Mituna ya batángi
Makomami elobi nini na oyo etali kobɔkɔla mwana soki moboti moko azali Motatoli ya Yehova te?
Na kati ya Makomami, ezali na mitinda mibale ya ntina oyo ezali kolobela likambo etali kobɔkɔla mwana oyo moboti na ye moko azali Motatoli ya Yehova te. Vɛrsɛ ya liboso elobi boye: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.” (Misala 5:29, NW) Ya mibale elobi boye: “Mpo mobali azali mokonzi ya mwasi na ye ndenge Klisto mpe azali mokonzi ya lisangá.” (Baefese 5:23, NW) Makanisi ya vɛrsɛ ya mibale ezali kaka te mpo na basi oyo mibali na bango bazali Batatoli, kasi etaleli mpe baoyo mibali na bango bazali Batatoli te. (1 Petelo 3:1) Ndenge nini moboti oyo azali Motatoli ya Yehova akoki kosalela malamu makanisi ya bavɛrsɛ yango ntango azali koteya bana na ye?
Soki mobali azali Motatoli ya Yehova, azali na mokumba ya kokokisa bamposa ya elimo mpe ya mosuni ya libota na ye. (1 Timote 5:8) Atako mama oyo azali mondimi te akoki kolekisa ntango mingi elongo na bana na bango, tata oyo azali Motatoli ya Yehova asengeli koteya bana na ye na kobongisáká elimo na bango na ndako mpe na komemáká bango na makita ya lisangá, epai bakoyoka mateya oyo ekolakisa bango bizaleli ya malamu mpe bakozwa baninga ya malamu.
Mobali akosala nini soki mwasi na ye oyo azali mondimi te azali kaka komema bana na esika oyo ye asambelaka? Mibeko ya mboka ekoki kopesa ye lotomo ya kosala bongo. Mbala mingi, soki tata azali koteya bana yango malamumalamu, ezalaka mwa mpasi mpo bákangama na losambo mosusu, kasi soki azali koteya bango malamu mpenza te, bakoki kolanda losambo yango. Ntango bana bazali kokola, makambo oyo tata alakisaki bango kati na Makomami esengeli kosalisa bango bálanda solo ya Liloba ya Nzambe. Mobali moklisto akozala na esengo mingi soki bana na ye bazwi ekateli ya kolanda solo!
Soki mama nde azali Motatoli ya Yehova, asengeli kotosa ebongiseli ya bokonzi ntango azali koluka bolamu ya seko ya bana na ye. (1 Bakolinti 11:3, NW) Mbala mingi, mobali oyo azali moklisto te aboyaka te ete mwasi na ye oyo azali Motatoli ateya bana bizaleli malamu mpe alakisa bango makambo ya elimo, mpe makita ya basaleli ya Yehova esalisaka mpenza mpo na koyekola makambo yango. Mama akoki kosalisa mobali na ye oyo azali moklisto te amona matomba ya mateya ya malamu oyo bana na bango bazali kozwa na lisangá ya Yehova. Na mayele mpenza, akoki komonisa ye ntina ya koteya bana na bango bizaleli malamu ya Biblia, lokola bazali kofanda na mokili oyo bizaleli malamu ezali se kobeba.
Nzokande, mobali oyo azali moklisto te akoki kotingama ete bana bálanda lingomba na ye, akoki komema bango na esika oyo ye asambelaka mpe koteya bango makambo ya lingomba na ye. To mobali akoki koboya mangomba nyonso mpe kolinga te ete bana na ye bálanda ata mateya ya lingomba moko. Lokola azali mokonzi ya libota, ye nde azali na mokumba ya liboso ya kozwa bikateli.a
Atako mwasi moklisto oyo amipesi na Nzambe azali kotosa bokonzi ya mobali na ye, asengeli kobosana te likanisi ya ntoma Petelo na Yoane, oyo balobaki ete: “Kasi na oyo etali biso, tokoki te kotika kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.” (Misala 4:19, 20, NW) Mpo alingi kobatela elimo ya bana na ye, Motatoli oyo azali mama ya bana akoluka mabaku ya koteya bango malako ya etamboli malamu. Azali na mokumba na miso ya Yehova ya koteya basusu makambo oyo ayebi ete ezali solo, asengeli kosala mpe bongo mpo na bana na ye moko. (Masese 1:8; Matai 28:19, 20, NW) Ndenge nini Motatoli oyo azali mama ya bana akoki kolonga mokakatano monene wana?
Tókamata ndakisa ya likambo etali kondimela Nzambe. Mbala mosusu mwasi Motatoli akoki kozanga likoki ya koyekola Biblia na bana na ye te mpo ete mobali azali kopekisa. Asengeli nde koboya koyebisa bana na ye makambo ya Yehova mpo na ntina yango? Te. Maloba na ye mpe misala na ye esengeli komonisa ete andimaka Mozalisi. Na ntembe te, bana na ye bakotuna ye mituna na likambo yango. Asengeli kokakatana te mpo na kosalela bonsomi na ye ya kosambela mpe komonisa ete azali kondimela Mozalisi, ata mpe epai ya bana na ye. Ata soki akoki te koyekola Biblia na bana to komema bango na makita pɔsɔ na pɔsɔ, akoki koteya bango boyebi ya Yehova Nzambe.—Deteronome 6:7.
Na likambo etali boyokani ya Motatoli mpe mobali na ye to mwasi na ye oyo azali mondimi te, ntoma Paulo akomaki boye: “Mpo mobali wana oyo azali mondimi te asantisami na ntina etali mwasi na ye, mpe mwasi wana oyo azali mondimi te asantisami na ntina etali ndeko mobali wana; soki bongo te, bana na bino bakozala mpenza mbindo, kasi bazali sikoyo basantu.” (1 Bakolinti 7:14, NW) Yehova amonaka ete libala ezali ebongiseli ya bosantu, mpamba te atalelaka mwasi to mobali oyo azali mondimi, mpe bana ete bazali basantu. Mwasi oyo azali Motatoli, asengeli kosala makasi mpo na kosalisa bana na ye báyeba solo, mpe akotika makambo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova.
Ntango bana bazali kokola, bango moko bakopona soki bakolanda nzela nini na kotalela makambo oyo baboti bateyaki bango. Bakoki kozwa ekateli ya kolanda maloba oyo Yesu alobaki ete: “Moto oyo alingi tata to mama koleka ngai abongi na ngai te.” (Matai 10:37, NW) Basɛngi na bango lisusu likambo oyo: “Bana, bótosaka baboti na bino na kati ya bomoko elongo na Nkolo.” (Baefese 6:1, NW) Atako moboti moko azalaki konyokola bango, bilenge mingi bazwaki ekateli ya ‘kotosa Nzambe lokola azali moyangeli’ na esika ya kotosa moboti yango oyo azali Motatoli te. Ezali mpenza lipamboli mpo na moboti oyo azali Motatoli na komona bana na ye bazwi ekateli ya kosalela Yehova atako bakutanaki na botɛmɛli!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lotomo oyo mwasi azali na yango ya kozala na bonsomi ya kolanda lingomba ezali mpe kopesa ye nzela ya koyangana na makita. Esilá kokóma ete mibali mosusu báboya kobatela bana oyo bazali naino mike na ntango wana, yango wana mama ya bolingo akomona ete asengeli komema bango na makita.