Ntango nini Yehova apambolaka molende ya solosolo?
“TIKÁ ngai nakende mpo ete ntɔngɔ ezali kotana.”
“Nakotika yo kokenda te bobele soko opamboli ngai.”
“Nkombo na yo nani?”
“Yakobo.”
“Nkombo na yo ekozala Yakobo lisusu te, nde ekozala Yisalaele, mpo ete osili kobunda na Nzambe mpe na bato mpe olongi.”—Genese 32:26-28.
Lisolo oyo ya kokamwa ebimaki mpo na molende oyo Yakobo, mobange ya mbula 97 asalaki mpe emonisi ete nzoto na ye ezalaki naino pɛpɛlɛ. Atako Biblia elobelaka ye lokola elombe ya masano te, abundaki, to atingamaki na anzelu moko butu mobimba. Mpo na nini? Yakobo azalaki komibanzabanza mingi mpenza mpo na elaka oyo Yehova apesaki nkɔkɔ na ye, oyo etalaki libula na ye.
Mwa bambula liboso, Esau ndeko na Yakobo atekiselaki ye lotomo na ye ya mwana ya liboso mpo na saani moko ya supu ya ndunda. Sikoyo Yakobo ayoki nsango ete Esau azali koya elongo na mibali 400. Yakobo asengelaki mpenza komitungisa, yango wana alukaki ete Yehova andimisa ye lisusu soki elaka oyo apesaki ye ete libota na ye ekokóma mingi na mabele oyo ezwami na ngámbo mosusu ya Ebale Yaladene ekokokisama solo. Yakobo azwaki ekateli ya kosala na boyokani na mabondeli na ye. Atindelaki Esau biloko ebele, ntango azalaki koya kokutana na ye. Mpo na komibatela, akabolaki basali na ye na biloko na ye na bituluku mibale, mpe akatisaki basi na ye mpe bana na ye na ngámbo mosusu ya mongala Yaboko. Na molende mpenza mpe na ebele ya mai na miso, ayikaki lisusu mpiko makasi koleka, kobundáká na anzelu butu mobimba ete “akoka kosɛnga bámonisela ye motema boboto.”—Hosea 12:4, NW; Genese 32:1-32.
Tózwa ndakisa ya likambo moko oyo esalemaki liboso: Laele, mwasi ya mibale ya Yakobo mpe alingaki ye mingi. Laele ayebi malamumalamu ete Yehova alakaki ete akopambola Yakobo. Ndeko na ye, Lea, mwasi na Yakobo ya liboso, abotaki bana minei ya mibali, kasi Laele atikalaki se ekomba. (Genese Genese 29:31-35) Kasi, na esika ete akóma mawamawa, ye akobaki se kolelela Yehova na nzela ya mabondeli, mpe asalaki na boyokani na mabondeli na ye. Bobele ndenge nkɔkɔ na ye Sala asalaki na Agala, Laele apesi Yakobo moombo na ye Biliha mpo azala makango na ye mpo Laele alobi ete, “Mpe ngai nakozala na bana mpo na ye.”a Biliha abotelaki Yakobo bana mibali mibale, Dani na Nafatali. Ntango Nafatali abotamaki, Laele amonisaki mpenza ndenge azalaki koyoka na motema na ye na maloba oyo: “Nabundi na ndeko na ngai ya mwasi bitumba ya nsɔmɔ mpenza. Mpe nalongi ye!” Laele azwaki lisusu mapamboli, abotaki bana mibali mibale, Yosefe na Benyamina.—Genese 30:1-8, NW; 35:24.
Kasi mpo na nini Yehova apambolaki milende ya Yakobo na Laele, ezala ya nzoto to ya motema na bango? Bazalaki ntango nyonso kotalela mokano ya Yehova mpe libula na bango ezalaki na motuya monene na miso na bango. Babondelaki mingi mpo Yehova apambola bomoi na bango mpe balandaki kosala makambo na boyokani na mokano ya Nzambe mpe na mabondeli na bango.
Lokola Yakobo na Laele, lelo mpe bato ebele bakoki komonisa ete mpo na kozwa mapamboli ya Yehova esɛngaka milende mpenza. Milende na bango esalemaka mbala mingi nzela moko na mai na miso, kolɛmba nzoto, mpe na makanisi ya kozanga kolonga. Mama moklisto moko na nkombo Elizabeth azali komikundola milende oyo asengelaki kosala mpo na kozongela momeseno ya koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita ya boklisto, nsima ya kotika yango ntango molai. Lokola azalaki mama ya bana mibali mitano ya mike, mobali na ye azalaki mondimi te mpe asengelaki kokende na motuka kilomɛtrɛ soko 30, mpo na kokóma na Ndako ya Bokonzi ya penepene; nyonso wana ezalaki likambo monene mpenza mpo na ye. “Kokenda na makita pɔsɔ na pɔsɔ ezalaki kosɛnga disiplini ya makasi, kasi nayebaki ete yango ezalaki malamu mpo na ngai moko mpe mpo na bana na ngai. Esungaki bango mpo na komona ete yango ezali mpenza nzela oyo ebongi kolanda.” Yehova apambolaki milende na ye. Na bana na ye misato oyo bazalaki komipesa na lisangá ya boklisto, mibale bazali kosala mosala ya ntango nyonso. Na esengo nyonso na motema mpo na ndenge bazali kokende liboso na makambo ya elimo, mama yango alobaki boye: “Bakoli makasi na elimo koleka kutu ngai moko.” Oyo nde lipamboli mpo na milende na ye!
Milende oyo Yehova apambolaka
Na ntembe te, kotya molende mpe kosala mosala makasi ezali na matomba na yango. Soki tozali kosala makasi mpo na kokokisa mikano na biso to mpo na kokokisa mikumba na biso, tokozwa mpe esengo mingi. Yehova asalá biso motindo wana. Mokonzi Salomo akomaki ete: “Moto na moto alya mpe amɛla mpe ayoka esengo mpo na malamu ya mosala na ye nyonso. Yango likabo ya Nzambe.” (Mosakoli 3:13, NW; 5:18, 19) Nzokande mpo na kozwa lipamboli ya Nzambe, tosengeli kosɛnzɛla ete milende na biso esalema na ndenge ebongi. Na ndakisa, tokoki nde kokanisa ete Yehova apambola biso ntango tozali kotya makambo ya elimo na esika ya liboso te na bomoi na biso? Moklisto oyo asili komipesa na Nzambe akoki kozala na elikya ete Yehova akondima ye soki andimi kozwa mosala to komata mpɛtɛ na mosala atako ayebi ete yango ekosala ete mbala na mbala azangaka baninga ya malamu mpe mateya ya kolendisa na makita ya boklisto?—Baebele 10:23-25.
Eloko moko te emonisi ete moto ‘akoyoka esengo’ soki alekisi bomoi na ye mobimba na komipesa na mosala ya mosuni to na koluka bozwi ya mokili, mpe atii makambo ya elimo pembeni. Na lisese ya moloni, Yesu alobelaki makama ya milende oyo esalemaka na nzela oyo ezali malamu te. Mpo na mbuma oyo “elonamaki na kati ya banzube,” Yesu alimbolaki ete “wana ezali moto oyo ayoki liloba, kasi motungisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo etye liloba nkaka, mpe ye azangi kobota mbuma.” (Matai 13:22, NW) Ntoma Paulo mpe akebisaki kaka mpo na motambo yango mpe abakisaki ete baoyo bazali kolanda bozwi ya mosuni “bakweaka na kati ya komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na kati ya libebi mpe na likama.” Eloko nini ekoki kosunga moto mpo na kolonga lolenge wana ya bomoi oyo ememaka na libebi ya elimo? Ntoma Paulo abakisaki lisusu boye: ‘Kimá makambo wana mpe kotya elikya na yo te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela.’—1 Timote 6:9, 11, 17, NW.
Biso nyonso, tózala mikóló to bilenge, ezala toumeli mingi na mosala ya Yehova to te, tokoki kozwa litomba soki tolandi ndakisa ya milende ya solosolo oyo Yakobo na Laele basalaki. Ntango bazalaki koluka ndenge ya kosepelisa Nzambe, babosanaki ata moke te libula na bango, atako bakutanaki na makambo oyo ebangisaki bango to mpe nyonso elekaki te ndenge balingaki. Lelo oyo, mitungisi mpe mikakatano oyo tozali kokutana na yango ekoki mpe kobangisa, kolɛmbisa to konyokola makanisi na biso. Yango ekoki kosala ete tótika koyika mpiko na etumba mpe tókóma na molɔngɔ ya bato oyo bakwei na etumba ya Satana. Akoki kosalela mayele nyonso oyo azali na yango mpo na kokokisa mokano na ye; ezala na lolenge ya kominanola to ya kopemisa nzoto, masano to mwa makambo ya kolekisa ntango, ezala mosala ya mosuni to bozwi ya mokili. Mbala mingi bakolaka biso ebele ya makambo ya kitoko, kasi bobele mwa moke mpamba nde ekokokisama. Baoyo bazimbisami to babendami na mposa ya koluka biloko ya lolenge wana mbala mingi bayaka komona ete bakosaki bango. Lokola Yakobo na Laele, bato wana ya kala, biso mpe tólona elimo ya kobunda na molende mpo na kolonga mayele mabe ya Satana.
Zabolo azali koluka eloko mosusu te, mposa na ye ezali bobele ete tólɛmba nzoto mpe tóndima ete tokoki kolonga te, tókanisa ete ‘elikya ezali lisusu ata moke te. Tokoki lisusu kosala eloko moko te. Ntina ya kokoba ezali te.’ Yango wana, ezali na ntina mingi ete tóboya ezaleli ya kozanga elikya, ya kokanisaka ete ‘moto moko te alingaka ngai’ mpe ete ‘Yehova abosaná ngai.’ Kotikela makanisi ya lolenge wana esika na motema ezali nde komiboma. Ekoki nde komonana ete tokangi mabɔkɔ mpe totiki kobunda mpo na kozwa lipamboli? Kobosana te ete Yehova apambolaka milende ya solosolo oyo tosalaka.
Kobá kobunda mpo na kozwa lipamboli ya Yehova
Bolamu na biso ya elimo etaleli mingimingi lolenge tokangaka ntina ya mateya mibale ya moboko ya solo oyo etali bomoi na biso basaleli ya Yehova. (1) Mikakatano, bokɔnɔ, to bampasi ya bomoi ezali likambo ya moto nyonso, mpe (2) Yehova ayokaka kolela ya baoyo babelelaka ye mpo na koluka lisalisi mpe lipamboli.—Exode 3:7-10; Yakobo 4:8, 10; 1 Petelo 5:8, 9.
Ata soki ozali na bomoi ya mpasi to mpe ozali komona ete okómi na nsuka, kopesa nzela te na “lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi”—kozanga kondima. (Baebele 12:1, NW) Kobá kobunda tii ntango okozwa lipamboli. Zalá na motema pɛtɛɛ, kobosana te mobange Yakobo oyo abundaki butu mobimba mpo na koluka lipamboli. Lokola mosali bilanga oyo alonaka na ntango ya mbula mpe azelaka tii ntango ya kobuka ekoka, yo mpe luká mapamboli ya Yehova, na motema pɛtɛɛ mpenza, mpo na misala na yo ya elimo, ata soki ozali kokanisa ete ozali kosala ndenge olingaka te. (Yakobo 5:7,8) Kanisáká ntango nyonso maloba ya mokomi ya nzembo oyo elandi: “Baoyo bakokonaka na mpisoli bakobukaka na koganga na esengo.” (Nzembo 126:5; Bagalatia 6:9) Tɛlɛmá ngwi mpe tikalá ntango nyonso na molɔngɔ ya babundi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Likambo ya kozala na makango ebandaki kala, liboso ete kondimana ya Mibeko esalema, mpe Mibeko eyaki kondima yango mpe kotambwisa yango. Nzambe amonaki ete ezali na ntina te azongisa na ntango wana mobeko na ye oyo atyaki na ebandeli, na elanga ya Edene, ete mobali moko azala na mwasi bobele moko. Atikaki makambo ezala naino bongo tii koya ya Yesu Klisto; mpe atyaki mibeko mpo na kobatela basi ya makango. Kokamata basi ya makango esalaki ete motango ya bato ekola nokinoki na kati ya ekólo ya Yisalaele.