Tólanda kosalela Yehova na motema oyo ezali kotɛngatɛnga te
“Ɛ Nzambe, motema na ngai ezali kotɛngatɛnga te; motema na ngai ezali kotɛngatɛnga te.”—NZEMBO 57:7, NW.
1. Mpo na nini tokoki kozala na elikya lokola Davidi?
YEHOVA akoki kolendisa biso basaleli na ye oyo tomipesi mpo tókangama na kondima ya boklisto ya solo. (Baloma 14:4) Yango wana, tokoki kozala na elikya lokola Davidi oyo ayembaki ete: “Ɛ Nzambe, motema na ngai ezali kotɛngatɛnga te.” (Nzembo 108:1, NW) Soki motema na biso ezali kotɛngatɛnga te, tokozala na mposa ya kosala makambo oyo esɛngami na biso lokola tomipesi na Nzambe. Soki tozali kosɛnga ye atambwisa biso mpe apesa biso makasi, tokoki kopikama, na ekateli mpe na kondima makasi lokola bato ya sembo, baoyo ‘bazali ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.’—1 Bakolinti 15:58, NW.
2, 3. Bilendiseli ya Paulo oyo ezali na 1 Bakolinti 16:13 elimboli nini?
2 Na kati ya makambo oyo Paulo akomelaki bayekoli ya Yesu na Kolinti ya kala mpo na kolendisa bango, makambo oyo ekoki mpe kolendisa biso lelo oyo, ntoma Paulo alobaki boye: “Bólala mpɔngi te, bókangama makasi na kondima, bómitambwisa lokola mibali, bókóma makasi.” (1 Bakolinti 16:13, NW) Na lokota ya Grɛki, likambo mokomoko oyo esɛngami awa ezali na eleko bebe (temps présent); yango ezali komonisa ete ezali likambo ya kosala ntango nyonso. Toli yango elimboli nini?
3 Tokoki ‘kolala mpɔngi te’ na elimo soki tozali kotɛmɛla Zabolo mpe tozali kokangama na Nzambe. (Yakobo 4:7, 8) Soki tozali kotyela Yehova motema, tokobatela bomoko na biso mpe ‘tokokangama makasi na kondima ya boklisto.’ Biso nyonso, bakisa mpe ebele ya bandeko basi oyo tozali na bango, ‘tokomitambwisa lokola mibali’ soki tozali kosalela Nzambe na mpiko mpo na kosakola Bokonzi. (Nzembo 68:11) ‘Tokokóma makasi’ soki tozali ntango nyonso kosɛnga Tata na biso ya likoló makasi mpo na kosala mokano na ye.—Bafilipi 4:13.
4. Makambo nini tokokisaki liboso tózwa batisimo?
4 Tomonisaki ete tondimi mateya ya solo ntango tomipesaki mobimba na Yehova mpe tozwaki batisimo na mai. Kasi, tolekaki na makambo nini liboso tókóma na batisimo? Ya liboso, tozwaki boyebi ya solosolo ya Liloba ya Nzambe. (Yoane 17:3) Yango ekolisaki kondima na mitema na biso mpe etindaki biso na kobongola motema, elingi koloba koyoka mawa mpo na mabe oyo tozalaki kosala. (Misala 3:19; Baebele 11:6) Na nsima, tobongwanaki, elingi koloba ete totikaki misala ya mabe mpo na kosala mokano ya Nzambe na kati ya bomoi na biso. (Baloma 12:2; Baefese 4:23, 24) Na nsima, tosalaki libondeli mpo na koyebisa Yehova ete tomipesi mobimba na ye. (Matai 16:24; 1 Petelo 2:21) Tosɛngaki Nzambe apesa biso lisosoli malamu mpe tozwaki batisimo mpo na komonisa ete tomipesi na ye. (1 Petelo 3:21) Soki tozali kokanisa likoló ya makambo yango, ekosalisa biso tótya makanisi na biso na mposa ya kosala ntango nyonso molende mpo na kosala makambo oyo esɛngami na biso lokola tomipesi na Nzambe mpe kolanda kosalela Yehova na motema oyo ezali kotɛngatɛnga te.
Kotika te koluka boyebi ya solosolo
5. Mpo na nini tosengeli kokoba koyekola Makomami?
5 Mpo na kosala oyo esɛngami lokola tomipesi na Nzambe, tosengeli kotika te koyekola Makomami mpo na kozwa boyebi oyo ekolendisa kondima na biso. Tozalaki na esengo ya kolya bilei ya elimo ntango toyebaki mateya ya solo ya Nzambe sika! (Matai 24:45-47) “Bilei” yango ezalaki kitoko mpe ezalaki kotonga biso mpenza na elimo. Sikoyo, ezali na ntina mingi tókoba kolya bilei malamu ya elimo mpo tózala ntango nyonso basaleli ya Yehova oyo bamipesi mpe bazali na motema oyo ezali kotɛngatɛnga te.
6. Ndenge nini basalisaki yo ozala na botɔndi mpenza mpo na mateya ya Biblia?
6 Esengeli kosala molende mpo na koyeba Makomami na bozindo. Yango ezali lokola koluka biloko ya motuya oyo ebombami; esɛngaka molende makasi. Kasi, kozwa ‘boyebi mpenza ya Nzambe’ epesaka bolamu mingi! (Masese 2:1-6) Ekoki kozala ete ntango mosakoli moko ya Bokonzi ayekolaki na yo Biblia mpo na mbala ya liboso, asalelaki buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Ntango mosusu esɛngaki bóyekola mbala mingi liboso ya kosilisa mokapo moko. Ozalaki kozwa mwa makanisi ntango azali kotánga mpe kolimbola bavɛrsɛ ya Biblia oyo maloba na yango etyami te na kati ya baparagrafe. Soki na likambo moko okangi ntina malamu te, azalaki kolimbola yango. Moto oyo azalaki koyekola na yo azalaki komibongisa malamu, azalaki kobondela Nzambe mpo na kosɛnga ye elimo na ye, mpe azalaki kosalisa yo ozala na botɔndi mpenza mpo na mateya ya solo.
7. Nini epesaka moto makoki mpo na koteya basusu solo ya Nzambe?
7 Molende wana ebongaki mpenza, mpamba te Paulo akomaki boye: “Tiká ete moto oyo bazali koloba na ye mpo na koteya ye liloba asangana na makambo nyonso ya malamu na moto oyo azali koloba mpo na kopesa mateya yango.” (Bagalatia 6:6, NW) Na vɛrsɛ oyo, maloba ya Grɛki ezali komonisa ete bazalaki kokɔtisa Liloba ya Nzambe na makanisi mpe na motema ya moto oyo “bazali koloba na ye mpo na koteya ye.” Lokola oteyamaki bongo, ozwi makoki ya koteya bato mosusu. (Misala 18:25) Mpo na kosala oyo esɛngami na yo na ndenge omipesi na Nzambe, osengeli koyekolaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ mpe makasi na yo ya elimo.—1 Timote 4:13; Tito 1:13; 2:2.
Kobosana te ete obongolaki motema mpe obongwanaki
8. Ndenge nini moto akoki kobatela bizaleli ya malamu?
8 Ozali koyeba lisusu ndenge osepelaki ntango oyekolaki mateya ya solo, obongolaki motema, mpe na nsima omonaki ete Nzambe alimbisi yo mpo na kondima na yo na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa biso? (Nzembo 32:1-5; Baloma 5:8; 1 Petelo 3:18) Na ntembe te ozali na mposa ya kozongela masumu te. (2 Petelo 2:20-22) Makambo mingi ekoki kosalisa yo okokisa mokano yango, moko na yango ezali kobondela Yehova ntango nyonso mpo ozalaka na bizaleli ya malamu, osala makambo oyo esɛngami na yo lokola omipesi na Nzambe, mpe olanda kosalela Yehova na bosembo.—2 Petelo 3:11, 12.
9. Lokola totiki masumu, nzela nini tosengeli kolanda?
9 Lokola obongwanaki, elingi koloba otikaki masumu, sɛngáká ntango nyonso Nzambe asalisa yo obatela motema na yo ete etɛngatɛnga te. Ezali lokola nde obungaki nzela, kasi na nsima otalaki na karte mpe omoni nzela ya malamu mpe olandaki yango. Sikoyo, landá kaka nzela yango. Tyelá ntango nyonso Nzambe motema ete akotambwisa yo, mpe zalá na ekateli ya kotikala na nzela ya bomoi.—Yisaya 30:20, 21; Matai 7:13, 14.
Kobosana te ete omipesaki mpe ozwaki batisimo
10. Makambo nini tosengeli kobosana te na oyo etali komipesa na biso na Nzambe?
10 Kobosana te ete osalaki libondeli mpo na komipesa na Yehova mpo na kosalela ye libela na libela. (Yuda 20, 21) Komipesa elimboli komitya pembeni, to komikabola, mpo na mosala moko mosantu. (Levitike 15:31; 22:2) Komipesa na yo ezalaki kɔntra ya mwa ntango te, omipesaki mpe na bato te. Omipesaki libela na Mokonzi ya Molɔ́ngɔ́, mpe yango ezali kosɛnga kotikala sembo epai ya Nzambe bomoi na yo mobimba. ‘Tózala na bomoi to tókufa, tozali bato ya Yehova.’ (Baloma 14:7, 8) Mpo tózala na esengo, tosengeli kosala mokano na ye mpe kosalela ye na motema oyo ezali kotɛngatɛnga te.
11. Mpo na nini osengeli kobosanaka te ete ozwaki batisimo mpe mpo na nini ozwaki yango?
11 Kobosanaka te batisimo na yo, likambo oyo emonisaki ete omipesi na Nzambe na motema na yo mobimba. Bapesaki yo batisimo na makasi te, mpamba te ozwaki ekateli yango yo moko. Sikoyo ozali nde na ekateli ya koyokanisa mokano na yo na mokano ya Nzambe na bomoi na yo mobimba? Osɛngaki Nzambe lisosoli malamu mpe ozwaki batisimo mpo na komonisa ete omipesi na ye. Saláká makambo oyo esɛngami na moto oyo amipesi mpo na kobatela lisosoli malamu wana; na ndenge yango, Yehova akosopela yo mapamboli.—Masese 10:22.
Mokano na yo ezali na esika monene
12, 13. Mokano na biso ezali na boyokani nini na komipesa na biso mpe kozwa batisimo?
12 Na mokili mobimba, ebele ya bato bazwi mapamboli mingi mpo bamipesaki na Nzambe mpe bazwaki batisimo. Ntango tozwi batisimo ya mai mpo na komonisa ete tomipesi na Nzambe, emonisaka lokola nde tokufi na makambo oyo tozalaki kosala liboso, kasi mokano na biso ekufaka te. Lokola tozali bandimi oyo toteyami malamu, tosalelaki nde mokano na biso ntango tobondelaki Nzambe mpo na koyebisa ye ete tomipesi na ye mpe na nsima tozwaki batisimo. Mpo na komipesa mpe kozwa batisimo esɛngaka tóyeba mokano ya Nzambe mpe tóndima kosala yango. (Baefese 5:17) Na bongo, tolandaka ndakisa ya Yesu, ye oyo asalelaki mokano na ye ntango atikaki mosala ya mabaya, azwaki batisimo, mpe amipesaki mobimba mpo na kosala mokano ya Tata na ye ya likoló.—Nzembo 40:7, 8; Yoane 6:38-40.
13 Yehova Nzambe akanaki ete Mwana na ye ‘akokisama na nzela ya bampasi.’ Yango wana, Yesu asengelaki kosalela mokano na ye mpo na kondima bampasi wana na bosembo mpenza. Yango wana, “atombolaki mabondeli mpe malɔmbɔ na koganga makasi mpe na mpisoli . . . mpe ayokami mpo na kotosa na ye malamu.” (Baebele 2:10, 18; 5:7, 8) Soki tozali kobanga Nzambe lokola ye, biso mpe tokoki kozala na elikya ya “koyokama,” mpe tokoki kotya motema ete Yehova akolendisa biso mpo tozali Batatoli na ye oyo bamipesi.—Yisaya 43:10.
Okoki kobatela motema oyo ezali kotɛngatɛnga te
14. Mpo na nini tosengeli kotángaka Biblia mokolo na mokolo?
14 Nini ekoki kosalisa yo obatela motema oyo ezali kotɛngatɛnga te mpe osala makambo oyo esɛngami na yo lokola omipesi na Nzambe? Osengeli kotángaka Biblia mokolo na mokolo mpo na koyeba lisusu Liloba ya Nzambe mingi. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kolɛmba te kolendisa biso na likambo yango. Azali kopesa biso toli yango mpamba te mpo na kosala makambo oyo esɛngami na biso lokola tomipesi na Nzambe, tosengeli kotambola ntango nyonso na solo ya Nzambe. Soki ebongiseli ya Yehova ezalaki koteya lokuta, mbɛlɛ elendisaka Batatoli ya Yehova te to mpe bato oyo bango bakendaka koteya ete bátángaka Biblia.
15. (a) Likambo nini moto asengeli kotalela ntango azali kozwa bikateli? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete baklisto batyaka mosala ya mosuni na esika ya mibale?
15 Ntango ozali kozwa bikateli, osengeli ntango nyonso komitunaka soki ekopekisa yo te osala makambo oyo osengeli kosala lokola omipesi na Yehova. Yango ekoki kotalela mosala na yo. Osalaka makasi ete mosala na yo esalisa yo opesa mabɔkɔ mpo ete losambo ya solo ekende liboso? Atako bapatrɔ mingi bamonaka ete baklisto bazalaka bato ya sembo mpe basalaka mosala malamu, bamonaka mpe ete Batatoli ya Yehova babomaka nzoto te mpo na kokóma bato minene na mokili oyo mpe bawelaka te bisika oyo bakofuta bango mbongo mingi koleka. Ezali bongo mpamba te Batatoli bazalaka te na mokano ya kokóma bazwi, koyebana, kozala na lokumu to kozala bato minene. Mpo na bato oyo bazali kosala makambo oyo esɛngami na bango lokola bamipesi na Nzambe, likambo eleki ntina ezali kosala mokano ya Nzambe. Batyaka mosala oyo ezali kosalisa bango na kozwa mbongo mpo na kobikela na esika ya mibale. Lokola ntoma Paulo, mosala oyo batyaka na esika ya liboso ezali nde mosala ya kosakola. (Misala 18:3, 4; 2 Batesaloniki 3:7, 8; 1 Timote 5:8) Otyaka matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na yo?—Matai 6:25-33.
16. Tokoki kosala nini soki mitungisi ezali kopekisa biso tósala makambo oyo tosengeli kosala lokola tomipesi na Nzambe?
16 Ekoki kozala na bato mosusu oyo liboso báyekola solo, bazalaki kotungisama mingi na makanisi. Kasi, mitema na bango etondaki mpenza na esengo, na botɔndi mpe na bolingo mpo na Nzambe ntango bayebaki elikya ya Bokonzi! Soki bazali kokanisa bolamu oyo bazali na yango banda ntango wana, ekoki kosalisa bango na kolanda kosala makambo oyo esɛngami na bango lokola bamipesi na Yehova. Nzokande, ezali boni soki komitungisa mingi mpo na mikakatano ya bomoi oyo ezali lokola kokanga “liloba ya Nzambe,” ndenge oyo nzube ekoki kokanga milona mpo ekola malamu te mpe ebota mbuma te? (Luka 8:7, 11, 14; Matai 13:22; Malako 4:18, 19) Soki omoni ete yango ebandi kokómela yo to libota na yo, kitisá mitungisi na yo epai ya Yehova mpe bondelá ye ete asalisa yo obakisa bolingo mpe botɔndi na yo. Soki okitisi mokumba na yo epai na ye, ye akosunga yo mpe akopesa yo makasi ya kokoba kosalela ye na esengo mpe na motema oyo ezali kotɛngatɛnga te.—Nzembo 55:22; Bafilipi 4:6, 7; Emoniseli 2:4.
17. Ndenge nini tokoki kolonga komekama makasi?
17 Bondeláká Yehova Nzambe ntango nyonso, ndenge mpe obondelaki ntango omipesaki na ye. (Nzembo 65:2) Ntango mposa ya kosala mabe eyeli yo to ntango ozali na komekama makasi, luká toli ya Nzambe mpe sɛngá ye asalisa yo mpo na kolanda yango. Kobosana te ete ozali na mposa ya kondima, mpamba te moyekoli Yakobo akomaki boye: “Soki moto moko na kati na bino azangi mayele, asenga yango epai ya Nzambe, mpe Nzambe akopesa ye yango; mpamba te Nzambe akabelaka mingi bato nyonso na motema ya malamu mpe abombaka eloko te. Kasi asenga na Nzambe na bondimi nyonso mpe atia ntembe te; mpo moto oyo atiaka ntembe azali lokola mbonge ya mai: mopepe ezali kotindika mpe komema yango epai na epai. Moto ya ndenge wana akanisaka te ‘te akozwa ata eloko moko epai ya Mokonzi Nzambe, mpo azali moto moko ya mitema mibale mpe abongolaka bizaleli na ye ntango nyonso.” (Yakobi 1:5-8, Boyokani ya Sika) Soki tomoni lokola nde komekama moko ezali mpenza makasi, tóyeba likambo oyo: “[Komekama, NW] moko ekómeli bino te oyo ezangi epai ya bato nyonso. Nzambe azali sembo; ye oyo akotika bino te ete bómekama na koleka nguya na bino, kasi esika moko na [komekama, NW], akobongisa ekimeli ete bókoka koyika mpiko.”—1 Bakolinti 10:13.
18. Tokoki kosala nini soki lisosoli na biso ezali kotungisama mpo na lisumu moko monene oyo tobombá mpe yango ezali kozongisa biso nsima na mokano na biso ya kosala oyo esɛngami na biso lokola tomipesi na Yehova?
18 Okosala nini soki lisosoli na yo ezali ntango nyonso kotungisama mpo na lisumu moko monene oyo osalá mpe obombá, mpe likambo yango ezali kolɛmbisa yo na mokano na yo ya kosala makambo oyo esɛngami na yo lokola omipesi na Nzambe? Soki mpenza obongoli motema, komitungisa te, yebá ete Yehova ‘akoboya te motema motutami mpe na mawa.’ (Nzembo 51:17) Kutaná na bankulutu mpo básalisa yo, mpamba te na ndakisa ya Yehova, bakoki kotika yo boye te lokola ozali na mposa ya kozongisa boyokani malamu na Tata na yo ya likoló. (Nzembo 103:10-14; Yakobo 5:13-15) Soki osali bongo, okozwa lisusu makasi mpe motema oyo ezali kotɛngatɛnga te; na ntango yango okotambola na nzela malamu mpe okosala makambo oyo esɛngami na yo lokola omipesi na Nzambe.—Baebele 12:12, 13.
Tólanda kosalela Nzambe na motema oyo ezali kotɛngatɛnga te
19, 20. Mpo na nini ezali na ntina mingi tókoba kosala makambo oyo esɛngami na biso lokola tomipesi na Nzambe?
19 Na ntango oyo ya mpasi, tosengeli kosala makasi mpo na kosala makambo oyo esɛngami na biso lokola tomipesi na Nzambe mpe kokoba kosalela ye na motema oyo ezali kotɛngatɛnga te. Yesu alobaki ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” (Matai 24:13) Lokola tozali na “mikolo ya nsuka,” nsuka mpenza ekoki koya lelo to lobi. (2 Timote 3:1) Lisusu, moto moko te akoki koyeba soki lobi akozala na bomoi to te. (Yakobo 4:13, 14) Yango wana, ezali na ntina mingi tólanda kosala makambo oyo esɛngami na biso lokola tomipesi na Nzambe!
20 Ntoma Petelo amonisaki likambo yango malamu na mokanda na ye ya mibale. Amonisaki ete se ndenge bato mabe bakufaki na Mpela, mabele ya elilingi, elingi koloba bato mabe, bakobomama na “mokolo ya Yehova.” Yango wana, Petelo alobaki ete: “Bosengeli kozala bato ya ndenge nini na bizaleli ya bosantu mpe misala ya kokangama na Nzambe”! Alendisaki bango mpe ete: “Bandeko ya bolingo, lokola boyebi makambo yango liboso, bókeba mpo ete bómemama te [na bateyi ya lokuta mpe bato mabe] mpe bólongwa na ezaleli na bino ya kozanga kotɛngatɛnga.” (2 Petelo 3:5-17, NW) Ekozala mpenza mawa soki moto oyo asilá kozwa batisimo atiki nzela ya malamu mpe akufi lokola moto oyo abatelaki te motema oyo ezali kotɛngatɛnga te!
21, 22. Ndenge nini maloba ya Nzembo 57:7 ekokisamaki epai na Davidi mpe epai ya baklisto ya solo?
21 Okoki kolendisa ekateli na yo ya kosala makambo oyo esɛngami na yo lokola omipesi na Nzambe soki obateli na makanisi mokolo ya esengo oyo ozwaki batisimo mpe ozali koluka lisalisi ya Nzambe mpo ete maloba na yo mpe misala na yo esepelisa motema na ye. (Masese 27:11) Yehova asundolaka bato na ye te; yango wana, biso mpe tosengeli kotikala sembo epai na ye. (Nzembo 94:14) Amonisaki motema mawa mpe boboto na ndenge abebisaki mikano ya banguna mpe abikisaki Davidi. Mpo na komonisa botɔndi na ye, Davidi alobaki ete bolingo na ye mpo na Mosikoli na ye ezali makasi mpe ekoningana te. Na esengo mpenza, ayembaki ete: “Ɛ Nzambe, motema na ngai ezali kotɛngatɛnga te; motema na ngai ezali kotɛngatɛnga te; nakoyemba, nakoyemba nzembo.”—Nzembo 57:7, NW.
22 Lokola Davidi, baklisto ya solo bazali koningananingana te na losambo na bango epai na Nzambe. Bazali na mitema oyo ezali kotɛngatɛnga te mpe bazali kondima ete Yehova nde azali kobikisa bango mpe azali kobatela bango, mpe na esengo nyonso, bazali kokumisa ye na nzembo. Soki ozali na motema oyo ezali kotɛngatɛnga te, okotya elikya na yo na Nzambe, mpe na lisalisi na ye okosala makambo oyo esɛngami na yo lokola omipesi na Nzambe. Okoki kozala lokola “moyengebene” oyo mokomi ya nzembo ayembaki na ntina na ye ete: “Ye akobanga nsango mabe te, motema na ye ezali [kotɛngatɛnga te, NW] naino ekotya ye elikya na ye epai na [Yehova].” (Nzembo 112:6, 7) Soki ozali na kondima mpe ozali kotya elikya nyonso epai ya Nzambe, okoki kosala makambo oyo esɛngami na yo lokola omipesi na Nzambe mpe okoki kolanda kosalela Yehova na motema oyo ezali kotɛngatɛnga te.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini tosengeli kokoba kozwa boyebi ya solosolo ya Biblia?
• Mpo na nini tosengeli kobosana te ete tobongolaki motema mpe tobongwanaki?
• Bolamu nini tozwaka soki tozali kobosana te ete tomipesaki mpe tozwaki batisimo?
• Nini ekosalisa biso mpo tólanda kosalela Yehova na motema oyo ezali kotɛngatɛnga te?
[Bililingi na lokasa 18]
Otángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ na yo ya elimo?
[Elilingi na lokasa 18]
Tokolanda kosalela Yehova na motema oyo ezali kotɛngatɛnga te soki tozali kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso