Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/6 nk. 30-31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Likanisi ya baklisto na ntina na milulu ya bokundi ebembe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Baklisto basengeli kokunda bakufi kozanga mindondo mpe na ndenge oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka likambo ya kolela ebembe to kosala matánga?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/6 nk. 30-31

Mituna ya batángi

Ministre moklisto akoki kosala lisukulu ya bokundi ebembe ya moto oyo amibomi?

Ministre moklisto mokomoko asengeli kozwa ekateli na ye na lisosoli malamu liboso ya Nzambe soki akoki kosala lisukulu ya bokundi ebembe ya moto oyo amibomi. Ntango alingi kozwa ekateli, asengeli komituna mituna oyo: Ndenge nini Yehova atalelaka likambo ya komiboma? Moto oyo akufi amibomaki mpenza? Maladi ya makanisi to ya bɔɔngɔ nde etindi ye amiboma? Ndenge nini bato na esika oyo afandi batalelaka likambo ya komiboma?

Lokola tozali baklisto, tosengeli koyeba ndenge oyo Yehova atalelaka likambo ya komiboma. Na miso ya Yehova, bomoi ya moto ezali mpenza na motuya mpe ezali na bosantu. (Genese 9:5; Nzembo 36:9) Komiboma ezali likambo mabe na miso ya Nzambe, ezali ndenge moko na koboma moto mosusu. (Exode 20:13; 1 Yoane 3:15) Yango elingi koloba ete bakoki kosala lisukulu te mpo na kokunda moto oyo amibomi?

Tótalela likambo oyo ekómelaki Saulo, Mokonzi ya Yisalaele. Ntango amonaki ete akobika te na etumba na Bafilistia, na esika ya kotika ete banguna na ye bányokola ye, “Saulo akamataki mopanga mpe akweaki likoló na yango.” Ntango Bafilistia bazwaki ebembe na ye, bakendaki kokakisa yango na efelo ya engumba Bete-sana. Ntango bato ya engumba Yabese-gilada bamonaki likambo oyo Bafilistia basalaki, balongolaki ebembe yango mpe batumbaki yango. Na nsima, bakamataki mikuwa na ye mpe bakundaki yango. Kutu, bakilaki bilei mikolo nsambo, ndenge Bayisalaele bazalaki kosala mpo na kolela ebembe. (1 Samwele 31:4, 8-13; Genese 50:10) Ntango Davidi, mopakolami ya Yehova, ayebaki likambo oyo bato ya Yabese-gilada basalaki, alobaki boye: “Bópambwama na [Yehova] mpo ete bozalaki na boboto oyo epai na nkolo na bino, ye Saulo, mpe bokundaki ye. Sikawa, [Yehova] amonisa boboto mpe solo epai na bino; ngai mpe lokola nakozongisela bino malamu oyo mpo ete bosalaki likambo yango.” (2 Samwele 2:5, 6) Biblia elobi te ete bato ya Yabese-gilada bazwaki etumbu na ndenge basalaki likambo oyo ekoki kobengama ete molulu ya bokundi ebembe ya Mokonzi Saulo. Kokanisá yango na likambo oyo ekómelaki bato oyo, mpo na mabe na bango, bakundamaki te. (Yilimia 25:32, 33) Ministre moklisto akoki kokanisa lisolo ya Saulo mpo na kozwa ekateli soki akosala lisukulu mpo na moto oyo amibomi.

Ministre moklisto asengeli mpe kotalela ntina oyo azali kosala lisukulu ya bokundi ebembe. Batatoli ya Yehova basalaka te milulu ya bokundi ebembe lokola bato oyo bandimaka ete molimo ekufaka te mpe bamikosaka na kokanisa ete milulu na bango esalisaka na kotinda mowei na mokili mosusu. Lisukulu yango ezalaka mpo na mowei te, kasi ntina na yango ezalaka mpenza nde kolendisa bato oyo bakufeli ndeko mpe kopesa litatoli epai ya bato oyo bayei esika ebembe ezali báyeba esika moto akendaka soki akufi. (Mosakoli 9:5, 10; 2 Bakolinti 1:3-5) Ntina mosusu ya lisukulu yango ezali ya kosalisa bato nyonso oyo bayei na esika ebembe ezali bákanisa ete bomoi ya moto ezali mokuse. (Mosakoli 7:2) Ntina wana ekokokisama soki basali lisukulu ya bokundi ebembe ya moto oyo amibomi?

Ya solo, bamosusu bakoki kokanisa ete moto yango oyo amibomi ayebaki malamu ete azali kosala lisumu na miso ya Yehova. Kasi, ezalaka ntango nyonso te na likoki ya koyeba ete ezalaki mpenza bongo. Ekoki nde kozala ete motó ya moto ebalukaki na mbala moko. Bato mosusu oyo bakanaki komiboma babongolaka makanisi na bango mpe bamibomaka lisusu te. Soki moto akufi, akoki lisusu kobongola motema te mpo na likambo oyo asalaki.

Likambo mosusu tosengeli koyeba ezali ete maladi ya bɔɔngɔ mpe kobulungana makanisi etindaka bato mingi na komiboma. Ekoki kozala ete motó na bango ezalaki kosala malamu te, yango ememaki bango tii na komiboma. Ankɛtɛ mosusu ezali komonisa ete bato mingi oyo bamibomaka (90 %) motó na bango esalaka malamu te, to bazalaka baombo ya bangi to ya masanga ya makasi. Yehova akolimbisa bato oyo bamibomaki mpo motó na bango ezalaki kosala malamu te? Tozali na lotomo te ya kokata soki moto oyo amibomaki asalaki lisumu oyo ekolimbisama te na miso ya Yehova. Soki ministre moklisto alingi kosala lisukulu ya bokundi ebembe ya moto oyo amibomi, akoki kotalela makambo moto yango azalaki kosala liboso ya komiboma, asengeli mpe kotalela soki motó na ye ezalaki kosala malamu te.

Ezali mpe na likambo mosusu oyo asengeli kotalela: Ndenge nini bato ya esika oyo bafandi batalelaka likambo ya komiboma mpe liwa ya moto? Mingimingi likambo yango etali bankulutu, bango nde bazali na mokumba ya komibanzabanza mpo na lokumu ya lisangá ya Batatoli ya Yehova. Na kotalela ndenge oyo bato ya esika oyo bafandi batalelaka komiboma, mpe mingimingi mpenza ndenge bazali kolobela likambo ya moto oyo amibomi, bankulutu bakoki koboya kosala lisukulu yango na miso ya bato nyonso to na Ndako ya Bokonzi.

Atako bongo, soki bandeko mosusu basɛngi ministre moklisto moko ete asala lisukulu ya bokundi ebembe, asengeli koyeba ete ye moko nde akozwa ekateli, kasi akosala yango te lokola moto oyo lisangá etindi ye. Soki andimi kosala lisukulu yango, asengeli kozala na mayele, asengeli te koloba na bosikisiki ete mowei yango akosekwa. Elikya ya kozala na bomoi na mikolo ezali koya mpo na mowei yango etaleli Yehova ye moko, mpe moto ata moko te akoki koloba ete moto oyo akufi akosekwa to te. Ministre moklisto akoki kolobela mateya ya solo oyo euti na Biblia na ntina etali liwa mpe akoki kobɔndisa bato oyo bakufeli ndeko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto