Bózala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi
Na mokili mobimba, bato ebele bazali kosepela na Libongoli ya Mokili ya Sika
MOSALA nyonso ezwaki mbula 12 na sanza 3 na mikolo 11. Bongo, na mokolo ya 13 Marsi 1960, basilisaki kotánga makomi ya libongoli moko ya sika ya Biblia. Babengaki yango Les Saintes Écritures— Traduction du monde nouveau (Makomami Mosantu—Libongoli ya Mokili ya Sika).
Mbula moko na nsima, Batatoli ya Yehova babimisaki libongoli yango mobimba na buku moko. Ntango ebimaki mbala ya liboso, na 1961, basalaki Babiblia milio moko. Lelo oyo, bakaboli Babiblia yango koleka milio 100; yango elingi koloba ete Libongoli ya Mokili ya Sika ezali moko ya Babiblia oyo ezali kokabolama mingi. Kasi, mpo na nini Batatoli balukaki kosala libongoli yango?
Mpo na nini libongoli ya sika ya Biblia?
Banda bambula ebele, mpo na kokanga ntina ya nsango ya Makomami Mosantu mpe kosakola yango, Batatoli ya Yehova bazalaki kosalela Babiblia ndenge na ndenge ya Lingelesi. Atako mabongoli wana ya Biblia ezali na makambo na yango ya malamu, na bisika mingi ezali kolanda makanisi mpe mateya ya mangomba ya boklisto. (Matai 15:6) Yango wana, Batatoli ya Yehova bamonaki malamu kozala na libongoli ya Biblia oyo ezali komonisa na bosembo mpenza makambo oyo ezalaki na makomi oyo epemami, ndenge mpenza ezalaki na ebandeli.
Mpo na kokokisa mposa yango, makambo nyonso ebandaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1946 ntango Ndeko Nathan Knorr, ye azalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, apesaki likanisi ya kosala libongoli ya sika ya Biblia. Mokolo ya 2 Desɛmbɛ 1947, baponaki komite ya bato oyo basengelaki kobongola Biblia; libongoli yango esengelaki kolanda na bosembo mpenza makambo ndenge ezali na makomi ya ebandeli, esengelaki kosalema na kotalela makambo oyo bato ya mayele bauti koyekola na bamaniskri ya Biblia oyo bauti kokundola; mpe libongoli yango esengelaki kozala na elobeli ya pɛtɛɛ oyo ekozala mpasi te mpo na kotánga yango lelo oyo.
Na 1950, ntango babimisaki ndambo ya liboso, elingi koloba Makomami ya Grɛki ya boklisto—Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi), emonanaki polele ete babongoli bakokisaki mikano oyo bamityelaki. Mikapo ya Biblia oyo ezalaki mpasi mpo na kokanga ntina na yango, ekómaki polele mpenza. Tókamata na ndakisa vɛrsɛ moko oyo ezalaki na mindɔndɔ mpenza, Matai 5:3: “Mapamboli epai na babola na molimo.” Vɛrsɛ yango ebongolamaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” Toli ya ntoma Paulo oyo elobi ete “bómitungisa mpo na likambo moko te” ebongolamaki: “Bómitungisa ata na likambo moko te.” (Bafilipi 4:6) Mpe vɛrsɛ ya Matai 24:3 oyo ezali kolobela “komonana” ya Klisto, ebongolamaki na “kozala” ya Klisto. Tomoni mpenza ete Libongoli ya Mokili ya Sika esalisaki bato básosola Biblia malamu.
Bato mingi ya mayele oyo balimbolaka Biblia bandimaki libongoli yango. Na ndakisa, Alexander Thomson, ye azali moto ya Angleterre mpe azali molimboli ya maloba ya Biblia, alobaki ete Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli malamu mpenza eleko-bɛbɛ (temps présent) ndenge ezali na monɔkɔ ya Grɛki. Na ndakisa, Baefese 5:25 elobi ete: “Mibali, bólingaka basi na bino” na esika ya kosuka kaka na koloba ete, “Bino, mibali, bolinga basi na bino.” (Boyokani ya Sika) Thomson alobaki boye: “Ezali na libongoli mosusu te oyo emonisi likambo malamu yango [elingi koloba ndenge ya kobongola eleko bebe] na mobimba mpenza mpe na bisika mingi.”
Likambo mosusu ya malamu mingi na Libongoli ya Mokili ya Sika ezali ete ezali kosalela nkombo ya Nzambe, Yehova, ezala na Makomami ya Liebele to na Makomami ya Grɛki. Lokola nkombo ya Nzambe na Liebele ezali soki mbala 7000 na eteni oyo ebengami Kondimana ya Kala, yango emonisi polele ete Mozalisi alingi ete basambeli na ye básalelaka nkombo na ye mpe báyeba ye ete azali moto mpenza. (Exode 34:6, 7) Libongoli ya Mokili ya Sika esalisi bamilio ya bato na kosalela nkombo ya Nzambe mpe koyeba ete azali moto ya elimo.
Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolami na minɔkɔ mingi
Banda kaka Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na Lingelesi, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazalaki na mposa ya kozala na yango na monɔkɔ na bango mpe ezali na bantina oyo balingaki likambo yango. Na mikili mosusu, ezalaki mpasi mpo na kozwa biblia na minɔkɔ ya mboka mpamba te ba kompanyi oyo esalaka Babiblia elingaki te ete Batatoli ya Yehova básomba Biblia mingi oyo bango babimisaki. Longola yango, mbala mingi mateya mosusu ya ntina ezali polele te na kati ya Babiblia yango. Tozali na ndakisa ya Biblia oyo ezali na monɔkɔ moko oyo balobaka na sudi ya Mpoto oyo etii maloba mosusu na esika oyo balobeli nkombo ya Nzambe, na vɛrsɛ oyo Yesu alobaki ete “Tiká nkombo na yo esantisama”; na Biblia yango balobi “Tiká ete bato bákumisa yo.”—Matai 6:9.
Na 1961, babandaki kobongola Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ mosusu. Nsima ya mbula mibale mpamba, Makomami ya Grɛki ya boklisto—Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) ebongolamaki na minɔkɔ mosusu motoba. Na ntango wana, soki okamati Batatoli minei na mokili mobimba, misato kati bango bazalaki na likoki ya kotánga Biblia yango na monɔkɔ moko oyo bayebaki. Kasi, mosala ezalaki naino mingi mpo Batatoli ya Yehova bákabola Biblia yango epai ya bamilio ya bato.
Na 1989, emonanaki ete bakokaki kokokisa mokano yango ntango basalaki departema ya makambo ya bobongoli na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Departema yango ebimisaki lolenge moko ya kobongola oyo etyaki esika moko boyekoli ya maloba ya Biblia mpe kosalela ordinatɛrɛ. Lolenge wana ya sika epesaki nzela na kosilisa kobongola Makomami ya Grɛki ya boklisto na minɔkɔ mosusu nsima ya mbula moko, mpe Makomami ya Liebele, nsima na mbula mibale; ntango oyo ezali moke mpenza soki tokokanisi yango na ntango oyo kobongola Biblia mobimba esɛngaka. Banda babandaki kosalela mayele yango, Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingelesi esili kobongolama na minɔkɔ mosusu 29 mpe mpo na yango, bato koleka miliare mibale na mokili mobimba bakoki kotánga yango na minɔkɔ oyo balobaka. Mosala yango ezali kokoba na minɔkɔ mosusu 12. Tii na moi ya lelo, Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingelesi ebongolami na minɔkɔ mosusu 41, ezala Biblia mobimba to ndambo na yango.
Tokokisi mbula koleka 50 banda babimisaki ndambo ya liboso ya Libongoli ya Mokili ya Sika na mokolo ya 3 Augusto 1950 na liyangani ya etúká oyo Batatoli ya Yehova basalaki na engumba New York; motó ya likambo na yango ezalaki “Bokoli ya Teokrasi.” Na liyangani yango, Ndeko Nathan Knorr alobaki na bayangani boye: “Bókamata Biblia oyo. Bótánga yango banda ebandeli tii nsuka, bósala yango na esengo. Bóyekola yango, mpamba te ekosalisa bino bósosola lisusu malamu Liloba ya Nzambe. Bókabola yango na bato mosusu.” Tozali kolendisa bino bótángaka Biblia mokolo na mokolo, mpamba te nsango na yango ekoki kosalisa bino “bózala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe.”—Bakolose 4:12, NW.
[Etanda/Bililingi na lokasa 9]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
“Babiblia Libongoli ya Mokili ya Sika oyo esili kobimisama”
Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika, oyo ebimisamaki liboso na Lingelesi, ezali lelo oyo na minɔkɔ 41; mosusu ezali Biblia mobimba, mosusu ezali kaka Makomami ya Grɛki.
Makomami ya Grɛki ya boklisto Biblia mobimba
1950 1
1960-69 6 5
1970-79 4 2
1980-89 2 2
1990-Lelo oyo 29 19