Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/12 nk. 13-18
  • “Akopusana penepene na bino”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Akopusana penepene na bino”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likabo oyo Yehova ye moko apesaka
  • ‘Yehova azali kobatela baoyo nyonso balingaka ye’
  • Likoki ya kosolola na ‘Ye oyo ayokaka mabondeli’
  • Yehova apesaka basaleli na ye mbano
  • “Bópusana penepene na Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Okoki mpenza ‘kopusana penepene na Nzambe’?
    Pusaná penepene na Yehova
  • Lolenge nini okoki kobɛlɛma epai na Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Yehova atyelaka yo likebi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/12 nk. 13-18

“Akopusana penepene na bino”

“[Nzambe] azali mosika te na mokomoko na biso.”​—⁠MISALA 17:⁠27.

1, 2. (a) Soki totali likoló ntango etondi na minzoto, motuna nini tokoki komituna mpo na Mozalisi? (b) Ndenge nini Biblia ezali kondimisa biso ete Yehova atyelaka mpenza bato likebi?

ESILÁ kokómela yo mokolo mosusu na butu otala likoló ntango etondi na minzoto, yango ekamwisaki yo te? Ya solo, moto atikalaka monɔkɔ polele ntango azali kotala ebele ya minzoto mpe bonene ya likoló. Mabele ezali lokola mwa mbuma moke mpenza na kati ya molɔ́ngɔ́. Yango elingi nde koloba ete Mozalisi, “Oyo-Aleki-Likoló,” akoki kotyela bato likebi te mpo azali mpenza likoló mingi to mpe bato bakoki koyeba ye te mpo aleki mosika mingi mpe ezali mpasi mingi mpo na koyeba ye?​—⁠Nzembo 83:18.

2 Biblia ezali kondimisa biso ete Yehova atyelaka mpenza bato likebi. Kutu, Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso tóluka ye; elobi boye: “Azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27; 1 Ntango 28:⁠9) Soki tosali mpenza milende mpo na kopusana penepene na Nzambe, ye mpe akondima milende na biso. Na lolenge nini? Mokapo ya mobu 2003 epesi eyano ya kosepelisa ete: “Akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:⁠8) Tótalela sikoyo mwa makambo ya malamu mpenza oyo Yehova asalelaka baoyo bazali penepene na ye.

Likabo oyo Yehova ye moko apesaka

3. Likabo nini Yehova apesaka baoyo bazali kopusana penepene na ye?

3 Ya liboso, basaleli ya Yehova bazali na likabo moko ya motuya mingi oyo ye abombeli bato na ye. Bokonzi nyonso, bozwi nyonso mpe mateya nyonso ya mokili oyo ekoki kopesa bato likabo yango te. Yehova ye moko nde apesaka likabo yango mpe apesaka yango kaka na bato oyo bazali penepene na ye. Likabo yango ezali nini? Liloba ya Nzambe epesi eyano oyo: “Soki . . . okobimisa mongongo na yo epai ya bososoli, soki okotika te koluka yango lokola palata, mpe soki okolukaluka yango lokola biloko ya motuya bibombami, okokanga ntina ya kobanga Yehova, mpe okozwa boyebi ya Nzambe. Mpamba te Yehova apesaka bwanya.” (Masese 2:​3-6, NW) Kanisá naino: bato ya kozanga kokoka bazali na likoki ya kozwa “boyebi ya Nzambe”! Bakokanisi likabo yango​—⁠boyebi oyo ezali na Liloba ya Nzambe​—⁠na “biloko ya motuya bibombami.” Mpo na nini?

4, 5. Mpo na nini tokoki kokokanisa “boyebi ya Nzambe” na “biloko ya motuya bibombami”? Pesá ndakisa.

4 Ya liboso, boyebi ya Nzambe ezali na motuya mingi. Elikya ya bomoi ya seko ezali moko ya ebele ya makambo ya malamu oyo boyebi yango epesaka. (Yoane 17:⁠3) Kasi, ata lelo oyo, boyebi yango ezali kokómisa bomoi na biso malamu. Na ndakisa, koyekola malamumalamu Liloba ya Nzambe esalisi biso na kozwa biyano na mituna ya ntina mingi lokola oyo: Nkombo ya Nzambe ezali nani? (Nzembo 83:18) Moto akendaka wapi soki akufi? (Mosakoli 9:​5, 10) Mokano ya Nzambe mpo na mabele mpe mpo na bato ezali nini? (Yisaya 45:18) Lisusu, tokangi ntina ete kosalela toli malamu ya Biblia ezali lolenge oyo eleki malamu ya kotambwisa bomoi na biso. (Yisaya 30:​20, 21; 48:​17, 18) Na ndenge yango, tozali na litambwisi ya malamu oyo ezali kosalisa biso tólonga mitungisi ya bomoi mpe tósala makambo oyo epesaka bolamu mpe esengo ya solo. Likambo oyo eleki ntina ezali ete boyekoli ya Liloba ya Nzambe esalisi biso tóyeba bizaleli malamu ya Yehova mpe tópusana penepene na ye. Eloko nini ekoki kozala na motuya koleka boninga ya motema elongo na Yehova, boninga oyo esimbami na “boyebi ya Nzambe”?

5 Ezali mpe na ntina mosusu oyo bakokanisi boyebi ya Nzambe na “biloko ya motuya bibombami.” Lokola ebele ya biloko ya motuya emonanaka mingimingi te, boyebi yango mpe emonanaka mingi mpenza te na mokili. Na kati ya bato miliare motoba oyo bazali na mokili, kaka bato soki milio motoba mpamba oyo bazali kosambela Yehova nde bazwi “boyebi ya Nzambe.” Mpo tómona ete koyeba solo ya Liloba ya Nzambe ezali mpenza libaku malamu oyo bato nyonso bazali na yango te, tótalela motuna moko kaka: Nini ekómelaka bato ntango bakufi? Makomami esalisi biso na koyeba ete molimo ekufaka mpe ete bakufi bayebi eloko moko te. (Ezekiele 18:⁠4) Nzokande, mangomba mingi ya mokili eteyaka lokuta ete soki moto akufi, eloko moko oyo ezali na kati ya nzoto na ye ekufaka te. Yango ezali liteya moko monene na mangomba ya boklisto. Lingomba ya Bouddha, ya Hindu, ya Bamizilma, ya Jaïn, ya Bayuda, ya Shinto, ya Sikh mpe ya Tao bateyaka mpe liteya yango. Meká naino kokanisa​—⁠bamiliare ya bato bazali kokosama na liteya yango ya lokuta!

6, 7. (a) Kaka banani nde bakoki kozwa “boyebi ya Nzambe”? (b) Ndakisa nini ezali komonisa ete Yehova apesi biso mayele oyo ebele ya “bato ya bwanya mpe bato ya mayele” bazali na yango te?

6 Mpo na nini bato mingi bazwi “boyebi ya Nzambe” te? Mpamba te moto akoki mpenza te kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe soki Nzambe asalisi ye te. Tóbosana te ete boyebi yango ezali likabo. Yehova apesaka yango kaka na bato oyo bazali na mposa ya koyekola Liloba na ye na bosembo mpe na elimo ya komikitisa. Bato yango bazali ntango mosusu “bato ya bwanya na ndenge ya mosuni” te. (1 Bakolinti 1:26) Kutu, bato ya mokili bakoki ata kotalela mingi kati na bango ete bazali “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” (Misala 4:13) Atako bongo, yango te nde ezali mpenza likambo ya ntina. Yehova apesaka biso “boyebi ya Nzambe” mpo na bizaleli malamu oyo amonaka na mitema na biso.

7 Tózwa ndakisa moko. Na mangomba ya boklisto, ebele ya bato ya mayele babimisá ebele ya mikanda mpo na kolimbola Biblia. Na mikanda yango, balimbolaka ntango mosusu ndenge makambo ezalaki na ntango oyo masolo mosusu ya Biblia ekomamaki, bapesaka bandimbola ya maloba ya Liebele na ya Grɛki, mpe bongo na bongo. Na boyebi nyonso oyo bato yango bazali na yango, bazwi nde “boyebi ya Nzambe”? Bayebaka mpenza ete kolongisama ya boyangeli ya Yehova na nzela ya Bokonzi na ye ya likoló ezali motó ya likambo ya Biblia? Bayebi ete Yehova Nzambe azali na kati ya Bosato te? Nzokande, biso toyebi mpenza makambo yango. Mpo na nini? Mpamba te Yehova apesi biso mayele ya koyeba solo na makambo ya elimo, kasi ebele ya “bato ya bwanya mpe bato ya mayele” bazali na yango te. (Matai 11:25) Ya solo, Yehova azali mpenza kopambola bato oyo bazali penepene na ye!

‘Yehova azali kobatela baoyo nyonso balingaka ye’

8, 9. (a) Davidi alobaki nini mpo na komonisa lipamboli mosusu oyo baoyo bazali penepene na Yehova bazali na yango? (b) Mpo na nini baklisto ya solo bazali na mposa ya libateli ya Nzambe?

8 Bato oyo bazali penepene na Yehova bazwaka lipamboli mosusu: abatelaka bango. Davidi, ye oyo akutanaki na mikakatano ya ndenge na ndenge, akomaki boye: “[Yehova] azali penepene na bango nyonso bakobenga ye, baoyo bakobenga ye na solo. Akosukisa mposa na bango baoyo bakobanga ye, akoyoka mpe koganga na bango mpe akobikisa bango. [Yehova] akobatela baoyo nyonso bakolinga ye.” (Nzembo 145:​18-20) Yehova azali mpenza penepene na baoyo balingaka ye mpe na ndenge yango, ayokaka bango nokinoki ntango bazali kobelela ye ete asalisa bango.

9 Mpo na nini tozali na mposa ete Nzambe abatela biso? Baklisto ya solo bazali kokutana na mikakatano mpo na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza” oyo tozali na yango; longola yango, Satana Zabolo, Monguna monene ya Yehova, azali mpenza kobundisa bango. (2 Timote 3:⁠1) Monguna yango ya mayele mabe azali mpenza koluka “kolya” biso. (1 Petelo 5:⁠8) Satana azali konyokola biso, azali kotya biso mpanzi likoló mpe azali komeka biso. Azali mpe koluka na makanisi mpe na mitema na biso bisika oyo tozali na bolɛmbu mpo akoka kokweisa biso. Mokano na ye ezali ya kolɛmbisa kondima na biso mpe koboma biso na elimo. (Emoniseli 12:​12, 17) Lokola tosengeli kobunda na monguna oyo azali mpenza na makasi ndenge wana, koyeba ete ‘Yehova azali kobatela baoyo nyonso balingaka ye’ ezali mpenza kokitisa biso motema, boye te?

10. (a) Ndenge nini Yehova abatelaka bato na ye? (b) Kobatelama nini eleki mpenza ntina, mpe mpo na nini?

10 Kasi, ndenge nini Yehova abatelaka bato na ye? Lokola alaki ete akobatela biso, yango elingi koloba te ete tokozanga mikakatano na na mokili oyo; yango mpe elingi koloba te ete asengeli kosala makamwisi mpo na biso. Atako bongo, Yehova azali kobatela lisangá mobimba ya basaleli na ye, mpamba te akoki kotikela Zabolo nzela te ete asilisa basaleli na ye ya solo awa na mabele! (2 Petelo 2:⁠9) Likambo oyo eleki mpenza ntina ezali ete Yehova azali kobatela biso na elimo. Azali kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na koyikela mikakatano mpiko mpe mpo na kobatela boninga na biso na ye. Soki tokanisi mpenza mosika, kobatelama na elimo nde ezali na ntina mingi koleka kobatelama na makambo mosusu nyonso. Mpo na nini? Mpamba te soki tozali ntango nyonso baninga ya Yehova, eloko moko te, ata liwa, ekoki kosala biso mabe mpo na libela.​—⁠Matai 10:⁠28.

11. Wapi makambo oyo Yehova abongisi mpo na kopesa bato na ye libateli ya elimo?

11 Yehova abongisi makambo mingi mpo na kobatela baoyo bazali penepene na ye na elimo. Na nzela ya Biblia, Liloba na ye, apesi biso bwanya mpo na kolonga komekama ya ndenge nyonso. (Yakobo 1:​2-5) Kosalela toli malamu oyo ezali na Makomami ezalaka libateli. Lisusu, Yehova apesaka “elimo santu . . . epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango.” (Luka 11:13) Elimo yango ezali makasi koleka ata nguya nini oyo ezali na molɔ́ngɔ́ mobimba; yango wana, elimo yango ekoki mpenza kosunga biso mpo tólonga ata komekama nini oyo tokoki kokutana na yango. Na nzela ya Klisto, Yehova azali kopesa “makabo oyo ezali bato.” (Baefese 4:⁠8) Ntango bazali kosalisa baninga na bango bandimi, mibali yango oyo bazali na makoki ya elimo basalaka nyonso mpo na komonisa motema mawa ya Yehova.​—⁠Yakobo 5:​14, 15.

12, 13. (a) Na nzela nini Yehova apesaka biso bilei ya elimo na ntango oyo ebongi? (b) Oyokaka ndenge nini na ntina na makambo oyo Yehova abongisi mpo na bolamu na biso ya elimo?

12 Yehova apesaka eloko mosusu mpo na kobatela biso, ezali bongo bilei ya elimo na ntango oyo ebongi. (Matai 24:45) Na nzela ya mikanda mpe bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká!, bakisa mpe makita ya lisangá, mayangani ya mike mpe ya minene, Yehova apesaka biso mateya oyo tosengeli na yango mpe na ntango oyo tosengeli na yango. Okoki koyeba lisusu likambo moko oyo oyokaki na likita moko ya lisangá to na liyangani moko, oyo esimbaki mpenza motema na yo mpe elendisaki to mpe ebɔndisaki yo? Esilá kokómela yo otánga lisolo moko na kati ya moko ya bazulunalo oyo touti kolobela, mpe omona ete bakomaki yango mpenza mpo na yo?

13 Moko na bibundeli oyo Satana azali kosalela mingi ezali ya kolɛmbisa biso nzoto mpe yango ekoki kokómela biso. Satana ayebi malamu ete soki tolɛmbi nzoto ntango molai, makasi na biso ekokita, mpe ekozala mpasi te mpo alonga biso. (Masese 24:10) Tozali na mposa ya lisalisi mpamba te Satana azali kosala nyonso mpo na kongalisa makanisi ya kolɛmbisa oyo tokoki kozala na yango. Masolo oyo ekoki kosalisa biso na kobundisa ezaleli ya kolɛmba nzoto ebimá mingi na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Lamuká! Nsima ya kotánga lisolo moko ya ndenge wana, ndeko mwasi moko akomaki boye: “Natángaka lisolo yango mikolo nyonso, mpe tii lelo natangisaka mai ya miso. Natyaka yango pembeni ya mbeto mpo nakoka kotánga yango ntango nyonso oyo nazali koyoka ete nalɛmbi nzoto. Na lisalisi ya masolo lokola oyo wana, nayokaka lokola nde mabɔkɔ ya Yehova ezingi ngai mpo na kobatela ngai.”a Omoni te ete tosengeli kotɔnda Yehova mpo na ndenge oyo azali kopesa biso bilei ya elimo na ntango oyo ebongi? Tóbosana likambo oyo te: makambo oyo abongisi mpo na bolamu na biso ya elimo ezali komonisa ete azali penepene na biso mpe azali kobatela biso.

Likoki ya kosolola na ‘Ye oyo ayokaka mabondeli’

14, 15. (a) Likabo nini Yehova apesi baoyo bazali penepene na ye? (b) Mpo na nini kozala na likoki ya kosolola ntango nyonso na Yehova na nzela ya libondeli ezali mpenza likabo moko monene?

14 Na ntembe te osilá komona ete soki moto akómi moto monene to akómi mokonzi monene, mbala mingi ekómaka mpasi mpo bato oyo ye azali kotambwisa básolola na ye. Kasi, ezali boni mpo na Yehova Nzambe? Azali mpenza mosika mpo azanga kotya likebi na nyonso oyo bato bazali kosala mpo na ye? Soki moke te! Kutu, libondeli ezali likabo mosusu oyo Yehova apesi baoyo bazali penepene na ye. Kozala na likoki ya kosolola ntango nyonso na ‘Ye oyo ayokaka mabondeli’ ezali mpenza likabo moko monene. (Nzembo 65:⁠2) Mpo na nini?

15 Tózwa ndakisa moko: Patrɔ ya kompanyi moko monene azalaka na ebele ya mikumba. Aponaka mikumba oyo ye moko akokokisa mpe mikumba oyo akotikela bato mosusu bákokisa. Ndenge moko mpe, Mokonzi Monene ya molɔ́ngɔ́ mobimba akoki kopona mikumba oyo akokokisa yango ye moko mpe mikumba oyo akotikela bato mosusu bákokisa. Kanisá mikumba nyonso oyo Yehova atikeli Yesu, Mwana na ye ya bolingo. Apesi ye “bokonzi ya kosambisa.” (Yoane 5:27) Baanzelu basengeli “kotosa ye.” (1 Petelo 3:22) Yehova atikeli Yesu nzela ya kosalela elimo santu na Ye mpo na kosalisa ye na kotambwisa bayekoli na ye awa na mabele. (Yoane 15:26; 16:⁠7) Yango wana, Yesu alobaki ete: “Bokonzi nyonso epesameli ngai na likoló mpe na mabelé.” (Matai 28:18) Kasi, na oyo etali koyoka mabondeli, Yehova azwi mokumba yango ye moko. Yango wana, Biblia esɛngi biso tóbondela kaka Yehova, kasi tósala yango na nkombo ya Yesu.​—⁠Nzembo 69:13; Yoane 14:​6, 13.

16. Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete Yehova ayokaka mpenza mabondeli?

16 Yehova ayokaka mpenza mabondeli na biso? Soki atyelaka yango likebi te, mbɛlɛ alingaki kolendisa biso te ete ‘tótingama na mabondeli’ to mpe tókitisela ye mikumba mpe mitungisi na biso. (Baloma 12:12; Nzembo 55:22; 1 Petelo 5:⁠7) Basaleli ya sembo oyo bazalaki na bomoi na ntango ya kala bazalaki na elikya makasi ete Yehova ayokaka mabondeli. (1 Yoane 5:14) Yango wana, Davidi ayembaki boye: ‘[Yehova] ayokaka mongongo na ngai.’ (Nzembo 55:17) Biso mpe tosengeli kozala na elikya ete Yehova azali penepene na biso mpe azali na mposa ya koyoka makanisi mpe mitungisi nyonso oyo tozali na yango.

Yehova apesaka basaleli na ye mbano

17, 18. (a) Ndenge nini Yehova atalelaka mosala ya sembo ya bikelamu na ye ya mayele? (b) Limbolá ndenge oyo Masese 19:17 ezali komonisa ete Yehova amonaka makambo oyo tosalaka mpo na komonisela basusu motema mawa.

17 Ata soki bato basali likambo moko boye to baboyi kosala yango, Yehova akozala kaka Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Atako bongo, Yehova azali Nzambe oyo azalaka na botɔndi. Azwaka na motuya to mpe asepelaka mingi na mosala oyo bikelamu na ye ya mayele basalelaka ye na bosembo. (Nzembo 147:11) Na bongo, tokoloba ete bolamu mosusu oyo baoyo bazali penepene na Yehova bazwaka ezali ete Yehova apesaka basaleli na ye mbano.​—⁠Baebele 11:⁠6.

18 Biblia ezali komonisa polele ete Yehova apesaka motuya mingi na makambo oyo basambeli na ye basalaka. Na ndakisa, tozali kotánga boye: “Ye oyo akoyokela moto mpamba mawa azali kodefisa epai na Yehova; mpe ye akozongisela ye mosala na ye.” (Masese 19:​17, NW) Mibeko ya Moize emonisaki ete Yehova ayokelaka mpenza bato mpamba mawa. (Levitike 14:21; 19:15) Yehova ayokaka ndenge nini na ntango oyo tozali koyokela bato mpamba mawa lokola ye? Ntango tokabeli moto mpamba, kozanga kotya motema ete akozongisela biso, Yehova amonaka likabo yango lokola todefisi ye yango. Yehova alaki ete mpo na kofuta nyongo yango akondima biso mpe akopambola biso. (Masese 10:22; Matai 6:​3, 4; Luka 14:​12-14) Ya solo, ntango tomoniseli moninga na biso mondimi oyo azali kokelela motema mawa, yango esimbaka motema ya Yehova. Tozali mpenza na botɔndi na koyeba ete Tata na biso ya likoló amonaka makambo oyo tosalaka mpo na komonisela basusu motema mawa!​—⁠Matai 5:⁠7.

19. (a) Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova asepelaka na makambo oyo tosalaka na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli? (b) Ndenge nini Yehova apesaka mbano na misala oyo ezali kosalema mpo na kosimba Bokonzi na ye?

19 Yehova asepelaka mingimingi na makambo oyo tosalaka mpo na Bokonzi na ye. Soki topusani penepene na Yehova, mposa na biso ekozala ya kosalela ntango na biso, makasi na biso mpe bozwi na biso mpo na kosimba mpenza mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli. (Matai 28:​19, 20) Ekoki kokómela biso tókanisa ete oyo tozali kosala ezali moke. Motema na biso oyo ezangi kokoka ekoki kutu ntango mosusu kotinda biso tóbanda komituna soki Yehova azali kosepela na milende oyo tozali kosala. (1 Yoane 3:​19, 20) Kasi, Yehova asepelaka na likabo nyonso oyo topesi na bolingo nyonso, ata soki ezali moke ndenge nini. (Malako 12:​41-44) Biblia eyebisi biso boye: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye.” (Baebele 6:10) Ya solo, Yehova abosanaka te ata mwa mosala oyo eleki moke oyo tozali kosala mpo na kosimba Bokonzi na ye mpe apesaka biso mbano mpo na yango. Longola ebele ya mapamboli ya elimo oyo azali kopesa biso sikoyo, tokoki kokanisa bisengo oyo tokomona na mokili ya sika oyo ezali koya, epai Yehova akofungola mpenza lobɔkɔ na ye mpe akokokisa bamposa ya bato nyonso oyo bazali penepene na ye!​—⁠Nzembo 145:16; 2 Petelo 3:⁠13.

20. Na boumeli ya mobu 2003, ndenge nini tokoki kokanisa ntango nyonso mokapo na biso ya mobu, mpe matomba nini tokozwa?

20 Na boumeli ya mobu 2003, tómituna soki tozali ntango nyonso kosala milende mpo na kopusana penepene na Tata na biso ya likoló. Soki tozali kosala yango, tózala na elikya ete akokokisa oyo alaki; mpamba te, “Nzambe . . . akoki te kobuka lokuta.” (Tito 1:⁠2) Soki opusani penepene na ye, ye mpe akopusana penepene na yo. (Yakobo 4:⁠8) Matomba nini ekomonana? Yango ekomema ebele ya mapamboli sikoyo mpe elikya ya kopusana lisusu penepene na Yehova libela na libela!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Nkoma ya motángi mpo na lisolo “Yehova aleki mitema na biso na monene”; lisolo yango ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 2000, nkasa 28-31.

Ozali koyeba lisusu?

• Likabo nini Yehova azali kopesa baoyo bazali kopusana penepene na ye?

• Yehova abongisi makambo nini mpo na kobatela bato na ye na elimo?

• Mpo na nini likoki ya kosolola na Yehova ntango nyonso na nzela ya libondeli ezali likabo moko monene?

• Ndenge nini Biblia ezali komonisa ete Yehova asepelaka na mosala ya sembo ya bikelamu na ye ya mayele?

[Elilingi na lokasa 15]

Yehova apesi biso mayele ya koyeba solo na makambo ya elimo

[Bililingi na lokasa 17]

Yehova abatelaka biso na elimo

[Elilingi na lokasa 18]

Yehova azali penepene, azali na mposa ya koyoka mabondeli na biso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto