Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/9 lok. 25
  • Bazali kosopela milona ya solo mai na ekólo Chili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kosopela milona ya solo mai na ekólo Chili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini kopesa litatoli na telefone?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Kopesa litatoli na telefone ekoki kobota mbuma malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Bandá koyekola na bato Biblia na porte na bango to na telefone
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Nasengeli kosala nini soki nasali libunga?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/9 lok. 25

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Bazali kosopela milona ya solo mai na ekólo Chili

NA ESOBE oyo ezali na nɔrdi ya ekólo Chili, bambula mingi ekoki koleka liboso mbula ebɛta kuna. Kasi, soki bambula ebɛti, mabele oyo ekaukaki mpe ezalaki mabangamabanga ebimisaka bafololo kitoko ya langi ndenge na ndenge. Bisika yango ekómaka kitoko mpo na kotala mpe bato bautaka bipai na bipai na Chili mpo na kotala yango.

Nzokande, likambo mosusu oyo eleki malamu ezali kosalema epai ya bato ya Chili. Mateya ya solo ya Biblia ezali kotiyola lokola mai na bisika nyonso ya ekólo yango mpe bato mingi ya mitema sembo bazali “kokola” mpo na kokóma bayekoli ya Yesu Klisto. Bazali mpe kosalela telefone mpo na kopalanganisa mateya ya solo. Masolo oyo elandi emonisi matomba oyo bazali kozwa ntango bazali koteya bato na nzela ya telefone.

• Karina azali mobongisi-nzela; basɛngaki ye abongisa elakiseli moko na liyangani ya zongazonga mpo na komonisa ndenge ya koteya bato na nzela ya telefone. Nzokande, Karina asalelaki naino telefone ata mbala moko te mpo na kosakola nsango malamu. Nkulutu moko na mwasi na ye balendisaki ye aboya te mokumba oyo bapesaki ye mpo na liyangani, yango wana, batalelaki elongo na ye mwa makanisi na ndenge ya kosolola na bato na telefone. Lisusu, bapesaki ye toli ete abondela Yehova mpo na kosɛnga ye lisalisi na likambo yango. Karina asalaki bongo mpe amibongisaki mpo na komeka kobenga moto moko na telefone.

Karina aponaki nimero ya telefone ya moto moko oyo afandaka na mboka moko oyo ezali mosika te. Moto oyo ayambaki telefone ezalaki mwasi oyo asalaka na posita mpe Karina ayebisaki ye ntina oyo abengaki. Mwasi yango asepelaki, mpe bayokanaki ete abenga ye lisusu nsima ya mikolo misato. Ntango abengaki lisusu basololaki, mpe na nsuka bayokanaki bábanda koyekola Biblia na mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Kobanda wana, mbala na mbala bayekolaka mpe masolo na bango elekaka malamu mpenza mpe na esengo; lisusu, Karina atindelaki mwasi yango mikanda oyo elimbolaka Biblia mpo na kopesa biyano na mituna na ye.

• Bernarda azwaki likanisi ya koteya mobali moko oyo abungaki nimero ya telefone ya moto oyo alingaki kobenga, kasi abengaki nde na nimero ya telefone ya Bernarda. Na esika asilika, Bernarda ayebisaki ye ete azali Motatoli ya Yehova mpe alingi kosalisa ye. Babandaki kosolola mpe mobali yango azalaki koyoka ye ntango azalaki kolimbola ndenge Bokonzi ya Nzambe ekolongola makambo nyonso ya mabe. Mobali yango apesaki Bernarda nimero na ye ya telefone mpe Bernarda akómaki kobenga ye mbala na mbala, kaka na telefone. Mokolo mosusu, ntango bazalaki kosolola na telefone, Bernarda atángelaki mobali yango mwa maloba ya buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Moto yango atunaki ye ndenge nini akoki kozwa mokanda yango mpe Bernarda atindelaki ye yango na Biblia moko. Babongisaki ete ndeko mobali moko ya mboka wana akendaka kotala ye mpe tii sikoyo, ndeko yango azali kokoba “kosopa mai na molona” wana, mpe ezali kokola.

Ya solo, na mokili oyo ezali lokola mabele ekauká na elimo, ezali na milona oyo ebombani mpe ezali kozela básopela yango mai oyo epesaka bomoi, elingi koloba mateya ya solo, mpo ekola. Ebele ya bato oyo bazali na mposa ya mai bazali ‘kotoa’ mpe ‘kokola’ mpe bazali kokóma basaleli ya sembo ya Yehova Nzambe.—Yisaya 44:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto