Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/10 nk. 3-4
  • Libɔndisi na ntango ya mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libɔndisi na ntango ya mpasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo Nzambe atalelaka mabe
  • Ezali foti ya nani?
  • Atondisaka “mitema na biso mɛkɛ”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Ezali na moto oyo amibanzabanzaka mpenza mpo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Libɔndisi oyo boyebi ya solosolo ya Nzambe ezali kopesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/10 nk. 3-4

Libɔndisi na ntango ya mpasi

BANSANGO oyo tozali koyoka mikolo oyo ezali kobɔndisa ata moke te. Moto moko akomaki ete: “Makambo oyo ezali koleka na mokili ezali mabe mpenza, yango wana mbala mingi tokakatanaka mpo na kolanda bansango na ntɔngɔ.” Mokili etondi na bitumba, makambo ya nsɔmɔ, bampasi, kobomana mpe bamaladi. Makambo mabe yango ekoki kokómela biso lelo to lobi; kutu, mbala mosusu tozali na kati ya makambo yango.

Biblia esakolaki mpenza makambo yango. Yesu alobaki ete bitumba ya minene, bamaladi, nzala mpe koningana ya mabele ekozala na ntango na biso. (Luka 21:​10, 11) Ntoma Paulo mpe akomaki ete ekozala na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza”; na ntango yango bato bakozala nkandankanda, bakolinga mbongo mingi, mpe bakolinga makambo ya malamu te. Abengaki eleko yango ete “mikolo ya nsuka.”​—⁠2 Timote 3:​1-5.

Yango wana, bansango oyo tozali kolanda na televizyo, na radio mpe na bazulunalo ekokani na makambo oyo Biblia esakolaki. Kasi, bansango ezali kosuka kaka na koyebisa makambo oyo ezali koleka na mokili. Nzokande, Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso na koyeba mpo na nini mabe ezali mingi boye mpe soki makambo ekozala ndenge nini na mikolo oyo ekoya.

Ndenge oyo Nzambe atalelaka mabe

Biblia eyebisi biso ndenge oyo Nzambe atalelaka bampasi oyo tozali komona na mikolo na biso. Ya solo, Nzambe ayebaki ete makambo ya mabe ekozala na eleko oyo, kasi yango elingi koloba te ete asepelaka na yango to mpe akotika yango esalemaka libela na libela. Ntoma Yoane akomaki ete: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:⁠8) Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na bato mpe asepelaka ata moke te na makambo ya mabe nyonso. Yango wana mpenza, tokoki koluka Nzambe abɔndisa biso, mpamba te azali malamu mpe azali na motema mawa mpe azali na nguya mpe na mposa ya kosilisa mabe nyonso na mokili. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “[Mokonzi ya likoló oyo Nzambe aponi] akobikisa mobola oyo akogangaka, mpe moto ya mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto ya bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo ya babola. Akosikola milimo na bango kati na minyoko mpe na mobulu; makila na bango makozala na motuya na miso na ye.”​—⁠Nzembo 72:​12-14.

Tokanisi mpenza ete yo mpe oyokaka mawa soki omoni bato bazali konyokwama. Yehova nde apesá biso motema ya mawa, mpamba te akelá biso na elilingi na ye. (Genese 1:​26, 27) Yango wana, tokoki kondima ete Yehova ayokaka mawa ntango azali komona mpasi ya bato. Yesu, moto oyo ayebaki Yehova malamu koleka bato mosusu nyonso, ateyaki ete Yehova amibanzabanzaka mingi mpo na biso mpe atondi na mawa.​—⁠Matai 10:​29, 31.

Biloko oyo Nzambe akelá ezali komonisa ete amibanzabanzaka mpo na bato. Yesu alobaki ete Nzambe “asalaka ete moi na ye ebima likoló ya bato mabe mpe bato malamu mpe asalaka ete mbula enɔka likoló ya bayengebene mpe bato bazangi boyengebene.” (Matai 5:45) Ntoma Paulo ayebisaki bato ya engumba Lisitala ete: “[Nzambe] amitikaki te kozanga litatoli na boye ete asalaki bolamu, kopesáká bino bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, kotondisáká mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.”​—⁠Misala 14:⁠17.

Ezali foti ya nani?

Paulo ayebisaki bato ya Lisitala likambo mosusu oyo ezali kobenda likebi na biso: “Na mabota oyo eleká [Nzambe] apesaki nzela ete bikólo nyonso bálanda banzela na bango.” Yango elingi koloba ete ezali bikólo, to bato bango moko, nde bamilukelaki ebele ya bampasi oyo bazali na yango. Ezali foti ya Nzambe te.​—⁠Misala 14:⁠16.

Kasi, mpo na nini Nzambe atiki ete makambo ya mabe esalemaka? Akosala eloko moko te mpo na kosukisa yango? Kaka Liloba ya Nzambe nde ekoki kopesa biyano na mituna yango, mpamba te ezali na ekelamu moko ya elimo oyo etyaki ntembe na likambo oyo ezali na boyokani na mituna yango.

[Bililingi na lokasa 4]

Bato bayokaka mawa. Tokanisi ete Nzambe ayokaka eloko te na minyoko ya bato?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Likoló na lobɔkɔ ya mwasi, Croatie: FƆTƆ YA ONU 159208/S. Maison blanche

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Mwana akɔndi na nzala: FƆTƆ YA ONU 146150 YA O. MONSEN

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto