Kotika te ete ntembe ebebisa kondima na yo
Kanisá ete lelo ozali na nzoto kolɔngɔnɔ, kasi lobi obɛli. Na mbala moko, makasi na yo nyonso ya nzoto esili. Motó na yo ezali kobɛta mpe nzoto na yo ezali kosala mpasi. Nini ekómeli yo? Mikrɔbɛ mabe ekɔteli yo na nzoto, ebebisi bibongiseli oyo ebatelaka nzoto mpe ekɔti na binama ya nzoto oyo esimbaka bomoi. Soki okei na lopitalo te, mikrɔbɛ wana oyo ebebisaka nzoto, ekokoba kobebisa nzoto na yo, ata mpe koboma yo.
YA SOLO, soki nzoto ezali kolɔngɔnɔ te na ntango ozwi mikrɔbɛ, maladi ekozwa yo nokinoki. Na ndakisa, Peter Wingate, moto oyo akomaka makambo ya minganga, alobaki ete soki olɛmbi mpo ete olyaka malamu te, ‘nzoto na yo ekokoka te kotɛmɛla maladi nokinoki, mpe ata mwa maladi moke ekokóma kaka monene.’
Soki ezali bongo, nani akoki kondima koboya kolya malamu? Se ndenge moko, osalaka nyonso ete olya malamu mpo ozala nzoto kolɔngɔnɔ. Ekoki mpe kozala ete osalaka nyonso mpo na komibatela ete ozwa mikrɔbɛ te. Kasi, osalaka mpe ndenge moko mpo na oyo etali kozala moto oyo ‘akembi mpo na kondima’? (Tito 2:2) Na ndakisa, osalaka keba mpo na likama oyo ekoki kouta na ntembe oyo emonanaka mpenza polele te? Kozanga nkaka, makambo ya lolenge wana ekoki kopalangana na elimo mpe na motema na yo, kobebisa kondima na yo mpe boyokani na yo na Yehova. Bato mosusu bamisɛnzɛlaka te na likama yango. Bango moko balingaka kotika nzela na ntembe mpe bakokufa nzala na elimo. Ekoki kozala ete yo mpe osalaka bongo?
Ntembe—Ezalaka ntango nyonso mabe?
Ya solo, ntembe nyonso ezalaka mabe te. Ntango mosusu, esɛngaka kokanisa malamu liboso ya kondima likambo moko oyo oyebi yango malamu te. Bilendiseli ya mangomba oyo esɛngaka bato ete bándima kaka mpe bátya ntembe na likambo moko te, ezali likama mpe ekoki kozimbisa. Ya solo, Biblia elobi ete bolingo “endimaka nyonso.” (1 Bakolinti 13:7) Moklisto ya bolingo azali ntango nyonso pene na kondima makambo oyo emonanaki ete ekokisamaki na ntango ya kala. Nzokande, Liloba ya Nzambe ezali mpe kokebisa ete ‘tóyamba maloba nyonso te.’ (Masese 14:15) Mbala mingi, makambo oyo moto akutaná na yango kala ekoki kotinda ye atyela likambo moko boye ntembe. Biblia ekebisi biso ete: “Wana [molobi ya kozimbisa] akolobaka na mongongo ya ngɔlu, ndimá ye te.”—Masese 26:24, 25.
Ntoma Yoane mpe akebisaki baklisto ete bándima likambo moko te soki basosoli yango malamu te. Akomaki ete: “Bóndimaka te liloba nyonso oyo epemami, kasi bómekaka maloba nyonso oyo mapemami mpo na komona soki yango euti na Nzambe.” (1 Yoane 4:1) “Liloba,” liteya to likanisi moko ekoki komonana lokola euti epai ya Nzambe. Kasi euti mpenza epai na ye? Kotya mwa ntembe, to koboya kondima makambo nyonso ekoki mpenza kobatela biso mpo ete, lokola ntoma Yoane alobaki yango, “bakosi mingi babimi kati na mokili.”—2 Yoane 7.
Ntembe oyo ezangi ntina
Ya solo, mpo na koyeba bosolo ya likambo moko, esɛngaka mbala mingi kotalela yango malamumalamu mpe na komikitisa mpenza. Kasi, yango ekeseni na kotya ntembe oyo ezangi ntina, oyo ekoki kobebisa, oyo ekoki kokola na elimo mpe na motema na biso—ntembe oyo ekoki kobebisa boyokani na biso mpe bindimeli na biso oyo etongami makasi. Ntembe yango elimboli kozala na mitema mibale mpo na kondima likambo; eyaka mingimingi ntango olingi kozwa mokano moko boye. Ozali komikundola ndenge Satana akɔtisaki ntembe mpo na makambo etali Yehova na elimo ya Eva? Atunaki boye: “Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma na nzete nyonso na elanga te?” (Genese 3:1) Motuna wana ya moke kaka esalaki ete Eva akóma na mitema mibale mpo na kozwa mokano na likambo yango. Ezali ndenge wana Satana asalelaka mayele na ye. Lokola moto oyo akomaka mikanda ya kotuka, Satana azali koboma bato ntango azali kosalela lokuta mpe ntango azali kokosa. Satana abebisaki bato mingi oyo bazalaki kotambola malamu, akɔtisaki ntembe na mitema na bango na lolenge wana.—Bagalatia 5:7-9.
Moyekoli Yakobo ayebaki mpenza likama oyo ekoki kouta na ntembe ya motindo yango. Akomi mpo na libaku malamu oyo tozali na yango ya kopusana pembeni na Nzambe na bonsomi nyonso mpo na kosɛnga ye lisalisi na ntango oyo tomekami. Yakobo akebisi boye, ntango ozali kobondela Nzambe, “lɔmbá na kondima, kobɛta ntembe te.” Na boyokani na biso elongo na Nzambe, kobɛta ntembe ekómisaka biso “lokola mbonge na mai oyo ezali kopusama na mopɛpɛ mpe kotambola epai na epai.” Tokokóma lokola “mobali ya mitema mibale na kolemalema na bitambweli na ye nyonso.” (Yakobo 1:6, 8) Tokokolisa ezaleli ya kotya ntembe na mateya oyo tondimá mpe tokokóma bato ya mitema mibale. Nde na nsima, ndenge esalemaki mpo na Eva, tokofungola nzela na mateya nyonso ya bademo mpe na filozofi.
Batelá bokɔlɔngɔnɔ ya elimo malamu
Ndenge nini tokoki komibatela na ntembe oyo ebebisaka bato? Eyano ezali mpenza ya pɛtɛɛ: soki toboyi kopalanganisa nsango ya makambo ya Satana mpe soki biso moko tozali komileisa malamu na bilei nyonso oyo Nzambe azali kopesa biso mpe soki tozali kozwa litomba na bibongiseli oyo ebongiseli na ye ezali kozwa mpo na kotɛlɛmisa biso ‘ngwi kati na kondima.’—1 Petelo 5:8-10.
Likambo eleki ntina ezali ya komileisa na nzela ya boyekoli ya biso moko. Peter Wingate, oyo tolobelaki liboso, alimboli boye: “Ezala ntango oyo tolalaka, nzoto na biso ezalaka ntango nyonso na mposa ya nguya mpo elanda kosala bambongwana oyo esengeli, mpe binama na yango oyo ebatelaka bomoi elanda kosala; mpo biteni oyo esalaka binama mingi ya nzoto esengeli kozongaka ya sika.” Ezali mpe ndenge moko mpo na kolɔngɔnɔ na biso ya elimo. Soki tozali koleisa yango malamu na elimo te, kondima na biso ekobeba mokemoke lokola nzoto oyo ezangi bilei, mpe nsukansuka ekokufa. Yesu Klisto abendaki likebi likoló ya likambo yango ntango alobaki ete: “Moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ na Nzambe.”—Matai 4:4.
Kanisá likambo yango. Ndenge nini totongaki kondima makasi na ebandeli? Ntoma Paulo akomaki ete: “Kondima euti na koyoka.” (Baloma 10:17) Alingaki koloba ete ntango tozali komileisa na Liloba ya Nzambe, tozali libosoliboso kotonga kondima na biso epai ya Yehova mpe kotya motema epai na ye, na bilaka na ye, mpe na ebongiseli na ye. Ya solo, tondimaki te makambo nyonso oyo toyokaki, se lokola bakufi miso. Tosalaki lokola bato oyo bazalaki kofanda na engumba ya Beloya. ‘Totalelaki makomi malamumalamu mokolo na mokolo mpo na kotala soki makambo yango ezalaki kaka bongo.’ (Misala 17:11, NW) ‘Tozwaki makanisi ya sika kino tososolaki mokano ya Nzambe,’ mpe tomindimisaki ete makambo oyo toyokaki ezali solo. (Baloma 12:2; 1 Batesaloniki 5:21) Kobanda ntango wana, tobakisaki kondima na biso mpe toyaki komona polele ete Liloba ya Nzambe mpe bilaka na ye ekokokisama.—Yosua 23:14; Yisaya 55:10, 11.
Tóboya kokufa nzala na elimo
Sikoyo mokakatano ezali ya kobatela kondima na biso mpe ya koboya kokakatana nyonso na bindimeli, likambo oyo ekoki kolɛmbisa kondima na biso epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye. Mpo na kosala yango tosengeli kolanda kotánga Makomami mokolo na mokolo. Ntoma Paulo akebisi ete ‘na ntango ya nsuka, bamosusu [baoyo bazalaki na kondima makasi na ebandeli] bakopɛngwa longwa na kondima [bakolanda] bilimo ya kozimbisa mpe mateyo na milimo mabe.’ (1 Timote 4:1) Maloba mpe mateya wana ya kopɛngwisa ebimisaka ntembe na mitema ya bamosusu mpe etangolaka bango na Nzambe. Nini ebatelaka biso? Tosengeli kolanda ‘komɛla maloba ya kondima mpe mateyo malamu oyo tosilaki koyamba.’—1 Timote 4:6.
Ezali mpenza mawa ete bamosusu lelo baboyi ‘komɛla maloba ya kondima,’ ezala ntango bilei yango ezali kopesama ofele. Ndenge mokomi moko ya mokanda ya Masese amonisi yango, ekoki kozala ete tozali na bilei kitoko ya elimo, elambo ya elimo, ndenge ezalaki, kasi toboyi kolya yango.—Masese 19:24; 26:15.
Likambo yango ezali likama. Peter Wingate alobi boye: “Soki nzoto ebandi komileisa na proteine na yango moko, ntango wana bokolɔngɔnɔ na yango ekobanda konyokwama.” Ntango ozali kokufa nzala, nzoto na yo ekobanda kosalela bilei oyo yango ebombaki. Soki bilei yango esili, nzoto ebandi kolya proteine, oyo esalaka ete moto akola mpe binama ebongisamaka. Binama oyo esimbi bomoi ekobanda kolɛmba. Nzoto na yo ekobeba noki.
Ntango lisangá ya boklisto ebandaki, likambo yango ekómelaki bamosusu na elimo. Bamekaki komileisa kaka na bilei ya elimo oyo babombaki. Na ntembe te, bazalaki lisusu kopesa motuya te na boyekoli na bango moko, mpe balɛmbaki na elimo. (Baebele 5:12) Ntoma Paulo alimbolaki likama ya kosala bongo, ntango akomelaki Baebele ete: “Ekoki na biso kotya motema na etingya na koleka na makambo masili biso koyoka ete tópɛngwa na nzela te.” Ayebaki ete ezali pɛtɛɛ na kopɛngwa mpo na kokóma na mimeseno mabe, ‘soki tokotya mitema te na lobiko monene.’—Baebele 2:1, 3.
Likambo oyo ekoki kobenda likebi na biso ezali ete, moto oyo azali kokufa nzala, amonanaka kaka te ete azali na maladi. Ndenge moko mpe, bato nyonso bakoki te komona mbala moko ete Songolo azali kokufa nzala na elimo. Okoki komonana ete ozali makasi na elimo ata soki ozali kolya malamu na elimo te; kasi yango ezali mpo na ntango mokuse! Olinga olinga te, okolɛmba na elimo, okokóma kobɛta ntembe oyo ezangi moboko, mpe okokoka lisusu te kobunda etumba makasi ya kondima. (Yuda 3) Ata soki bato mosusu bayebi te, yo moko oyebi na meko nini omileisaka na elimo.
Yango wana, kotika te boyekoli ya yo moko. Bundisá makasi ntembe oyo ezali koyela yo. Soki obandi kokanisa ete likama moko ezali te, mpe kosala lisusu molende moko te na likambo etali ntembe, likambo yango ekoki kobimisa mbuma mabe mpenza. (2 Bakolinti 11:3) Satana akoki kokɔtisa ntembe na elimo na yo na mituna lokola oyo: ‘Tozali mpenza kobika na mikolo ya nsuka? Esengeli kondima makambo nyonso oyo Biblia elobaka? Oyo ezali mpenza lisangá ya Yehova?’ Soki ozali na ekɛngɛ mpo na oyo etali komileisa malamu na elimo, yango ekoki kobatela yo ete ondima te koyoka mateya na ye ya kozimbisa. (Bakolose 2:4-7) Landá toli oyo Paulo apesaki Timote. Zalá moyekoli malamu ya “makomi ya bulɛɛ” mpo okoka “koumela kati na yango eyekoli yo mpe endimi yo.”—2 Timote 3:13-15.
Okoki kozala na mposa ya lisalisi mpo na kosala yango. Mokomi oyo tolobelaki na ebandeli akobi boye: “Soki moto akufi nzala mingi, binama ya libumu na ye oyo etambwisaka bilei na kati ya nzoto ekoki kotikala mpenza mpamba, kozanga vitamine mpe biloko mosusu ya ntina oyo yango elingaki kozwa na bilei ya mokolo na mokolo, soki ezalaki. Bato oyo bakómi ndenge wana basengelaka na bilei oyo ezalaka mpasi te mpo na kotambola noki na kati ya nzoto.” Mpo na kosilisa mpasi ya moto oyo azali kokufa nzala, esɛngaka mpenza lisungi ya nokinoki. Ndenge moko mpe, moto oyo apesaka lisusu motuya mingi te na boyekoli na ye moko ya Biblia akoki kozala na mposa ya lisungi mingi mpe elendiseli, mpo azongela koyoka mposa na ye ya bilei ya elimo. Soki ezali bongo mpo na yo, luká lisalisi mpe sepelá na lisungi nyonso oyo bakopesa yo mpo elimo na yo ezonga kolɔngɔnɔ mpe makasi.—Yakobo 5:14, 15.
Kotyela elaka ya Nzambe ntembe te
Soki totaleli ezalela ya makambo ya Abalayama, bamosusu bakoki kokanisa ete Abalayama akokaki kozala na bantina ya kotya ntembe. Elingaki komonana mpenza te ete ayebi kokanisa malamu, soki akómaki mbala moko na bosukisi ete akokóma tata ya mabota mingi, atako Nzambe apesaki ye elaka yango. Mpo na nini? Ezali mpo ete na kotalela ndenge oyo biso bato tomonaka makambo, elikya moko ezalaki te mpo na likambo yango. Biblia elobi ete ‘atalelaki nzoto na ye, oyo esilaki konuna, mpe libumu ya Sala, oyo ekokaki lisusu kobota te.’ Atako bongo, aboyaki kotyela Nzambe mpe bilaka na ye ntembe, akangamaki te na makanisi mpe na motema na ye moko. Ntoma Paulo akomi ete: “Atikaki kondima te,” to mpe “atyelaki elaka ya Nzambe ntembe te.” Abalayama “andimaki na motema mobimba ete Nzambe akoki kosala yango esili ye kolaka.” (Baloma 4:18-21) Asalaki boyokani makasi na Yehova mpe atyaki elikya makasi epai na Ye na boumeli ya bambula ebele. Abwakaki ntembe nyonso oyo ekokaki kobebisa boyokani yango.
Yo mpe okoki kosala ndenge moko soki “osimbi lolenge na maloba sembo”—soki ozali komileisa malamu na elimo. (2 Timote 1:13) Kosakana te na likama oyo ekoki kouta na ntembe. Satana azali kobundisa biso makasi na elimo na likambo yango. Soki ozali kopesa lisusu motuya mingi te na kolya bilei ya elimo na nzela ya boyekoli na yo moko ya Biblia mpe kokendaka na makita ya boklisto, ozali komitika yo moko ete Satana azwa yo. Salelá malamu ebele ya bilei ya elimo oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kokabela yo na ntango ebongi. (Matai 24:45) Landá ‘kondima maloba na sembo’ mpe zalá ntango nyonso moto oyo ‘akembi mpo na kondima.’ (1 Timote 6:3; Tito 2:2) Kotika te ete ntembe ebebisa kondima na yo.
[Bililingi na lokasa 21]
Omiyokaka ete ozali makasi na elimo?