Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/6 nk. 3-4
  • Okopesa mbongo to okondima kokufa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okopesa mbongo to okondima kokufa?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lokoso ya mbongo
  • Mbongo epesaka bolamu te
  • Makambo oyo mbongo ekoki kosala mpe oyo ekoki kosala te
  • Kotalela mbongo na ndenge ebongi
    Lamuká!—2015
  • Mbongo
    Lamuká!—2014
  • Ezali solo ete mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge ya kosalela mbongo malamu
    Okoki kozala na libota ya esengo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/6 nk. 3-4

Okopesa mbongo to okondima kokufa?

Miyibi balakisi moto moko monduki, basɛngi ye mbongo, balobi: “Pesá mbongo, soki te tokoboma yo!” Mbala mosusu osi oyoká lisolo ya ndenge wana. Lelo oyo biso mpe tozali na mokakatano monene, tosengeli kopesa eyano soki tolingi mbongo mingi koleka bomoi na biso. Mokakatano yango ezali makasi mingi koleka epai ya baoyo bafandi na bamboka oyo ezali na bozwi mingi. Kasi ezali te miyibi nde babimiseli biso mokakatano wana. Ezali nde ndenge oyo bato bamipesi mingi na mbongo mpe na biloko ya mosuni.

NDENGE oyo bato bamipesi na mbongo mpe na biloko ya mosuni ebimisi mikakatano mpe mitungisi oyo ezalaki liboso te. Eloko nini okoki kondima kopesa mpo na kozwa mbongo mpe biloko ya mosuni? Tokoki kozala na esengo ata soki tozali na biloko mingi te? Bato bazali mpenza koboya “bomoi ya solosolo” likoló ya biloko ya mosuni? Mbongo epesaka bomoi ya esengo?

Lokoso ya mbongo

Na bamposa nyonso oyo moto azalaka na yango, ezala na ndenge ya malamu to na ndenge ya mabe, bolingo ya mbongo ezali mposa oyo ezwaka esika ya liboso. Lokoso ya mbongo ezali te lokola mposa ya kosangisa nzoto to kolya; lokoso ya mbongo ekoki kozala mpo na ntango nyonso mpe ekosila te. Ata soki moto akómi mobange, mposa ya mbongo esilaka te. Mbala mingi kutu, moto oyo akómi mobange akoki kokóma na mposa makasi ya mbongo mpe ya biloko oyo moto akoki kosomba na mbongo.

Lokoso ya mbongo ezali kokola se kokola. Elombe ya filme moko oyo bato balingaka mingi alobaki ete: “Lokoso efutaka. Lokoso ezali malamu.” Bato mingi balobaki ete bambula ya 1980 ezalaki bambula ya lokoso, kasi makambo oyo esalemaki liboso mpe na nsima na yango ezali komonisa ete bato batalelaka mbongo kaka ndenge oyo bazalaki kotalela yango liboso.

Likambo ya sika ezali kaka ete bato mingi bazali komona banzela ebele ya kozwa mbongo mingi kozanga koumela. Ezali komonana lokola ete, ntango nyonso, makasi nyonso oyo bato bazali kosala ezali mingimingi kaka mpo na kobimisa mpe kozwa biloko mingi lisusu koleka. Tokanisi ete yo moko ozali komona ete, na moi ya lelo, bato bazali komipesa mingi mpo na kozala na biloko mpe kosakana na mbongo.

Kasi, nyonso wana ezali kobakisela bato bolamu? Eleki sikoyo mbula 3 000, Mokonzi Salomo, moto oyo azalaki na mayele mpe na bomɛngo mingi mpenza apesaki eyano na motuna yango, akomaki boye: “Esika biloko bizali mingi, bato bakoya kolia byango bazali mpe ebele. Nkolo wa biloko akozwa na byango litomba kani? Bobele lokumu la komono bato mingi.” (Mosakoli 5:10, Liloba lya Nzambe) Lelo oyo mpe, bato ya mayele oyo bazali koyekola bizaleli ya bato bazali koloba bobele ndenge yango.

Mbongo epesaka bolamu te

Moko na makambo ya kokamwa oyo emonani na bizaleli ya bato ezali ete soki moto anduki mbongo mpe biloko ya mosuni, yango ebakiselaka ye esengo mpe bolamu te. Bato mingi ya mayele oyo bayekolaka bizaleli ya bato bamoni ete soki moto akómi na mbongo mingi, akozala na esengo mpe na bolamu te kaka mpo azali na biloko mingi.

Yango wana, soki batali mposa makasi oyo bato bazali na yango ya koluka biloko ya mosuni mpe mbongo, mingi bazali komituna boye: ‘Tozali komona lokola nde tozali kosepela na biloko ya sika oyo tozali kosomba, kasi mpo na nini, nsima ya nyonso wana, kosepela yango ebakiselaka biso bolamu te?’

Na mokanda na ye (Bato ya esengo, na Lingelesi), mokomi Jonathan Freedman alobaki boye: “Soki okómi na mwa mbongo moke, ata soki ozali na mbongo boni, yango ekopesa yo esengo te. Bato oyo bazali na mbongo mingi, mbongo na bango epesaka bango esengo te.” Bato mingi bamoni ete biloko oyo epesaka mpenza moto bolamu ezali bozwi ya elimo, kosala makambo oyo ezali mpenza na ntina mpe kozala na bizaleli malamu. Likambo mosusu ya ntina ezali kozala na boyokani malamu na bato mpe kozala na matata te oyo ekoki kopekisa biso tósepela na biloko oyo tozali na yango.

Bato mingi bazali komona ete soki lelo oyo makambo ezali kotambola malamu te, ezali mpo bato bazali koluka kosilisa mikakatano na nzela ya bozwi ya mokili. Nyonso oyo ezali nde makanisi ya bato. Bato mosusu ya mayele oyo bayekolaka bizaleli ya bato bazali koloba ete bato mingi bazali mawamawa mpe bazali kosepela te. Bazali mpe komona ete, na mikili ya bozwi, bato mingi bazali kokende epai ya minganga to koluka ntina ya bomoi mpe kimya ya makanisi na mwa mangomba ya molili mpe epai ya banganga-nkisi. Yango emonisi ete biloko ya mokili epesaka bomoi ya solosolo te.

Makambo oyo mbongo ekoki kosala mpe oyo ekoki kosala te

Ya solo, mbongo ekoki kosala makambo mwa mingi. Moto akoki kosomba na yango bandako ya kitoko, bilamba mpe biloko mosusu ya kitoko. Moto oyo azali na mbongo akoki kozwa lokumu, bato bakoki kokumisa ye, bakoki kosala makambo mpo na kosepelisa ye, to koloba na ye maloba ya malamu; akozwa kutu baninga oyo bakolinga ye bango moko, kasi mpo na mwa ntango moke. Kasi, makambo oyo mbongo ekoki kosala esuki kaka wana. Biloko oyo tozalaka na mposa na yango mingi mpenza, mbongo ekoki kosomba yango te, na ndakisa: baninga oyo balingaka na bolingo ya solosolo, kimya ya makanisi, libɔndisi ya solosolo ntango liwa ekómi pene. Mpo na bato oyo balingaka kozala na boyokani malamu na Mozalisi, bakoki kosomba boyokani yango na mbongo te.

Mokonzi Salomo, ye moto azalaki na biloko nyonso ya kitoko oyo ekokaki kosombama na mbongo na ntango na ye, alobaki ete kotya elikya na biloko epesaka bolamu ya solosolo te. (Mosakoli 5:12-15) Moto akoki kobungisa mbongo ntango babanki ekwei to ntango mbongo esili valɛrɛ. Mopɛpɛ makasi ekoki kobuka bandako. Atako moto azali na assurance bakoki kozongisela ye biloko oyo abungisi, kasi ekoki te kosilisa bampota oyo moto azoki na motema. Mbongo oyo efandi na kati ya biloko ya motuya oyo ozali na yango ekoki nokinoki kosila valɛrɛ ntango nkita ya mboka ebebi. Lelo okoki kozala na mosala oyo bazali kofuta malamu mpe lobi ozangi yango.

Bongo, tokoki kosala ndenge nini mpo na kotika mbongo na esika na yango? Mbongo to mpe biloko esengeli kozala na ntina nini na bomoi na biso? Tosɛngi na yo otánga lisolo oyo elandi mpo na komona ndenge oyo okoki kozwa eloko oyo ezali mpenza na motuya koleka: “bomoi ya solosolo.”

[Bililingi na lokasa 4]

Biloko ya mosuni epesaka bolamu ya solosolo te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto