Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/2 nk. 8-12
  • Zwá liteya na ndakisa ya Nikodeme

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zwá liteya na ndakisa ya Nikodeme
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Azalaki na mabaku mingi ya malamu
  • Makambo oyo ezalaki kopekisa ye kozwa ekateli
  • Azangaki makambo mingi
  • Ezali boni mpo na yo?
  • Yesu ateyi Nikodeme na butu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu ateyi Nikodeme
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Zalá na ekateli ya kokómisa moto moyekoli
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/2 nk. 8-12

Zwá liteya na ndakisa ya Nikodeme

“SOKI moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mokolo na mokolo mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Luka 9:23, NW) Bato mpamba oyo bazalaki babomi-mbisi mpe mokɔngɔli moko ya mpako, mosala oyo bazalaki koyina yango, bakakatanaki te mpo na kosala likambo yango. Batikaki makambo nyonso mpe balandaki Yesu.​—Matai 4:18-22; Luka 5:27, 28.

Tii lelo oyo, Yesu azali naino kobenga, mpe bato mingi basili kondima ye mpe kosala ndenge alobaki. Nzokande, bato mosusu oyo basepelaka koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova bakakatanaka mpo na ‘komiboya bango moko mpe komema nzete na bango ya mpasi.’ Bakakatanaka mpo na kondima mokumba mpe libaku malamu ya kozala bayekoli ya Yesu.

Mpo na nini bato mosusu bakakatanaka mpo na kokokisa maloba wana ya Yesu mpe komipesa na Yehova Nzambe? Ya solo, esengeli ntango mwa molai mpo na bato oyo bateyá bango te na esika oyo bakolá ete Nzambe azali kaka moko, ndenge Bayuda na baklisto bandimaka, mpo bákanga ntina ete Mozalisi mpe mozwi-na-nguya-nyonso azali moto solo. Kutu, ata soki basili kondima ete Nzambe azali moto ya solo, bamosusu balingaka kolanda matambe ya Yesu te. Babangaka ete soki bakómi Batatoli ya Yehova, bandeko na bango mpe baninga na bango bakosepela lisusu na bango te. Bamosusu, oyo bazali kobosana ete tozali na mikolo oyo esengeli kosala makambo na lombangu, bamipesi na koluka lokumu mpe bozwi. (Matai 24:36-42; 1 Timote 6:9, 10) Ata soki ezali ndenge nini, baoyo bazali kozongisa nsima ekateli na bango ya kokóma bayekoli ya Yesu, bakoki kozwa liteya na lisolo ya Nikodeme, mokonzi moko ya Bayuda oyo azalaki na bozwi mingi na ntango ya Yesu.

Azalaki na mabaku mingi ya malamu

Sanza motoba nsima wana Yesu abandaki mosala na ye ya kosakola awa na mabele, Nikodeme amonaki Yesu mpe asosolaki ete azali ‘moteyi oyo autaki epai ya Nzambe.’ Lokola makamwisi oyo Yesu autaki kosala na Yelusaleme na Elekeli ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.) esimbaki mpenza motema na ye, Nikodeme akendaki koluka Yesu na butu mpo na komonisa ete andimaki ye mpe alingaki koyeba makambo mosusu oyo etali molakisi yango. Yesu ayebisaki Nikodeme liteya moko ya ntina mingi ete soki moto alingi kokɔta na Bokonzi ya Nzambe, asengeli “kobotama lisusu.” Ezali mpe na mokolo yango nde Yesu alobaki maloba oyo: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.”​—Yoane 3:1-16.

Nikodeme azwaki libaku ya kozala na elikya malamu mpenza! Akokaki kokóma moninga mpenza ya Yesu mpe koyebisa makambo ndenge na ndenge oyo alingaki komona na miso na bomoi ya Yesu awa na mabele. Lokola azalaki mokonzi ya Bayuda mpe molakisi na Yisalaele, Nikodeme ayebaki malamu Liloba ya Nzambe. Azalaki mpe moto oyo ayebaki kososola malamu; tokoki komona yango na ndenge oyo ayebaki mbala moko ete Yesu azali molakisi oyo Nzambe atindaki. Nikodeme azalaki na mposa ya koyeba makambo ya elimo mpe azalaki mpenza moto ya komikitisa. Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te ete moto oyo azalaki na tribinale monene ya Bayuda, andima ete mwana ya mosali moko ya mabaya azali moto oyo Nzambe atindaki! Bizaleli nyonso oyo amonisaki ezali na ntina mingi mpo moto akoka kokóma moyekoli ya Yesu.

Mposa ya Nikodeme ya koyeba malamumalamu moto wana ya Nasalete esilaki te. Mbula mibale na ndambo na nsima, na Fɛti ya Mingombo, Nikodeme azalaki na likita moko na Sanedrina. Na ntango wana, Nikodeme azalaki naino “moko na bango.” Banganga-kapita mpe Bafalisai batindaki basoda bákende kokanga Yesu. Basoda bazongaki mpe bapesaki lapolo ete: “Naino moto moko aloba lokola moto wana te.” Mbala moko Bafalisai babandaki kotyola bango; balobaki na bango ete: “Bino mpe bobungisami nzela? Moko na bakonzi ya mboka to ya Bafalisai andimi ye? Kasi bato nyonso wana oyo bayebi mibeko te bazali bato oyo balakelamá mabe!” Nikodeme akokaki lisusu kokanga motema te. Alobaki boye: “Mibeko na biso esambisaka nde moto kozanga koyoka ye liboso mpe kozanga koyeba makambo oyo ye azali kosala?” Mbala moko, Bafalisai mosusu babalukeli ye mpe bakómi koloba na ye mabe, ete: “Yo mpe outi nde na Galilai? Luká mpo omona ete ata mosakoli moko te asengeli kobima na Galilai.”​—Yoane 7:1, 10, 32, 45-52, NW.

Sanza motoba na nsima, na Mokolo ya Elekeli ya mobu 33 T.B., Nikodeme azalaki kotala ntango bazalaki kokitisa ebembe ya Yesu na nzete. Ye na Yosefe ya Alimatai, oyo mpe azalaki na Sanedrina, babongisaki ebembe ya Yesu mpo na kokunda yango. Mpo na kobongisa ebembe ya Yesu, Nikodeme amemaki ‘mola mpe aloe esanganisami’ oyo ezalaki na kilo ya livre romain soki 100 (soki kilo 33). Likabo ya Nikodeme ezalaki ya ntalo mingi mpenza. Esengelaki mpe azala na mpiko mpo ayoka nsɔni te ya kotángama na molɔngɔ ya bato oyo bazalaki elongo na “mokosi yango,” ndenge Bafalisai bazalaki kobenga Yesu. Nsima ya kobongisa ebembe ya Yesu nokinoki mpo na kokunda yango, bango mibale bakendaki kotya yango na lilita moko ya sika, oyo ezakaki penepene wana. Kasi, ata na ntango wana, Nikodeme ayebanaki naino te lokola moyekoli ya Yesu!​—Yoane 19:38-42; Matai 27:63; Malako 15:43.

Makambo oyo ezalaki kopekisa ye kozwa ekateli

Na mokanda na ye, ntoma Yoane ayebisi te ntina oyo Nikodeme akakatanaki mpo na ‘komema nzete na ye ya mpasi’ mpe kolanda Yesu. Kasi, apesi biso mwa makambo oyo ekoki kosalisa biso na koyeba ntina oyo Mofalisai yango azalaki kozwa ekateli te.

Ya liboso, Yoane alobi ete mokonzi wana ya Bayuda ‘ayaki epai na Yesu na butu.’ (Yoane 3:2) Moto moko ya mayele oyo alimbolaka Biblia alobi boye: “Soki Nikodeme ayaki na butu, ezali te mpo azalaki kobanga, kasi ezali nde mpo aboyaki ete bato bazala ebele ntango akosolola na Yesu.” Kasi, Yoane alobaki lisusu mpo na Nikodeme lokola “moto oyo liboso ayaki epai na [Yesu] na butu” na esika oyo alobeli Yosefe ya Alimatai lokola “moyekoli ya Yesu kasi na kobombana mpo azalaki kobanga Bayuda.” (Yoane 19:38, 39, NW) Na yango, tomoni ete ekoki mpenza kozala ete Nikodeme ayaki epai ya Yesu na butu mpo “azalaki kobanga Bayuda,” se ndenge bato mosusu ya ntango na ye bazalaki kobanga kozala na Yesu esika moko noki te bato mosusu bakotyola bango.​—Yoane 7:13.

Ozali kozongisa nsima ekateli na yo ya kokóma moyekoli ya Yesu mpo ozali kokanisa ete bandeko na yo, baninga na yo to bato oyo osalaka na bango esika moko bakoloba na yo mabe? Lisese moko elobi ete: “Kobanga bato ekoyeisa motambo.” Ndenge nini okoki kolonga ezaleli ya kobanga? Lisese yango elandi koloba boye: “Nde oyo akotalela [Yehova akobatelama, NW].” (Masese 29:25) Mpo okóma kotyela Yehova motema ndenge wana, osengeli yo moko komona mpenza ete Nzambe akobatela yo ntango okozala na mikakatano. Bondelá Yehova mpe sɛngá ye apesa yo mpiko ya kozwa ata bikateli ya mikemike na oyo etali losambo na yo. Mokemoke, kondima na yo mpe elikya na yo epai na Yehova ekokola tii okokóma kozwa bikateli ya minene oyo eyokani na mokano ya Nzambe.

Lokola Nikodeme azalaki moto monene mpe ya lokumu mpo azalaki mokonzi, yango ezalaki mpe kopekisa ye amiboya ye moko. Ekoki kozala ete na ntango wana, azalaki naino kotalela mingi esika ya lokumu oyo azalaki na yango na Sanedrina. Okakatanaka mpo na kozwa ekateli ya kokóma moyekoli ya Klisto mpo obangaka noki te okobungisa esika ya lokumu to okotika makambo mosusu oyo ekoki kotombola yo? Moko te na makambo wana nyonso ekokani na lokumu ya kosalela Oyo-Aleki-Likoló na molɔ́ngɔ́ mobimba, oyo azali pene ya kopesa yo eloko nyonso oyo ozali kosɛnga soki eyokani na mokano na ye.​—Nzembo 10:17; 83:18; 145:18.

Bozwi oyo Nikodeme azalaki na yango ekoki kozala ntina mosusu oyo esalaki ete azwa ekateli noki te. Lokola azalaki Mofalisai, ekoki kozala ete azalaki kolanda ezaleli ya baninga na ye mosusu, “baoyo balingaki mosolo.” (Luka 16:14) Lokola azalaki na mbongo ya kosomba mila mpe aloe, biloko ya ntalo mingi, emonisi ete azalaki moto ya mbongo. Lelo oyo, bato mosusu bazali kozwa ekateli noki te ya kokóma baklisto mpamba te bazali kokanisa bozwi na bango. Kasi Yesu akebisaki bayekoli na ye ete: “Bótungisa mitema na bino te ete bokolya nini mpe ete bokomɛla nini soko ete bokolatisa nzoto na bino nini. . . . Zambi Tata na bino na Likoló ayebi ete bozali na bosɛnga na yango nyonso. Bólukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso ikobakisama na bino.”​—Matai 6:25-33.

Azangaki makambo mingi

Lisolo ya Nikodeme, oyo ezali kaka na Evanzile ya Yoane, elobi te soki akómaki moyekoli ya Yesu to te. Bato mosusu balobaka ete Nikodeme akómaki moyekoli ya Yesu mpe azwaki batisimo; Bayuda bakómaki konyokola ye, balongolaki ye na esika ya lokumu oyo azalaki na yango, mpe nsukansuka babenganaki ye na Yelusaleme. Ata soki ezalaki bongo to te, Nikodeme azangaki makambo mingi lokola akómaki naino moyekoli te na ntango oyo Yesu ye moko azalaki awa na mabele.

Soki Nikodeme alandaka Yesu na mbala ya liboso oyo akutanaki na ye, alingaki kokóma moyekoli na ye ya penepene. Lokola Nikodeme azalaki na boyebi mingi, na bososoli mpe na komikitisa; lokola azalaki na mposa ya koyeba makambo ya elimo, alingaki kokóma moyekoli malamu mpenza. Alingaki koyoka maloba kitoko ya Moteyi Monene, alingaki kozwa mateya na bilakiseli oyo Yesu azalaki kopesa, alingaki komona makamwisi minene oyo Yesu asalaki mpe alingaki kolendisama na toli ya nsuka oyo Yesu apesaki bantoma na ye. Kasi Nikodeme azangaki makambo wana nyonso.

Lokola Nikodeme akakatanaki mpo na kozwa ekateli, azangaki makambo mingi. Moko ya makambo yango ezalaki maloba oyo ya Yesu: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali konyokwama mpe bomemi mikumba, mpe nakobɔndisa bino. Bómema ekangiseli na ngai mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na boboto mpe nazali na motema ya komikitisa, na bongo milimo na bino ekobɔndisama. Mpo ekangiseli na ngai ezali pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Matai 11:28-30, NW) Nikodeme azangaki libaku malamu ya kobɔndisama na Yesu ye moko!

Ezali boni mpo na yo?

Banda 1914, Yesu Klisto asilaki kokóma Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe kuna na likoló. Ntango asakolaki makambo oyo esengelaki kosalema na ntango ya kozala na ye, alobaki mpe ete: “Nsango Malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Liboso ete nsuka eya, mosala wana ya kosakola na mokili mobimba esengeli kokokisama. Yesu Klisto asepelaka na komona bato ya kozanga kokoka kosangana na mosala yango. Yo mpe okoki kosangana na mosala yango.

Nikodeme ayebaki ete Yesu autaki epai ya Nzambe. (Yoane 3:2) Soki oyekolaka Biblia, yo mpe okoki kondima likambo yango. Ekoki kozala ete osili kobongola bomoi na yo mpe ozali kolanda mitinda ya Biblia. Ekoki mpe kozala ete oyanganaka na makita ya Batatoli ya Yehova mpo okoka koyeba Biblia malamu. Tozali kopesa yo longonya mpo na milende nyonso wana. Kasi, Nikodeme asengelaki kosuka kaka te na koyeba ete Yesu azali moto oyo Nzambe atindaki. Esengelaki “amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mokolo na mokolo mpe alanda [Yesu] ntango nyonso.”​—Luka 9:23, NW.

Kobosana te likambo oyo ntoma Paulo ayebisi biso. Akomaki boye: “Bongo, awa ezali biso kosalana na ye mosala, tokobondela bino ete bóyamba ngɔlu ya Nzambe mpamba te. Mpo ete alobi ete, Na ntango ebongi, nayoki yo, mpe na mokolo ya kobika nasungi yo. Talá, ntango ebongi ezali [sikoyo]; talá mokolo na kobika ezali [sikoyo].”​—2 Bakolinti 6:1, 2.

Sikoyo ezali nde ntango ya koluka kokóma na kondima oyo ekotinda yo ozwa ekateli. Mpo na kokóma na kondima ya motindo wana, zwáká ntango ya kokanisa na mozindo likoló ya makambo oyo ozali koyekola na kati ya Biblia. Bondeláká Yehova mpe sɛngá ye asalisa yo okóma na kondima ya motindo wana. Ntango okobanda komona lisungi na ye, botɔndi mpe bolingo na yo mpo na ye ekotinda yo ‘omiboya yo moko mpe omema nzete na yo ya mpasi mokolo na mokolo mpe olanda Yesu Klisto ntango nyonso.’ Okosala yango sikoyo?

[Elilingi na lokasa 9]

Nikodeme azalaki na mpiko ya kokɔtela Yesu

[Elilingi na lokasa 9]

Atako batɛmɛlaki Nikodeme, apesaki mabɔkɔ mpo na kobongisa ebembe ya Yesu liboso ya kokunda yango

[Elilingi na lokasa 10]

Koyekola yo moko mpe kobondela ekoki kopesa yo makasi ya kozwa ekateli

[Elilingi na lokasa 10]

Okosepela na libaku malamu ya kosala na nse ya boyangeli ya Yesu Klisto?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto