“Bóya epai na ngai . . . mpe nakobɔndisa bino”
Bokoli ezali kosɛnga ete bisika mosusu ya losambo etongama nokinoki
YESU KLISTO alobaki ete: “Bóya epai na ngai . . . mpe nakobɔndisa bino.” (Matai 11:28, NW) Yango ezali mpenza maloba ya kolendisa oyo euti na Mokonzi ya lisangá ya boklisto! (Baefese 5:23) Soki tokanisi maloba yango, tokosepela mpenza na lolenge moko ya ntina mingi oyo tozwaka libɔndisi: kosangana na bandeko na biso mibali mpe basi na makita ya boklisto. Tozali mpenza na likanisi moko na mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Talá lokola ezali malamu mpe esengo soki bandeko [bakofanda elongo na bomoko, NW]!”—Nzembo 133:1.
Ya solo, baoyo tokutanaka na bango na makita yango mpo na losambo bazali baninga oyo baleki malamu mpe makambo oyo esalemaka na ntango wana ezali malamu mpe esepelisaka biso. Yango wana elenge mwasi moko moklisto alobaki ete: “Nalekisaka mokolo mobimba na kelasi, mpe yango elɛmbisaka ngai mingi. Kasi makita ezalaka lokola esika oyo ezali na mwa banzete na kati ya esobe, kuna nazwaka makasi mpo na koyika mpiko na kelasi na mokolo oyo ekolanda.” Elenge mwasi moko ya ekólo Nigeria alobaki boye: “Namoni ete kozala na baninga ya motema na kati ya bato oyo balingaka Yehova esalisaka ngai nazalaka penepene na Yehova.”
Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova ezalaka esika ya losambo ya solo na kati ya kartye. Na bisika mingi, makita esalemaka na Ndako ya Bokonzi mbala mibale to koleka na pɔsɔ, mpe bayekoli ya Biblia balendisami na koyanganaka soki kaka babandi koyekola mpo bázwa matomba epai ya baninga ya malamu.—Baebele 10:24, 25.
Esengeli kotonga Bandako ya Bokonzi mingi nokinoki
Atako bongo, Batatoli nyonso te nde bazali na Ndako ya Bokonzi oyo ebongi. Lokola basakoli ya Bokonzi bazali se kokóma ebele mpenza na mokili mobimba yango esɛngi ete Bandako ya Bokonzi mingi etongama nokinoki. Esengeli kotonga bankóto ya Bandako ya Bokonzi, mingimingi na mikili ya bobola.—Yisaya 54:2; 60:22.
Na ndakisa: Na mboka-mokonzi ya République démocratique du Congo, Bandako ya Bokonzi ezalaki kaka zomi mpo na masangá 290. Mposa ezalaki mpenza ya kotonga Bandako ya Bokonzi mingi mpe nokinoki. Na Angola, masangá mingi eyanganaka na libándá mpamba te Bandako ya Bokonzi ezali mingi te. Na bikólo mosusu mpe makambo ezali kaka ndenge yango.
Yango wana, kobanda na 1999, ebongiseli ya Yehova ezali kosala molende mpo na kosunga bandeko na mikili ya bobola mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi. Batatoli oyo bayebi misala ya kotonga bandako bamipesaki mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga na bikólo yango. Ntango elimo ya komipesa ya bandeko ya mikili yango eyei kobakisama likoló ya milende na bango, ezali kobota mbuma oyo ezali kolendisa mpenza. Na nsima, Batatoli ya mikili yango bazali kozwa matomba na formasyo oyo bazali kozwa. Nyonso wana ezali kosalisa bango mpo na kokokisa mposa ya kotonga Bandako ya Bokonzi na bamboka na bango.
Na yango, bazali kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi na ndenge oyo ebongi mpenza, mpamba te bazali kosalela biloko mpe ndenge ya kotonga ya bamboka yango. Mokano ezali kaka te ya kotonga Bandako ya Bokonzi mingi, kasi ya kobanda mpe programɛ oyo ebongi na mboka na mboka ya kobatela bandako yango.—2 Bakolinti 8:14, 15.
Makambo ya kolendisa
Milende yango ya kotonga bisika ya losambo eboti mbuma nini? Na ebandeli ya mobu 2001, lapolo moko eutaki na Malawi elobaki boye: “Makambo oyo esalemi na ekólo oyo ezali ya kokamwa mpenza. Na sanza mibale oyo ezali koya, tokosilisa kotonga Bandako ya Bokonzi mosusu.” (Bililingi 1 mpe 2) Na Togo, basali ya bolingo malamu batongaki Bandako ya Bokonzi mwa mingi ya mindɔndɔ te, na basanza oyo euti koleka. (Elilingi 3) Mosala malamu ya basali ya bolingo malamu ezali mpe kosalisa bato ya Mexique, Brésil mpe ya bikólo mosusu bázala na Bandako ya Bokonzi.
Bandeko bazali komona ete ntango kaka Ndako ya Bokonzi esili kotongama, bato ya kartye bazali komona ete Batatoli ya Yehova bakozala na esika yango mpo na libela. Ezali komonana lokola ete bato mingi, soki bazalaki kokakatana mpo na koyangana, ezali mpo ete Batatoli bazalaki na bisika ya malamu te mpo na losambo. Lisangá ya Nafisi, na Malawi, epesi lapolo oyo: “Lokola tozwi Ndako ya Bokonzi ya malamu, ezali kopesa litatoli ya malamu. Yango wana ezali mpasi te mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na bato.”
Bato bazalaki kotyola bandeko ya lisangá ya Krake, na ekólo Bénin, mpo bandako-nzambe ya mangomba mosusu ezalaki mwa kitoko koleka Ndako na bango ya Bokonzi. (Elilingi 4) Lelo oyo, lisangá yango ezali na Ndako ya Bokonzi ya sika mpe ya kitoko mpenza, oyo ezali komonisa losambo ya solo na lolenge ya malamu mpe ya lokumu mpenza. (Elilingi 5) Lisangá yango ezalaki na basakoli 34 mpe bato 73 bazalaki koyangana na makita ya mokolo ya lomingo; kasi bato 651 bayanganaki na likita ya bofungoli Ndako ya Bokonzi. Mingi kati na bango bazalaki bato ya engumba oyo bakamwaki ndenge Batatoli batongaki ndako na mwa ntango mokuse mpenza. Na kotalela makambo oyo euti kosalema na oyo etali kotonga Bandako ya Bokonzi, filiale ya Zimbabwe ekomi boye: “Sanza moko nsima ya kosilisa kotonga Ndako ya Bokonzi moko, mbala mingi motángo ya bayangani ebakisamaka mbala mibale.”—Bililingi 6 na 7.
Na ntembe te, ebele ya Bandako ya Bokonzi ya sika ezali kosalisa baklisto oyo bamipesi mpe bato oyo basepelaka na solo bázala na bisika ya kobɔndisama na elimo. Ntango lisangá na bango ebandaki kosalela Ndako ya Bokonzi ya sika, Motatoli moko na ekólo Ukraine alobaki boye: “Tozali na esengo mingi. Tomonaki na miso na biso moko ndenge oyo Yehova asungaka bato na ye.”
[Etanda/Bililingi na lokasa 10]
Kokaba ezali na motuya monene
Bataloli ya Yehova bazali na esengo mingi ya komona ete mosala monene esalemi nokinoki mpo na kokokisa mposa monene ya Bandako ya Bokonzi na mokili mobimba. Lokola basambeli ya Yehova bazali se kobakisama na mikili mingi, esɛngi ete Bandako ya Bokonzi ya sika ebele etongama lisusu na mikolo ekoya. Na ndakisa, na mobu ya mosala 2001, masangá ya sika pene na 32 ezalaki kosalema pɔsɔ na pɔsɔ! Masangá yango ezali na mposa ya bisika ya koyangana mpe kosambela.
Moto akoki kotuna ete: ‘Epai wapi tozwaka mbongo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi ya sika, mingimingi na bikólo oyo bandeko bazali babola?’ Na lisungi ya Nzambe mpe ndenge bato bazali komonisa ezaleli ya kokaba.
Yehova azali kokokisa elaka na ye ya kosopela basaleli na ye elimo na ye, yango ezali kopesa bango likoki “básala makambo ya malamu, bázala bato ya bomɛngo na misala ya malamu mpenza, bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato bayebi kokaba.” (1 Timote 6:18, NW) Elimo ya Nzambe ezali kotinda Batatoli ya Yehova bápesa mabɔkɔ na ndenge nyonso mpo na mosala ya kosakola Bokonzi; bazali kopesa ntango na bango, makasi na bango, mayele na bango na misala ya mabɔkɔ mpe biloko mosusu oyo bazali na yango mpo na misala ya boklisto.
Elimo ya kokaba ezali kotinda Batatoli mpe bato mosusu bápesa mbongo mpo mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi ekende liboso. Longola makabo oyo bazali kopesa mpo na makambo oyo esɛngaka mbongo na kati ya masangá na bango, bapesaka mpe lisusu makabo mpo na kosunga na mosala ya kotonga na bisika mosusu na mokili.
Na lisangá na lisangá ezali na bakɛsi ya makabo oyo bakómá “Makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba—Matai 24:14.” Bato oyo basepeli bakoki kotya makabo na bango. (2 Mikonzi 12:9) Ezala moke to mingi, makabo nyonso ezalaka na valɛrɛ. (Malako 12:42-44) Basalelaka mbongo yango mpo na misala ndenge na ndenge na kotalela likambo oyo esengeli kosalema, ezala mpe mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi. Kasi mbongo yango bafutaka na yango bakonzi ya lingomba te, mpamba te Batatoli ya Yehova bazalaka na bakonzi te.
Makabo oyo bapesaka mpo na mosala na mokili mobimba esalaka mpenza mosala oyo bapeselaka yango? Ɛɛ. Lapolo ya biro ya filiale ya Liberia, ekólo moko oyo ezali na bitumba, emonisi ete Batatoli mingi kuna bazangi misala mpe bazali na mikakatano ya mbongo. Lolenge nini basaleli ya Yehova ya ekólo yango bakoki kokóma na bisika ya malamu ya losambo? Biro ya filiale ekomi boye: “Makabo ya bolingo malamu ya bandeko ya bikólo mosusu ekosalelama mpo na misala nyonso. Oyo nde ebongiseli ya mayele mpe ya bolingo!”
Bandeko ya bikólo yango bapesaka mpe makabo, atako bazali babola. Lapolo ya Sierra Leonne, ekólo moko ya Afrika, elobi boye: “Bandeko ya mboka na biso bazali kopesa mabɔkɔ na mosala yango mpe bazali na esengo ya kopesa makasi na bango mpe mbongo na kotalela makoki na bango, mpo na kosunga na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi.”
Milende yango mpo na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi ezali kokumisa Yehova. Bandeko ya Liberia balobi na esengo mpenza ete: “Mosala ya kotonga bisika ya malamu ya losambo na ekólo mobimba ekomonisa bato ete losambo ya solo ekotikala libela na Liberia mpe ekokumisa mpe ekoyeisa kitoko nkombo monene ya Nzambe na biso.”