Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/7 nk. 10-15
  • Tósala mosala ya kobuka mbuma na esengo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósala mosala ya kobuka mbuma na esengo!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Batindi bango na mosala ya kobuka mbuma
  • Nsango na biso ezali kopesa elikya
  • Bazali koluka mpe bazali kozwa
  • Tozalaka ntango nyonso na kimya na mosala ya kobuka mbuma
  • Mokano ya malamu mpo na babuki-mbuma
  • Tókoba kosepela na mosala ya kobuka mbuma
  • Tókangama na mosala ya kobuka mbuma!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bilanga eteli mpo na kobuka mbuma
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Mosala ya kosakola​​—“Bilanga . . . eteli mpo na bobuki mbuma”
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Omipesa mobimba na mosala monene ya kobuka mbuma
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/7 nk. 10-15

Tósala mosala ya kobuka mbuma na esengo!

“Mbuma na elanga iteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te. Bóbondela Nkolo na elanga ete atinda basali kati na elanga na mbuma na ye.”​—MATAI 9:37, 38.

1. Eloko nini esalisaka biso tókangama na kosala mokano ya Nzambe?

EZALA tozwi batisimo sika to tozwá batisimo banda kala, ntango tokanisaka lisusu mokolo yango tomonaka lokola nde ezalaki kaka lobi oyo euti koleka. Kosanzola Yehova ekómaki likambo ya liboso na bomoi na biso lokola bato oyo bamipesi na Nzambe. Na ntango tosombaki ntango mpo na kosalisa bato mosusu báyoka nsango ya Bokonzi mpe bákoka kondima yango, totyaki makanisi na biso nyonso na mosala ya esengo oyo tosalelaka Yehova. (Baefese 5:15, 16) Ata tii na moi ya lelo, tomonaka ete ntango elekaka nokinoki soki tozali kosala mosala to ‘tozali na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo.’ (1 Bakolinti 15:58, NW ) Atako tokutanaka na mikakatano, esengo oyo toyokaka ntango tozali kosala mokano ya Nzambe epesaka biso makasi ya kokoba mosala yango.​—Nehemia 8:10.

2. Makambo nini epesaka biso esengo na mosala na biso ya kobuka mbuma?

2 Biso baklisto tozali kosala mosala ya kobuka mbuma ya elilingi. Yesu Klisto akokanisaki mosala ya koyanganisa bato mpo bázwa bomoi ya seko na mosala ya kobuka mbuma. (Yoane 4:35-38) Lokola biso mpe tozali kosala mosala wana ya kobuka mbuma, soki totaleli esengo oyo baklisto ya liboso bazwaki kati na mosala ya kobuka mbuma, tokolendisama. Tokotalela makambo misato oyo ezali kopesa biso esengo na mosala ya kobuka mbuma lelo oyo. Ezali (1) nsango na biso ya elikya, (2) ntango tozali koluka bato tozali kozwa bango, mpe (3) kimya oyo tozalaka na yango na mosala ya biso ya kobuka mbuma.

Batindi bango na mosala ya kobuka mbuma

3. Likambo nini epesaki bayekoli ya liboso ya Yesu esengo?

3 Bomoi ya babuki mbuma ya liboso, mingimingi bayekoli 11 ya sembo, ebongwanaki na mobu 33 T.B., na mokolo oyo bakendaki na ngomba moko na Galilai mpo na kokutana na Yesu nsima ya lisekwa na ye! (Matai 28:16) Ekoki kozala ete “bandeko nkama mitano” bazalaki wana mokolo yango. (1 Bakolinti 15:16) Babosanaki te likambo oyo Yesu atindaki bango ete: “Bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya [elimo santu], kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso oyo esili ngai kolaka bino. Mpe talá, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka ya ekeke.” (Matai 28:19, 20) Atako bazalaki konyokola bango makasi, mosala ya kobuka mbuma ezalaki kaka kopesa bango esengo mingi ntango bamonaki masangá ya bayekoli ya Yesu ezali kosalema na bisika ebele. Nsima ya mwa ntango, ‘nsango malamu esakolamaki epai na bato nyonso na nse na Likoló.’​—Bakolose 1:23; Misala 1:8; 16:5.

4. Makambo ezalaki ndenge nini ntango bayekoli ya Klisto batindamaki?

4 Na ebandeli ya mosala na ye na Galilai, Yesu ayanganisaki bantoma na ye 12 mpe atindaki bango mpenzampenza mpo bákende kosakola ete: “Bokonzi na Likoló ezali kobɛlɛma.” (Matai 10:1-7) Ye moko ‘atambolaki na mboka minene mpe na mboka mike nyonso, wana ezalaki ye kolakisa na biyanganelo na bango mpe kosakola Nsango Malamu ya Bokonzi mpe kobikisa mpasi nyonso mpe maladi nyonso.’ Yesu ayokelaki ebele ya bato wana mawa mpo bazalaki bato “balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te.” (Matai 9:35, 36) Ayokaki mpasi na motema mpe ayebisaki bayekoli na ye ete: “Mbuma na elanga iteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te. Bóbondela Nkolo na elanga ete atinda basali kati na elanga na mbuma na ye.” (Matai 9:37, 38)Yesu amonaki na Galilai ete esengelaki basali bázala mingi, amonaki mpe bongo na Yudea. Na ntango wana atikalaki kaka na sanza motoba na mosala na ye awa na mabele. (Luka 10:2) Ezala na Galilai to na Yudea, atindaki bayekoli na ye básala mosala ya kobuka mbula.​—Matai 10:5; Luka 10:3.

Nsango na biso ezali kopesa elikya

5. Nsango oyo tosakolaka ezali nsango ya ndenge nini?

5 Lokola tozali kosalela Yehova lelo oyo, tozali kondima na esengo nyonso kosala mosala ya kobuka mbuma. Moko ya makambo oyo epesaka biso esengo mingi ezali ete tomemaka nsango ya elikya epai ya bato oyo balɛmbi mpe bazali konyokwama na makanisi. Tozali na libaku malamu ya kosakola nsango malamu ndenge bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso bazalaki na yango; ezali mpenza nsango oyo epesaka elikya, tozali komemela yango bato oyo “balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te”!

6. Mosala nini bantoma basalaki na ekeke ya liboso?

6 Ntoma Paulo azalaki kosakola nsango malamu na katikati ya ekeke ya liboso. Mpe mosala na ye ya kobuka mbuma ezalaki kotambola malamu, mpamba te ntango akomelaki baklisto ya Kolinti na mobu soki 55 T.B., alobaki boye: “Nazali kokanisela bino Nsango Malamu oyo esakolaki ngai bino, oyo mpe boyambaki yango, oyo mpe bozali kotɛlɛma likoló na yango.” (1 Bakolinti 15:1) Bantoma mpe baklisto mosusu ya ekeke ya liboso basalaki makasi na mosala ya kobuka mbuma. Atako Biblia eyebisi biso te soki bantoma boni bazalaki naino na bomoi na nsima ya makambo minene oyo ememaki tii na kobomama ya Yelusaleme na mobu 70, kasi toyebi ete ntoma Yoane alandaki naino koteya mbula soki 25 na nsima.​—Emoniseli 1:9.

7, 8. Nsango nini epesaka elikya, oyo basaleli ya Yehova bazali kosakola yango nokinoki koleka liboso?

7 Kasi na bikeke oyo elandaki, bakonzi ya mangomba ya boklisto ya mokili bakómaki bato minene, bango bazali mopɛngwi oyo Biblia ebengi “motyoli ya mibeko.” (2 Batesaloniki 2:3) Nzokande, na nsuka ya ekeke ya 19, baoyo balandaki ndakisa ya baklisto ya liboso bazwaki nsango oyo epesaka elikya, bazalaki kosakola nsango malamu. Kutu, kobanda na nimero na yango ya liboso oyo ebimaki na sanza ya Yuli 1879 (na Lingelesi) nkombo ya zulunalo oyo ezalaki mpe na maloba oyo “Momemi-nsango ya kozala ya Klisto,” “Momemi-nsango ya Bokonzi ya Klisto” to “Eyebisaka Bokonzi ya Yehova.”

8 Bokonzi ya Nzambe epesamaki na Yesu Klisto na 1914, mpe tozali sikoyo kosakola nsango oyo epesaka elikya mbangumbangu na ndenge oyo esalemaki naino liboso te. Mpo na nini? Mpamba te, na kati ya makambo kitoko oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala, moko na yango ezali ete etikali moke ekosukisa mokili oyo mabe. (Danyele 2:44) Ezali na nsango mosusu ya malamu koleka oyo? Mpe esengo nini mosusu tokoki kozala na yango koleka mosala ya kosakola nsango ya bokonzi liboso “bolɔzi monene” eya?​—Matai 24:21, NW; Malako 13:10.

Bazali koluka mpe bazali kozwa

9. Yesu ayebisaki bayekoli na ye nini, mpe ndenge nini bato bayambaki nsango ya Bokonzi?

9 Eloko mosusu oyo ezali kopesa biso esengo na mosala na biso ya kobuka mbuma ezali ete ntango tozali koluka bato, tozali mpe kozwa bango mpe bazali kokóma bayekoli mpe bazali kokɔta na mosala ya kobuka mbuma. Na mobu 31 mpe 32 T.B., Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Ekokóma bino na mboka monene nini to mboka moke nini, bóluka soko nani [abongi, NW].” (Matai 10:11) Bato nyonso te nde babongaki. Tolobi bongo mpo bato mosusu bazalaki koboya nsango ya Bokonzi. Atako bongo, bayekoli ya Yesu basakolaki nsango malamu na molende mpenza na bisika nyonso oyo bato bazalaki.

10. Ndenge nini Paulo akobaki koluka baoyo babongi?

10 Nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu, mosala ya koluka baoyo babongi ekobaki kosalema na molende. Paulo azalaki kosolola na Bayuda na kati ya biyanganelo na bango mpe azalaki kosolola na bato na bisika ya zando na engumba Atene. Ntango atatolaki na Ngomba na Ale oyo ezali kaka na Atene, engumba ya Bagrɛki, ‘mibali mosusu basanganaki na ye mpe bandimaki. Kati na bango Dionusi mosambisi na Ngomba na Ale, na mwasi moko, nkombo na ye Damali, na bamosusu na bango esika moko.’​—Misala 17:17, 34, NW; 20:20.

11. Na bambula eleká, nsango malamu ezalaki kosakolama ndenge nini?

11 Na nsuka ya ekeke ya 19, baklisto bapakolami basalaki na molende nyonso mosala ya koluka baoyo babongi. Lisolo moko oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bapakolami mpo na koteya,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ya sanza ya Yuli/Augusto 1881 (na Lingelesi) elobaki boye: “Kosakola nsango malamu . . . ezali kokoba ‘epai ya bato ya komikitisa,’ elingi koloba, epai ya baoyo balingi mpe bakoki koyoka mpo bákolisa nzoto ya Klisto na katikati na bango, baoyo bakozwa libula elongo na ye.” Babuki-mbuma ya Nzambe bazalaki mingimingi kokutana na bato ntango bazali kouta kosambela na bandako-nzambe mpe bazalaki kopesa bango batrakte oyo ezali na nsango oyo euti na Makomami mpe ebongisami mpo esala ete bato oyo babongi báyamba yango malamu. Nsima ya kotalela malamu soki ndenge wana ya kopesa litatoli ezalaki kobota mbuma malamu, Linɔngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 1903 (na Lingelesi) eyebisaki babuki-mbuma bákabolaka batrakte “ndako na ndako, na mikolo ya lomingo na ntɔngɔ.”

12. Tokoki kosala nini mpo ete mosala na biso ebota lisusu mbuma mingi koleka? Pesá ndakisa.

12 Na bambula oyo, tokómi kokutana na bato na bisika mosusu. Ndenge wana ya kosala eboti mbuma malamu, mingimingi na bamboka oyo nkita ya mboka mpe mimeseno ya bato ya kokende kozwa mopɛpɛ mosika na bandako na bango ezali kopesa biso nzela te ya kokuta bango na bantango oyo tomesaná kokende kotala bango. Na Angleterre, ntango Batatoli mibale bamonaki ete mbala na mbala bato bazalaki kozonga na bandako na bango na bisi nsima ya kozwa mwa mopɛpɛ na zɛlo ya libongo, bazwaki ekateli ya kokɔta na babisi mpo na kolakisa bato bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Na sanza moko, bakabolaki bazulunalo 229. Balobi boye: “Tobangaka te kokende kotatola na zɛlo ya libongo, na bisika ya mombongo, to ata na esika nini oyo tokoki komona ete ezali mwa mikakatano mpo toyebi ete Yehova azali na biso.” Bazwaki bato oyo bandimaki ete bákendaka kotikela bango bazulunalo mbala na mbala, babandaki koyekola Bibla na moto moko mpe bango mibale bakómaki babongisi-nzela basungi.

13. Na bisika mosusu, eloko nini esengeli kosalema mpo mosala na biso ebota lisusu mbuma malamu koleka?

13 Lokola mosala ya koluka bato oyo babongi ezali kokoba, na bisika mosusu, ezali kosɛnga kotalela lisusu malamu ndenge nini mosala na biso ezali kotambola. Atako Batatoli mingi bamesaná kokende kosakola ndako na ndako mikolo ya lomingo na ntɔngɔ, bakómi komona ete na bisika mosusu ezalaka malamu te kokende kotala bato na ntɔngɔntɔngɔ mpo na ntango wana bato bazali naino kopemisa nzoto. Batatoli mingi bakómaki kokende kotala bato na ntango mosusu, mbala mosusu nsima ya makita. Mpe yango ebotaki mbuma malamu. Na mbula oyo eleki, basakoli ya nsango malamu babakisamaki na mokili mobimba (2,3 %). Yango ezali kopesa Nkolo mosala ya kobuka mbuma lokumu mpe ezali kopesa biso esengo na motema.

Tozalaka ntango nyonso na kimya na mosala ya kobuka mbuma

14. Tosakolaka nsango na biso na elimo nini mpe mpo na nini?

14 Likambo mosusu oyo epesaka biso esengo ezali ete tozalaka bato ya kimya na kati ya mosala na biso ya kobuka mbuma. Yesu alobaki ete: “[Ekokɔta] bino na ndako, bópesa mbote wana. Soko mpe ndako ezali malamu, tiká ete kimya na bino efanda na yango. Nde soko ezali na malamu te, tiká ete kimya na bino [ezonga] epai na bino.” (Matai 10:12, 13) Ndenge oyo Baebele bazalaki kopesa mbote mpe liloba oyo basalelaki mpo na kobongola yango na Grɛki na kati ya Biblia elimboli ‘Zalá malamu.’ Yango ezali kolakisa biso elimo oyo tosengeli kozala na yango ntango tokendaka kosakola nsango malamu. Totyaka elikya ete bakondima nsango ya Bokonzi. Baoyo bandimaka yango, bakoki koyokana na Nzambe soki batiki masumu na bango, babongwani mpe basali mokano na ye. Na nsima, kimya oyo bakozala na yango elongo na Nzambe ekomema bango na bomoi ya seko.​—Yoane 17:3; Misala 3:19; 13:38, 48; 2 Bakolinti 5:18-20.

15. Tokoki kosala nini mpo tózalaka kaka na kimya ntango bayambi biso malamu te na mosala na biso ya kosakola?

15 Tokoki kosala nini mpo tózalaka kaka na kimya ntango bayambi biso malamu te? Yesu alobaki: “Soko ezali na malamu te, tiká ete kimya na bino [ezonga] epai na bino.” (Matai 10:13) Na kati ya lisolo oyo Luka alobeli ndenge Yesu atindaki bayekoli 70, ayebisi ete Yesu alobaki boye: “Soko mpe moto na kimya azali wana kimya na bino ekoumela na ye; soko bongo te, ekozonga na bino.” (Luka 10:6) Ntango tozali komemela bato nsango malamu, tosalaka yango na ndenge ya kosepelisa bango mpe na kimya. Soki moto aboyi, to soki asepeli te, to soki afingi biso, nsango na biso ya kimya ‘ezongaka epai na biso.’ Kasi nyonso wana ebungisaka kimya na biso te, oyo ezali mbuma ya elimo ya Nzambe.​—Bagalatia 5:22, 23.

Mokano ya malamu mpo na babuki-mbuma

16, 17. (a) Mokano na biso ezalaka nini ntango tosalaka bozongeli ya sika? (b) Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bazali na mituna mpo na mateya ya Biblia?

16 Biso babuki-mbuma, tozali na esengo ya kosangana na mosala ya kobenga bato mpo bázwa bomoi ya seko. Tozalaka mpenza na esengo mingi ntango moto oyo tozali koteya ye ayambi biso malamu, andimi koyekola makambo mingi lisusu, mpe akómi “moto ya kimya”! Ekoki kozala ete azali na mituna mingi ya kotuna likoló ya mateya ya Biblia mpe tokoki koyanola ye mituna wana nyonso na mbala moko te. Lokola ezali malamu te ete na mbala liboso tóumela mingi epai na ye, tokoki kosala nini? Tokoki kosala likambo oyo balendisaki biso na yango eleki sikoyo mbula soki 60.

17 “Batatoli nyonso basengeli komibongisa mpo na kotambwisa boyekoli malamu ya Biblia.” Maloba wana ezalaki na mwa buku ya misato mpo na boyekoli ya Biblia oyo ebimaki kobanda 1937 tii 1941; babengaki yango Étude modèle (Boyekoli ya ndakisa). Elobaki lisusu ete: “Basakoli nyonso [ya Bokonzi] basengeli kosala nyonso oyo ekoki mpo na kosalisa bato ya motema malamu oyo bazali kosepela na nsango ya Bokonzi. Esengeli kozongelaka kotala bato wana, koyanola na mituna na bango . . . , mpe na nsima kotambwisa boyekoli malamumalamu . . . kozanga kolekisa ntango.” Ya solo, ntango tosalaka bozongeli ya sika, mokano na biso ezalaka ya kobanda boyekoli ya Biblia mpe kosalaka yango mbala na mbala.a Soki tozali na boboto mpe na bolingo epai ya moto oyo asepeli, yango ekopusa biso tómibongisa malamu mpe tótambwisa boyekoli oyo ekobota mbuma ya malamu.

18. Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya sika bákóma bayekoli ya Yesu?

18 Na lisalisi ya buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko mpe mwa buku lokola Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?, tokoki kotambwisa boyekoli ya Biblia oyo ekoki kobota mbuma mpe tokoki kosalisa bato oyo basepeli mpo bákóma bayekoli. Ntango tozali koluka kolanda ndakisa ya Moteyi Monene, Yesu Klisto ndenge azalaki kosala, bayekoli wana ya Biblia mpe bakolanda ndakisa na biso ya kimya, ya esengo mpe ya bosembo na biso, mpe ndenge oyo totosaka mibeko ya Yehova. Ntango tozali koyanola na mituna oyo bato ya sika bazali kotuna biso, tósalaka mpe nyonso oyo ekoki mpo na koteya bango ndenge oyo bakoki kopesa biyano epai ya bato oyo batuni bango mituna. (2 Timote 2:1, 2; 1 Petelo 2:21) Tozali mpenza na esengo ete, na mbula oyo eleki, na mosala na biso ya kobuka mbuma ya elilingi, totambwisaki boyekoli ya Biblia 4 766 631 na bandako ya bato na mokili mobimba. Okozala na esengo mingi lisusu koleka soki yo moko mpenza osanganaki na mosala ya kobuka mbuma mpe otambwisaki boyekoli ya Biblia.

Tókoba kosepela na mosala ya kobuka mbuma

19. Mpo na nini bayekoli ya Yesu bazalaki na bantina ya kozala na esengo ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye awa na mabele mpe mwa moke na nsima?

19 Bayekoli ya Yesu bazalaki na bantina ya kozala na esengo na mosala ya kobuka mbuma ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye awa na mabele mpe mwa moke na nsima. Na ntango wana, bato mingi bandimaki nsango malamu. Esengo eyaki lisusu makasi na Pantekote ya mobu 33 T.B., mpo na bato 3 000 oyo bayokaki lisolo ya Petelo mpe basalelaki yango, bazwaki elimo santu ya Yehova, mpe bakɔtaki na libota ya Nzambe, Yisalaele ya elimo. Ya solo, bazalaki kaka kokóma mingi, mpe esengo ezalaki kobakisama mpo ‘mokolo na mokolo Yehova azalaki kobakisela bango baoyo bazalaki kobikisama.’​—Misala 2:37-41, 46, 47; Bagalatia 6:16; 1 Petelo 2:9.

20. Eleko nini epesaka biso esengo makasi na kati ya mosala na biso ya kosakola?

20 Na ntango wana, esakweli ya Yisaya ekokisamaki: “Ofulisi libota, obakisi esengo na yango; basepeli liboso na yo lokola na esengo na ntango ya kobuka, mpe lokola bato bakosepela wana ekokabola bango biloko bipunzami.” (Yisaya 9:3) Atako tozali komona ete ‘libota monene’ ya bapakolami esili kokoka, tozali na esengo mingi ntango tozali komona babuki-mbuma bazali kobakisama mbula na mbula.​—Nzembo 4:7; Zekaria 8:23; Yoane 10:16.

21. Tokolobela nini na lisolo elandi?

21 Ya solo mpenza tozali na bantina oyo ebongi mpenza ya kosepelaka ntango nyonso na mosala ya kobuka mbuma. Nsango na biso oyo epesaka elikya, mosala na biso ya koluka bato oyo babongi, mpe kimya oyo tozalaka na yango​—nyonso wana ezali komemela biso esengo na kati ya mosala na biso ya kobuka mbuma. Nzokande, bato mingi bazali kosepela na mosala na biso te. Ntoma Yoane mpe akutanaki na likambo yango. Batyaki ye na bolɔkɔ na esanga Patamo “mpo na Liloba ya Nzambe mpe mpo na litatoli na ntina na Yesu.” (Emoniseli 1:9) Na yango, ndenge nini tokoki kobatela esengo ata ntango bazali konyokola biso mpe kobundisa biso? Eloko nini ekosalisa biso tóyika mpiko liboso ya motema makasi ya bato mingi oyo tozali koteya? Lisolo oyo elandi ekosalisa biso mpo tózwa biyano oyo euti na Makomami na mituna yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liboso, boyekoli ezalaki kosalema na bisika oyo bituluku ya bato oyo basepeli bakokaki kosangana. Kasi, mwa moke na nsima, boyekoli ekómaki kosalema na moto mokomoko mpe na libota mobimba.​—Talá Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, lokasa 574, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okopesa eyano nini?

• Mosala ya kobuka mbuma ya elilingi ezali nini?

• Nsango ya ndenge nini tozali kosakola?

• Mpo na nini mosala na biso ya koluka bayekoli ebotaka mbuma?

• Ndenge nini tosalaka mpo na kobatela kimya na mosala ya kobuka mbuma?

• Mpo na nini tosepelaka ntango nyonso na mosala ya kobuka mbuma?

[Bililingi na lokasa 12]

Mosala ya kosakola na ekeke ya 1 mpe ya 20

[Bililingi na lokasa 13]

Ndenge moko na Paulo, babuki-mbuma bazali koluka bato bipai nyonso

[Elilingi na lokasa 13]

Sakolá nsango malamu na esengo na motema

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto