Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/3 lok. 19
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Ngɔndɔ Maria—Biblia elobi nini mpo na ye?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • “Talá! Nazali moombo ya Yehova!”
    Mekolá kondima na bango
  • “Talá! Mwana mwasi moombo ya Yehova!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Malia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/3 lok. 19

Mituna ya batángi

Kozanga kokoka ya Malia ntango azalaki naino ngɔndɔ etikaki elembo moko epai na Yesu ntango azalaki kokola na libumu na ye?

Mpo na “kobotama ya Yesu,” Makomami elobi ete: “Na eleko oyo mama na ye Malia alakamaki na libala na Yosefe, akómaki na zemi na nzela ya elimo santu liboso ete bázala elongo.” (Matai 1:​18, NW) Elimo santu ya Nzambe nde esalaki mpenza ete Malia azwa zemi.

Kasi, tokoloba boni mpo na Malia? Mwana oyo azalaki na libumu na ye abandaki kosalema na likei (ovule) na ye? Soki totaleli bilaka oyo Nzambe apesaki bankɔkɔ ya Malia​—⁠Abalayama, Yisaka, Yakobo, Yuda mpe Mokonzi Davidi​—⁠mwana yango asengelaki kozala mokitani na bango mpenza. (Genese 22:18; 26:24; 28:​10-14; 49:10; 2 Samwele 7:16) Ezali se na ndenge yango nde mwana oyo Malia abotaki akokaki kozala moto oyo abongi mpenza kozwa bilaka wana ya Nzambe. Yango emonisi ete asengelaki kozala mpenza mwana ya Malia.​—⁠Luka 3:​23-34.

Anzelu ya Yehova abimelaki Malia ntango azalaki naino ngɔndɔ mpe alobaki na ye ete: “Bangá te, Malia, mpo ete ozwi ngɔlu epai na Nzambe. Mpe talá, okozwa zemi mpe okobota mwana mobali, mpe okobyanga nkombo na ye Yesu.” (Luka 1:​30, 31) Mpo mwana asalema na libumu, esɛngaka ete likei moko ya mama ebanda kokola. Na ntembe te Yehova Nzambe nde asalaki ete likei moko na libumu ya Malia ebanda kokola; mpo na yango, atindaki awa na mabele bomoi ya Mwana na ye mobotami-bobele-moko oyo, liboso azalaki ekelamu ya elimo na likoló.​—⁠Bagalatia 4:⁠4.

Mwana oyo abotamaki na lolenge wana epai ya mwasi oyo azali moto ya kozanga kokoka akokaki kozala moto ya kokoka mpe azangi masumu? Soki bomoi ya kokoka ekɔti na nzoto ya kozanga kokoka, mwana oyo akobotama akozala moto ya ndenge nini? Na kotalela makambo oyo Biblia eyebisi biso, tokoki mpenza koloba ete nguya oyo esalaka ete zemi ebanda esilisaki kozanga kokoka nyonso oyo ezalaki na likei ya Malia, mpe ebimisaki moto oyo azalaki moto ya kokoka banda na ebandeli.

Ata soki makambo esalemaki ndenge nini mpo likei oyo ezalaki na libumu ya Malia ebanda kokola, tozali na elikya ete na ntango wana, elimo santu ya Nzambe esalaki ete makambo esalema na ndenge oyo Nzambe akanaki. Anzelu Gabaliele ayebisaki Malia ete: “Elimo santu ekoya likoló na yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mpe oyo akobotama akobyangama mosantu, Mwana ya Nzambe.” (Luka 1:​35, NW) Ezali lokola nde elimo santu ya Nzambe ebatelaki likei ya mwana mpo ete ekoka kobebisama te na kozanga kokoka to mpe na eloko moko ya mabe banda na ebandeli.

Bomoi ya kokoka ya Yesu eutaki epai ya tata na ye ya likoló, kasi eutaki na moto te. Yesu azalaki na ‘litɔnɔ te, atangolamaki na bato ya masumu’ mpamba te Yehova ‘abongiselaki ye nzoto’ banda abandaki kokola na kati ya libumu.​—⁠Baebele 7:26; 10:⁠5.

[Elilingi na lokasa 19]

“Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto