Mitinda ya Nzambe ekoki komemela yo matomba
NA NTEMBE te, oyebi ete banyama batambwisamaka na lɔɔmbi (instinct). Bamasini mingi, mpo esala malamu, esengeli kolanda malako oyo batyelá yango. Kasi bato bakelamá mpenzampenza mpo mitinda etambwisaka bango. Ndenge nini okoki kondima yango? Ntango Yehova, Mobandisi ya mitinda nyonso ya sembo, akelaki bato ya liboso, alobaki boye: “Tiká tósala moto na lolenge na biso, na elilingi na biso.” Mozalisi azali elimo; azali na nzoto ya mosuni te lokola biso. Na yango, tosalemi na “elilingi” na ye, elimboli ete tozali na likoki ya komonisa bomoto na ye mpe ndambo ya bizaleli na ye. Bato bazali na likoki ya kotambwisa bomoi na bango na kolanda ndenge oyo mitinda ezali kosɛnga, elingi koloba kolanda mibeko mpo na kosala oyo bamoni malamu. Yehova akomisá ebele ya mitinda yango na kati ya Liloba na ye.—Genese 1:26; Yoane 4:24; 17:17.
Kasi moto mosusu akoki koloba ete, ‘Biblia ezali na bankama ya mitinda. Nakoki koyeba yango nyonso te.’ Toboyi te. Kasi talelá naino likambo oyo: Atako mitinda nyonso ya Nzambe ezali na litomba, mitinda mosusu ezali na ntina mingi koleka mosusu. Okoki komona yango soki otángi Matai 22:37-39; na bavɛrsɛ yango Yesu amonisaki ete kati na mibeko mpe mitinda ya Mobeko ya Mose oyo etali mibeko yango, mosusu ezalaki na ntina mingi koleka mosusu.
Mitinda nini ezali na ntina mingi? Mitinda ya Biblia oyo eleki ntina ezali oyo etaleli mpenzampenza boyokani na biso na Yehova. Soki totosi mitinda yango, tokomona ete Mozalisi akómi moto ya liboso oyo akobanda kotambwisa busɔle na biso ya bizaleli malamu. Nsima na yango, ezali na mitinda oyo etaleli boyokani na biso na bato mosusu. Soki tolandi mitinda wana, yango ekosalisa biso tóboya “ngai naino,” ata soki bapesi ezaleli yango nkombo nini.
Tólobela sikoyo moko ya mateya ya solo ya ntina mingi, oyo ezali na kati ya Biblia. Liteya ya solo yango ezali nini mpe ndenge nini yango etaleli biso?
“Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba”
Makomami Mosantu emonisi polele ete Yehova azali Mozalisi na biso Monene, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Moto moko te akoki kokokana na ye to kozwa esika na ye. Yango ezali liteya ya solo mpe ya ntina mingi oyo ekomami na kati ya Biblia.—Genese 17:1; Mosakoli 12:1, NW.
Moko ya bato oyo bakomaki mokanda ya Nzembo akomaki mpo na Yehova ete: “Bobele Yo Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba.” Davidi, mokonzi ya kala, alobaki boye: “Bokonzi mpe ezali na yo, ɛ [Yehova], mpe yo okokumisama nkolo likoló na nyonso.” Yilimia, mosakoli oyo ayebani mingi, akomaki boye: “Zambi mosusu azali lokola yo te, ɛ [Yehova]; yo ozali monene, nkombo na yo ezali monene, kati na nguya.”—Nzembo 83:18; 1 Ntango 29:11; Yilimia 10:6.
Ndenge nini tosengeli kosalela mateya ya solo wana oyo etali Nzambe na bomoi na biso ya mokolo na mokolo?
Ezali polele ete moto moko te asengeli kozwa esika ya liboso na bomoi na biso, longola kaka Mozalisi na biso oyo apesaki biso bomoi. Na yango, omoni te ete tosengeli mpenza kobundisa mposa nyonso ya koluka kobenda likebi epai na biso moko, mposa oyo ekoki kozala makasi koleka epai ya bamosusu? Etinda ya mayele oyo esengeli kotambwisa biso ezali oyo ya ‘kosalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.’ (1 Bakolinti 10:31, NW) Mosakoli Danyele apesaki ndakisa ya malamu mpenza na likambo yango.
Lisolo ya makambo ya kala eyebisi biso ete Nebukadanesala, Mokonzi ya Babilone, atungisamaki na ndɔtɔ moko mpe alukaki koyeba ndimbola na yango. Ata moto moko te akokaki kolimbola ndɔtɔ yango, kasi Danyele ayebisaki mokonzi makambo oyo ye azalaki mpenza na mposa ya koyeba. Danyele amikumisaki mpo na likambo oyo asalaki? Te, akumisaki nde ‘Nzambe oyo azali na likoló, oyo amonisaka makambo mabombami.’ Danyele alobaki lisusu boye: “Ezali te mpo na bwanya ya ndenge nini oyo ezali kati na ngai koleka oyo ezali kati na bato nyonso mosusu ya bomoi nde sekɛlɛ oyo eyebisami epai na ngai.” Danyele azalaki kotosa mitinda. Yango wana, na mokanda ya Danyele, abengami mbala misato ‘moto oyo alingami mingi’ na miso ya Nzambe.—Danyele 2:28, 30, NW; 9:23; 10:11, 19.
Okozwa matomba mingi soki olandi ndakisa ya Danyele. Mpo na kolanda ndakisa na ye, likambo ya ntina ezali nde ya koyeba makanisi nini etindaka biso tósalaka likambo boye to boye. Nani asengeli kozwa lokumu mpo na makambo oyo osalaka? Ezala bomoi ya lolenge nini ozali na yango, ozali na likoki ya kosala makambo na boyokani na etinda oyo ya ntina mingi oyo euti na Biblia: Yehova azali Nkolo Mokonzi. Soki osali bongo, okokóma moto ‘oyo alingami mingi’ na miso na ye.
Tótalela sikoyo mitinda mibale ya ntina mingi oyo ekoki kotambwisa biso na likambo etali boyokani na biso na bato mosusu. Lokola bato mingi bakómi koluka libosoliboso matomba na bango moko, ezali pɛtɛɛ te koyokana malamu na bato mosusu.
‘Na komikitisa’
Bato oyo bamitombolaka basepelaka mpenza na likambo moko te. Mingi balingaka bomoi ya malamu koleka, mpe balingaka kozela te mpo na kozwa yango. Mpo na bango, soki moto azali na lolendo te, elakisi ete moto yango alɛmbá. Batalelaka motema molai lokola ezaleli oyo kaka bamosusu nde basengeli kozala na yango. Mpo na kozwa lokumu, basalaka nyonso oyo balingi. Longola etamboli ya ndenge wana, okanisi ete ezali na etamboli mosusu oyo yo okoki kolanda?
Mokolo na mokolo basaleli ya Nzambe bakutanaka na bato oyo bazali na etamboli ya lolenge wana, kasi bango basengeli te komekola yango. Baklisto oyo bakɔmeli balandaka etinda oyo elobi ete “moto oyo akomikumisa ye moko akoyambama te, kasi ye oyo [Yehova] akokumisa ye.”—2 Bakolinti 10:18.
Soki otosi etinda oyo ezali na mokanda ya Bafilipi 2:3, 4 (NW), yango ekosalisa yo mingi. Vɛrsɛ yango elendisi yo ‘osala eloko moko te na kowelana to na ezaleli ya komitya liboso; kasi na komikitisa, otalelaka bamosusu ete baleki yo.’ Soki osali bongo, ‘okotya likebi, na kobanzabanza kaka na makambo na yo moko te, kasi na kobanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.’
Moto moko oyo azalaki na ezaleli oyo ebongi, oyo mpe ayebaki komitalela na ndenge oyo ebongi ezalaki Gideona; ye azalaki mosambisi moko ya Baebele na ntango ya kala. Alukaki te ete bátya ye mokambi ya Yisalaele. Kasi, ntango baponaki ye mpo azala mokambi, Gideona amonisaki ete akoki na mokumba yango te. Alobaki boye: “Libota na ngai ezali motau eleki nyonso na Manase mpe ngai naleki na moke kati na ndako ya tata na ngai.”—Basambisi 6:12-16.
Lisusu, ntango bato ya libota ya Efelaima bamonaki ete Yehova asalisi Gideona mpo alonga etumba, baswanisaki ye. Kasi, Gideona asalaki nini? Lokola autaki kolonga, yango etindaki ye amimona ete aleki bato nyonso? Te. Eyano oyo apesaki bango na boboto esalaki ete matata ebima te. Alobaki boye: “Ngai nakokaki kosala nini na koleka oyo bino bosali?” Gideona azalaki moto ya komikitisa.—Basambisi 8:1-3.
Ya solo, makambo oyo Gideona akutanaki na yango esalemá kala mpenza. Atako bongo, kotalela lisolo yango ezali na ntina mingi lelo. Okoki komona ete Gideona azalaki na ezaleli oyo ekeseni mosika na oyo ezali komonana lelo, mpe ayokanisaki bomoi na ye na ezaleli yango, mpe azwaki matomba mingi.
Ezaleli oyo epalangani mingi ya koluka liboso matomba na biso moko, ekoki kobebisa lolenge oyo tosengeli komitalela. Mitinda ya Biblia ezali kosembola ezaleli yango ya mabe, ezali koteya biso motuya mpenza oyo tozali na yango na miso ya Mozalisi mpe na miso ya bato mosusu.
Soki tolandi mitinda ya Biblia, tokokwea te na motambo ya “ngai naino,” oyo ezali komonana mingi mikolo oyo. Tokotambwisama lisusu te na mayoki to mpe na bamposa na biso. Soki tozali koyekola mitinda ya sembo mingi, tokoyeba malamumalamu Mobandisi na yango. Ya solo, soki tozali kosala makasi ete ntango tozali kotánga Biblia tótyaka likebi mingi na mitinda ya Nzambe, tokozanga te kozwa matomba.—Talá etanda.
Yehova asalá bato na makoki oyo eleki makoki ya banyama mosika, bango batambwisamaka mpenzampenza na lɔɔmbi. Kosala mokano ya Nzambe elimboli kotosa mitinda na ye. Soki tosali bongo, busɔle na biso ya bizaleli malamu ekolanda kosala malamu mpe ekotambwisa biso kino na ebongiseli ya sika oyo Nzambe akosala. Biblia endimisi biso ete etikali moke mpenza tómona ebongiseli moko ya sika na mabele mobimba, epai “boyengebene ekofanda.”—2 Petelo 3:13.
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Mwa mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso
Na kati ya libota:
“Tiká te ete moto aluka bobele malamu na ye moko kasi yango na mozalani na ye.”—1 Bakolinti 10:24.
‘Bolingo . . . elukaka malamu na yango mpenza te.’—1 Bakolinti 13:4, 5.
“Tiká ete moko na moko na bino alinga mwasi na ye lokola ye moko.”—Baefese 5:33.
“Bino basi, bótosaka mibali na bino.”—Bakolose 3:18.
“Yokamelá tata na yo oyo abotaki yo mpe tyolá mama na yo te wana ekonuna ye.”—Masese 23:22.
Na eteyelo, na mosala to na makambo ya mombongo: “Epimelo na bozito ya lokuta eboyami . . . Moto mabe akosalela lifuti ya kozimbisa.”—Masese 11:1, 18.
“Moyibi ayiba lisusu te, kasi tiká ete asalaka mosala.”—Baefese 4:28.
“Soki moto nani alingi kosala mosala te, alya mpe te.”—2 Batesaloniki 3:10.
“Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo na bino mobimba lokola mpo na Yehova.”—Bakolose 3:23, NW.
“Tozali na mposa ya komitambwisa na bosembo na makambo nyonso.”—Baebele 13:18, NW.
Ndenge ya kotalela bozwi:
“Oyo azali koluka ete akóma na bozwi nokinoki akozanga likambo te.”—Masese 28:20, NW.
“Moto oyo alingaka palata akotonda yango te.”—Mosakoli 5:10, NW.
Ndenge ya komitalela:
“Ntango bato batalelaka nkembo na bango moko, yango ezali mpenza nkembo?”—Masese 25:27, NW.
“Tiká ete [moto] mosusu asanzola yo kasi monɔkɔ na yo mpenza te.”—Masese 27:2.
“Nazali koyebisa moto nyonso kuna na kati na bino ete akanisa mpo na ye moko te koleka ndenge oyo esengeli kokanisa.”—Baloma 12:3, NW.
“Soki moto moko boye akanisi ete azali moto ya ntina ntango azali moto mpamba, azali kokosa makanisi na ye moko.”—Bagalatia 6:3, NW.
[Elilingi na lokasa 5]
Danyele apesaki Nzambe lokumu oyo abongi na yango
[Elilingi na lokasa 7]
Kofanda elongo na bamosusu ndenge mitinda ya Nzambe esɛngaka ememaka boyokani malamu mpe bolamu
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]
U.S. Fish & Wildlife Service, Washington, D.C./Robert Bridges