Olingaka mpenza makambo oyo Yehova azongelaka?
“Molimo na ngai ebateli makambo oyo ozongelaka, mpe nalingaka yango mingi.”—NZEMBO 119:167, NW.
1. Esika nini balobeli mingi ete Yehova azongelaka makambo oyo alobaka na biso?
YEHOVA alingaka ete basaleli na ye bázala na esengo. Kasi, mpo tózala na esengo ya solosolo, tosengeli kotosa mibeko ya Nzambe mpe kobatela malako na ye. Yango wana, azongelaka makambo oyo alobaka na biso. Makomami elobeli yango mbala ebele, mingimingi na Nzembo 119 oyo, ekoki kozala ete Hizikiya, mwana ya mokonzi moko ya Yuda nde akomaki yango. Nzembo kitoko yango ebandi boye: “Esengo na baoyo batambolaka na bosembo na nzela na bango, baoyo batambolaka na kati ya mobeko ya Yehova. Esengo na baoyo batosaka makambo oyo azongelaka; bazali kolukaluka ye na motema mobimba.”—Nzembo 119:1, 2, NW.
2. Boyokani nini ezali kati na kozala na bolamu mpe makambo oyo Nzambe azongelaka?
2 ‘Totambolaka na kati ya Mobeko ya Yehova’ ntango tozwi boyebi ya solosolo ya Liloba na ye mpe tozali kosalela yango na bomoi na biso. Kasi, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozalaka na mposa bázongelaka koloba na biso makambo yango. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “makambo oyo azongelaka” ezali komonisa ete Nzambe alamusaka mobeko na ye, bilakeli na ye, mitinda na ye, malako na ye mpe bikateli na ye na makanisi na biso. (Matai 10:18-20) Mpo tózala ntango nyonso na esengo tosengeli kotosa makambo oyo bazongelaka, mpamba te yango esalisaka biso tókima mitambo ya elimo oyo ememaka na likama mpe na mawa.
Tókangama na makambo oyo Yehova azongelaka
3. Na kotalela Nzembo 119:60, 61, tozali na elikya nini?
3 Mokomi ya nzembo azalaki kopesa motuya mingi na makambo oyo Nzambe azongelaka mpe ayembaki ete: “Nakei mbango mpe naumelaki te mpo na kotosa mibeko na yo. Mitambo ya bato mabe izingeli ngai, nde nabosani Mobeko na yo soko moke te.” (Nzembo 119:60, 61) Makambo oyo Yehova azongelaka esalisaka biso tóyikela minyoko mpiko mpamba te tozali na elikya ete Tata na biso ya likoló akoki kolongola nyonso oyo banguna bazali kosala mpo na kokanga biso nzela. Na ntango oyo ebongi, alongolaka mikakatano oyo ezali kokanga biso nzela mpo tókoba mosala na biso ya kosakola Bokonzi.—Malako 13:10.
4. Ndenge nini tosengeli kotalelaka makambo oyo Nzambe azongelaka?
4 Ntango mosusu, makambo oyo Yehova azongelaka esembolaka biso. Tiká ete tósepelaka ntango nyonso na kosembolama yango, ndenge mokomi ya nzembo asepelaki na yango. Ye abondelaki Nzambe ete: “Makambo oyo ozongelaka esepelisaka ngai mingi . . . Nalingi makambo oyo ozongelaka.” (Nzembo 119:24, 119, NW) Tozali na makambo mingi oyo Nzambe azongelaka koleka oyo mokomi ya nzembo azalaki na yango. Na bisika ebele oyo Makomami ya Greke ezongeli makambo oyo ezali na Makomami ya Liebele, ezali komonisa biso mateya oyo Yehova azalaki kopesa bato na ye na ntango ya Mibeko mpe lisusu mikano na ye mpo na lisangá ya boklisto. Soki Yehova amoni malamu azongela mibeko na ye, tosepelaka na toli yango. Ntango mpe ‘tozali kokangama na makambo oyo Yehova azongelaka,’ esalisaka biso tókima masɛnginya ya masumu oyo esepelisaka Mozalisi na biso te mpe elongolaka biso esengo.—Nzembo 119:31.
5. Tosengeli kosala nini mpo tólinga mingi makambo oyo Yehova azongelaka?
5 Bolingo na biso mpo na makambo oyo Yehova azongelaka esengeli kozala ndenge nini? Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Molimo na ngai ebateli makambo oyo ozongelaka, mpe nalingaka yango mingi.” (Nzembo 119:167, NW) Tokolinga mingi makambo oyo Yehova azongelaka biso soki tozali kotalela mpe kondima yango lokola toli ya Tata oyo amibanzabanzaka mpenza mpo na biso. (1 Petelo 5:6, 7) Tozali na mposa ya makambo oyo azongelaka, mpe tokolinga yango mingi ntango tozali komona bolamu oyo yango ezali kopesa biso.
Mpo na nini tozali na mposa ya makambo oyo Nzambe azongelaka?
6. Wapi ntina moko oyo tozali na mposa ete Yehova azongelaka biso makambo, mpe nini ekosalisa biso tóbosana makambo yango te?
6 Ntina moko oyo tozali na mposa ete Yehova azongelaka biso makambo ezali mpo tobosanaka mingi. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Bato babosanaka makambo mingi soki ntango mingi eleki. . . . Na ntembe te esi ekómelá yo obosana nkombo moko to likambo moko oyo oyebaki yango malamu. . . . Kobosana makambo mwa ntango moke ndenge yango oyo eyaka mbala na mbala, na Lifalanse babengaka yango échecs de la récupération. Bato ya siansi balimbolaka yango na ndakisa ya moto oyo azali koluka eloko moko oyo eyebani esika ezali te na kati ya ndako oyo biloko nyonso ezali na mobulu. . . . Ndenge malamu ya kosimba likambo moko ezali koyekola yango lisusu nsima ya ntango molai soki okanisi ete oyebi yango malamumalamu.” Komipesa na koyekola mpe kozongela makambo ekosalisa biso tóyeba lisusu makambo oyo Nzambe azongelaka biso mpe tótosa yango mpo na bolamu na biso.
7. Mpo na nini lelo oyo, tozali na mposa ya makambo oyo Nzambe azongelaka, koleka eleko mosusu nyonso?
7 Lelo oyo, tozali mpenza na mposa ete Yehova azongelaka biso makambo koleka eleko mosusu nyonso mpamba te mabe ekómi mingi. Soki tozali kotya matoi na makambo oyo Yehova azali kozongela koloba na biso, tokozwa bososoli oyo tosengeli na yango mpo tóboya banzela mabe ya mokili. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Naleki balakisi nyonso na ngai na koyeba, zambi, [makambo oyo ozongelaka, NW] ezali kati na makanisi na ngai. Naleki bampaka na kososola, zambi nakobatelaka bilakeli na yo. Napekisi makaka na ngai na nzela nyonso mabe ete nabatela maloba na yo.” (Nzembo 119:99-101) Soki tozali kotosa makambo oyo Nzambe azongelaka, tokokima ‘nzela nyonso ya mabe’ mpe tokozala te lokola bato oyo bazali na “molili, batangolami mosika na bomoi ya Nzambe.”—Baefese 4:17-19.
8. Ndenge nini tokoki kozwa makasi ya kolonga soki kondima na biso emekami?
8 Tozali mpe na mposa ya makambo oyo Yehova azongelaka koyebisa biso mpamba te yango elendisaka biso mpo tóyikela mikakatano ya “ntango [oyo] ya nsuka” mpiko. (Danyele 12:4, NW) Soki bazali kozongela biso makambo yango te, tokozala ‘bayoki oyo babosanaka.’ (Yakobo 1:25) Kasi soki tomipesi na koyekola Makomami, ezala biso moko to na lisangá, na lisalisi ya mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” ekosalisa biso tólonga soki kondima na biso emekami. (Matai 24:45-47) Makambo oyo Nzambe abongisi mpo na kolendisa biso na elimo esalisaka biso tóyeba eloko oyo tosengeli kosala mpo tósepelisa Yehova ntango tomekami.
Makita ya lisangá ezali na ntina mingi
9. Banani bazali “makabo na motindo ya mibali,” mpe ndenge nini basalisaka bandeko mosusu?
9 Makita ya lisangá ekokisaka mpe mposa na biso ya koyoka makambo oyo Nzambe azongelaka. Na makita yango, bandeko oyo baponami basalaka masolo mpo na koteya biso. Ntoma Paulo akomaki ete ntango Yesu “abutaki na likoló, amemaki bakangami; apesaki makabo na motindo na mibali.” Paulo alobaki lisusu boye: “[Klisto] apesaki bamosusu lokola bantoma, bamosusu lokola basakoli, bamosusu lokola bapalanganisi ya nsango malamu, bamosusu lokola babateli ya mpate mpe balakisi, mpo na kobongisa basantu, mpo na mosala ya kosunga, mpo na kotonga nzoto ya Klisto.” (Baefese 4:8, 11, 12, NW) Tosengeli mpenza komonisa botɔndi lokola “makabo na motindo ya mibali” yango, elingi koloba bankulutu oyo baponami na lisangá, balakisaka biso makambo oyo Yehova azongelaka ntango toyangani mpo na losambo!
10. Likanisi nini ya ntina ezali na Baebele 10:24, 25?
10 Soki tozali na botɔndi mpo na makambo oyo Nzambe azali kobongisa, tokozanga ata moko te na makita mitano oyo esalemaka na lisangá pɔsɔ na pɔsɔ. Paulo amonisaki mbala na mbala ntina oyo tosengeli koyanganaka. Akomaki boye: “Tótalanaka mpo tópusama na bolingo mpe misala malamu, tótika koyangana na biso te, lokola bamosusu bameseni kosala yango, kasi tólendisanaka, tósala bongo mingimingi lokola bozali komona mokolo yango ezali kokóma penepene.”—Baebele 10:24, 25, NW.
11. Litomba nini tozwaka na likita mokomoko oyo tosalaka pɔsɔ na pɔsɔ?
11 Omonaka bolamu oyo makita epesaka biso? Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ elendisaka kondima na biso, esalisaka biso tótosa makambo oyo Yehova azongelaka, mpe epesaka biso makasi ya kotɛmɛla “elimo ya mokili.” (1 Bakolinti 2:12; Misala 15:31) Na lisukulu ya bato banso, balobi bateyaka makambo oyo euti na Liloba ya Nzambe, mpe kati na yango ezalaka na makambo oyo Yehova azongelaka mpe “maloba” kitoko ya “bomoi ya seko” oyo Yesu alobaki. (Yoane 6:68; 7:46; Matai 5:1–7:29) Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi ebakiselaka biso mayele ya koteya. Likita ya Mosala ezali na ntina mingi mpo na kosalisa biso tóyeba mpenza koteya bato nsango malamu na ndako na ndako, ntango tozongelaka bango, ntango toyekolaka na bango Biblia, mpe na ndenge mosusu oyo tosakolaka. Na Boyekoli ya Mokanda, lokola tozalaka bato mingi te, epesaka biso mpenza likoki ya koloba, mpe mbala mingi ezalaka makambo oyo Nzambe azongelaka.
12, 13. Ndenge nini basaleli ya Nzambe na ekólo moko ya Azia bamonisaki ete basepelaka na makita ya lisangá?
12 Koyangana na makita ya lisangá pɔsɔ na pɔsɔ esalisaka biso tóbosana mibeko ya Nzambe te mpe esalisaka biso tózala makasi na elimo na ntango tozali na mboka oyo ezali na bitumba, ntango tozali na mikakatano ya mbongo mpe na makambo mosusu oyo emekaka kondima na biso. Na mokili moko ya Azia, baklisto soki 70 ya lisangá moko bamonaki mpenza ntina ya makita ntango batikaki bandako na bango mpe bakendaki kofanda na kati ya zamba. Lokola bazalaki na mposa bákoba koyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ, bazongaki na engumba na bango oyo ebebisamaki na masasi na babɔmbi, basangisaki biloko nyonso oyo etikalaki na Ndako ya Bokonzi oyo ebebaki mpe bakendaki kotonga Ndako ya Bokonzi mosusu na kati ya zamba.
13 Nsima ya kolekisa bambula ebele na esika mosusu na ekólo yango mpo na bitumba, basaleli ya Yehova bazali ntango nyonso kosalela ye na molende. Batunaki nkulutu moko na mboka yango boye: “Eloko nini esalisaki mpenza bandeko bátikala esika moko?” Apesaki eyano oyo: “Na boumeli ya mbula 19, tolekisaki ata likita moko te. Ya solo, ntango mosusu, mpo na babɔmbi to mikakatano mosusu, bandeko mosusu bazalaki kokóma na esika ya makita te, kasi tolekisaki ata likita moko te.” Tokanisi mpenza ete bandeko yango ya bolingo bamonaka ntina ya ‘kotika te koyangana na biso.’
14. Liteya nini tokoki kozwa na momeseno ya mobange Ana?
14 Ana, mobange mwasi ya mbula 84, oyo akufelá mobali ‘azalaki kobima na tempelo te.’ Yango wana, azalaki wana ntango bamemaki mwana Yesu nsima ya kobotama na ye. (Luka 2:36-38) Omityelá mokano ete ozangisaka makita te? Osalaka nyonso mpo ozala wana mikolo nyonso soki tozali na liyangani? Mateya oyo tozwaka na makita yango epesaka biso bolamu na elimo mpe emonisaka biso polele ete Tata na biso ya likoló amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye. (Yisaya 40:11) Makita yango epesaka mpe esengo, mpe ntango tozali koyangana emonisaka ete tosepelaka na makambo oyo Yehova azongelaka.—Nehemia 8:5-8, 12.
Makambo oyo Yehova azongelaka ekaboli biso na mokili
15, 16. Soki tozali kotosa makambo oyo Yehova azongelaka, etamboli na biso ekozala ndenge nini?
15 Kotosa makambo oyo Nzambe azongelaka esalisaka biso tókabwana na mokili mabe oyo. Na ndakisa, kotosa makambo oyo Nzambe azongelaka esalisaka biso mpo tókwea na pite te to na ekobo te. (Deteronome 5:18; Masese 6:29-35; Baebele 13:4) Soki tomekami ete tóbuka lokuta, tózala sembo te to tóyiba, tokoki kolonga komekama yango soki tozali kotosa makambo oyo Nzambe azongelaka. (Exode 20:15, 16; Levitike 19:11; Masese 30:7-9; Baefese 4:25, 28; Baebele 13:18) Kotosa makambo oyo Yehova azongelaka epekisaka biso kozongisa mabe na mabe, kobomba nkanda to kotɔnga bato.—Levitike 19:16, 18; Nzembo 15:1, 3.
16 Ntango tozali kotosa makambo oyo Nzambe azongelaka, tozalaka ntango nyonso bato ya pɛto oyo bakabwani na mokili mpo na kosala mosala ya Nzambe. Ezali mpenza na ntina ete tókabwana na mokili oyo! Na butu ya nsuka oyo alekisaki na bomoi na ye lokola moto awa na mabele, Yesu abondelaki Yehova mpo na bayekoli na ye ete: “Ngai napesi bango liloba na yo mpe bamokili basili koyina bango zambi bazali bato ya mokili te [lokola] ngai nazali moto ya mokili te. Nalɔmbi te ete olongola bango na mokili kasi ete obatela bango na ye mabe. Bazali bato ya mokili te [lokola] ngai nazali moto ya mokili te. Bulisá bango kati na solo na yo. Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:14-17) Tiká tólinga ntango nyonso Liloba ya Nzambe oyo ekaboli biso na mokili mpo na kosala mosala na ye ya bosantu.
17. Likambo nini ekoki kosalema soki tokangi matoi mpo tóyoka te makambo oyo Nzambe azongelaka, yango wana tosengeli kosala nini?
17 Biso basaleli ya Yehova tozali na mposa ete andima biso ntango nyonso na mosala na ye. Nzokande, soki tokangi matoi mpo tóyoka te makambo oyo Yehova azongelaka, elimo ya mokili oyo ezali kopanzana na maloba, na mikanda, na masano, mpe na bizaleli ya bato, ekolonga biso. Na ntembe te tolingi te kozala bato ya lokoso ya mbongo, bato ya lolendo, bato ya ngambo, bato bazangi matɔndi, bato ya yauli, bato ya nko, bato ya motó makasi, bato bavimbi na lolendo, bato balingá bisengo mingi koleka Nzambe. Totángi kaka mwa bizaleli moke ya bato oyo bakabwani na Nzambe. (2 Timote 3:1-5) Lokola mikolo ya nsuka ya mokili mabe oyo ekómi na nsuka na yango, tóbondelaka ntango nyonso Yehova asalisa biso tóbatela makambo oyo azongelaka mpe na bongo ‘tokokeba ete tósalaka lokola liloba na ye.’—Nzembo 119:9.
18. Soki tozali kotosa makambo oyo Nzambe azongelaka ekotinda biso na kosala makambo nini?
18 Yehova azongelaka makambo kaka te mpo na koyebisa biso oyo tosengeli kosala te. Soki tozali kotosa makambo oyo azongelaka, ekotinda biso tósalaka makambo ya malamu, tótyela Yehova motema mpe tólinga ye na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, na makanisi na biso mobimba mpe na makasi na biso mobimba. (Deteronome 6:5; Nzembo 4:5; Masese 3:5, 6; Matai 22:37; Malako 12:30) Makambo oyo Nzambe azongelaka etindaka mpe biso tólinga bazalani na biso. (Levitike 19:18; Matai 22:39) Tolakisaka mpenza ete tolingaka Nzambe mpe tolingaka bazalani na biso ntango tosalaka mokano ya Nzambe mpe toteyaka bato “boyebi ya Nzambe” oyo ememaka na bomoi.—Masese 2:1-5.
Tokozwa bomoi soki tozali kotosa makambo oyo Yehova azongelaka
19. Ndenge nini tokoki komonisa bato mosusu ete kotosa makambo oyo Yehova azongelaka ezali malamu mpe epesaka litomba?
19 Soki tozali kotosa makambo oyo Yehova azongelaka mpe tozali kosalisa bato mosusu básala bongo, tokomibikisa mpe tokobikisa baoyo bazali koyoka biso. (1 Timote 4:16) Ndenge nini tokoki komonisa bato mosusu ete kotosa makambo oyo Yehova azongelaka ezali mpenza malamu mpe ezali na litomba? Soki tozali kotosa mibeko ya Biblia na bomoi na biso. Na ndenge yango, baoyo “bazali na makanisi mabongi mpo na bomoi ya seko” bakomona ete bomoi oyo Liloba ya Nzambe ezali kolakisa nde ezali bomoi oyo eleki malamu. (Misala 13:48, NW) Bakomona mpe ete ‘Nzambe azali kati na biso’ mpe bakoyoka mposa ya kosangana na biso mpo na kosambela Nkolo Mokonzi Yehova.—1 Bakolinti 14:24, 25.
20, 21. Makambo oyo Nzambe azongelaka mpe elimo na ye ekosalisa biso na kosala nini?
20 Soki tozali ntango nyonso koyekola Makomami, tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola mpe tozali kolanda makambo nyonso oyo Yehova abongisi mpo na kolendisa biso na elimo, tokolinga mingi makambo oyo Yehova azongelaka. Soki tozali kotosa makambo oyo Nzambe azongelaka, ekosalisa biso tólata “bomoto ya sika oyo ezalisami sika na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solosolo.” (Baefese 4:20-24, NW) Makambo oyo Yehova azongelaka mpe elimo santu na ye ekosalisa biso tózala na bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, komipekisa; bizaleli oyo ekeseni mpenza na bizaleli ya bato ya mokili oyo Satana azali koyangela! (Bagalatia 5:22, 23, NW; 1 Yoane 5:19) Yango wana, tózalaka na botɔndi ntango bazali kozongela biso masɛngami ya Yehova na boyekoli na biso moko, na bankulutu, na makita mpe na mayangani.
21 Lokola totosaka makambo oyo Yehova azongelaka, tokoki kozala na esengo ata ntango tozali konyokwama mpo na bosembo. (Luka 6:22, 23) Totyelaka Nzambe elikya ete akobikisa biso na mikakatano makasi. Yango ezali mpenza na ntina sikoyo lokola bikólo nyonso ezali koyangana mpo na “etumba ya mokolo yango monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso” na Armagedon.—Emoniseli 16:14-16.
22. Tosengeli kozala na ekateli nini mpo na makambo oyo Yehova azongelaka?
22 Mpo tózwa bomoi ya seko lokola likabo, tosengeli kolinga mingi makambo oyo Yehova azongelaka mpe kotosa yango na motema mobimba. Yango wana, tiká tózala na elimo lokola oyo ya mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “[Makambo oyo ozongelaka, NW] izali sembo, lobiko na lobiko; sosolisá ngai, bongo nakobika.” (Nzembo 119:144) Mpe tiká tózala na ekateli oyo ezali na maloba ya mokomi ya nzembo ete: “Nalelaki epai na yo [Yehova]; bikisá ngai. Boye nakobatela [makambo oyo ozongelaka, NW].” (Nzembo 119:146) Na maloba mpe na misala na biso, tómonisa ete tolingaka mingi makambo oyo Yehova azongelaka.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini mokomi ya nzembo azalaki kotalela makambo oyo Yehova azongelaka?
• Mpo na nini tozali na mposa ya makambo oyo Nzambe azongelaka?
• Makita ezalaka na ntina nini mpo na makambo oyo Nzambe azongelaka?
• Ndenge nini makambo oyo Yehova azongelaka ekabolaka biso na mokili oyo?
[Elilingi na lokasa 15]
Mokomi ya nzembo alingaki mpenza makambo oyo Yehova azongelaka
[Bililingi na lokasa 17]
Na ndakisa ya Ana, ozalaka na mokano ya kozangisa makita te?
[Elilingi na lokasa 18]
Kotosa makambo oyo Yehova azongelaka ekaboli biso na mokili; ekómisi biso bato ya pɛto oyo Yehova andimi mpo na kosalela ye mosala