Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/6 nk. 5-7
  • Bato bakozala mpenza na bomoi ya kokoka!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato bakozala mpenza na bomoi ya kokoka!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kozala na makambo makasi te
  • Matomba ya kozala na makambo makasi te
  • Bomoi ya kokoka eleki makambo ya kokoka
  • Ndenge nini nakoki kotika koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?
    Lamuká!—2004
  • Mpo na nini nalukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka?
    Lamuká!—2004
  • Mpo na nini tosengeli te koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/6 nk. 5-7

Bato bakozala mpenza na bomoi ya kokoka!

Mokili ya kokoka elimboli nini mpo na yo? Kanisá esika moko oyo bato bafandi, bongo mobulu ezali te, bameli bangi bazali te, nzala ezali te, babola bazali te mpe kozanga bosembo ezali te. Bato nyonso bazali malamu mpe bazali nzoto kolɔngɔnɔ. Moto moko te azali na mawa mpamba te liwa ezali lisusu te. Tokoki mpenza kokanisa ete makambo ya ndenge wana ekosalema?

ATAKO bazali komona makambo ya kokamwa oyo bato ya siansi bazali kosala, bato mingi bazali kondima te ete moto, na mayele na ye moko, akobongisa mokili mpo ezala lisusu na makambo ya mabe te, mpe bato nyonso báfanda na kimya mpe na esengo. Nzokande, toyebi malamu ete moto alukaka kobongisa makambo mpe kosembola oyo ezali malamu te. Ya solo, kokanisa mpamba ekosala te ete bato oyo bazangi bandako bázwa bandako mpe babola bázala malamu, yango mpe te ekosala ete bato oyo babebá mabɔkɔ to makolo bábonga to bato ya maladi bákóma malamu. Na bisalasala na bango moko, bato bakoki kobongisa mokili te mpe kokómisa yango ya kokoka. Atako lelo oyo tozali komona bwale mpe minyoko, kasi ezali na makambo oyo ezali kondimisa biso ete etikali moke tokozala na mokili ya kokoka.

Ntango ozali kokanisa makambo ya bomoi ya kokoka, okoki mbala moko komona Yesu Klisto na makanisi na yo. Kasi, Yesu azali kaka ye moko te moto ya kokoka oyo azalaki awa na mabele. Nzambe akelaki Adama na Eva na elilingi na ye mpe bazalaki na bomoi ya kokoka na kati ya paladiso. Kasi, babungisaki makambo kitoko oyo bazalaki na yango mpo bazangaki botosi epai ya Tata na bango ya likoló. (Genese 3:1-6) Nzokande, Mozalisi atyá mposa ya kozala na bomoi ya seko na motema ya moto. Mosakoli 3:11 emonisi likambo yango na maloba oyo: “Asalaki nyonso na kitoko na ntango na yango; atii mpe lobiko kati na mitema na bango, nde moto te ayebi kososola mosala mosalaki Nzambe longwa na ebandeli kino nsuka.”

Atako kozanga kokoka mpe lisumu ememelaki bato bomoi ‘ya mpamba’ mpe “boombo ya libebi,” ntoma Paulo alobaki maloba ya kolendisa mpenza ete: “Zambi na mposa monene, mokili mobimba ezali kotalela ete Nzambe amonisa emoniseli ya bana na ye. Nzambe azalisaki mokili mpamba, mpo na mokano na yango mpenza te nde mpo na mokano na ye oyo azalisaki yango boye. Kasi ezalaki na elikya ete ekosikwa na boombo na libebisi kino lisiko na nkembo ya bana ya Nzambe.” (Baloma 8:19-21) Biblia elobi polele ete na nzela ya Yesu Klisto, Nzambe abongisi makambo nyonso mpo bato bázala lisusu na bomoi ya kokoka.—Yoane 3:16; 17:3.

Longola elikya kitoko wana oyo ekokokisama na mikolo ekoya, lelo oyo, biso nyonso tokoki kokola na elimo mpe komonisa na miso ya bato ete tozali kokende liboso.

Kozala na makambo makasi te

Yesu Klisto atalelaki kozala moto ya kokoka lokola likambo ya ntina mingi, yango wana ayebisaki ebele ya bato ete: “Bozala bato ya kokoka lokola Tata na bino ya Likolo.” (Matayo 5:48, Boyokani ya Sika) Yesu alingaki mpenza ete tózala ata na mabe moko te na kati ya mokili oyo ya masumu? Te. Ezali solo ete tosengeli kosala makasi mpo tózala na bizaleli lokola kokaba, boboto, mpe bolingo epai ya bazalani na biso; kasi mbala mingi tolongaka te kosala oyo ezali malamu. Kutu, ntoma moko ya Yesu akomaki ete: “Soko tokoyambola masumu na biso, ye azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopɛtola biso na bokesene nyonso. Soko tokolobaka ete tosali masumu te, tozalisi ye mobuki na lokuta, mpe Liloba na ye ezali kati na biso te.”—1 Yoane 1:9, 10.

Atako bongo, tokoki kobongisa ndenge oyo tomitalelaka mpe ndenge oyo tosalelaka bato mosusu makambo, kozanga ete tólekisa ndelo. Nani akoki komona toli oyo ebongi mpo na kozala na bizaleli ya malamu, kozala na makambo makasi te, koleka toli oyo ezali na Biblia, Liloba ya Nzambe? Soki tokolisi bizaleli malamu lokola esengo mpe kozala na makambo makasi te, ekosalisa biso tófanda malamu na baninga na biso ya mosala, ekosalisa biso tóyokana malamu na molongani na biso, mpe na baboti to bana na biso. Ntoma Paulo apesaki baklisto toli oyo: “Bósepelaka ntango nyonso kati na Nkolo. Nazali koloba lisusu ete, Bósepelaka! Tiká ete [ezaleli na bino ya makambo makasi te eyebana, NW ] na bato nyonso.”—Bafilipi 4:4, 5.

Matomba ya kozala na makambo makasi te

Soki ozali koluka makambo ya mindɔndɔmindɔndɔ te mpe ozali komitungisa te to mpe konyokola nzoto na yo te mpo na koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka, ekozala malamu mpo na yo moko mpe mpo na bato mosusu. Koyeba mpenza makoki na yo esɛngi kozala na bokatikati mpe kolekisa ndelo te na makambo oyo olingi kosala. Kobosana te ete Nzambe akelaki biso mpo tózala na bomoi awa na mabele mpe tósepela na mosala malamu oyo ekopesa biso moko mpe bato mosusu matomba.—Genese 2:7-9.

Soki ozalaka na makambo makasi, ekozala malamu obondela Yehova. Soki Nzambe asungi yo, okobɔndisama mingi. Yehova ayebi ndenge oyo tosalemá mpe ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana alukelaka biso makambo ya mindɔndɔ te, ezali mpe mpasi te mpo na kosepelisa ye. Mokomi ya nzembo alobi na biso boye: “[Lokola] tata akoyokela bana na ye mawa, boye [Yehova] akoyokelaka bango mawa baoyo bakobangaka ye. Zambi ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” (Nzembo 103:13, 14) Tokoki mpenza kozala na botɔndi mpo na motema mawa ya Nzambe epai ya bato! Ayebi bolɛmbu na biso, kasi tozali na motuya mingi na miso na ye, atalelaka biso lokola bana na ye oyo alingaka mingi.

Na esika tólukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka, eleki malamu tókolisa bososoli ya elimo mpe tózala na makanisi mabongi! Lisusu, tokoki kozala na elikya ete moto moko te akoki kokanga Yehova nzela mpo na kokokisa mokano na ye ete bato bázala na bomoi ya kokoka ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Kasi kozala moto ya kokoka elimboli mpenza nini?

Bomoi ya kokoka eleki makambo ya kokoka

Kozala na bomoi ya kokoka na kozala moto oyo alukaka makambo ya kokoka ezali makambo mibale ekeseni. Na ntembe te bato oyo bakokɔta na Paladiso ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele bakozala bato oyo balukaka makambo ya mindɔndɔmindɔndɔ te to bato oyo bamimonaka ete bango nde bazali sembo. Moko na masɛngami mpo na kobika na bolɔzi monene ezali ete moto andima na motema na ye mobimba mbeka oyo epesamaki mpo na kosikola biso; ezali yango nde ebele ya bato oyo bauti na mikili ndenge na ndenge bazali kosala. Ntoma Yoane amonaki bango bazali koloba ete: “Lobiko [euti] na Nzambe na biso oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe na Mwana ya Mpate!” (Emoniseli 7:9, 10, 14) Bato nyonso oyo bakobika na bolɔzi monene oyo ezali koya bakosepela na likambo oyo Klisto asalaki, andimaki kokufa mpo na bango mpe mpo na bato mosusu nyonso oyo bakosala misala oyo emonisi kondima na bango epai na ye. Mbeka na ye esali ete ezaleli ya kozanga kokoka mpe bolɛmbu nyonso elongolama.—Yoane 3:16; Baloma 8:21, 22.

Bomoi ya kokoka ekozala ndenge nini? Na esika bato báwelana mpe moto na moto aluka bolamu na ye moko, bolingo mpe boboto kati na bato ekosala ete bato básepela na bomoi. Yango ekolongola mitungisi mpe komiyoka lokola nde ozali na ntina moko te. Atako bongo, tokolɛmba bomoi te mpe tokobanda kozongela makambo yango na yango te. Liloba ya Nzambe eyebisi biso likambo mokomoko te oyo ekozala na Paladiso kasi epesi biso likanisi mpo na bomoi oyo tokoki kolikya kozala na yango: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga ya miwiti mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya; zambi lokola mikolo ya nzete, bongo ikozala mikolo ya bato na ngai, mpe baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala ya mabɔkɔ na bango. Bakosala mosala ya mpamba te, bakobota bana mpo na nsɔmɔ ya pwasa te.”—Yisaya 65:21-23.

Na esika omitunatunaka soki tokozala na masano ya ndenge nini, soki tokozala na bazando mpe na bamagazini ya ndenge nini, biloko nini tokosala na mayele ya siansi, tokobanda kotambola na biloko nini na Bokonzi ya Nzambe, salá lokola nde ozali komona maloba oyo ezali kokokisama: “Mbwa monene mpe mwana ya mpate bakolya elongo moko, nkosi akolya matiti lokola ngɔmbɛ mpe mputulu ikozala bilei ya nyoka. Bakoyokisa mpasi te, bakobebisa te na ngomba mobimba ya bulɛɛ na ngai. [Yehova] alobi bongo.” (Yisaya 65:25) Makambo ekokesana mpenza na oyo tozali komona lelo oyo! Soki okozala na kati ya bato oyo Nzambe akomona ete babongi kozala na bomoi na ntango wana, makambo mingi ekotinda yo ondima mpenza ete Tata na yo ya bolingo asepelaka na yo mpe na libota na yo. “Omisepelisa na [Yehova] mpe ye akopesa yo mposa nyonso ya motema na yo.”—Nzembo 37:4.

Ya solo, bato bakozala mpenza na bomoi ya kokoka. Mokano malamu oyo Yehova azali na yango mpo na bato ekokokisama. Yo na libota na yo bokoki kozala kati na baoyo bakokóma na ezaleli ya kokoka mpe na bomoi ya seko na mokili ya sika oyo Nzambe akosala. Biblia esakoli ete: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:29.

[Elilingi na lokasa 6]

Tokoki kobongisa ndenge oyo tomitalelaka mpe ndenge oyo tosalelaka bato mosusu makambo, kozanga ete tóluka makambo ya kokoka mpe kolandela makambo mikemike

[Elilingi na lokasa 7]

Kanisá ete ozali na kati ya Paladiso, na kimya mpe makambo nyonso ezali ya bosembo!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto