Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/10 nk. 13-18
  • Ndenge nini bokoki kosalisa mwana “ya kilikili”?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini bokoki kosalisa mwana “ya kilikili”?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bana mosusu batikaka lisangá
  • Bópusana penepene ya Nzambe
  • Bózalaka na motema molai, kasi bózongaka nsima te
  • Ntango mwana oyo azali na mabɔkɔ ya baboti abimisami na lisangá
  • Lisalisi oyo bandeko mosusu bakoki kopesa
  • Bólɛmba te
  • “Yehova, Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Baboti mpe bana: Bótyaka Nzambe na esika ya liboso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/10 nk. 13-18

Ndenge nini bokoki kosalisa mwana “ya kilikili”?

“Tosengeli . . . kosepela mpo . . . abungaki, kasi amonani lisusu!”​—LUKA 15:32, Boyokani ya Sika.

1, 2. (a) Bilenge mosusu basalaka nini atako bayekolaki mateya ya solo? (b) Baboti mpe bana oyo bakutani na likambo ya ndenge wana bakoki komiyoka ndenge nini?

“BANDA lelo, natiki kosambela Yehova!” Maloba ya boye ezalaka lokola nkake na matoi ya baboti oyo babangaka Nzambe oyo basalaki makasi mpo na kobɔkɔla mwana na bango na nzela ya solo! Bilenge mosusu, atako balobaka polele te ete batiki kosambela Yehova, kasi ‘bapɛngwaka na nzela.’ (Baebele 2:1) Mingi kati na bilenge yango bakokani na mwana ya kilikili oyo Yesu alobelaki na lisese na ye, mwana oyo atikaki ndako ya tata na ye mpe akendaki kosakana na biloko na ye nyonso na mboka mosika.​—Luka 15:11-16.

2 Atako Batatoli ya Yehova mingi oyo bazali na bana bakutanaka na mokakatano yango te, mpo na baoyo bakutanaka na yango, ezali na maloba ya kobɔndisa te oyo ekoki kosilisa mpasi nyonso oyo bayokaka na motema. Tóbosana te ete elenge oyo akómi motomboki ye moko mpe akoki kokutana na mikakatano. Na nse ya motema na ye, lisosoli na ye ekoki kotungisa ye. Na lisese ya Yesu, nsukansuka, mwana ya kilikili “akanisaki na motema” na ye mpe likambo yango esepelisaki tata na ye. Ndenge nini baboti mpe bandeko mosusu na lisangá bakoki kosalisa bana ya kilikili ‘bákanisa na mitema na bango’?​—Luka 15:17.

Mpo na nini bana mosusu batikaka lisangá

3. Yebisá mwa bantina mosusu oyo esalaka ete bilenge bátika lisangá ya boklisto.

3 Ebele ya bilenge bazali kosalela Yehova na esengo na kati ya lisangá ya boklisto. Kasi, mpo na nini bilenge mosusu batikaka lisangá? Ntango mosusu bakanisaka ete bazali kozanga likambo moko ya malonga na mokili. (2 Timote 4:10) Bilenge mosusu bakoki komona ete kozala na kati ya etonga ya Yehova, esika oyo bazali kobatelama, ezali nkaka mpo na bango. Bantina mosusu ezali lokola oyo: kozala na lisosoli oyo ezali kotungisama mpo na mabe moko oyo basalaki, ntango mosusu elenge mwasi akómi na mposa ya mibali to elenge mobali akómi na mposa ya basi, elenge mosusu mpe akoki kotika lisangá mpo alingi kosala makambo oyo ekosepelisa baninga na ye mpo bándima ye. Elenge mosusu mpe akoki kotika kosalela Nzambe mpo azali komona baboti na ye to moklisto mosusu ete azali kosambela na liso na nse ya lokasa.

4. Mbala mingi, nini ezalaka likambo mpenzampenza oyo esalaka ete bana bápɛngwa na nzela?

4 Soki mwana akómi motomboki, mingimingi ezalaka elembo ete alɛmbi na elimo; likambo yango emonisaka nini mpenza ezali na motema na ye. (Masese 15:13; Matai 12:34) Ata soki ntina nini oyo ememi elenge moko apɛngwa na nzela, mbala mingi likambo mpenzampenza ezalaka ete azwaki ‘boyebi mpenza ya solo’ te. (2 Timote 3:7, NW) Bilenge basengeli te kosambela Yehova kaka mpo na kosambela; ezali na ntina mingi ete bákóma mpenza baninga na Yehova. Nini ekosalisa bango?

Bópusana penepene ya Nzambe

5. Likambo nini ezali na ntina mpo elenge akóma moninga ya Nzambe?

5 Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bópusana penepene ya Nzambe mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8, NW) Mpo na yango, esengeli kosalisa elenge alona mposa ya Liloba ya Nzambe. (Nzembo 34:8) Ya solo, akobanda naino na komɛla “mabɛlɛ,” elingi koloba akoyekola naino mateya ya ebandeli na Biblia. Kasi, soki akómi kosepela na Liloba ya Nzambe mpe akómi na mposa ya kolya “bilei makasi” elingi koloba makambo mozindo ya elimo, akoumela te na kokɔmela na elimo. (Baebele 5:11-14; Nzembo 1:2) Elenge moko oyo alobaki ete amipesaki mpenza na makambo ya mokili, akómaki lisusu kosepela na makambo ya elimo. Nini esalisaki ye azonga na nzela? Lokola balendisaki ye ete atánga Biblia mobimba, asalelaki yango programɛ mpe atosaki yango. Ndakisa oyo emonisi ete kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo ezali na ntina mingi mpo na kokóma moninga mpenza ya Yehova.

6, 7. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bákóma kolinga mingi Liloba ya Nzambe?

6 Ezali na ntina mpenza ete baboti básalisa bana na bango bákóma kolinga mingi Liloba ya Nzambe! Atako na ndako bazalaki koyekola pɔsɔ na pɔsɔ, elenge mwasi moko akómaki na baninga oyo bazalaki bana ya mobulu. Ayebisi biso ezaleli akómaki na yango ntango bazalaki koyekola na libota: “Soki Tata atuni motuna, nazalaki kaka kotánga eyano, nazalaki ata kotala ye na elongi te.” Baboti ya mayele basukaka kaka te na kotalela na libota makambo oyo ezali na mokanda, basalelaka mayele ya koteya. (2 Timote 4:2, NW) Mpo elenge asepela na boyekoli, asengeli koyoka ete boyekoli yango etaleli mpe ye mpe azali kosangana na yango. Ezali malamu kotuna mituna oyo esɛngaka ete moto apesa makanisi na ye mpe kotika ye aloba. Bólendisa elenge ete aloba ndenge ya kosalela makambo oyo bozali koyekola.a

7 Longola yango, bósala ete boyekoli ya Makomami epesa moto mposa ya kolala te. Soki likoki ezali, bóbongisa lisano oyo bana bakosala na esika ya bato oyo balobeli na masolo ya Biblia. Bósalisa bango bámona esika nini makambo oyo bazali kolobela esalemaki mpe ndenge mokili yango ezalaki. Soki bozali na bakarte ya bamboka wana, ekoki kosalisa bino. Ya solo, soki bokanisi mwa moke, bokoki kozwa makanisi ya sika mpo ete boyekoli ya libota ezala na mɔ́tɔ mpe etikalaka kaka ndenge moko te, kasi ebongwanaka. Baboti basengeli mpe kotalelaka boyokani na bango moko na Yehova. Ntango bango moko bazali kopusana penepene ya Yehova, bakosalisa bana na bango bálanda lokolo na bango.​—Deteronome 6:5-7.

8. Ndenge nini libondeli esalisaka moto apusana penepene ya Nzambe?

8 Libondeli mpe esalisaka moto apusana penepene ya Nzambe. Elenge mwasi moko ya mbula soki 13 to 15 akómaki na mitema mibale: epai mosusu mposa ya kolanda nzela ya boklisto; epai mosusu, mposa ya kolanda baninga ya mokili. (Yakobo 4:4) Asalaki nini? Alobi ete: “Mpo na mbala ya liboso mpenza nabondelaki Yehova mpe nayebisaki ye likambo oyo ezalaki kotungisa ngai.” Amonaki ete Yehova ayokaki libondeli na ye ntango azwaki moninga moko na kati ya lisangá oyo akokaki koyebisa ye makambo na ye. Lokola amonaki ete Yehova azalaki kotambwisa ye, akómaki kosala makasi akóma moninga ya Nzambe. Baboti bakoki kosalisa bana na bango soki bazali kosala makasi ete mabondeli na bango ezalaka ya mozindo. Ntango bazali kobondela na libota, baboti bakoki koyebisa Nzambe mitungisi mpe mabanzo na bango mpo bana bámona ete baboti na bango bazali mpenza baninga na Yehova.

Bózalaka na motema molai, kasi bózongaka nsima te

9, 10. Yehova apesaki ndakisa nini na ndenge azalaki na motema molai epai ya Bayisalaele, bato ya matoi mangbongi?

9 Ntango elenge moko abandi kopɛngwa, akoki komitangola mpe kokima baboti na ye ntango bazali koluka kosolola na ye makambo ya elimo. Baboti bakosala nini na ntango wana? Tótalela oyo Yehova asalaki na Yisalaele ya kala. Bayisalaele bazalaki “bato ya mitó makasi,” kasi Yehova ayikelaki bango mpiko na boumeli ya mbula 900, liboso atika bango bálanda nzela oyo bamonaki malamu. (Exode 34:9; 2 Ntango 36:17-21; Baloma 10:21) Atako mbala na mbala bazalaki ‘komeka ye,’ Yehova “atondaki na mawa” mpo na bango. “Mbala mingi abombaki nkele na ye mpe alingaki ete nkanda na ye ebima nyonso te.” (Nzembo 78:38-42) Nzambe asalaki bango ata mabe moko te. Baboti ya bolingo balandaka ndakisa ya Yehova mpe bazalaka na motema molai ntango bana na bango bazali koyoka mbala moko te, atako bazali kosala milende mpo na kosalisa bango.

10 Kozala na motema molai elimboli te “kokanga motema ntango molai”; elimboli kozala kaka na elikya ete boyokani oyo ebebi ekoki kobonga. Yehova apesaki ndakisa ya motema molai. Ye nde azalaki koluka Bayisalaele na ndenge azalaki kotindela bango bantoma na ye “lisusu mpe lisusu.” Yehova “ayokelaki bato na ye . . . mawa,” atako “bazalaki kosɛka bantoma ya Nzambe mpe kotyola maloba na ye.” (2 Ntango 36:15, 16) Abondelaki Bayisalaele ete: “[Bóbongwana] moto na moto longwa na nzela na ye mabe.” (Yilimia 25:4, 5) Kasi, Yehova abongolaki mitinda na ye ya sembo te. Bayebisaki Bayisalaele ‘bábongwana’ epai ya Nzambe mpe na banzela na ye.

11. Ndenge nini baboti bakoki komonisa motema molai epai ya mwana oyo abandi kotɛngama atako bakozonga nsima te?

11 Baboti bakoki kolanda motema molai ya Yehova; soki mwana moko abandi kotɛngama, basengeli mbala moko kotika ye te. Basengeli kobungisa elikya te, basengeli kokende epai ya mwana, kosolola na ye ntango nyonso to kozongela kosolola na ye. Atako bakobatela mitinda ya sembo, kasi bakoki “lisusu mpe lisusu” kobenda mwana azonga na nzela ya solo.

Ntango mwana oyo azali na mabɔkɔ ya baboti abimisami na lisangá

12. Baboti bazali na mokumba nini soki mwana oyo azali na mabɔkɔ na bango abimisami na lisangá?

12 Baboti basengeli kosala nini ntango mwana oyo azali na mabɔkɔ na bango asali lisumu monene mpe lokola abongoli motema te, abimisami na lisangá? Lokola mwana yango azali na mabɔkɔ ya baboti, bazali kaka na mokumba ya koteya ye mpe kopamela ye ndenge Liloba ya Nzambe ezali kosɛnga. Bakoki kosala yango ndenge nini?​—Masese 6:20-22; 29:17.

13. Baboti bakoki kosala nini mpo na kosimba motema ya mwana na bango oyo apɛngwi na nzela?

13 Bakoki, to tóloba mpenza ete ekozala malamu báteyaka ye mpe básembolaka ye na boyekoli ya Biblia oyo bakosala na ye moko, kasi esika moko na bana mosusu te. Moboti asengeli koluka koyeba mpo na nini mwana akómi motó makasi mpe koluka koyeba makanisi nini ezali na motema na ye. Maladi na ye ya elimo ezali mpenza nini? (Masese 20:5) Akómi mpenza motema libanga to likoki ezali naino ya kosimba motema na ye? Bavɛrsɛ nini ya Biblia ekoki kosalisa ye? Ntoma Paulo alobaki ete: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ezali na mopɔtu koleka mipanga nyonso mipeli bipai mibale. Ezali kotɔbɔla kino [kokabola elimo na molimo, NW] matɔngi mpe lilɔngɔ; ezali komeka makanisi mpe mikano ya motema.” (Baebele 4:12) Baboti bakoki mpenza kosalisa mwana na esika básuka kaka na koyebisa ye ete azongela lisusu makambo ya mabe te. Bakoki kosalisa mwana abongola motema mpe mokemoke azonga na nzela.

14. Mwana oyo alandi nzela ya mabe asengeli libosoliboso kosala nini mpo na kozongisa boyokani na ye na Yehova, mpe ndenge nini baboti bakoki kosalisa ye na kosala yango?

14 Elenge oyo apɛngwi na nzela asengeli naino kozongisa boyokani na ye na Yehova. Likambo ya liboso oyo asengeli kosala ezali ya ‘kobongola motema mpe kobaluka.’ (Misala 3:19, NW; Yisaya 55:6, 7) Ntango baboti balingi kosalisa mwana oyo azali naino na mabɔkɔ na bango abongola motema, basengeli ‘kokanga motema, kopamela na bopɔlɔ’ mwana oyo azali na makanisi malamu te. (2 Timote 2:24-26, NW) Basengeli ‘kopamela’ ye na ndenge oyo Biblia ezali kosɛnga. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kopamela’ ekoki mpe kobongolama na “komonisa makambo oyo ekondimisa.” (Emoniseli 3:19; Yoane 16:8) Yango wana, kopamela esɛngi komonisa mwana makambo oyo ekondimisa ye ete azali kosala lisumu. Ya solo, kosala yango ezali likambo moke te. Soki likoki ezali, baboti bakoki kosimba motema ya mwana, bakoki kosalela mayele nyonso oyo Makomami endimi mpo na kolonga ye. Basengeli komeka kosalisa ye asosola mpo na nini asengeli ‘koyina oyo ezali mabe mpe kolinga malamu.’ (Amosa 5:15) Akoki ‘kozonga na nzela, kolongwa na motambo ya Zabolo.’

15. Libondeli ezali na ntina nini mpo ete moto oyo apɛngwi na nzela azongela boyokani malamu na Yehova?

15 Mpo na kozongisa boyokani na Yehova, libondeli ezali na ntina mingi. Toyebi ete moto moko te asengeli ‘kolɔmba’ mpo na moto mosusu oyo azalaki na lisangá, oyo azali kosala na nko lisumu monene oyo ezali komonana polele. (1 Yoane 5:16, 17; Yilimia 7:16-20; Baebele 10:26, 27) Kasi, baboti bakoki kosɛnga Yehova apesa bango mayele mpo báyeba oyo bakoki kosala na likambo ya mwana na bango. (Yakobo 1:5) Soki mwana oyo abimisami na lisangá azali komonisa na etamboli na ye ete abongoli motema kasi azali kokoka te “koloba polele epai ya Nzambe,” baboti bakoki kobondela Nzambe ete soki amoni ete akoki kolimbisa libunga ya mwana, tiká ete mokano na Ye esalema. (1 Yoane 3:21, NW) Ntango elenge yango azali koyoka mabondeli wana ekosalisa ye amona ete Yehova azali Nzambe oyo alimbisaka.b​—Exode 34:6, 7; Yakobo 5:16.

16. Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya libota ya elenge oyo abimisami na lisangá?

16 Soki elenge oyo azwá batisimo abimisami na lisangá, bandeko mosusu basengeli kotika ‘kosangana’ na ye. (1 Bakolinti 5:11; 2 Yoane 10, 11) Yango ekoki kosalisa ye ‘akanisa na motema’ na ye mpe azonga na etonga ya Nzambe, esika ya libateli. (Luka 15:17) Kasi, azonga, azonga te, bandeko na lisangá bakoki kolendisa bato ya libota ya elenge oyo abimisami na lisangá. Biso nyonso tokoki koluka ndenge oyo tokoki komonisa “boboto mpo na bandeko” mpe “kozala na mitema mawa” na libota yango.​—1 Petelo 3: 8, 9, NW.

Lisalisi oyo bandeko mosusu bakoki kopesa

17. Likambo nini bandeko na lisangá basengeli kobosana te ntango bazali koluka kosalisa elenge oyo azali kopɛngwa?

17 Tokoloba boni mpo na elenge oyo abimisami na lisangá te kasi alɛmbi na elimo? Ntoma Paulo akomaki ete: “Soko elembo moko ekozwa mpasi, bilembo nyonso ikoyoka mpasi elongo [na ye].” (1 Bakolinti 12:26) Bandeko mosusu bakoki kopusana pembeni na ye, koluka koyeba mokakatano na ye mpe kosalisa ye. Kasi, esengeli kokeba, mpamba te elenge oyo azali na maladi ya elimo akoki kobebisa bilenge mosusu. (Bagalatia 5:7-9) Na lisangá moko, mikóló bazwaki likanisi malamu ya kosalisa bilenge mosusu oyo balɛmbaki na elimo; yango wana, bakómaki kobenga bango na bokutani mpo na kolekisa ntango elongo mpe koyoka miziki. Atako bilenge yango bandimaki mpe bazalaki kosepela na ntango oyo bazalaki kolekisa elongo, kasi lokola bilenge mingi oyo balɛmbaki bakómaki kokutana na bisika yango, babebisanaki malamumalamu mpe nsukansuka batikaki lisangá. (1 Bakolinti 15:33; Yuda 22, 23) Eloko ekoki kosalisa mwana oyo azali na maladi ya elimo, ezali te bokutani mpo na kolekisa ntango elongo, kasi bokutani oyo ekosalisa ye alona mposa ya makambo ya elimo.c

18. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya tata ya mwana ya kilikili ya lisese ya Yesu?

18 Tókanisa ndenge oyo elenge akomiyoka soki atikaki lisangá, bongo mokolo mosusu ayei lisusu na Ndako ya Bokonzi to ayei na liyangani moko. Omoni te ete tosengeli komonisela ye elimo ya tata ya mwana ya kilikili oyo Yesu alobelaki na lisese na ye? (Luka 15:18-20, 25-32) Elenge moko oyo atikaki lisangá, bongo mokolo mosusu, akendaki na liyangani moko ya etúká alobaki boye: “Nakanisaki ete moto lokola ngai, bandeko nyonso bakolinga ata kobwakela ngai liso te, kasi bandeko mibali mpe basi bazalaki koya mpe koloba na ngai ete basepeli komona ngai. Likambo yango esimbaki mpenza motema na ngai.” Azongelaki koyekola Biblia mpe nsukansuka azwaki batisimo.

Bólɛmba te

19, 20. Mpo na nini tosengeli kolɛmba nzoto te mpo na mwana ya kilikili?

19 Mpo na kosalisa mwana “ya kilikili” ete ‘akanisa lisusu na motema’ na ye esɛngaka motema molai mpe ekoki kozala etumba mpo na baboti mpe bato mosusu. Kasi bólɛmba te. “Nkolo akoumela nsima na elaka na ye te, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela. Kasi azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9) Makomami elobi na biso ete Yehova alingi ete bato bábongwana mpe bázala na bomoi. Kutu, abongisi makambo mpo na kozongisa boyokani kati na ye na bato. (2 Bakolinti 5:18, 19) Motema molai na ye epesi bamilio ya bato nzela ya kokanisa na mitema na bango.​—Yisaya 2:2, 3.

20 Na yango, omoni te ete baboti basengeli kosalela mayele nyonso oyo Makomami emonisi mpo na kosalisa mwana na bango ya kilikili akanisa lisusu na motema na ye? Na ndakisa ya Yehova, bózala na mitema pɛtɛɛ ntango bozali kosala nyonso mpo na kosalisa mwana na bino azonga epai ya Yehova. Bókangama makasi na mitinda ya Biblia mpe bómeka komonisa bizaleli ya Yehova lokola bolingo, bosembo mpe mayele ntango bozali kobondela ye asalisa bino. Batomboki mingi oyo bakómaki kutu motó makasi bandimaki mongongo ya Yehova mpe bazongaki; mwana na bino mpe akoki kozonga na kati ya etonga ya Nzambe, esika ya libateli.​—Luka 15:6, 7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koteya bana malamu, bokoki kozwa makanisi mosusu na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1999, nkasa 13-17.

b Mabondeli ya ndenge wana mpo na mwana oyo abimisami na lisangá ebongi te esalema liboso ya bato nyonso na makita; ekoki kozala ete bato mosusu bayebi te soki etamboli ya moto oyo abimisamaki na lisangá ekómi ndenge nini.​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 1980, lokasa 31 (ebimeli ya Lifalanse).

c Mpo na makanisi oyo ebongi mpenza, talá Lamuká! ya 22 Ɔkɔtɔbɛ 1972, nkasa 13-16; 22 Sɛtɛmbɛ 1996, nkasa 21-23 (ebimeli ya Lifalanse).

Ozali koyeba lisusu?

• Nini ekoki kozala likambo mpenzampenza ntango bilenge bazali kotika lisangá?

• Ndenge nini bokoki kosalisa bilenge bákóma baninga ya Yehova?

• Mpo na nini baboti basengeli kozala na motema pɛtɛɛ kasi mpe bato bazongaka nsima te ntango bazali kosalisa mwana ya kilikili?

• Ndenge nini bandeko mosusu na kati ya lisangá bakoki kosalisa mwana ya kilikili ete azonga?

[Elilingi na lokasa 15]

Mabondeli ya baboti oyo ezali kouta mpenza na motema ekoki kosalisa bana na bango na komona ete baboti bazali mpenza baninga ya Yehova

[Elilingi na lokasa 15]

Kotánga Liloba ya Nzambe esalisaka mpenza mpo na kokóma moninga ya Yehova

[Elilingi na lokasa 17]

Bóyamba mwana ya kilikili ntango ‘akanisi na motema’ na ye

[Elilingi na lokasa 18]

Salá oyo ekoki mpo na kosalisa mwana na yo azonga epai ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto