Mapamboli ya Yehova ekozwa yo?
“Mapamboli oyo nyonso ekoyela yo mpe ekozwa yo, mpamba te ozali kokoba koyoka mongongo ya Yehova Nzambe na yo.”—DETERONOME 28:2, NW.
1. Nini elingaki kokata soki Bayisalaele bakozwa mapamboli to bilakeli mabe?
NTANGO bakómaki na nsuka ya mobembo ya mpasi oyo eumelaki mbula 40 na kati ya mokili ekauki, Bayisalaele bapemaki na mokili patatalu ya Moaba. Bazalaki komona Mokili ya Ndaka liboso na bango. Na ntango wana nde Mose akomaki mokanda ya Deteronome, mokanda oyo elobeli makambo mingi; kati na makambo yango ebele ya mapamboli mpe bilakeli mabe. Soki bana ya Yisalaele ‘bakokoba koyoka mongongo ya Yehova,’ mapamboli “ekozwa” bango. Yehova alingaki bango lokola “libota na ye mpenza” mpe alingaki kosalela makasi na ye mpo na kobatela bango. Kasi, soki bakotika koyoka ye, bilakeli mabe ekozanga te kozwa bango.—Deteronome 8:10-14; 26:18; 28:2, 15, NW.
2. Baverbe ya Liebele oyo babongoli na “kokoba koyoka” mpe “kozwa” na Deteronome 28:2 elimboli nini?
2 Na Deteronome 28:2 (NW), verbe ya Liebele oyo ebongolami na “kokoba koyoka” ezali komonisa likambo oyo ezali na nsuka te. Basaleli ya Yehova basengeli te koyokaka ye kaka na mabaku mosusu; basengeli koyokaka ye bomoi na bango mobimba. Soki bazali kosala bongo nde mapamboli ya Nzambe ekozwa bango. Verbe ya Liebele oyo babongoli na “kozwa” ezali liloba oyo bazalaki kosalela na bokila, mingimingi mpo na kolobela “kokanga.”
3. Ndenge nini tokoki kozala lokola Yosua, mpe mpo na nini yango ezali na ntina mingi?
3 Yosua, mokambi ya bana ya Yisalaele aponaki koyoka Yehova mpe yango ememelaki ye mapamboli. Yosua alobaki boye: “Bópona lelo ye oyo bokosalela . . . Kasi mpo na ngai mpe ndako na ngai, biso tokosalela [Yehova].” Bato nyonso bayanolaki ete: “Biso tokoki kotika [Yehova] soko moke te mpo na kosalela banzambe mosusu.” (Yosua 24:15, 16) Lokola Yosua azalaki na makanisi malamu mingi, azalaki na kati ya mwa bato moke ya bambula na ye oyo bakɔtaki na Mokili ya Ndaka. Lelo oyo, etikali moke tókɔta na mokili oyo eleki mpenza Mokili ya Ndaka, elingi koloba paladiso oyo ekozala awa na mabele; kuna, bato nyonso oyo Nzambe azali kosepela na bango bakozwa mapamboli oyo ekoleka mapamboli oyo ezalaki na mikolo ya Yosua. Mapamboli yango ekozwa mpe yo? Ekozwa yo soki ozali kokoba koyoka Yehova. Mpo na kolendisa yo lisusu na ekateli na yo ya kokoba koyoka Yehova, talelá lisolo ya ekólo Yisalaele ya kala mpe bandakisa ya bato oyo ezali koteya biso.—Baloma 15:4.
Mapamboli to bilakeli mabe?
4. Nzambe apesaki Salomo eloko nini mpo na koyanola na libondeli na ye, mpe ndenge nini tosengeli kotalela mapamboli motindo wana?
4 Na boumeli ya bambula mingi ya boyangeli ya Salomo, Yehova apambolaki Bayisalaele na ndenge ya kokamwa. Bazalaki na kimya mpe bazalaki na ebele ya biloko kitoko. (1 Mikonzi 4:25) Salomo akómaki na bozwi oyo etiká nsango, atako asɛngaki Nzambe biloko ya mokili te. Kasi, ntango azalaki naino elenge mpe ayebaki naino makambo mingi te, abondelaki Nzambe apesa ye motema ya botosi; Nzambe ayokaki libondeli na ye, apesaki ye mayele mpe bososoli. Yango esalisaki Salomo asambisa bato malamu mpe ayebaki kososola mabe na malamu. Atako Nzambe apesaki ye bozwi mpe lokumu ntango azalaki naino elenge, na miso ya Salomo, bozwi ya elimo nde elekaki na motuya. (1 Mikonzi 3:9-13) Ata soki tozali na biloko mingi ya mokili to tozangi yango, tosengeli mpenza kozala na botɔndi soki Yehova azali kopambola biso mpe tozali na bozwi ya elimo!
5. Likambo nini ekómelaki bato ya Yisalaele mpe ya Yuda ntango batikaki koyoka Yehova?
5 Bayisalaele bazalaki na botɔndi te mpo na mapamboli ya Yehova. Lokola batikaki koyoka ye, bilakeli mabe oyo asakolaki ezwaki bango. Yango wana banguna balongaki bango mpe bamemaki bato ya Yisalaele mpe ya Yuda na boombo. (Deteronome 28:36; 2 Mikonzi 17:22, 23; 2 Ntango 36:17-20) Mpasi wana esalisaki basaleli ya Nzambe básosola ete mapamboli ya Nzambe ezwaka kaka baoyo bakobaka koyoka Yehova? Batikali kati na Bayuda oyo bazongaki na mboka na bango na mobu 537 L.T.B. bazalaki na libaku ya komonisa soki bazwaki ‘motema ya mayele’ mpe soki sikoyo bakangaki ntina ete basengeli kokoba koyoka Nzambe.—Nzembo 90:12.
6. (a) Mpo na nini Yehova atindaki Hagai mpe Zekalia mpo na kosakola epai na bato na ye? (b) Nsango ya Nzambe na nzela ya Hagai ezali komonisa likambo nini?
6 Bayuda oyo bazongaki batongaki etumbelo mpe babandaki kotonga lisusu tempelo na Yelusaleme. Kasi, ntango banguna na bango oyo balekaki bango na makasi batɛmɛlaki bango, molende na bango ekitaki mpe nsukansuka, batikaki mosala ya kotonga. (Ezela 3:1–3, 10; 4:1-4, 23, 24) Bakómaki kotya makambo ya bomoi na bango na esika ya liboso. Yango wana, Nzambe atindaki mosakoli Hagai mpe mosakoli Zekalia mpo na kolendisa bato bámonisa lisusu molende mpo na losambo ya solo. Na nzela ya Hagai, Yehova alobaki boye: “Ezali na ntango mpo na bino mpenza kofanda na ndako na kitoko na bino naino ndako oyo [ya losambo] elali mpamba? . . . Bóbanza na mitema na bino mpo na nzela na bino. Bosili kokona mingi nde bobuki bobele moke; bosili kolya nde botondi te . . . mpe ye oyo azwi lifuti, azwi lifuti mpo na kotya yango kati na libenga lipaswani nzela nzela.” (Hagai 1:4-6) Kobosana matomba ya elimo mpo na kolanda matomba ya mosuni ememaka mapamboli ya Yehova te.—Luka 12:15-21.
7. Mpo na nini Yehova alobaki na Bayuda ete: “Bóbanza na mitema na bino mpo na nzela na bino”?
7 Lokola bamipesaki mobimba na misala na bango moko, Bayuda babosanaki ete mbula mpe bileko ya kobota mbuma, oyo ezali mapamboli ya Nzambe, ekokaki kozwa bango kaka soki bakobaki kotosa Nzambe, ata ntango bazali kotɛmɛla bango. (Hagai 1:9-11) Yango wana, elendiseli oyo ebongaki mpenza ete: “Bóbanza na mitema na bino mpo na nzela na bino”! (Hagai 1:7) Yehova azalaki nde koloba na bango ete: ‘Bókanisa! Bósosola ete soki bozali kosala mosala ya mpunda na bilanga, ezali mpo ete ndako na ngai ya losambo elali mpamba.’ Nsukansuka, maloba oyo basakoli ya Yehova balobaki na kopemama na elimo na ye esimbaki mitema ya bato oyo bayokaki yango, mpamba te bazongelaki mosala ya kotonga tempelo, mpe basilisaki yango na mobu 515 L.T.B.
8. Na mikolo ya Malaki, Yehova alendisaki Bayuda na kosala nini, mpe mpo na nini?
8 Na nsima, na mikolo ya mosakoli Malaki, Bayuda bakómaki lisusu kotɛngatɛnga na elimo; kutu, bakómaki kopesa Nzambe bambeka ya mabe. (Malaki 1:6-8) Yango wana, Yehova ayebisaki bango ete bámema ndambo ya zomi ya mbuma ya mosala na bango na ebombelo na ye mpe bámeka ye mpo na kotala soki akofungolela bango maninisa ya likoló te mpe akosopela bango mapamboli te kino esika ekozanga mpo na yango. (Malaki 3:10) Bayuda bazalaki koboma nzoto mpamba mpo na biloko oyo Nzambe akokaki kosopela bango soki kaka bakobaki koyoka mongongo na ye!—2 Ntango 31:10.
9. Tokotalela bomoi ya bato nini misato oyo Biblia elobeli?
9 Longola lisolo ya ekólo Yisalaele, Biblia ezali mpe kolobela bomoi ya bato mingi oyo Yehova apambolaki bango mpo bakobaki koyoka ye mpe bato mosusu oyo alakelaki bango mabe mpo batikaki koyoka ye. Tótalela naino bomoi ya bato misato oyo: Boaza, Nabala mpe Hana mpe tóluka koyeba soki ekoki koteya biso nini. Mpo na yango, mbala mosusu ekozala malamu otánga mokanda mobimba ya Luta , na 1 Samwele 1:1—2:21 mpe 1 Samwele 25:2-42.
Boaza ayokaki Nzambe
10. Boaza mpe Nabala bakokanaki na makambo nini?
10 Atako Boaza na Nabala bazalaki na bomoi na eleko moko te, bakokanaki na mwa makambo mosusu. Na ndakisa, bango mibale bafandaki na mokili ya Yuda. Bazalaki bakóló-mabele mpe bazalaki na bozwi mingi. Bango mibale mpe bakutanaki na bato oyo bazalaki na bosɛnga, likambo oyo epesaki bango libaku ya komonisela bato yango boboto. Kasi kokokana na bango esuki kaka na makambo wana.
11. Ndenge nini Boaza amonisaki ete akobaki koyoka Yehova?
11 Boaza azalaki na bomoi na eleko ya basambisi na Yisalaele. Azalaki kopesa bato lokumu mpe basali na ye ya bilanga bazalaki na limemya mingi epai na ye. (Luta 2:4) Boaza azalaki kosala ndenge oyo Mibeko esɛngaki: azalaki kotika mbuma mosusu na elanga na ye mpo ete bato oyo bazalaki konyokwama mpe babola bálɔkɔtaka yango. (Levitike 19:9, 10) Boaza asalaki nini ntango ayokaki likambo ya Luta na Naomi mpe ntango amonaki molende ya Luta mpo na kolukela bokilo na ye oyo akómaki mobange mwa eloko ya kolya? Atyelaki Luta likebi mpenza mpe asɛngaki na bato na ye ya mosala bápekisa Luta te ete alɔkɔta mbuma oyo etikalaki na elanga na ye. Na maloba mpe misala na ye ya boboto, Boaza amonisaki ete azalaki kopesa motuya na makambo ya elimo mpe azalaki koyoka Yehova. Yango wana Nzambe asepelaki na ye mpe apambolaki ye.—Levitike 19:18; Luta 2:5-16.
12, 13. (a) Boaza asalaki nini mpo na komonisa ete azalaki kotosa mobeko ya Yehova oyo etali kosikola? (b) Mapamboli nini ya Nzambe ezwaki Boaza?
12 Likambo oyo emonisi mpenza ete Boaza akobaki koyoka Yehova ezali ndenge akokisaki mobeko ya Nzambe oyo etali kosikola; andimaki kosala yango atako akokaki kozwela yango litomba te. Lokola bazalaki bandeko, Boaza asalaki nyonso mpo ete libula ya Elimeleke, mobali ya Naomi oyo akufaki, etikala na libota ya Elimeleke. Ebongiseli ya “libala na mwasi ya ndeko” ezalaki kosɛnga ete mwasi oyo akufeli mobali abala ndeko ya moto oyo akufi mpo ete libula na ye etikala epai ya mwana mobali oyo bakobota. (Deteronome 25:5-10, NW; Levitike 25:47-49) Luta andimaki bábala ye na esika ya Naomi mpamba te Naomi alekaki bambula oyo mwasi akoki kobota. Lokola ndeko moko ya pembeni na libota ya Elimeleke aboyaki kosalisa Naomi, Boaza abalaki Luta. Bato batalelaki Obede, mwana oyo Boaza abotaki na Luta, lokola mwana ya Naomi mpe lokola moto oyo abongaki kozwa libula ya Elimeleke.—Luta 2:19, 20; 4:1, 6, 9, 13-16.
13 Lokola Boaza azalaki kotosa mibeko ya Nzambe kozanga ete aluka litomba, mapamboli mingi ezwaki ye. Boaza na Luta bazwaki libaku malamu ya kozala bankɔkɔ ya Yesu Klisto oyo abimaki na molɔngɔ ya bakitani ya mwana na bango Obede. (Luta 2:12; 4:13, 21, 22; Matai 1:1, 5, 6) Makambo oyo Boaza azalaki kosala, kozanga ete aluka kozwela yango litomba, ezali koteya biso ete mapamboli ezwaka baoyo balingaka basusu mpe balandaka masɛngami ya Nzambe.
Nabala ayokaki te
14. Nabala azalaki moto ya ndenge nini?
14 Nabala asalaki lokola Boaza te, ye ayokaki Yehova te. Abukaki mobeko ya Nzambe oyo elobi ete: “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza.” (Levitike 19:18) Nabala azalaki kotyela makambo ya elimo likebi te; azalaki “moto ya nkanda mpe ya makambo mabe.” Ata basali na ye moko bazalaki komona ye “moto mpamba.” Nkombo Nabala, oyo elimboli “azangi mayele” to “zoba,” ebongaki na ye mpenza. (1 Samwele 25:3, 17, 25) Nabala asalaki nini ntango azwaki libaku ya kosalela Davidi, mopakolami ya Yehova, boboto?—1 Samwele 16:13.
15. Nabala alakisaki ezaleli nini liboso ya Davidi, mpe ndenge nini, na likambo yango, Abigaili mwasi ya Nabala, akesanaki na mobali na ye?
15 Ntango bafandaki pembeni ya esika oyo bibwele ya Nabala ezalaki, Davidi na bato na ye babatelaki bibwele yango na mabɔkɔ ya miyibi oyo bazalaki kokɔtela bango; kasi, basɛngaki te ete báfuta bango. Moko ya babateli ya mpate ya Nabala alobaki ete: “Bazalaki babateli na biso butu na moi.” Kasi, ntango Davidi atindaki bato kosɛnga ye biloko ya kolya, Nabala “atombwelaki bango mongongo na ye” mpe azongisaki bango mabɔkɔ mpamba. (1 Samwele 25:2-16) Abigaili, mwasi ya Nabala abongisaki biloko nokinoki mpe akendaki kotikela Davidi. Davidi asilikaki makasi, mpe etikalaki moke akende koboma Nabala na bato na ye nyonso. Abigaili abikisaki bomoi ya bato ebele na likambo oyo asalaki mpe epekisaki Davidi azwa nyongo ya makila te. Kasi lokoso mpe makambo makasi ya Nabala elekaki. Soki mikolo zomi na nsima, “Yehova abɛtaki Nabala mpe akufaki.”—1 Samwele 25:18-38.
16. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Boaza mpe koboya makambo ya Nabala?
16 Nabala akesanaki mpenza na Boaza! Tosengeli koboya makambo makasi mpe moimi ya Nabala, kasi tosengeli mpe kolanda boboto mpe bokabi ya Boaza. (Baebele 13:16) Tokoki kosala yango soki tozali kolanda toli ya ntoma Paulo ete: “Soko tozwi nzela, tósalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai na bango bazali bandimi.” (Bagalatia 6:10) Lelo oyo, “bampate mosusu” ya Yesu, elingi koloba baklisto oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele, bazali na libaku ya kosala malamu epai ya bapakolami ya Yehova, elingi koloba batikali kati na ba 144 000 oyo bakozwa bomoi oyo ekoki kokufa te na likoló. (Yoane 10:16; 1 Bakolinti 15:50-53; Emoniseli 14:1, 4) Yesu amonaka lokola nde misala wana ya bolingo bazali kosala yango epai na ye, mpe baoyo basalaka yango bazwaka mapamboli ya Yehova.—Matai 25:34-40; 1 Yoane 3:18.
Komekama ya Hana mpe mapamboli oyo azwaki
17. Hana akutanaki na komekama nini, mpe amonisaki ezaleli nini?
17 Mapamboli ya Yehova ezwaki mpe mwasi moko ya kondima, nkombo na ye Hana. Mwasi yango azalaki kofanda na etúká ya bangomba-ngomba ya Efalaima na mobali na ye Elekana, oyo azalaki Molevi. Lokola Mibeko epesaki yango nzela mpe emonisaki ndenge ya kosalela yango, mobali yango azalaki na mwasi mosusu nkombo na ye Penina. Hana azalaki ekomba, likambo ya nsɔni mpo na mwasi na Yisalaele; nzokande Penina abotaki bana ebele. (1 Samwele 1:1-3; 1 Ntango 6:16, 33, 34) Kasi, na esika abɔndisaka Hana, Penina azalaki kosalela Hana makambo oyo ezalaki kosilikisa ye mpe akómaki kolela mpe azalaki lisusu na mposa ya kolya te. Azalaki kozongela likambo mabe wana ‘mbula na mbula,’ mbala nyonso oyo libota mobimba bazalaki kokende na ndako ya Yehova na Silo. (1 Samwele 1:4-8) Penina azalaki na boboto ata moke te, mpe yango ezalaki mpenza komekama mpo na Hana! Kasi, ata mbala moko te Hana apesaki Yehova foti; azalaki mpe kotikala te ntango mobali na ye azalaki kokende na Silo. Yango wana, nsukansuka, lipamboli moko monene ezwaki ye.
18. Hana apesaki ndakisa nini?
18 Hana azali ndakisa malamu mpo na basaleli ya Yehova lelo, mingimingi mpo na baoyo, maloba mabe ya bato mosusu ezokisaki bango. Na makambo ya ndenge wana, komitangola ebongisaka eloko te. (Masese 18:1) Hana atikaki te ete komekama na ye ekitisa ye mposa ya kozala na esika oyo bazalaki koteya Liloba ya Nzambe mpe basaleli ya Nzambe bazalaki koyangana mpo na kosambela. Yango wana azalaki ntango nyonso makasi na elimo. Libondeli na ye oyo ezali na 1 Samwele 2:1-10 ezali komonisa ete azalaki mwasi oyo alingaki mpenza makambo ya elimo.a
19. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na makambo ya elimo?
19 Lelo oyo, biso basaleli ya Yehova tosambelaka ye na hema te. Atako bongo, tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na makambo ya elimo, ndenge Hana asalaki. Na ndakisa, tokoki komonisa ete tosepelaka mpenza na bozwi ya elimo soki tozali na momeseno ya koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita ya lisangá mpe kozangisa te kokende na mayangani. Na mabaku yango, tólendisanaka na losambo ya solo ya Yehova, oyo apesi biso libaku malamu ya “kosalela ye na kobanga te na pɛto mpe na boyengebene.”—Luka 1:74, 75; Baebele 10:24, 25.
20, 21. Hana azwaki mbano nini mpo na komipesa na ye epai ya Nzambe?
20 Yehova amonaki komipesa ya Hana mpe apesaki ye mbano monene. Na mbala mosusu oyo bakendaki na Silo, Hana akendaki kobondela makasi—na mpisoli na miso—liboso ya Nzambe mpe alakaki ye ete: “[Yehova] na bibele, soko okotala nsɔni na ngai, moombo na yo, mpe soko okokanisa ngai mpe okobosana moombo na yo te nde okopesa moombo na yo mwana mobali, ngai nakopesa ye epai na [Yehova] mikolo nyonso ya bomoi na ye.” (1 Samwele 1:9-11) Nzambe ayokaki kolela ya Hana mpe apesaki ye mwana mobali oyo apesaki nkombo Samwele. Ntango Samwele atikaki komɛla mabɛlɛ, Hana akendaki kotika ye na Silo mpo na kosala na hema ya Nzambe.—1 Samwele 1:20, 24-28.
21 Hana amonisaki ete alingaka Nzambe mpe akokisaki ndai na ye mpo na Samwele. Kanisá mapamboli oyo ye na Elekana bazwaki lokola mwana na bango azalaki kosala na hema ya Yehova! Baboti mingi oyo bazali baklisto bazali mpe kosepela mpe bazali kozwa mapamboli ndenge yango mpamba te bana na bango bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela, bazali kosala na Betele to na misala mosusu oyo ezali kokumisa Yehova.
Kobá koyoka Yehova!
22, 23. (a) Elikya nini tokoki kozala na yango soki tozali kokoba koyoka mongongo ya Yehova? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
22 Tokoki kozala na elikya nini soki tozali kokoba koyoka Yehova? Soki tozali komonisa ete tolingaka Nzambe na molimo na biso mobimba mpe tozali komonisa na bomoi na biso ete tozali basaleli na ye oyo bamipesi, tokozala bazwi na elimo. Ata soki tokomekama makasi mpo tozali kosala makambo wana, mapamboli ya Yehova ekozwa biso. Kutu, mbala mingi na ndenge oyo tokanisaki te.—Nzembo 37:4; Baebele 6:10.
23 Basaleli ya Nzambe bakozwa mapamboli mingi na mikolo ezali koya. “Ebele monene” bakobatelama na “bolɔzi monene” mpe bakoyoka bisengo ya bomoi na mokili ya sika mpo bazali koyoka Yehova mpe bazali kotosa ye. (Emoniseli 7:9-14; 2 Petelo 3:13) Kuna, Yehova akokokisa bamposa ya sembo ya bato na ye nyonso. (Nzembo 145:16) Kasi, lokola lisolo oyo elandi ekomonisa yango, ata na moi ya lelo, baoyo bazali kokoba koyoka mongongo ya Yehova bazali kozwa ‘makabo ya malamu mpe makabo oyo ebongi, oyo ezali kokita na nse.’—Yakobo 1:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya Hana ekokani mwa moke na maloba ya ngɔndɔ Malia, maloba oyo alobaki ntango bayebisaki ye ete akozala mama ya Masiya.—Luka 1:46-55.
Ozali koyeba lisusu?
• Lisolo ya Yisalaele ezali koteya biso nini mpo na mapamboli ya Nzambe?
• Boaza na Nabala bakeseni na makambo nini?
• Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Hana?
• Mpo na nini tosengeli kokoba koyoka mongongo ya Yehova?
[Elilingi na lokasa 10]
Mokonzi Salomo abondelaki mpo na kosɛnga motema ya botosi, mpe Yehova apesaki ye bwanya
[Elilingi na lokasa 12]
Boaza azalaki moto ya limemya mpe ya boboto
[Elilingi na lokasa 15]
Hana azwaki lipamboli monene mpo atyelaki Yehova motema