Mikakatano ya bato etikali moke esila!
“BIBONGISELI oyo esalisaka bato ekoki kokokisa bamposa na bango te soki misala na yango esalemi te na kati ya mokano monene mpe na politiki oyo ekoluka kosilisa makambo mpenza oyo ebimisaka bitumba. Mbala na mbala emonanaka ete, misala ya malamu oyo bato basalaka mpo na kosalisa bato mosusu oyo bazali na mpasi, yango moko ekoki te kosilisa mikakatano mpenza ya makambo ya politiki.”—La situation des réfugiés dans le monde 2000.
Atako bato bazali kosala ebele ya misala ya malamu mpo na kosalisa bato, mikakatano ezali se kobakisama. Bato ya politiki bakoki mpenza kosilisa mikakatano mpo na libela? Mpo na koloba solo, bazali na makoki mpenza te ya kosala yango. Kasi nani lisusu akokoka? Na ebandeli ya mokanda oyo akomelaki baklisto ya Efese, ntoma Paulo alobaki maloba ya ntina oyo ezali kolimbola ndenge oyo Nzambe akosilisa mikakatano nyonso ya bato. Kutu, amonisaki ebongiseli oyo Nzambe akosalela, oyo ekosilisa makambo mpenza oyo ebimisaka mikakatano nyonso oyo ezali konyokola biso lelo oyo. Tolendisi yo otalela makambo oyo Paulo ayebisi biso. Maloba na ye ezali na Baefese 1:3-10.
“Ayanganisa lisusu elongo biloko nyonso esika moko kati na Klisto”
Ntoma Paulo alobaki ete Nzambe azali na mokano ya kosala “mosala [to ebongiseli] ya kotambwisa makambo na nsuka mpenza ya bantango oyo etyamá.” Yango elimboli nini? Elimboli ete Nzambe atyá ntango oyo akosala mpo ete “ayanganisa lisusu elongo biloko nyonso esika moko kati na Klisto, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali awa na mabele.” (Baefese 1:10, NW) Nzambe asalaki ebongiseli moko mpo na kozongisa boyokani na kati ya biloko nyonso oyo ezali na likoló mpe oyo ezali na mabele, na boyangeli na ye. Nzokande, Joseph Thayer, moto ya mayele na makambo ya Biblia, alobi boye mpo na maloba ‘koyanganisa lisusu elongo’: “Ayanganisi lisusu elongo mpo na ye moko . . . biloko mpe bikelamu nyonso ya bomoi (oyo tii sikoyo ezali na bokabwani mpo na masumu) na kati ya boyokani moko elongo na Klisto.”
Maloba yango ezali kolobela ntina oyo Nzambe asengeli koyanganisa biloko mpamba te bokabwani ekɔtaki na ebandeli. Na ebandeli, baboti na biso ya liboso Adama na Eva balandaki Satana, batombokelaki Nzambe. Balingaki ete bango moko báponaka oyo ezali malamu na oyo ezali mabe. (Genese 3:1-5) Na boyokani na boyengebene na ye, Nzambe alongolaki bango na libota na ye mpe bazalaki lisusu baninga na ye te. Bapesaki bato nyonso kozanga kokoka na makambo mabe nyonso oyo tozali kokutana na yango lelo oyo.—Baloma 5:12.
Atiki mabe ezala mpo na mwa ntango
Bato mosusu bakoki kotuna ete ‘mpo na nini Nzambe atikaki bango básala likambo yango? Mpo na nini asalelaki te nguya na ye oyo eleki nguya nyonso mpo mokano na ye esalema, mpe na bongo kotika nzela te na mpasi mpe minyoko oyo tozali na yango lelo?’ Ezali mpasi te mpo moto akoka kokanisa ndenge wana. Kasi soki asalelaka nguya na ye oyo eleki nguya nyonso, yango elingaki komonisa likambo nini? Okosepela na moto oyo, lokola azali na nguya mingi, asukisaka mbala moko moto nyonso oyo ameki kaka koboya likanisi na ye? Na ntembe te, okosepela na ye te.
Ezali mpenza te ete batomboki yango batyaki ntembe ete Nzambe azali na nguya oyo eleki nguya nyonso. Batyaki ntembe mpenzampenza nde na lotomo ya Nzambe ya koyangela mpe soki lolenge na ye ya kosala yango ezali malamu. Mpo na kosilisa ntembe mpe mituna minene oyo ebimaki, Yehova atikelaki bikelamu na ye bámitambwisa bango moko mpo na mwa ntango. (Mosakoli 3:1; Luka 21:24) Na nsuka ya ntango yango, akoyangela lisusu mabele mobimba. Na ntango yango, ekomonana polele ete kaka lolenge Nzambe ayangelaka nde ekoki komemela bato awa na mabele kimya ya solo, esengo mpe bolamu. Mpe bato nyonso oyo banyokolaka baninga awa na mokili bakolongolama mpo na libela.—Nzembo 72:12-14; Danyele 2:44.
“Liboso ya kozalisama ya mokili”
Yehova azalaki na mokano ya kosala makambo nyonso wana banda kala. Paulo alobi ete ezalaki “liboso ya ebandeli ya mokili.” (Baefese 1:4, NW) Yango ezalaki te liboso ya kokela mabele to Adama na Eva, mpamba te mokili yango ezalaki “malamu mingi,” mpe botɛmɛli esalemaki naino te. (Genese 1:31) Kasi Paulo azalaki kolobela “mokili” nini? Azalaki kolobela mokili ya bana ya Adama na Eva, mokili ya bato ya masumu mpe ya kozanga kokoka oyo bazalaki na elikya ya kosikolama. Liboso bábota bana, Yehova ayebaki ndenge akobongisa makambo mpo ete asikola bakitani ya Adama oyo babongaki kosikolama.—Baloma 8:20.
Kasi, yango elingi koloba te ete Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba asilisaka makambo ndenge bato basilisaka yango. Mpo bato bayebi ete likambo ekoki kobima na mbalakaka, bakanaka makambo ndenge na ndenge mpo na kosilisa likambo yango. Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso azalaka kaka na mokano na ye moko mpe akokisaka yango. Atako bongo, Paulo azali kolimbola ndenge oyo Yehova azwaki ekateli ya kobongisa makambo mpo ete asilisa mikakatano ya bato mpo na libela. Asalaki makambo nini?
Nani akosilisa mpasi?
Paulo alimboli ete bayekoli ya Klisto, bapakolami na elimo, bazali na mokumba monene ya kosilisa mabe oyo lisumu ya Adama ebimisaki. Paulo alobi ete Yehova “aponaki biso na bomoko elongo na [Klisto],” mpo na koyangela elongo na Yesu na Bokonzi na ye na likoló. Paulo alimboli yango lisusu na mozindo ntango alobi ete Yehova “asilaki kokana kokamatama na biso lokola bana na nzela ya Yesu Klisto.” (Baefese 1:4, 5, NW) Yehova aponaki bango te mokomoko liboso ete bábotama. Nzokande aponaki banda kala etuluku ya basaleli ya sembo mpe oyo bamipesi oyo bakosalisa Klisto mpo na kosilisa mabe oyo Satana Zabolo, elongo na Adama na Eva, bayelaki bato.—Luka 12:32; Baebele 2:14-18.
Oyo nde likambo ya kokamwa! Ntango Satana atyaki ntembe na lotomo ya Nzambe ya koyangela, alingaki mpenza koloba ete bato oyo Nzambe akelá bazali malamu te; soki batungisami to soki balɛngolami, bango nyonso bakoboya boyangeli ya Nzambe. (Yobo 1:7-12; 2:2-5) Na likambo moko oyo emonisaki “boboto monene na ye ya nkembo,” Yehova Nzambe alakisaki na nsima ete atyaka motema na bato oyo akelá na ndenge aponaki bana ya libota ya Adama oyo bazangi kokoka mpo na kokómisa bango bana na ye ya elimo. Baoyo bazali na mwa etuluku yango bakokende kosalela ye na likoló. Mpo na mokano nini?—Baefese 1:3-6, NW; Yoane 14:2, 3; 1 Batesaloniki 4:15-17; 1 Petelo 1:3, 4.
Ntoma Paulo alobi ete bana yango oyo Nzambe aponi bakómi “basangani na Klisto mpo na kosangola libula na ye elongo” na Bokonzi na ye na likoló. (Baloma 8:14-17) Lokola bazali bakonzi mpe banganga, bakosalisa mpo na kolongola mpasi mpe minyoko oyo tozali komona lelo oyo. (Emoniseli 5:10) Ezali solo ete “biloko nyonso esalamaki na Nzambe, ezali kokimela elongo kino ntango oyo.” Kasi etikali moke, bana yango oyo Nzambe aponaki básala elongo na Yesu Klisto, mpe bato nyonso ya botosi ‘básikwama na boombo ya libebisi kino lisiko ya nkembo ya bana ya Nzambe.’—Baloma 8:18-22.
“Kosikolama na nzela ya lisiko”
Makambo wana nyonso ekoki kosalema na nsima ya likambo moko Nzambe asalaki oyo emonisaki boboto monene na ye mpo na bato oyo bakoki kosikolama: mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kosikola bato. Paulo akomi boye: “Mpo na [Yesu Klisto] tozwi kosikolama na nzela ya lisiko na lisalisi ya makila ya moto wana, ɛɛ, kolimbisama ya mabunga na biso, engebene bomɛngo ya boboto monene na ye.”—Baefese 1:7, NW.
Yesu Klisto azali na esika ya liboso na oyo etali kokokisama ya mokano ya Nzambe. (Baebele 2:10) Lisiko na ye epesi Yehova nzela ya kopona ndambo ya bakitani ya Adama mpo bákɔta na libota na ye ya likoló, mpe ya kolongola mabe nyonso oyo lisumu ya Adama ememelaki bato; akoki kosala yango kozanga ete kondima ya bato kati na mibeko mpe malako na ye ebebisama. (Matai 20:28; 1 Timote 2:6) Yehova asalaki makambo na ndenge oyo ezali komonisa boyengebene na ye mpe bosembo ya kokoka.—Baloma 3:22-26.
“Sɛkɛlɛ mosantu” ya Nzambe
Na boumeli ya bankóto ya bambula, Nzambe amonisaki polele te ndenge nini akokokisa mokano na ye mpo na mabele. Na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), “ayebisaki [baklisto] sɛkɛlɛ mosantu ya mokano na ye.” (Baefese 1:9, NW) Paulo na baninga na ye baklisto bapakolami bakangaki ntina malamu ya mokumba monene oyo Yesu Klisto azali na yango mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Babandaki mpe kokanga ntina ya mokumba monene oyo bango bazali na yango ya kozala basangani na libula elongo na Klisto na Bokonzi na ye ya likoló. (Baefese 3:5, 6, 8-11) Bokonzi oyo ezali na mabɔkɔ ya Yesu Klisto mpe ya basangani na ye ezali nde ebongiseli oyo Nzambe akosalela mpo na kotya kimya ya solo na likoló mpe awa na mabele. (Matai 6:9, 10) Na nzela ya ebongiseli yango, Yehova akozongisa mabele ndenge akanaki ete ezala banda na ebandeli.—Yisaya 45:18; 65:21-23; Misala 3:21.
Ntango oyo Nzambe atyá mpo na kosilisa minyoko mpe kozanga bosembo na mabele oyo etikali moke ekoka. Kasi Yehova abandaki mpenza likambo ya kozongisa makambo na molɔngɔ na Pantekote ya mobu 33 T.B. Na ndenge nini? Na ntango wana, abandaki koyanganisa “biloko oyo ezali na likoló,” bato oyo bakoyangela elongo na Kliso na likoló. Baklisto ya Efese bazalaki mpe na kati na bango. (Baefese 2:4-7) Na ntango na biso, Yehova azali koyanganisa “biloko oyo ezali na mabele.” (Baefese 1:10, NW) Na nzela ya mosala ya kosakola oyo ezali kosalema na mokili mobimba, azali koyebisa mabota nyonso nsango malamu oyo etali boyangeli ya Bokonzi na ye oyo ekozala na mabɔkɔ ya Yesu Klisto. Baoyo bazali kondima yango bazali koyanganisama ata lelo na esika moko ya libateli ya elimo mpe bazali kozwa bolamu ya elimo. (Yoane 10:16) Etikali moke, na kati ya paladiso na mabele oyo epɛtolami, bakomona lisusu te makambo nyonso oyo ezangi bosembo mpe bampasi nyonso.—2 Petelo 3:13; Emoniseli 11:18.
Bato oyo basalisaka bato oyo bazali konyokwama basali “makambo mingi ya malamu mpenza.” (La situation des enfants dans le monde 2000). Atako bongo, etikali moke likambo oyo ya malamu koleka esalema ntango Yesu Klisto, elongo na baoyo bakoyangela na ye na Bokonzi ya likoló, bakobanda mosala na bango. Bakosilisa makambo nyonso oyo ebimisaka bitumba mpe mabe nyonso mosusu oyo tomonaka. Bakosilisa mikakatano nyonso ya bato.—Emoniseli 21:1-4.
[Bililingi na lokasa 4]
Bibongiseli mpo na kosalisa bato na bampasi na bango esilisi te mikakatano nyonso ya bato
[Elilingi na lokasa 6]
Mbeka ya Klisto epesi bato nzela ya kolongwa na lisumu ya Adama
[Elilingi na lokasa 7]
Libateli mpe bolamu ya elimo ekoki kozwama lelo oyo
[Bililingi na lokasa 7]
Etikali moke mikakatano nyonso esila na nzela ya Bokonzi ya Masiya