Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/12 nk. 30-31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • ‘Akitisaki Yehova motema’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Osaleli elimo santu lisumu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Osengeli kosala nini mpo Yehova alimbisa yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Omitunaka mokolo na mokolo ete “wapi Yehova?”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/12 nk. 30-31

Mituna ya batángi

Toli ya Nzambe oyo ezali na Yilimia 7:16, elimboli nde ete baklisto bakoki te kobondela mpo na moto moko oyo abimisamaki na lisangá mpamba te moto yango asalaki lisumu mpe abongolaki motema te?

Nsima ya kokatela Yuda etumbu mpo ekólo yango ezalaki lisusu sembo te, Yehova alobaki na Yilimia ete: ‘Boye kobondela mpo na bato oyo te, kotombola mongongo to elɔmbeli likoló mpo na bango te, kolɔmba ngai te, zambi nakoyoka te.’​—Yilimia 7:16.

Mpo na nini Yehova apekisaki Yilimia kobondela mpo na Bayisalaele? Na ntembe te, ezali mpo bazalaki kobuka mpenza Mobeko na ye na ndenge ya polele. Bazalaki ‘koyiba mpe koboma mpe kosala ekobo mpe kokata ndai ya lokuta mpe kotumbela Baala mpaka ya malasi mpe kotambola nsima ya banzambe mosusu’ kozanga komibomba mpe kozanga nsɔni. Yango wana, Yehova ayebisaki Bayuda yango oyo bazangaki kondima ete: “Nakobwaka mpe bino longwa na miso na ngai, lokola ebwaki ngai bandeko na bino nyonso, libota mobimba na Efelaima.” Ya solo, elingaki kozala malamu te ete Yilimia to moto mosusu abondela Yehova mpo abongola etumbu oyo Ye akatelaki bango.​—Yilimia 7:9, 15.

Na boyokani na likambo yango, ntoma Yoane akomaki mpo na oyo etali libondeli oyo ebongi kosala epai ya Nzambe. Liboso, ayebisaki baklisto ete: “ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” (1 Yoane 5:14) Na nsima, mpo na oyo etali kobondela mpo na bamosusu, Yoane akomaki boye: “Soki moto amoni ndeko na ye azali kosala lisumu moko oyo ememaka na liwa te, akosɛnga, mpe akopesa ye bomoi, ɛɛ, epai na baoyo bazali te kosala lisumu na ndenge oyo ezali komema na liwa. Ezali na lisumu oyo ememaka na liwa. Ezali mpo na lisumu wana nde nazali te koyebisa ye ete asɛnga.” (1 Yoane 5:16, NW) Yesu alobelaki mpe lisumu oyo ekolimbisama teʼ; elingi koloba lisumu oyo moto asaleli elimo santu.​—Matai 12:31, 32, NW.

Yango elingi nde koloba ete baoyo nyonso babimisamaki na lisangá ya boklisto mpo basalaki masumu mpe babongolaki mitema te, basalaki masumu oyo ememaka na liwa,ʼ na bongo esengeli te kobondela mpo na bango? Yango esengeli ntango nyonso kozala bongo te, mpamba te mbala mingi mabunga nyonso oyo bato yango basalaka ezalaka masumu oyo ememaka na liwa te. Kutu, ezali mpasi mpo na koyeba soki masumu yango ezali oyo “ememaka na liwa” to te. Mpo na kokanga ntina ya likambo yango, tózwa ndakisa ya Manase, mokonzi ya Yuda. Ye atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya lokuta, apesaki bana na ye moko lokola mbeka, asalaki bikelakela mpe atyaki bikeko na kati ya tempelo ya Yehova. Kutu, Biblia elobi ete Manase mpe bato ya ekólo na ye basalaki “mabe koleka mabota oyo [Yehova] abebisaki bango liboso ya bana ya Yisalaele.” Mpo na makambo wana nyonso, Yehova apesaki Manase etumbu: bakangaki ye na minyɔlɔlɔ mpe bamemaki ye na Babilone lokola moombo.​—2 Mikonzi 21:1-9; 2 Ntango 33:1-11.

Atako masumu oyo Manase asalaki ezalaki masumu ya minene mpenza, tokoki nde koloba ete ezalaki masumu oyo ememaka na liwa? Emonani ete tokoki koloba bongo te, mpamba te, na nsima, lisolo yango elobi boye mpo na ye: “Ezalaki ye na mpasi, abondelaki elongi na [Yehova], Nzambe na ye mpe amisokisaki mingi liboso na Nzambe ya batata na ye. Abondelaki ye mpe ye ayambaki malɔmbɔ na ye mpe ayokaki libondeli na ye mpe [azongisaki] ye lisusu na Yelusaleme na bokonzi na ye. Wana Manase ayebaki ete [Yehova] azali Nzambe [ya solo, NW].”​—2 Ntango 33:12, 13.

Yango wana, tosengeli te mbala moko koloba ete moto boye asali lisumu oyo ememeka na liwa kaka mpo babimisi ye na lisangá. Esɛngaka mbala mosusu ntango molai mpo ezalela ya solosolo ya motema ya moto eyebana. Kutu, mbala mingi tolobaka ete ntina mosusu ya kobimisa moto oyo asali lisumu na lisangá ezali ya kotikela ye ntango ya kolamuka na mpɔngi ya elimo, na elikya ete akobongola motema mpe akotika kosala mabe.

Lokola moto yango azali lisusu na kati ya lisangá te, bato ya liboso oyo bakomona soki ya solo abongoli motema mpe ezaleli na ye, ezali bato oyo bafandi na ye esika moko, na ndakisa molongani na ye to bato ya libota na ye. Baoyo bazali komona ndenge oyo moto yango azali kobongwana, bakoki bongo kokanisa ete asalaki lisumu oyo ememaka na liwa te. Yango ekoki kotinda bango bábondela mpo moto yango azwa lisusu makasi na lisalisi ya Liloba ya Nzambe oyo epemami, mpe ete Yehova asala epai ya moto yango oyo eyokani na mokano na Ye.​—Nzembo 44:21; Mosakoli 12:14.

Soki mpo na bamosusu ekoki kozala mpasi te mpo na komona bilembeteli oyo ekotinda bango bákanisa ete moto oyo asalaki lisumu abongoli motema, yango ekoki kozala bongo te mpo na bandeko ya lisangá mobimba. Bakoki kokamwa, kobulungana, ata mpe kobɛta libaku soki bayoki ndeko moko azali kobondela na miso ya bato mpo na moto oyo abimisamaki na lisangá. Yango wana, baoyo balingi kobondela mpo na moto oyo asalaki lisumu, basengeli kosala yango kaka na libondeli ya bango moko; basengeli mpe kotika makambo nyonso oyo ekolanda na nsima mpo na oyo etali likambo yango na mabɔkɔ ya bankulutu ya lisangá.

[Elilingi na lokasa 31]

Yehova alimbisaki masumu minene ya Manase ntango amikitisaki liboso na ye

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 30]

Euti na Illustrirte Pracht - Bibel/Heilige Schrift des Alten und Neuen Testaments, nach der deutschen Uebersetzung ya D. Martin Luther’s

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto