali koyoka mabondeli na yo liboso bóbanda koyekola to ntango bosilisi koyekola, akomona ndenge oyo yo otalelaka Yehova. Yango wana, mabondeli na yo masengeli ntango nyonso komonisa ete ozali sembo mpe ozali motema polele mpe osengeli komonisa ete ozali na bokatikati na elimo mpe na makanisi.

Salá makasi obikisa bana na yo

17. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango mpo bátikala na nzela ya lobiko?

17 Na ntembe te, kati na bato oyo tolingi kobikisa, tokotánga mpe bana na biso. Bana mingi oyo baboti na bango bazali baklisto, bango moko mpe bazali sembo mpe bazali “makasi kati na kondima.” Kasi, epai ya bana mosusu, ekoki kozala ete mateya ya solo efandi mpenza na mitema te. (1 Petelo 5:9; Baefese 3:17; Bakolose 2:7) Bilenge mingi ya ndenge yango batikaki lisangá ya boklisto ntango bapusanaki na mbula to bakómi mikóló. Soki ozali moboti, okoki kosala nini mpo likambo ya ndenge yango ekómela bana na yo te? Ya liboso, okoki kosala makasi ete libota na bino ezala libota ya esengo. Soki libota mobimba ezali malamu, yango ekosalisa moto na moto na kati ya libota azala na likanisi malamu mpo na bokonzi, alinga bizaleli ya malamu mpe ayeba kofanda na bato. (Baebele 12:9) Na yango, soki boyokani ezali malamu na kati ya libota, yango ekoki kosala ete na nsima boninga ya mwana na Yehova ekola. (Nzembo 22:10) Na mabota oyo ezali na boyokani malamu, bato basalaka makambo esika moko mpe na bomoko, ata soki esɛngi ete baboti bápesa ntango na bango oyo bakokaki kolekisa mpo na makambo na bango moko. Na ndenge yango, bokoki koteya bana na bino báyeba kozwa bikateli malamu na kati ya bomoi. Baboti, bana na bino bazalaka libosoliboso na mposa ya biloko te, kasi bazalaka nde na mposa ya bino moko, elingi koloba balingaka ete bófandaka na ndako elongo na bango, bámonaka bino bozali na esengo mpe na bolingo. Bokokisaka mposa ya bana na bino na makambo yango?

18. Na mituna ya ndenge nini baboti basengeli kosalisa bana na bango mpo na kozwa biyano?

18 Baboti oyo bazali baklisto basengeli kokanisa te ete bana na bango mpe bakokóma kaka baklisto. Daniel azali nkulutu mpe tata ya bana mitano, ye alobi boye: “Baboti basengeli kosalisaka bana na bango bálongola makanisi ya ntembe oyo bazwaka na kelasi mpe na bisika mosusu. Basengeli kozala na motema molai mpo na kosalisa bana na bango bázwa biyano na mituna lokola oyo: ‘Tozali mpenza na mikolo ya nsuka? Ezali mpenza solo ete lingomba ya solo ezali kaka moko? Mpo na nini banakelasi mosusu oyo bamonanaka lokola bana malamu bazali baninga ya malamu te? Soki moto azali kosangisa nzoto liboso abala ezalaka mpenza mabe?’” Baboti, bokoki kotya elikya epai ya Yehova ete akopambola milende na bino, mpamba te ye mpe alingaka ete bana na bino bázala malamu.

19. Mpo na nini ezali malamu mingi ete baboti bango moko báyekola na bana bango?

19 Baboti mosusu bayokaka lokola mwa nkaka mpo na koyekola na bana na bango. Kasi, esengeli kozala bongo te, mpamba te moto mosusu te akoki koteya bana na bino malamu koleka bino moko. (Baefese 6:4) Soki bozali koyekola na bana na bino, ekosalisa bino bóyeba mpenza makambo oyo ezali na kati ya mitema mpe na kati ya makanisi na bango. Bazali kobimisa makanisi oyo ezali kouta na mitema na bango to bazali koloba kaka tiká báloba? Bazali mpenza kondima makambo oyo bazali koyekola? Bamonaka mpenza ete Yehova azali solo? Bokozwa biyano na mituna yango mpe na mituna mosusu ya ntina se soki bino moko bozali koyekola na bango.—2 Timote 1:5.

20. Baboti bakoki kosala nini mpo boyekoli ya libota ezala na esengo mpe ebota mbuma malamu?

20 Soki bobongisi malamu programɛ na bino ya boyekoli ya libota mpe bozali kolanda yango, bokoki kosala nini mpo ekatana te? Joseph azali nkulutu mpe tata ya bana mibale, ye alobi boye: “Ndenge moko na boyekoli nyonso ya Biblia, boyekoli na biso ya libota esengeli kozala likambo ya esengo, likambo oyo moto nyonso azelaka na mposa mpenza ete mokolo oyo tosalaka yango ekóma. Mpo na yango, na kati ya libota na biso totalelaka kaka ngonga te. Tokoki koyekola na boumeli ya ngonga moko, kasi ata soki mokolo mosusu tozali kaka na miniti zomi, toyekolaka kaka. Bana batalelaka boyekoli na biso lokola likambo ya ntina mingi na kati ya makambo oyo tosalaka na boumeli ya pɔsɔ mpo tosalaka masano oyo tozwaka yango na Mokanda mpo na Masolo ya Biblia.a Masano yango etikalaka na bɔɔngɔ ya bana mpe esalisaka bango bákanga mpenza ntina ya makambo koleka makambo oyo bakangaka soki toyekoli baparagrafe mingi.”

21. Ntango nini baboti bakoki koteya bana na bango?

21 Kasi, koteya bana esuki kaka na boyekoli na libota te. (Deteronome 6:5-7) Motatoli oyo azali kosala na Thaïlande, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, alobi boye: “Nabosanaka te ntango Tata azalaki komema ngai na mosala ya kosakola, tozalaki kokamata bavelo na biso mpe tozalaki kokende mosika, na nsuka mpenza ya teritware ya lisangá na biso. Ezali mpenza ndakisa malamu ya baboti na biso mpe mateya oyo bazalaki kopesa biso ntango nyonso nde esalisaki biso na kozala na mokano ya kokɔta na mosala ya ntango nyonso. Mpe mateya yango etikalá mpenza na mitema na biso. Tii sikoyo nakómaka na nsuka ya teritware!”

22. Matomba nini okozwa soki ozali ‘komisɛnzɛla yo moko mpe mateya na yo’?

22 Etikali moke, na ntango oyo ebongi mpenza, Yesu akoya kopesa mokili oyo etumbu ya Nzambe. Na nsima, likambo yango ekoleka, kasi basaleli ya sembo ya Yehova bakokoba kosalela ye na elikya ya kozwa lobiko ya seko. Ozali na elikya ya kozala kati na bango, elongo na bana na yo mpe bato oyo ozali koyekola na bango Biblia? Boye kobosana likambo oyo te: “Omisɛnzɛla yo moko mpe mateya na yo; ɛɛ, oumela na yango, zambi ekosalaka yo boye okomibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo.”—1 Timote 4:16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okoki kolimbola?

• Tosengeli kozala na makanisi nini lokola toyebi te mokolo mpenza oyo Nzambe akoboma mokili mabe oyo?

• Na makambo nini tokoki ‘komisɛnzɛla mpe kosɛnzɛla mateya na biso’?

• Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli akóma moninga ya Yehova?

• Mpo na nini ezali na ntina ete baboti bázwaka ntango mpo na koteya bana na bango?

[Elilingi na lokasa 15]

Boyekoli ezalaka malamu koleka ntango bozali na limemya mpe bozali kosolola lokola baninga.

[Elilingi na lokasa 18]

Kosala masano na kolanda masolo ya Biblia, lokola oyo ya Salomo azali kosambisa basi mibale, ekoki kosala ete boyekoli ezala na esengo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto