Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/11 nk. 9-14
  • Moklisto nyonso azalaka na mposa ya bandeko na ye baklisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moklisto nyonso azalaka na mposa ya bandeko na ye baklisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bapesaki lisalisi oyo esengeli
  • Tósalisa basusu na biloko
  • Bazalaki ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’
  • Basi oyo bazalaki komibanzabanza mpo na basusu
  • Bilenge, tozali mpe na mposa na bino
  • Na ntango ya mpasi
  • Sakolá mpo na kokómisa bato bayekoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Kobá kolendisa lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Akila na Pilisikila: Babalani oyo bazalaki ndakisa malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bókoba “kolendisana”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/11 nk. 9-14

Moklisto nyonso azalaka na mposa ya bandeko na ye baklisto

“Tozali binama oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu.”​—⁠BAEFESE 4:⁠25.

1. Buku moko elobi nini mpo na nzoto ya moto?

NZOTO ya moto ekelamá na ndenge ya kokamwa mpenza! Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Balobaka ntango mosusu ete nzoto ya moto ezali masini ya kokamwa koleka bamasini nyonso. Ezali solo ete nzoto ya moto ezali masini te. Kasi, na makambo mingi tokoki kokokanisa yango na masini. Se lokola masini ezali na biteni mingi, nzoto ezali mpe na binama mingi. Ndenge moko na biteni ya masini, enama mokomoko ya nzoto ezali na mosala na yango. Kasi biteni nyonso esalaka elongo mpo ete nzoto to mpe masini esala malamu.”

2. Na lolenge nini nzoto ya moto ekokani na lisangá ya boklisto?

2 Nzoto ya moto ezali na binama ebele mpe mokomoko na yango epesaka eloko oyo nzoto ezali na yango mposa. Ezali na enama moko te na nzoto to mosisa moko te oyo ezali na ntina te. Ndenge moko mpe, na kati ya lisangá ya boklisto, moto mokomoko akoki kosala mwa eloko mpo ete lisangá ezala makasi mpe malamu na elimo. (1 Bakolinti 12:​14-26) Atako na kati ya lisangá moto moko te asengeli komimona ete aleki basusu, moto moko mpe te asengeli kokanisa ete azali na ntina te.​—⁠Baloma 12:⁠3.

3. Ndenge nini Baefese 4:25 emonisi ete moklisto nyonso azalaka na mposa ya bandeko na ye baklisto?

3 Se ndenge oyo enama nyonso ya nzoto na biso ezalaka na mposa ya binama mosusu, moklisto nyonso azalaka na mposa ya bandeko na ye baklisto. Ntoma Paulo ayebisaki baninga na ye bandimi oyo bazalaki mpe bapakolami na elimo ete: “Sikoyo lokola bolongoli lokuta, bólobanaka solo mokomoko na bino elongo na mozalani na ye, mpamba te tozali binama oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu.” (Baefese 4:25) Lokola Bayisalaele ya elimo, oyo babengami “nzoto ya Klisto” bazali ‘mokomoko ndeko ya mosusu,’ bayebisanaka solo mpe basalaka mpenza na bomoko. Mokomoko na bango azali mpenza ndeko ya baninga na ye mosusu nyonso. (Baefese 4:​11-13) Bazali kosala na bomoko mpe na esengo elongo na baklisto oyo balobaka solo, baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele.

4. Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya sika?

4 Mbula na mbula, ebele ya bato oyo bazali na elikya ya kofanda na paladiso awa na mabele bazali kozwa batisimo. Bandeko mosusu ya lisangá bazali kosalisa bango na esengo mpo ‘bákende nokinoki tii na kokɔmela.’ (Baebele 6:​1-3) Basalisaka bango na ntango bazali koyanola na mituna na bango na makambo ya Biblia to mpe na ntango bazali kopesa bango formasyo na mosala ya kosakola. Tokoki kosalisa bato yango ya sika na ndakisa oyo tozali kopesa ntango tozali kopesa biyano na makita. Na ntango ya mpasi, tokoki mpe kolendisa to mpe kobɔndisa bango. (1 Batesaloniki 5:​14, 15) Tosengeli koluka ndenge ya kosunga basusu mpo ‘bákoba kotambola na kati ya solo.’ (3 Yoane 4) Ozala elenge to mokóló, ezala ozali na kati ya solo banda kala to te, okoki kosalisa baninga na yo bandimi ete bázala malamu na elimo. Bazali mpenza na mposa na yo.

Bapesaki lisalisi oyo esengeli

5. Ndenge nini Akila na Pilisila basalisaki Paulo?

5 Baklisto oyo babalá basepelaka mpe kosalisa baninga na bango bandimi. Na ndakisa, Akila na mwasi na ye Pilisila (to Pilisika), basalisaki Paulo. Bayambaki ye na ndako na bango, basalaki na ye mosala ya kotonga bahema, mpe basalisaki ye na kolendisa lisangá oyo eutaki kosalema na Kolinti. (Misala 18:​1-4) Mpo na kosalisa Paulo, basalaki likambo moko boye oyo Biblia eyebisi te oyo etyaki bomoi na bango na likama. Bazalaki kofanda na Loma ntango Paulo ayebisaki baklisto ya engumba yango ete: “Bópesa mbote na Pilisika mpe Akila baninga na ngai ya mosala na kati ya Klisto Yesu, oyo batyaki bomoi na bango na likama mpo na molimo na ngai, oyo kaka ngai moko te kasi mpe masangá nyonso ya bikólo mosusu tozali kopesa bango matɔndi.” (Baloma 16:​3, 4) Lokola Akila na Pilisila, baklisto mosusu ya mikolo na biso bazali kolendisa masangá mpe kosalisa basambeli mosusu na makambo ndenge na ndenge; ntango mosusu, bazali ata kotya bomoi na bango na likama mpo ete banyokoli bábɛta to báboma te basaleli mosusu ya Nzambe.

6. Lisalisi nini Apolosi azwaki?

6 Akila na Pilisila basalisaki mpe Apolosi, moklisto moko oyo azalaki molobi malamu, ye oyo azalaki koteya bato ya Efese makambo ya Yesu Klisto. Na ntango wana, Apolosi ayebaki kaka batisimo ya Yoane, oyo bato bazwaki mpo na komonisa ete batiki kosala masumu na kotalela Kondimana ya Mibeko. Lokola basosolaki ete Apolosi azali na mposa ya lisalisi, Akila na Pilisila “bamonisaki ye polelepolele nzela ya Nzambe na ndenge ya malamu lisusu koleka.” Ekoki mpenza kozala ete balimbwelaki ye ete batisimo ya baklisto esɛngaka ete bázindisa moto na mai mpe moto yango azwa elimo santu. Apolosi asimbaki mpenza makambo oyo bateyaki ye. Na nsima, ntango akómaki na Akaya, “asalisaki mpenza baoyo bandimaki mpo na boboto monene ya Nzambe; mpo azalaki komonisa na bokasi mpenza polele na miso ya bato ete Bayuda bazalaki na libunga, wana azalaki komonisa na nzela ya Makomami ete Yesu azali Klisto.” (Misala 18:​24-28) Biyano oyo basambeli mosusu bapesaka na makita ekoki mbala mingi kosalisa biso tóbakisa boyebi na biso ya Liloba ya Nzambe. Na likambo yango mpe, mokomoko na biso azali na mposa ya basusu.

Tósalisa basusu na biloko

7. Bafilipi basalaki nini ntango baninga na bango baklisto bakelelaki?

7 Baklisto ya lisangá ya Filipi balingaki Paulo mingi mpe batindelaki ye biloko ntango azalaki na Tesaloniki. (Bafilipi 4:​15, 16) Ntango bandeko ya Yelusaleme bazalaki na mposa ya lisalisi, Bafilipi bamonisaki ete basepelaki kopesa makabo ata koleka makoki na bango. Paulo azalaki mpenza na botɔndi mpo na ezaleli malamu oyo bandeko ya Filipi bamonisaki, yango wana atángaki bango lokola ndakisa mpo na bandimi mosusu.​—⁠2 Bakolinti 8:​1-6.

8. Elimo nini Epafalodito amonisaki?

8 Ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ, Bafilipi batindelaki ye kaka biloko te, kasi batindaki mpe Epafalodito akende kotala ye. Paulo alobaki boye: “Mpo na mosala ya Nkolo [Epafalodito] akómaki mpenza pene na liwa, kotyáká molimo na ye na likama, mpo akoka kosala malamumalamu na esika na bino mpo bozalaki awa te mpo na kosalela ngai mpenza.” (Bafilipi 2:​25-30; 4:18) Biblia eyebisi biso te soki Epafalodito azalaki nkulutu to mosaleli na misala. Atako bongo, azalaki moklisto moko oyo azalaki na elimo ya komipesa mpe ya kosalisa basusu; Paulo azalaki mpenza na mposa na ye. Na lisangá na bino, bozali mpe na ndeko moko lokola Epafalodito?

Bazalaki ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’

9. Ndakisa nini Alisitake apesi biso?

9 Ezala bandeko ya lisangá nini basepelaka mingi na bandeko ya bolingo lokola Akila, Pilisila mpe Epafalodito. Ekoki kozala na bandeko mosusu oyo bazali mpenza lokola moklisto moko ya ekeke ya liboso na nkombo Alisitake. Ye na bandeko mosusu bazalaki ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi,’ elingi koloba ntango mosusu ete bazalaki kobɔndisa to mpe kosalisa mpenza na misala, kasi na maloba kaka te. (Bakolose 4:​10, 11) Alisitake asungaki Paulo, yango emonisaki ete azalaki moninga ya solo na ntango ya mpasi. Azalaki lokola moto oyo Batoli [Masese] 17:17 (Bible na Lingala ya lelo oyo) elobeli, ete: “Moninga ya solo alakisaka bolingo na ye ntango nyonso; ndeko ya solo amonanaka na tango ya pasi.” Biso nyonso tosengeli kosala makasi mpo na kozala ‘lisalisi oyo ezali kopesa’ baninga na biso baklisto ‘makasi,’ boye te? Mingimingi, tosengeli kosalisa baoyo bazali konyokwama.

10. Ndakisa nini Petelo apesaki bankulutu?

10 Bankulutu nde basengeli mpenza kozala lisalisi oyo ezali kopesa bandeko makasi. Klisto ayebisaki ntoma Petelo ete: “Lendisá bandeko na yo.” (Luka 22:32) Petelo asalaki yango mpamba te amonisaki mpiko, mingimingi nsima ya lisekwa ya Yesu. Bino bankulutu, bósalaka makasi mpo na kolanda ndakisa ya Petelo na motema moko mpe na boboto, mpamba te baninga na bino bandimi bazali na mposa na bino.​—⁠Misala 20:​28-30; 1 Petelo 5:​2, 3.

11. Matomba nini tokoki kozwa soki totaleli elimo ya Timote?

11 Timote, moninga ya Paulo oyo azalaki kosala na ye mibembo, azalaki nkulutu oyo azalaki kokanisa mingi bolamu ya baklisto mosusu. Atako Timote azalaki mpenza nzoto kolɔngɔnɔ te, azalaki na kondima makasi mpe ‘asalaki lokola moombo elongo na Paulo mpo nsango malamu ekende liboso.’ Yango wana, ntoma Paulo alobaki na Bafilipi ete: “Nazali na moto mosusu te oyo azali na ezaleli lokola ya ye, oyo akomitungisa mpenza mpo na makambo oyo etali bino.” (Bafilipi 2:​20, 22; 1 Timote 5:23; 2 Timote 1:⁠5) Tokoki kozala lipamboli mpo na baninga oyo tozali kosambela na bango Yehova soki tozali komonisa elimo lokola oyo ya Timote. Ezali solo ete tosengeli koyikela bolɛmbu ya nzoto mpe komekama ya ndenge na ndenge mpiko, kasi biso mpe tokoki, to tóloba ete tosengeli kozala na kondima makasi mpe komibanzabanza mpo na bandeko na biso na elimo. Tóbosanaka te ete bazali na mposa na biso.

Basi oyo bazalaki komibanzabanza mpo na basusu

12. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Dolokasi?

12 Dolokasi azali moko na basi oyo bazalaki kobanga Nzambe mpe bazalaki komibanzabanza mpo na basusu. Ntango akufaki, bayekoli babengaki Petelo mpe bakendaki na ye tii na eteni ya ndako ya likoló. Kuna, “basi nyonso bakufelá mibali bamimonisaki epai na ye na koleláká mpe na kolakisáká ebele ya bilamba ya nse mpe ya bilamba ya likoló oyo Dolokasi azalaki kosala ntango azalaki elongo na bango.” Petelo asekwisaki Dolokasi mpe tokanisi mpenza ete Dolokasi atikaki te ‘kotonda na misala ya malamu mpe na makabo ya motema mawa.’ Na lisangá ya boklisto ya mikolo na biso, ezali mpe na basi lokola Dolokasi, baoyo bakoki kotonga bilamba to kosala biloko mosusu ya malamu mpo na bato oyo bazali kokelela. Ya solo, misala ya malamu oyo basengeli kosala libosoliboso ezali nde kotombola matomba ya Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli.​—⁠Misala 9:​36-42; Matai 6:33; 28:​19, 20.

13. Ndenge nini Lidia amibanzabanzaki mpo na baninga na ye baklisto?

13 Lidia, mwasi moko oyo azalaki kobanga Nzambe, azalaki mpe komibanzabanza mpo na basusu. Ye azalaki moto ya engumba ya Tyatila, kasi azalaki kofanda na engumba Filipi ntango Paulo asakolaki na engumba yango na mobu soki 50 ya ntango na biso (T.B.). Ekoki kozala ete Lidia azalaki moto ya ekólo mosusu oyo akɔtaki na Lingomba ya Bayuda; kasi, ekoki mpe kozala ete na Filipi, Bayuda bazalaki mpenza mingi te mpe sinagoga ezalaki te. Ye na basi mosusu oyo bazalaki kobanga Nzambe bayanganaki mpo na losambo pembeni ya ebale ntango ntoma Paulo asakwelaki bango nsango malamu. Biblia elobi boye: “Yehova afungolaki motema [ya Lidia] polele mpo atya likebi na makambo oyo Paulo azalaki koloba. Nzokande ntango ye ná bato ya ndako na ye babatisamaki, alobaki na kobondela ete: ‘Soki bomoni mpenza ete nazali moto ya sembo na miso ya Yehova, bókɔta na ndako na ngai mpe bófanda.’ Mpe atyaki biso mbamba tóndima kaka.” (Misala 16:​12-15) Lidia azalaki na mposa ya kosalela basusu makambo ya malamu, yango wana andimisaki Paulo na baninga na ye ete báfanda epai na ye. Tosepelaka mingi ntango baklisto ya boboto mpe ya bolingo bazali mpe koyamba bapaya motindo wana!​—⁠Baloma 12:13; 1 Petelo 4:⁠9.

Bilenge, tozali mpe na mposa na bino

14. Yesu asalaki nini mpo na bana?

14 Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, moto ya boboto mpe ya bolingo nde abandisaki lisangá ya boklisto. Bato bazalaki kobanga te kozala pembeni na ye mpamba te azalaki na bolingo mpe na motema mawa. Mokolo mosusu, ntango bato mosusu babandaki koyela Yesu bana mike, bayekoli na ye bamekaki kopekisa bango. Kasi, Yesu alobaki boye: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango, mpo bokonzi ya Nzambe ezali ya bato oyo bazali lokola bango. Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete, Moto nyonso oyo ayambi bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke te akokɔta na yango ata moke te.” (Malako 10:​13-15) Mpo tózwa mapamboli ya Bokonzi, tosengeli kozala lokola bana mike, elingi koloba tosengeli komikitisa mpe kozala motó libanga te. Yesu alingaki bana mike mpe amonisaki yango na ndenge akamataki bango na mabɔkɔ na ye mpe apambolaki bango. (Malako 10:16) Ezali boni mpo na bino bilenge lelo oyo? Bóyeba ete bandeko mosusu na kati ya lisangá balingi bino mpe bazali na mposa na bino.

15. Makambo nini ya bomoi ya Yesu ekomami na Luka 2:​40-52, mpe ndakisa nini atikelaki bilenge?

15 Ntango Yesu azalaki naino elenge, amonisaki ete alingaki Nzambe mpe alingaki Makomami. Ntango azalaki na mbula 12, ye na baboti na ye, Yozefe na Malia, balongwaki na mboka na bango Nazalete bakendaki fɛti ya Elekeli na Yelusaleme. Na ntango oyo bazalaki kozonga na mboka na bango, baboti ya Yesu bamonaki ye te na kati ya bato oyo bazalaki kosala na bango mobembo. Nsukansuka, bakutaki ye afandi na eteni moko ya ndako na kati ya tempelo mpe azali koyoka Bayuda oyo bazalaki bateyi mpe azali kotuna bango mituna. Yesu akamwaki ete Yozefe na Malia bayebaki te epai oyo bakokaki kokuta ye, yango wana atunaki bango boye: “Boyebaki te ete nasengeli kozala na ndako ya Tata na ngai?” Azongaki na mboka na bango elongo na baboti na ye, azalaki kaka kotosa bango mpe akobaki kokola na bwanya mpe na nzoto. (Luka 2:​40-52) Yesu atikelaki baoyo bazali bilenge kati na biso ndakisa malamu mpenza! Basengeli mpenza kotosa baboti na bango mpe kosepela koyekola makambo ya elimo.​—⁠Deteronome 5:16; Baefese 6:​1-3.

16. (a) Mwa bana mibali bagangaki nini ntango Yesu azalaki kotatola na tempelo? (b) Libaku malamu nini bilenge baklisto bazali na yango lelo oyo?

16 Elenge, ntango mosusu otatolaka mpo na Yehova na kelasi mpe na ndako na ndako elongo na baboti na yo. (Yisaya 43:​10-12; Misala 20:​20, 21) Ntango Yesu azalaki kotatola mpe kobikisa bato na tempelo mwa moke liboso ya liwa na ye, mwa bana mibali bazalaki koganga boye: “Bikisá, tobondeli yo, Mwana ya Davidi!” Likambo yango epesaki banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli nkanda, mpe balobaki ete: “Ozali koyoka makambo bango bazali koloba?” Yesu azongiselaki bango ete: “Ɛɛ.” “Botángá naino te likambo oyo ete, ‘Uta na minɔkɔ ya bana mike mpe ya bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ obimisi lisanzoli’?” (Matai 21:​15-17) Lokola bana wana, bino bilenge oyo bozali na lisangá bozali na libaku malamu mpenza ya kosanzola Nzambe mpe Mwana na ye. Tolingi bino mpe tozali na mposa na bino mpo ete tósakola Bokonzi elongo.

Na ntango ya mpasi

17, 18. (a) Mpo na nini Paulo azwaki bibongiseli mpo na kokɔngɔla makabo mpo na baklisto ya Yudea? (b) Makabo ya bolingo malamu oyo epesamaki mpo na bandimi ya Yudea esalaki nini epai ya baklisto oyo bazalaki Bayuda te?

17 Ata soki makambo ya bomoi na biso ezali ndenge nini, bolingo etindaka biso na kosalisa baninga na biso baklisto oyo bazali kokelela. (Yoane 13:​34, 35; Yakobo 2:​14-17) Bolingo oyo Paulo azalaki na yango mpo na bandeko na ye ya Yudea etindaki ye azwa bibongiseli mpo na kokɔngɔla makabo mpo na bango epai ya bandeko ya masangá ya Akaya, Galatia, Masedonia mpe ya etúká ya Azia. Ekoki kozala ete minyoko, yikiyiki, mpe nzala oyo bayekoli ya Yelusaleme bakutanaki na yango nde ememaki oyo Paulo abengaki “bampasi,” “malɔzi,” mpe “kopunzama ya biloko na [bango].” (Baebele 10:​32-34; Misala 11:27–12:⁠1) Yango wana, Paulo atambwisaki makambo mpo na kokɔngɔla mbongo mpo na kosunga baklisto ya Yudea oyo bazalaki babola.​—⁠1 Bakolinti 16:​1-3; 2 Bakolinti 8:​1-4, 13-15; 9:​1, 2, 7.

18 Makabo ya bolingo malamu mpo na basantu ya Yudea emonisaki ete bondeko makasi ezalaki na kati ya basambeli ya Yehova oyo bazalaki Bayuda na baoyo bazalaki Bayuda te. Ndenge oyo batindaki mbongo yango epesaki mpe nzela na baklisto oyo bazalaki Bayuda te bámonisa botɔndi na bango epai ya basambeli mosusu oyo bazalaki na Yudea mpo na bozwi ya elimo oyo bapesaki bango. Na bongo, tokoki koloba ete bato na bato bazalaki kokabela bandeko na bango biloko ya elimo mpe ya mosuni. (Baloma 15:​26, 27) Lelo oyo mpe, ntango topesaka makabo mpo na baninga na biso bandimi oyo bazali kokelela, tosalaka yango na kotindikama te, kasi na bolingo. (Malako 12:​28-31) Na likambo oyo mpe, mokomoko na biso azali na mposa ya basusu mpo ete bokokani ezala ‘mpe moto oyo azali na moke azala na moke koleka te.’​—⁠2 Bakolinti 8:⁠15.

19, 20. Pesá ndakisa moko mpo na komonisa ndenge oyo basaleli ya Yehova basalisaka na ntango ya likama.

19 Lokola toyebi ete moklisto nyonso azalaka na mposa ya bandeko na ye baklisto, tozalaka pene ya kokende kosalisa bandeko na biso ya elimo. Na ndakisa, tótalela naino ndenge makambo elekaki na ebandeli ya mobu 2001 ntango mabele eninganaki na ekólo Salvador. Lapolo moko elobaki boye: “Bandeko nyonso ya Salvador bapesaki mabɔkɔ na bibongiseli oyo ezwamaki mpo na kopesa lisalisi. Bandeko mosusu bautaki na ekólo Guatemala, na États-Unis mpe na Canada bayaki mpe kopesa biso mabɔkɔ. . . . Na mwa ntango moke, batongaki bandako koleka 500 mpe Bandako ya Bokonzi misato ya kitoko. Bandeko yango oyo bazali na elimo ya komipesa bapesi litatoli monene na nzela ya mosala makasi oyo basali mpe na ndenge basali yango na bomoko.”

20 Lapolo moko ya Afrika ya Sudi elobaki boye: “Mpela makasi oyo ebebisaki bamboka mingi ya ekólo Mozambique ememelaki mpe bandeko na biso baklisto mpasi. Filiale ya Mozambique ebongisaki makambo mpo na kokokisa bamposa na bango. Kasi, basɛngaki biso tótindela bandeko yango oyo bazalaki kokelela bilamba ya kala oyo ezali naino malamu. Tosangisaki bilamba mpe totondisaki container mobimba.” Na makambo ya ndenge wana mpe, mokomoko na biso azali na mposa ya basusu.

21. Tokotalela likambo nini na lisolo oyo elandi?

21 Ndenge tolobaki yango na ebandeli, binama nyonso ya nzoto ya moto ezali na ntina. Ezali se ndenge wana na lisangá ya boklisto. Moklisto nyonso azalaka na mposa ya bandeko na ye baklisto. Bango nyonso bazali mpe na mposa ya kolanda kosalela Nzambe na bomoko. Lisolo oyo elandi ekolobela makambo mosusu oyo ezali kosalisa bango na kosala yango.

Okopesa eyano nini?

• Na nini nzoto ya moto ekokani na lisangá ya boklisto?

• Baklisto ya liboso basalaki nini ntango baninga na bango bandimi bazalaki na mposa ya lisalisi?

• Bandakisa nini ya Makomami ezali komonisa ete moklisto nyonso azalaka na mposa ya bandeko na ye baklisto mpe ete baklisto basalisanaka?

[Elilingi na lokasa 10]

Akila na Pilisila bazalaki komibanzabanza mpo na basusu

[Bililingi na lokasa 12]

Basaleli ya Yehova basalisanaka mpe basalisaka bato mosusu na ntango ya mpasi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto