Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/12 nk. 3-4
  • “Bato bazali koloba ete ngai nazali nani?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bato bazali koloba ete ngai nazali nani?”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makanisi ndenge na ndenge mpo na Yesu
  • Ezali mpenza na ntina koyeba soki Yesu azalaki nani?
  • Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Yesu Kristo azali nani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Yesu Klisto azali nani?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Tokoyanola nde na bolingo na Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/12 nk. 3-4

“Bato bazali koloba ete ngai nazali nani?”

TOKÓMI lisusu na ntango ya Noele. Na mokili mobimba, bato baponi kokumisa mokolo ya kobotama ya moto moko. Mokolo ya kobotama ya nani? Ya Mwana ya Nzambe to kaka ya Moyuda moko boye oyo amipesaki na makambo ya Nzambe mpe alingaki kokɔtisa mbongwana na lingomba oyo eyebanaki mingi na mboka oyo azalaki kofanda na ekeke ya liboso? Ezalaki nde mokolo ya kobotama ya moto moko, oyo azalaki koluka kolongisa likambo ya babola, motomboki moko oyo atombokelaki Bokonzi ya Loma, yango wana babomaki ye? To mpe, ntango mosusu ezalaki nde mokolo ya kobotama ya moto moko ya mayele oyo azalaki kolendisa bato bámiyeba mpe bázala na mayele? Ya solo, ozali mpenza na bantina malamu ya komituna, ‘Yesu Klisto azalaki mpenza nani?’

Yesu ye moko mpe alingaki koyeba soki bato bakopesa eyano nini na motuna yango. Mokolo moko, atunaki bayekoli na ye boye: “Bato bazali koloba ete ngai nazali nani?” (Malako 8:27, NW) Mpo na nini atunaki bongo? Bato mingi batikaki kolanda ye. Lokola aboyaki milende oyo bamosusu basalaki mpo na kokómisa ye mokonzi, emonanaki lokola ete bato mosusu basepelaki te mpe balɛmbaki nzoto. Longola yango, ntango banguna na ye batyelaki ye ntembe, Yesu alakisaki ata elembo moko te oyo euti na likoló. Ntango bantoma na ye bayanolaki na motuna yango, bamonisaki ete Yesu azali nani? Balobelaki mwa makambo mosusu ndenge bato mingi bazalaki kokanisa: “Bamosusu balobaka Yoane Mobatisi, bamosusu Eliya, bamosusu mpe Yilimia to moko ya basakoli.” (Matai 16:13, 14, NW) Batángaki te ebele ya maloba ya kotyola oyo bato mingi na Palestine bazalaki kotyola na yango Yesu, maloba lokola motuki, mokosi, mosakoli ya lokuta, ata mpe moto ya ligboma.

Makanisi ndenge na ndenge mpo na Yesu

Soki Yesu atunaka motuna yango lelo, ntango mosusu alingaki kotuna yango boye: “Bato ya mayele bazali koloba ete ngai nazali nani?” Na mbala oyo lisusu, biyano nyonso ekoki komema biso se na likambo moko: Bazali na makanisi ndenge na ndenge. David Tracy, moto ya mayele na Iniversite ya Chicago, alobaki boye: “Bato bazali na makanisi ndenge na ndenge mpo na Yesu mpe mpo na makambo oyo ye alobaki mpe asalaki.” Na boumeli ya mbula nkama oyo euti koleka, mpo na koluka biyano ya kopesa na motuna ya koyeba soki Yesu azalaki mpenza nani, bato ya mayele basalelaki mayele ndenge na ndenge mpo na koyekola bomoi ya bato mpe mpo na koyekola mpe kokoma mikanda. Na nsuka na yango, bamoni ete Yesu azalaki mpenza nani?

Bato mosusu ya mayele bazali koloba ete Yesu oyo masolo ya kala elobelaka azalaki mosakoli moko Moyuda oyo azalaki koteya makambo oyo etali nsuka ya mokili mpe kolendisa bato bábongola mitema. Kasi, baboyi kobenga ye Mwana ya Nzambe, Masiya, mpe Mobikisi. Mingi kati na bango bandimaka mpenza te masolo ya Biblia oyo elobi ete Yesu autaki na likoló mpe asekwaki. Mpo na bamosusu, Yesu azalaki kaka moto moko boye, oyo bomoi mpe mateya na ye ya malamu epesaki bato likanisi ya kobandisa mangomba ndenge na ndenge, oyo nsukansuka esalaki liboke moko oyo babengi mangomba ya boklisto. Mpe ndenge buku moko (Theology Today) emonisi yango, ezali na bato mosusu oyo batalelaka Yesu lokola “moto moko oyo azalaki mpenza kolinga bato te; moto moko ya mayele oyo azalaki koyengayenga; to moto moko atángá te oyo azalaki koyokana mbala moko na Nzambe; to lokola moto moko oyo ayebaki kotya makambo ya lisangá na molɔngɔ; elenge mobali moko ya mobulu oyo azalaki kokoma mikanda na mayele mpenza oyo ezalaki kobimisa polele makambo ya mabe oyo bato bazalaki kosala na ntango na ye; to mpe moto moko ya mayele mabe oyo, na maloba na ye, azalaki kotinda bato bátomboka wana azalaki kotambolatambola na bamboka ya Palestine oyo ezalaki mpenza mosika, bamboka oyo ezalaki na babola mingi oyo bakómaki nkandankanda mpe pene ya kotomboka.”

Bato mosusu mpe bazalaka na makanisi oyo ekoki kokamwisa mpenza. Mikolo oyo, bato mosusu babimisi likanisi ete Yesu azalaki moto moindo; likanisi yango bamosusu bazali kolobela yango na miziki babengi rap, bamosusu bazali komonisa yango na bikeko to na bililingi ndenge na ndenge oyo bazali kotya na bisika oyo bato mingi balekaka, bamosusu bazali komonisa yango ata mpe na mabina.a Bato mosusu bazali koloba ete Yesu azalaki mpenza mwasi. Na eleko ya molunge ya mbula ya 1993, bato oyo bakendaki kotala foire ya mboka Orange, na Californie, bamonaki ekeko moko ya “Kristi,” “Klisto” ya mwasi azali bolumbu likoló ya ekulusu. Kaka na mikolo yango, na engumba New York, bazalaki kolakisa ekeko ya “Krista,” “Yesu” ya mwasi azali likoló ya ekulusu. Bikeko mibale wana ebimisaki ntembe monene. Mpe na ebandeli ya mbula ya 1999, bato oyo bakendeke na bisika batekaka babuku bamonaki buku moko oyo ezalaki kolobela “Elenge mobali Yesu na mbwa na ye, Anzelu, [oyo] balinganaki mingi.” Na buku yango, bamonisi ete boninga oyo ezalaki kati na bango ezali “kolendisa na elimo mpe emonisi ndenge elenge mobali na mbwa bamibongisaki mpo na kondima ete moko akufela moninga.”

Ezali mpenza na ntina koyeba soki Yesu azalaki nani?

Mpo na nini osengeli koluka koyeba soki Yesu azalaki nani mpe azali nani? Soki tozongeli maloba oyo Napoléon alobaki, ntina ya koluka koyeba yango ezali mpo ete “Yesu Klisto abongolaki bomoi ya bato na ye mpe bazalaki kolanda ye kozanga ete azala wana elongo na bango mpe bámonaka ye.” Na nzela ya mateya na ye ya nguya mpe na lolenge ya bomoi na ye, Yesu abongoli mpenza bomoi ya bato ebele na boumeli ya mbula soki nkóto mibale. Yango wana, mokomi moko akomaki boye: “Ata soki tozwi basoda nyonso banda mosala ya soda ebanda, tozwi masuwa nyonso oyo bato basalá, tozwi baguvɛrnɛma nyonso oyo bato basalá, tozwi mpe bakonzi nyonso oyo bayangelá banda mokili ebandá, moko te kati na yango, ata mpe yango nyonso esika moko, elongi mpenza kobongola bomoi ya bato awa na mabele [ndenge Yesu asalá].”

Longola yango, osengeli koyeba soki Yesu azalaki nani mpe azali nani mpo ete bomoi na yo ya mikolo ezali koya ekotalela nde ye. Ozali na libaku ya kokóma moko ya bato oyo bakoyangelama na guvɛrnɛma moko oyo esili kotyama na likoló; guvɛrnɛma yango ezali nde Bokonzi ya Nzambe oyo Yesu azali mokonzi na yango. Na boyangeli ya Yesu, mokili na biso oyo etondi lelo na mikakatano, ekozonga kitoko, bikelamu nyonso ekozala mpe mai, mopɛpɛ, banzamba, ekozonga malamu. Bisakweli ya Biblia eyebisi biso ete Bokonzi ya Yesu ekoleisa bato oyo bazali na nzala, ekosilisa bobola, ekolongola maladi, mpe ekozongisa bato oyo bakufá na bomoi.

Na ntembe te, ozali na mposa ya koyeba lolenge ya moto oyo akotambwisa guvɛrnɛma yango, oyo tozali kozela na mposa makasi. Lisolo oyo elandi ekosalisa yo oyeba malamu mpenza Yesu oyo ya solo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki olingi koyeba ndenge Yesu azalaki, talá lisolo “À quoi ressemblait Jésus?,” (Yesu azalaki ndenge nini?) na Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ 1998 (ebimeli ya Lifalanse).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto