Mituna ya batángi
Ntango Yoane amonaki “ebele monene” bazali kosala mosala mosantu na tempelo ya Yehova, bazalaki kosala yango na eteni nini ya tempelo?—Emoniseli 7:9-15.
Tokoki mpenza koloba ete ebele monene bazali kosambela Yehova na tempelo na ye monene ya elimo, na lopango na yango oyo ezali awa na mabele, esika oyo emonisamaki na lopango ya libándá na tempelo oyo Salomo atongaki.
Liboso tozalaki koloba ete ebele monene bazali na kati ya lopango ya elimo oyo emonisamaki na Lopango ya Bapakano oyo ezalaki na tempelo ntango Yesu azalaki awa na mabele. Nzokande, nsima ya kolukaluka mpo na likambo yango, emonani ete ezali na makambo soki mitano oyo ezali komonisa ete ezali bongo te. Ya liboso, bisika nyonso te ya tempelo ya Elode ezalaki bililingi ya bisika oyo ezali na tempelo monene ya Yehova na elimo. Na ndakisa, tempelo ya Elode ezalaki na Lopango ya Basi mpe Lopango ya Yisalaele. Mibali mpe basi bakokaki kokɔta na Lopango ya Basi, kasi kaka mibali nde bakokaki kokɔta na Lopango ya Yisalaele. Na tempelo monene ya elimo, mibali mpe basi bazali kosambela na mapango ekabwani te awa na mabele. (Bagalatia 3:28, 29) Yango wana, tempelo ya elimo ezali na esika moko te oyo emonisamaki na Lopango ya Basi mpe Lopango ya Yisalaele.
Ya mibale, na plan oyo Nzambe alakisaki, oyo basengelaki kolanda mpo na kotonga tempelo ya Salomo mpe na plan ya tempelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli, moko te ezalaki na Lopango ya Bapakano; ata mpe tempelo oyo Yelubabele atongaki, ezalaki na Lopango ya Bapakano te. Na bongo, likambo moko te ezali kotinda biso na kokanisa ete tempelo monene ya elimo, elingi koloba ebongiseli ya Yehova mpo na losambo, ezali na esika oyo emonisamaki na Lopango ya Bapakano; mingimingi soki totaleli likambo oyo elandi.
Ya misato, Mokonzi Elode oyo azalaki moto ya Edome nde atongaki Lopango ya Bapakano mpo na lokumu na ye mpe mpo na kosepelisa bakonzi ya Loma. Elode abandaki kobongisa tempelo ya Yelubabele soki na mobu 18 to 17 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Buku moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi boye: “Ndenge oyo bakonzi ya Ampire ya Wɛsti [Loma] bazalaki kolinga bandako ezala . . . esɛngaki kotonga tempelo ya monene koleka batempelo nyonso ya bingumba ya ɛsti.” Nzokande, bonene ya tempelo yango moko esilá kotyama banda kala. Buku yango elobi boye: “Atako tempelo yango moko esengelaki kozala monene ndenge moko na batempelo oyo ezalaki liboso na yango [tempelo ya Salomo mpe tempelo ya Yelubabele], bonene ya Ngomba ya Tempelo ezalaki na ndelo te oyo esilaki kokatama.” Yango wana, Elode ayeisaki tempelo monene ntango abakisaki eteni oyo, na ntango na biso, ebengamaka Lopango ya Bapakano. Tokoki kokanisa te ete eteni oyo Elode atongaki ezali elilingi ya eteni moko na tempelo ya Yehova na elimo.
Ya minei, moto nyonso, azala moto oyo akufá miso, ebɔsɔnɔ, mpe mopakano oyo akatami ngenga te, azalaki kokɔta na Lopango ya Bapakano. (Matai 21:14, 15) Ya solo, lopango yango ekómaki esika ya losambo mpo na Bapakano mingi oyo bazalaki na mposa ya kopesa Nzambe makabo. Ezalaki mpe kuna nde Yesu azalaki ntango mosusu koteya bato mpe mbala mibale mobimba abenganaki bato oyo bazalaki kosanze mbongo mpe kotɛkisa biloko; ayebisaki bato yango ete bazali kosambwisa ndako ya Tata na ye. (Matai 21:12, 13; Yoane 2:14-16) Atako bongo, mokanda moko elobi boye: “Soki tolandeli likambo malamumalamu, lopango yango ya libándá ezalaki eteni ya Tempelo te. Mabele na yango ezalaki mosantu te, mpe moto nyonso akokaki kokɔta kuna.”
Ya mitano, buku moko oyo Barclay Newman na Philip Stine bakomaki, elobi ete liloba ya Grɛki (hiéron) oyo ebongolami na “tempelo” mpe esalelami mpo na Lopango ya Bapakano “elimbolaka lopango mobimba, kasi kaka ndako ya Tempelo te.” Nzokande, liloba ya Grɛki (naos) oyo ebongolami na “tempelo” na emonaneli oyo ntoma Yoane amonaki ebele monene, elimbolaka lopango mobimba ya tempelo te. Soki liloba yango esalelami mpo na tempelo ya Yelusaleme, mbala mingi esalelamaka mpo na Esika eleki Bosantu, ndako ya tempelo, to na kati ya tempelo. Liloba yango ebongolamaka ntango mosusu na “esika mosantu.”—Matai 27:5, 51, NW; Luka 1:9, 21, NW; Yoane 2:20.
Ebele monene bazali kondima mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa biso. Bazali pɛto na elimo, “basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana ya Mpate.” Yango wana babengami bato ya sembo mpe bakokóma baninga ya Nzambe mpe bakobika na bolɔzi monene. (Yakobo 2:23, 25) Na makambo mingi bakokani na baprozelite na Yisalaele, baoyo bazalaki kotosa kondimana ya Mibeko mpe bazalaki kosambela elongo na Bayisalaele.
Ya solo, baprozelite bazalaki kosalela Nzambe na lopango ya kati te, esika banganga bazalaki kosala misala na bango. Lisusu, bato oyo bazali na kati ya ebele monene bazali na lopango ya kati te na tempelo ya Yehova ya elimo, tempelo oyo lopango yango ezali komonisa ezaleli ya kokoka, bomoto ya boyengebene ya mwana, bato oyo bazali ‘banganga-nzambe basantu’ ya Yehova ntango bazali awa na mabele. (1 Petelo 2:5, NW) Kasi, lokola moko ya mikóló oyo Yoane amonaki na likoló alobaki na ye, ebele monene bazali mpenza na kati lopango moko ya tempelo ya elimo oyo ezali lokola Lopango ya Bapakano. Bazali mpenza na lokumu! Mpe yango ezali komonisa ete moto mokomoko asengeli kozala ntango nyonso pɛto na elimo mpe na bizaleli.
[Etanda/Elilingi na lokasa 31]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Tempelo ya Salomo
1. Ndako ya Tempelo
2. Lopango ya Kati
3. Lopango ya Libándá
4. Basikalie ya komata na Lopango ya Tempelo