Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/3 nk. 10-14
  • Tólonga bolɛmbu ya nzoto na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólonga bolɛmbu ya nzoto na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komekama mpe lisumu ezalaka mpenza ndenge nini?
  • Tómityela motema na koleka ndelo te
  • Tokoki kolonga komekama!
  • Ndenge oyo libondeli ekoki kosalisa biso
  • Tókanga mabɔkɔ te mpo tólonga komekama
  • Ndenge ya kolonga komekama
    Lamuká!—2014
  • Ndenge nini nakoki kotɛmɛla komekama?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Kobá komibatela mpo okwea na komekama te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Komekama
    Lamuká!—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/3 nk. 10-14

Tólonga bolɛmbu ya nzoto na biso

“Kokanisa makambo ya nzoto elimboli liwa.”​—BALOMA 8:6, NW.

1. Ndenge nini bato mosusu batalelaka nzoto ya bato, mpe mituna nini ebongi tótalela yango?

“NAKOTƆNDA yo mpo ete nasalami na motindo ya kokamwa.” (Nzembo 139:14) Davidi ayembaki nzembo yango ntango azalaki kokanisa moko na misala ya Yehova, elingi koloba nzoto ya moto. Maloba yango ezali masanzoli oyo akanisaki malamu mpenza; nzokande, mpo na bateyi mosusu ya mangomba, nzoto ezali esika oyo masumu efandi to esaleli ya masumu. Babengaki yango ‘eloko oyo elati boinga, esika oyo mabe efandaka, moombo ya libebi, ndako ya molili, ebembe ya bomoi.’ Ya solo, ntoma Paulo alobaki ete: “Eloko moko malamu efandi na ngai, kati na nzoto na ngai, te.” (Baloma 7:18) Kasi, yango elingi koloba ete tozali lokola bato ya bolɔkɔ? tokoki kosala eloko moko te lokola tozali na nzoto ya masumu?

2. (a) “Kokanisa makambo ya nzoto” elimboli nini? (b) Etumba nini esalemaka kati na “nzoto” mpe “elimo” epai ya bato oyo balingaka kosepelisa Nzambe?

2 Makomami esalelaka ntango mosusu liloba “mosuni” mpo na kolobela moto ya kozanga kokoka, moto ya masumu oyo auti na motomboki Adama. (Baefese 2:3; Nzembo 51:5; Baloma 5:12) Makambo oyo atikelá biso ememaki ‘bolɛmbu ya nzoto.’ (Baloma 6:19) Paulo alobaki ete: “Kokanisa makambo ya nzoto elimboli liwa.” (Baloma 8:6, NW) “Kokanisa makambo ya nzoto” elimboli kotambwisama na bamposa ya nzoto ya masumu. (1 Yoane 2:16) Yango wana, ntango tozali koluka kosepelisa Nzambe, elimo na biso ebundaka etumba na nzoto na biso ya masumu oyo etindaka biso ntango nyonso na kokokisa “misala ya nzoto.” (Bagalatia 5:17-23; 1 Petelo 2:11) Nsima ya kolobela etumba oyo ezalaki na kati ya nzoto na ye, Paulo alobaki boye: “Ngai moto ya mawa mingi! Nani akolongola ngai na nzoto oyo ya kufa?” (Baloma 7:24) Yango elingi nde koloba ete Paulo akokaki kolonga te soki amekami? Biblia emonisi polele mpenza ete ezali bongo te!

Komekama mpe lisumu ezalaka mpenza ndenge nini?

3. Ndenge nini bato mingi batalelaka lisumu mpe komekama, kasi likebisi nini Biblia ezali kopesa mpo na ezaleli yango?

3 Lelo oyo, bato mingi bandimaka te ete moto asalaka masumu. Bato mosusu basalelaka liloba “lisumu” na lisɛki lokola liloba ya kala mpo na kolobela mabunga mikemike ya bato. Bayebaka te ete “ekoki na biso nyonso komonana liboso ya esambiselo ya Klisto ete moto na moto azwa yango ekoki na ye mpo na misala misalaki ye na nzoto, soko malamu soko mabe.” (2 Bakolinti 5:10) Bato mosusu balobaka lokola na lisɛki ete: “Soki namekami, nakokwea kaka!” Na bisika mosusu, bato balingi kokokisa bamposa na bango nokinoki na makambo nyonso, ezala kolya, makambo ya pite to ya ekobo, masɛki, to mosala. Bazali koluka kozwa nyonso mpe kozwa yango kaka sikoyo! (Luka 15:12) Bazali koluka bisengo sikoyo mpe esengo ya “bomoi ya solosolo” oyo ekoya, etali bango te. (1 Timote 6:19, NW) Nzokande, Biblia ezali koteya biso tókanisaka malamu mpe tómonaka mosika, tóboya eloko nyonso oyo ekoki kobebisa biso, ezala na elimo to na ndenge mosusu. Lisese moko ya Biblia elobaka boye: “Moto ya mayele akososola mpasi liboso mpe akomibomba, bilema bakoleka mpe bakozwa etumbu.”​—Masese 27:12.

4. Paulo apesaki likebisi nini na 1 Bakolinti 10:12, 13?

4 Ntango Paulo akomaki mokanda epai ya baklisto ya Kolinti, mboka oyo eyebanaki mpo na makambo na yango ya bosɔtɔ, apesaki bango toli malamu mpo na kokebisa bango na komekama mpe na nguya oyo lisumu ezali na yango. Alobaki boye: “Tiká ete ye oyo akanisi ete azali kotɛlɛma ngwi akeba ete akwea te. [Komekama] moko ekómeli bino te oyo ezangi epai na bato nyonso. Nzambe azali sembo; ye oyo akotika bino te ete bómekama na koleka nguya na bino, kasi esika moko na [komekama], akobongisa ekimeli ete bókoka koyika mpiko.” (1 Bakolinti 10:12, 13) Biso nyonso​—elenge to mokóló, mwasi to mobali​—tomekamaka mingi, ezala na kelasi, na mosala to na bisika mosusu. Yango wana, tótalela naino malamumalamu maloba ya Paulo mpo tóyeba ndenge oyo tokoki kosalela yango.

Tómityela motema na koleka ndelo te

5. Mpo na nini komityela motema na koleka ndelo ezali likama?

5 Paulo alobi boye: “Tiká ete ye oyo akanisi ete azali kotɛlɛma ngwi akeba ete akwea te.” (1 Bakolinti 10:12) Soki tozali komityela motema na koleka ndelo mpe koloba ete tozali makasi na elimo, ezali likama. Soki tozali kosala bongo emonisi ete toyebi naino malamu te lisumu mpe nguya na yango. Soki bato lokola Mose, Davidi, Salomo na ntoma Petelo bakweaki na lisumu, tokanisi mpenza ete biso tokoki kokwea te? (Mituya 20:2-13; 2 Samwele 11:1-27; 1 Mikonzi 11:1-6; Matai 26:69-75) Masese 14:16 elobi ete: “Moto ya mayele akobanga mpe akopɛngwa na mabe; nde moto ya zoba akolobaloba mpe atondi na lolendo.” Yesu mpe alobaki ete: “[Elimo, NW] ezali na mposa nde nzoto ezali na bolɛmbu.” (Matai 26:41) Lokola moto nyonso ya kozanga kokoka azalaka na bamposa ya mabe, ebongi tótalela malamu likebisi ya Paulo mpo tólonga komekama; soki te, tokokwea.​—Yilimia 17:9.

6. Ntango nini mpe ndenge nini tosengeli komibongisa mpo na kokwea na komekama te?

6 Ezali malamu komibongisa mpo na koyeba ndenge ya kosala liboso ya mikakatano oyo ekoki koyela biso na mbalakaka. Mokonzi Asa asosolaki ete ntango mboka ezali na kimya nde ntango ya malamu mpo na kotonga bifelo mpo na kobatela yango. (2 Ntango 14:2, 6, 7) Ayebaki ete soki azeli tii mokolo banguna bakoya kobundisa bango, ntango ekozala lisusu te. Ndenge moko mpe, ntango makanisi na biso ezali kimya nde ntango ebongaka tókanisa likambo oyo tokosala soki tomekami. (Nzembo 63:6) Danyele na baninga na ye oyo bazalaki kobanga Nzambe bazwaki ekateli ya kobatela mobeko ya Yehova liboso básɛngisa bango kolya bilei kitoko ya mokonzi. Yango wana, bakakatanaki te mpo na kolanda ekateli oyo bazwaki mpe baboyaki kolya bilei ya mbindo. (Danyele 1:8) Liboso komekama eyela biso, tólendisa ekateli na biso ya kobatela etamboli ya pɛto. Na bongo, tokozala na makasi ya kobunda mpo tókwea na lisumu te.

7. Mpo na nini koyeba ete bato mosusu balongaki komekama ezali kobɔndisa?

7 Maloba ya Paulo ezali mpenza kobɔndisa; alobi ete: “[Komekama] moko ekómeli bino te oyo ezangi epai na bato nyonso”! (1 Bakolinti 10:13) Ntoma Petelo akomaki ete: “Bótɛmɛla [Zabolo] ngwi mpo na kondima, bóyeba ete mpasi ya motindo moko mpenza ezali kobimela bandeko na bino na bipai mosusu na mokili.” (1 Petelo 5:9) Ya solo, bato mosusu bamekamaki na makambo oyo tozali kokutana na yango mpe Nzambe asalisaki bango na kolonga; biso mpe tokoki kolonga. Nzokande, lokola tozali baklisto ya solo mpe tozali na mokili oyo etondi na makambo ya mabe, ata ndɛlɛ, mokomoko na biso akomekama. Yango wana, ndenge nini tokoki kozala na elikya ete tokolonga bolɛmbu ya nzoto na biso mpe komekama na kosala lisumu?

Tokoki kolonga komekama!

8. Likambo nini ya malamu tosengeli kosala mpo na kokima komekama?

8 Likambo ya malamu oyo tosengeli kosala mpo na koboya “kozala baombo ya masumu” ezali ya kokima komekama ntango likoki ya kokima ezali. (Baloma 6:6) Masese 4:14, 15 elobi boye: “[Kokɔta] na nzela ya bato mabe te mpe kɔtá na elekelo ya bato ya masumu te. Pɛngwá na yango, leká pembeni te, longwá na yango mpe tangwá.” Mbala mingi toyebaka liboso ete likambo boye ekoki komema na lisumu. Yango wana, likambo oyo biso baklisto tosengeli kosala ezali ya ‘kotangwa’ to kolongwa pembeni ya moto, to eloko to esika nyonso oyo ekoki kolamusa mposa to makanisi ya mabe.

9. Ndenge nini Makomami ebendi likebi mpenza likoló na kokima makambo oyo ekoki komeka biso?

9 Tokoki mpe kolonga komekama soki tozali kokima makambo oyo ekoki komeka biso. Paulo apesaki toli ete: “Bókima pite.” (1 Bakolinti 6:18) Akomaki ete: “Bókima losambo ya bikeko.” (1 Bakolinti 10:14) Ntoma Paulo ayebisaki mpe Timote ete akima mposa ya bozwi, mpe “mposa nyonso ya bolenge.”​—2 Timote 2:22; 1 Timote 6:9-11.

10. Yebisá bandakisa mibale oyo emonisi ntina ya kokima komekama.

10 Tókanisa naino likambo oyo ekómelaki Davidi, mokonzi ya Yisalaele. Ntango azalaki na esika moko likoló ya ndako na ye, amonaki mwasi moko kitoko azali kosukola mpe mposa ya mabe eyelaki ye na motema. Ebongaki alongwa na esika yango mpo na kokima komekama. Na esika asala bongo, ye atunaki bato na ye mpo na koyeba mwasi yango, Bata-Seba, soki azali nani, mpe esukelaki ye mabe mpenza. (2 Samwele 11:1–12:23) Nzokande moto mosusu, elingi koloba Yosefe, asalaki nini ntango mwasi ya nkolo na ye azalaki kotungisa ye ete alala na ye? Lisolo elobi na biso boye: “Ata ye alobaki na Yosefe mikolo nyonso, ayokaki ye te na ntina na kolala na ye to kozala esika moko na ye.” Atako ayebaki Mibeko ya Mose te mpo na ntango wana epesamaki naino te, Yosefe alobaki na ye boye: “Bongo nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai na Nzambe boni?” Mokolo mosusu mwasi yango akangaki ye na nzoto mpe alobaki na ye ete: “Lalá na ngai”! Yosefe atikalaki wana mpo na komeka kosalisa mwasi yango amona ete likambo yango ezali mabe? Te. “Akimaki mpe abimaki na ndako.” Yosefe atikelaki komekama na kosala pite ntango te. Akimaki!​—Genese 39:7-16.

11. Likambo nini tokoki kosala soki tozali komekama mbala na mbala?

11 Soki moto akimi bakoki ntango mosusu koloba ete azali moto ya bibangabanga, kasi mbala mingi, mayele esɛngaka kolongwa na esika moko mpo na koboya makambo. Ekoki kozala ete na esika ya mosala tozali kokutana na likambo moko oyo ezali komeka biso mbala na mbala. Atako tokoki te kolongwa na mosala yango mpe kozwa mosala mosusu, tokoki kosalela mayele mosusu mpo na kolongwa na makambo oyo ezali komeka biso. Tosengeli kokima likambo nyonso oyo toyebi ete ezali mabe, mpe tosengeli kozala na mokano ya kosala kaka oyo ezali malamu. (Amosa 5:15) Na esika mosusu, kokima komekama esɛngaka koboya kotala bililingi ya bato oyo bazali bolumbu to bazali kosangisa nzoto na nzela ya Internet mpe koboya kokende kolekisa ntango to kozwa mopɛpɛ na bisika ya mabe. Ekoki mpe kolimbola kobwaka zulunalo moko to koluka baninga mosusu, baoyo balingaka Nzambe mpe bakoki kosalisa biso. (Masese 13:20) Ntango tomekami na kosala lisumu, likambo ya mayele ezali ya kozala na ekateli makasi ya koboya yango.​—Baloma 12:9.

Ndenge oyo libondeli ekoki kosalisa biso

12. Tosɛngaka nini ntango tobondelaka Nzambe ete: “Kendisá biso na komekama te”?

12 Paulo alendisi biso na maloba oyo: “Nzambe azali sembo; ye oyo akotika bino te ete bómekama na koleka nguya na bino, kasi esika moko na [komekama], akobongisa ekimeli ete bókoka koyika mpiko.” (1 Bakolinti 10:13) Moko ya banzela oyo Yehova asungaka biso ezali ete ayokaka mabondeli na biso soki tosɛngi ye asalisa biso tólonga komekama. Yesu Klisto ateyaki biso tóbondelaka boye: “Kendisá biso na komekama te, kasi bikisá biso na mabe.” (Matai 6:13) Soki tosali libondeli yango na bosembo mpenza, Yehova akotika biso na komekama te; akobikisa biso na mabɔkɔ ya Satana mpe na mayele mabe na ye. (Baefese 6:11, NW, maloba na nse ya lokasa) Tosengeli kosɛnga na Nzambe asalisa biso tóyebaka mbala moko masɛnginya mpe tózalaka na makasi ya kolonga yango. Soki tozali kobondela ye atika biso te tókwea na ntango tomekami, akosalisa biso mpo ete “oyo mabe,” elingi koloba Satana, alonga biso te.

13. Tosengeli kosala nini ntango komekama moko ezali koumela mingi?

13 Esɛngaka mpenza tóbondela makasi ntango likambo moko ezali komeka biso mbala na mbala. Komekama mosusu ekoki kobimisa etumba monene na kati ya motema na biso, ntango mosusu tokobundisa makanisi mpe elimo oyo ekomonisa biso ete tozali mpenza bato ya bolɛmbu. (Nzembo 51:5) Na ndakisa, tokosala nini ntango likambo moko ya mbindo oyo tozalaki kosala ezali koyela biso na makanisi? Tokosala nini soki tomekami na kozongela yango? Na esika tómeka kaka kobosana yango, tóyebisa yango Yehova na kati ya libondeli, mpe soki esengeli, tósala yango mbala na mbala. (Nzembo 55:22) Na nguya ya Liloba mpe na elimo santu na ye, akosalisa biso tóbengana bamposa ya mabe na makanisi na biso.​—Nzembo 19:8, 9.

14. Mpo na nini libondeli ezali na ntina mingi mpo na kolonga bolɛmbu na biso?

14 Ntango amonaki ete bantoma na ye bazalaki na mpɔngi na elanga ya Getesemane, Yesu alobaki boye: “Bókɛngɛlaka mpe bóbondelaka ete [bókɔta] na komekama te; [elimo, NW] ezali na mposa nde nzoto ezali na bolɛmbu.” (Matai 26:41) Lolenge mosusu ya kolonga komekama ezali ya kozala ekɛngɛ na mitindo ndenge na ndenge oyo komekama ekoki koyela mpe ndenge oyo ekoki kokosa biso. Ezali mpe na ntina mingi tózelisaka te na kobondela ntango tomekami mpo tózwa makasi ya elimo mpo na kolonga komekama yango. Lokola tomekamaka mingi na makambo oyo tozali na bolɛmbu na yango, na makasi na biso moko tokoki kolonga te. Libondeli ezali na ntina mingi mpamba te nguya ya Nzambe ekoki kobakisela biso makasi liboso ya Satana. (Bafilipi 4:6, 7) Tokoki mpe kozala na mposa ete “bankulutu ya lisangá” básalisa mpe bábondela mpo na biso.​—Yakobo 5:13-18, NW.

Tókanga mabɔkɔ te mpo tólonga komekama

15. Esengeli kosala makambo nini mpo na kolonga komekama?

15 Longola kokima komekama ntango tokoki kokima yango, tosengeli mpe kobunda makasi tii komekama yango ekoleka to makambo ekobongwana. Ntango Satana amekaki Yesu, ye atikalaki ngwi tii ntango Zabolo atikaki ye. (Matai 4:1-11) Moyekoli Yakobo alobaki boye: “Bótɛmɛlaka [Zabolo, NW] mpe akokima longwa na bino.” (Yakobo 4:7) Mpo na kotikala ngwi likambo ya liboso ezali ya kolendisa makanisi na biso na lisalisi ya Liloba ya Nzambe mpe kozwa ekateli makasi ya kobatela mibeko na ye. Ezali malamu tókangaka na motó mpe tókanisaka bavɛrsɛ ya ntina oyo ezali mpenza kolobela bolɛmbu na biso. Ezali malamu kokutana na moklisto moko oyo akɔmeli, mbala mosusu nkulutu moko, koyebisa ye likambo oyo ezali kotungisa biso mpe oyo tokoki koluka ye mpo na kozwa lisalisi ntango tomekami.​—Masese 22:17.

16. Ndenge nini tokoki kozala ntango nyonso na etamboli ya malamu?

16 Makomami ezali kolendisa biso tólata bomoto ya sika. (Baefese 4:24) Yango elingi koloba ete tosengeli kotika Yehova abongola makanisi na biso mpe abongisa biso. Na mokanda oyo atindelaki Timote, moninga na ye ya mosala, Paulo alobaki boye: “[Olanda] boyengebene, kosalela Nzambe, kondima, bolingo, etingya, bopɔlɔ. Obundaka etumba malamu ya kondima, osimba bomoi ya seko; zambi obyangami mpo na yango.” (1 Timote 6:11, 12) Tokoki ‘kolanda boyengebene’ soki tomipesi na koyekola Liloba ya Nzambe mpo na koyeba bomoto na ye malamumalamu mpe kotambola na ndenge oyo azali kosɛnga biso. Ezali mpe na ntina ete na programɛ na biso, tósalaka makambo nyonso ya bomoi ya moklisto, lokola kosakola nsango malamu mpe koyangana na makita. Soki tozali kopusana penepene ya Nzambe mpe tozali kolanda malamumalamu bibongiseli nyonso ya elimo, ekosalisa biso tókola na elimo mpe tózala ntango nyonso na etamboli ya malamu.​—Yakobo 4:8.

17. Ndenge nini toyebi ete Nzambe akotika biso te na ntango ya komekama?

17 Paulo alobi na biso ete komekama moko te ekoki koyela biso oyo ekoleka makasi oyo Nzambe apesaka mpo na kolonga yango. Yehova ‘akobongisa ekimelo ete tókoka koyikela yango mpiko.’ (1 Bakolinti 10:13) Soki tozali ntango nyonso kotyela Nzambe motema, akotika nzela te ete tómekama na ndenge oyo ekoleka makasi na biso ya elimo mpo na kotikala sembo. Alingi ete tóbunda makasi mpo na kolonga komekama na kosala makambo oyo ezali mabe na miso na ye. Longola yango, tokoki kondima elaka oyo apesi ete: “Nakotika yo soko moke te, [nakosundola] yo mpe te.”​—Baebele 13:5.

18. Mpo na nini tokoki kolikya ete tokolonga bolɛmbu na biso?

18 Paulo ayebaki malamu ete akolonga na etumba oyo azalaki kobunda na bolɛmbu ya nzoto. Azalaki komimona te ete azali na likambo ya kosala te liboso ya bamposa ya nzoto. Kasi, alobaki boye: “Nazali kopota mpamba te, nazali [kobɛta makofi] nde bobele kobɛta mopɛpɛ te. Kasi nazali kobɛta nzoto na ngai mpe nakokómisa yango lokola moombo ete nazala moboyami te awa esili ngai kosakwela bamosusu.” (1 Bakolinti 9:26, 27) Biso mpe tokoki kobunda mpe kolonga bolɛmbu ya nzoto na biso ya kozanga kokoka. Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo azali kosalela Makomami, mikanda oyo elimbolaka Biblia, makita ya lisangá mpe bandeko na biso baklisto oyo bakɔmeli, mpo na koyebisa biso ntango nyonso makambo mpo na kosunga biso tótikala na nzela ya sembo. Na lisalisi na ye, tokoki kolonga bolɛmbu ya nzoto na biso!

Ozali koyeba lisusu?

• ‘Kokanisa makambo ya nzoto’ elimboli nini?

• Ndenge nini tokoki komibongisa mpo tókwea na komekama te?

• Tokoki kosala nini mpo na kolonga komekama?

• Libondeli ezali na ntina nini mpo na kolonga komekama?

• Ndenge nini toyebi ete tokoki kolonga bolɛmbu ya nzoto na biso?

[Bililingi na lokasa 10]

Biblia elobi te ete tozali baombo ya bamposa na biso ya nzoto

[Elilingi na lokasa 12]

Kokima komekama ezali likambo ya malamu oyo esengeli kosala mpo na kokwea na lisumu te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto