Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/3 nk. 3-4
  • Bazali kotyela lisekwa ya Yesu ntembe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kotyela lisekwa ya Yesu ntembe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bato ya ntembe na ntango na biso
  • Lisekwa ya Yesu—Ndimbola na yango mpo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Lisekwa ya Yesu esalemaki mpenza?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Lisekwa ezali mpenza elikya ya solosolo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Elikya ya lisekwa ezali na nguya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/3 nk. 3-4

Bazali kotyela lisekwa ya Yesu ntembe

Episkɔpɔ-mokonzi ya Canterbury, mokonzi monene ya Lingomba ya Angleterre, alobaki boye: “Nakoki koloba na bino polele ete atako tokoki kondima ete Yesu azalaki na bomoi . . . , tokoki te koloba na komindimisa mpenza ete Nzambe asekwisaki ye.”

NTOMA Paulo atyelaki lisekwa ntembe te. Na mokapo 15 ya mokanda na ye ya liboso epai ya bandeko na ye baklisto ya Kolinti, Paulo akomaki boye: “Zambi na liboso napesaki bino yango ezwaki ngai ete Klisto akufi mpo na masumu na biso [lokola] elobaki [Makomami, NW], mpe ete akundami mpe ete asekwi na mokolo ya misato, [lokola] elobaki [Makomami, NW].”​—1 Bakolinti 15:3, 4.

Kondima na lisekwa ya Yesu Klisto nde etindaki bayekoli na ye na kosakola nsango malamu na mikili nyonso oyo ezalaki kolanda mimeseno ya Bagrɛki mpe Baloma​—“epai na bato nyonso na nse ya likoló.” (Bakolose 1:23) Ya solo, lisekwa ya Yesu nde esimbi mpenza kondima ya boklisto.

Kasi, banda na ebandeli mpenza, bato mingi batyaka ntembe mpe bakakatanaka mpo na kondima ete Yesu asekwaki. Bayuda bazalaki komona ete bayekoli ya Yesu bazalaki kofinga Nzambe, ntango bazalaki koloba ete moto yango oyo babakaki na nzete nde azalaki Masiya. Mpo na Bagrɛki oyo batángá mingi, lokola bazalaki kondima ete molimo ekufaka te, bakokaki te kondima ata likanisi mpamba ya koloba ete moto oyo akufi akoki kosekwa.​—Misala 17:32-34.

Bato ya ntembe na ntango na biso

Na mikolo na biso, bato mosusu ya mayele oyo balobaka ete bazali baklisto babimisi babuku mpe masolo oyo ezali komonisa ete lisekwa ya Yesu ezalaki likambo ya solo te mpe babandisi ntembe oyo eyei ndongo mpo na likambo yango. Na boyekoli na bango mpo na koyeba “Yesu ya solosolo,” ebele ya bato ya mayele bazali koloba ete masolo ya Evanzile oyo ezali koloba ete lilita etikalaki mpamba mpe ete Yesu amonanaki nsima ya lisekwa na ye ezali masapo mpamba, bato babongisaki yango ntango molai nsima ya liwa na ye mpo na kondimisa ete azalaki na nguya ya Nzambe.

Na ndakisa, tótalela likanisi ya Gerd Lüdemann, moto ya Allemagne mpe molakisi ya Kondimana ya Sika, ye akomaki buku moko oyo ezali na motó ya likambo ete Oyo mpenza ekómelaki Yesu​—Lisolo ya solosolo ya lisekwa. Alobi ete lisekwa ya Yesu ezali “maloba ya mpamba” oyo, moto nyonso oyo “atalelaka mokili na ndenge oyo siansi ezali kolimbola yango” akoki kondima yango te.

Mpo na Profɛsɛrɛ Lüdemann, Klisto oyo asekwaki, oyo ntoma Petelo amonaki ezalaki nde emonaneli moko oyo Petelo amonaki lokola azalaki komitungisa mpe kobanga ndenge awanganaki Yesu. Mpo na Lüdemann, komonana ya Yesu epai ya bandimi koleka 500 na mbala moko ezalaki “kosenzwa ya bato ebele.” (1 Bakolinti 15:5, 6) Na mokuse, ebele ya bato ya mayele batalelaka masolo ya Biblia oyo elobeli lisekwa ya Yesu lokola makanisi oyo epesaki bayekoli elikya ya sika mpe molende na mosala ya misionɛrɛ.

Ya solo, bato mingi batyaka mpenza likebi te na ntembe ya bato ya mayele. Nzokande, lisolo oyo ezali kolobela lisekwa ya Yesu esengeli kotalela biso nyonso. Mpo na nini? Mpamba te soki asekwaki te, boklisto esimbami na makambo ya lokuta. Epai mosusu, soki ezali solo ete Yesu asekwaki, boklisto esimbami na makambo ya solo. Soki ezali bongo, boye maloba ya Klisto ezali solo mpe lisusu bilaka na ye ezali solo. Lisusu, soki lisekwa ezali, boye liwa ezali nsuka ya likambo te, kasi monguna oyo akolongolama.​—1 Bakolinti 15:56.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Euti na Self-Pronouncing Edition of the Holy Bible, oyo ezali na Biblia libongoli King James mpe libongoli Revised

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto