Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/1 nk. 10-15
  • Ondimaka mpenza nsango malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ondimaka mpenza nsango malamu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tozali na mposa ya kondima!
  • Kondima Liloba ya Nzambe ezali na ntina mingi
  • Kondima na biso na oyo etali biloko ya kobikela
  • Kondima esalisaka biso tóyikela mpasi ya motema mpiko
  • Kondima elendisaka bato oyo bazali konyokwama na makanisi
  • Kondima mpe mikakatano mosusu
  • Tóbatela kondima na Liloba ya Nzambe
  • “Bakiselá biso kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Monisá kondima na bilaka ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Kondima—Ezaleli oyo epesaka makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Tózala na kondima oyo etongami likoló na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/1 nk. 10-15

Ondimaka mpenza nsango malamu?

“Bokonzi ya Nzambe ekómi pene. Bóbongola mitema mpe bóndima nsango malamu.”​—MALAKO 1:15.

1, 2. Ndenge nini okoki kolimbola Malako 1:14, 15?

NA MOBU 30 ya ntango na biso (T.B.), Yesu Klisto abandaki mosala na ye monene na Galilai. Azalaki kosakola “nsango malamu ya Nzambe” mpe asimbaki mitema ya bato mingi na Galilai ntango alobaki ete: “Ntango oyo etyamá ekoki, mpe bokonzi ya Nzambe ekómi pene. Bóbongola mitema mpe bóndima nsango malamu.”​—Malako 1:14, 15.

2 “Ntango oyo etyamá” ekokaki mpo Yesu abanda mosala na ye mpe mpo bato bázwa ekateli oyo ekosala ete Nzambe andima bango. (Luka 12:54-56) ‘Bokonzi ya Nzambe ekómaki pene’ mpamba te Yesu, Mokonzi oyo Nzambe aponaki, azalaki wana. Bato ya mitema sembo babongwanaki ntango bayokaki makambo oyo azalaki kosakola. Kasi, ndenge nini bato yango bamonisaki ete ‘bandimaki nsango malamu’ mpe ndenge nini biso mpe tokomonisa ete tondimaka yango?

3. Bato bazali kosala nini oyo ezali komonisa ete bazali kondima nsango malamu?

3 Ntoma Petelo mpe asalaki lokola Yesu, alendisaki bato bábongola mitema. Ntango azalaki koloba na Bayuda oyo bayanganaki na Yelusaleme mpo na fɛti ya Pantekote ya mobu 33 T.B., Petelo ayebisaki bango boye: “Bóbongola mitema, mpe tiká ete moko na moko na bino abatisama na nkombo ya Yesu Klisto mpo na kolimbisama ya masumu na bino, mpe bokozwa likabo ya ofele ya elimo santu.” Bankóto ya bato babongolaki mitema, bazwaki batisimo mpe bakómaki bayekoli ya Yesu. (Misala 2:38, 41; 4:4) Na mobu 36 T.B., bato ya bikólo mosusu oyo babongolaki mitema bazwaki batisimo mpe bakómaki bayekoli ya Yesu. (Misala 10:1-48) Lelo oyo mpe, ebele ya bato, soki bandimi nsango malamu, bazali kotika masumu, bazali komipesa na Nzambe mpe bazali kozwa batisimo. Bandimi nsango malamu ya lobiko mpe bazali kondima mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa bato. Longola yango, bazali kosala makambo oyo ezali komonisa boyengebene mpe baponi Bokonzi ya Nzambe.

4. Kondima ezali nini?

4 Kasi kondima ezali nini? Ntoma Paulo akomaki ete: “Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa, elakiseli ya polelepolele ya makambo ya solosolo atako ezali komonana te.” (Baebele 11:1) Kondima epesaka biso elikya makasi ete makambo nyonso oyo Nzambe alaki na Liloba na ye ekokokisama mpenza. Yango ezali lokola nde tozali na buku ya Leta oyo ezali komonisa ete tozali bakóló eloko moko boye. Kondima ezali mpe “elakiseli ya polelepolele” to likambo oyo ezali komonisa ete tozali kondima mpenza makambo oyo ezali komonana te. Mayele na biso mpe botɔndi oyo tozali na yango na mitema ezali kondimisa biso ete makambo yango ezali solo atako tomoni yango naino te.​—2 Bakolinti 5:7; Baefese 1:18.

Tozali na mposa ya kondima!

5. Mpo na nini kondima ezali na ntina mingi?

5 Tobotamaka na mposa ya makambo ya elimo, kasi tobotamaka na kondima te. Kutu, “kondima ezali te eloko oyo bato nyonso bazalaka na yango.” (2 Batesaloniki 3:2) Atako bongo, baklisto basengeli kozala na kondima mpo bilaka ya Nzambe ekokisama epai na bango. (Baebele 6:12) Paulo atángaki bato ebele oyo bazalaki na kondima; nsima na yango, akomaki ete: “Lokola tozali na lipata monene boye ya batatoli oyo ezingi biso, tiká mpe tólongola kilo nyonso mpe lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi, mpe tiká tópota na koyika mpiko mpenza momekano ya mbangu oyo etyami liboso na biso, wana tozali kotala na likebi mpenza Kapita mpe Mokokisi ya kondima na biso, Yesu.” (Baebele 12:1, 2) “Lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi” ezali nini? Ezali kozanga kondima, to mpe kobungisa kondima oyo tozalaki na yango liboso. Tosengeli ‘kotala Yesu na likebi mpenza’ mpe kolanda ndakisa na ye mpo tózala ntango nyonso na kondima makasi. Lisusu, tosengeli koboya pite mpe ekobo, kobundisa misala ya mosuni, koboya komipesa na koluka biloko ya mokili, mateya ya filozofi mpe bonkɔkɔ oyo eyokani na Makomami te. (Bagalatia 5:19-21; Bakolose 2:8; 1 Timote 6:9, 10; Yuda 3, 4) Longola yango, tosengeli kondima ete Nzambe azali na biso mpe ete toli oyo ezali na Liloba na ye ebotaka mpenza mbuma.

6, 7. Mpo na nini ebongi tóbondelaka mpo na kosɛnga kondima?

6 Tokoki te kokóma na kondima na makasi na biso moko. Kondima ezali na kati ya mbuma ya elimo santu ya Nzambe, to nguya oyo asalaka na yango mosala. (Bagalatia 5:22, 23) Bongo tokosala nini soki tomoni ete esengeli tóyeisa kondima na biso makasi? Yesu alobaki boye: “Soki bino . . . boyebi ndenge ya kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na likoló akopesa elimo santu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango!” (Luka 11:13) Ɛɛ, tóbondelaka mpo na kosɛnga elimo santu, mpamba te ekoki kopesa biso kondima oyo tosengeli na yango mpo na kosala mokano ya Nzambe ata soki tokutani na mpasi ya ndenge nini.​—Baefese 3:20.

7 Ebongi tóbondelaka mpo na kosɛnga kondima mingi koleka. Liboso Yesu abengana demo na nzoto ya mwana moko ya mobali, tata ya mwana yango asɛngaki ye ete: “Nazali na kondima! Salisá ngai na esika oyo nazali na bosɛnga na kondima!” (Malako 9:24) Bayekoli ya Yesu balobaki ete: “Pesá biso kondima mingi koleka.” (Luka 17:5) Yango wana, tóbondelaka mpo na kosɛnga kondima mpe tózalaka na elikya ete Nzambe ayokaka mabondeli ya ndenge wana.​—1 Yoane 5:14.

Kondima Liloba ya Nzambe ezali na ntina mingi

8. Ndenge nini kondima Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso?

8 Mwa moke liboso ete apesa bomoi na ye lokola mbeka, Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Mitema na bino etungisama te. Bómonisa kondima na kati na Nzambe, bómonisa mpe kondima na kati na ngai.” (Yoane 14:1) Biso baklisto tondimaka Nzambe mpe Mwana ye. Kasi, ezali boni mpo na Liloba na ye? Liloba yango ekoki mpenza kotinda biso na kosala malamu na bomoi na biso soki tozali koyekola yango mpe kosalela yango na kondima nyonso ete yango nde ezali na toli eleki malamu oyo tokoki kolanda.​—Baebele 4:12.

9, 10. Ndenge nini okoki kolimbola makambo oyo Yakobo 1:5-8 elobi mpo na kondima?

9 Bomoi na biso bato ya kozanga kokoka etondi na mikakatano. Kasi, kondima Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso mingi. (Yobo 14:1) Na ndakisa, soki tozali koyeba te ndenge ya kosala mpo na kolonga mokakatano moko, Liloba ya Nzambe epesi biso toli oyo: “Soki moko na bino azali kozanga bwanya, tiká akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka na bokabi epai ya bato nyonso mpe kozanga kotyola; mpe yango ekopesama na ye. Kasi tiká akoba kosɛnga na kondima, abɛta ntembe ata moke te, mpo moto oyo azali kobɛta ntembe azali lokola mbonge moko ya mbu oyo ezali komemama na mopɛpɛ mpe kotindikama epai na epai. Ya solo, moto wana akanisa te ete akozwa eloko epai ya Yehova; azali moto ya mitema mibale, apikamá te na kati ya banzela na ye nyonso.”​—Yakobo 1:5-8.

10 Yehova Nzambe akomona mabe te ete tósɛnga ye bwanya soki tozangi yango. Kutu, akosalisa biso mpo tótalela mokakatano yango na ndenge ya malamu. Baninga na biso bandimi bakoki kolakisa biso bavɛrsɛ oyo ekosalisa biso to mpe biso moko tokoki komona yango ntango tozali koyekola Biblia. To mpe elimo santu ya Yehova ekoki kolakisa biso nzela na lolenge oyo tokanisaki te. Tata na biso ya likoló akopesa biso bwanya oyo ekosalisa biso tóyikela mikakatano mpiko soki ‘tokobi kosɛnga na kondima, kozanga kobɛta ntembe.’ Soki tozali lokola mbonge ya mbu oyo mopɛpɛ ezali komema, tótya elikya te ete tokozwa eloko epai ya Nzambe. Mpo na nini? Mpamba te yango ekolakisa ete tozali bato ya mitema mibale, bato oyo bapikamá te na mabondeli to na makambo mosusu, ata mpe na likambo etali komonisa kondima epai ya Nzambe. Yango wana, tosengeli kozala na kondima makasi na Liloba ya Nzambe mpe na toli na yango. Tótalela sikoyo mwa bandakisa oyo ezali komonisa ndenge oyo Liloba yango esalisaka mpe elakisaka nzela.

Kondima na biso na oyo etali biloko ya kobikela

11. Kondima Liloba ya Nzambe epesaka biso elikya nini na oyo etali bamposa na biso ya mokolo na mokolo?

11 Tokosala nini soki tozali kokelela? Kondima Liloba ya Nzambe etindaka biso tózela Yehova na motema mobimba ete akokokisa bamposa na biso ya mokolo na mokolo mpe ete na mokili ya sika, akopesa bato oyo balingaka ye ebele ya biloko. (Nzembo 72:16; Luka 11:​2, 3) Soki totaleli lisolo oyo ezali komonisa ndenge oyo Yehova apesaki mosakoli Eliya bilei na eleko moko oyo nzala ekɔtaki na mboka, yango ekoki kolendisa biso. Na nsima, Nzambe asalaki ete farini mpe mafuta ya mwasi moko eumela; yango nde esalisaki mwasi yango, mwana na ye mpe Eliya bákufa nzala te. (1 Mikonzi 17:2-16) Ndenge moko mpe, Yehova apesaki mosakoli Yilimia biloko oyo asengelaki na yango na ntango oyo basoda ya Babilone bazingaki Yelusaleme. (Yilimia 37:21) Atako Yilimia na Eliya bazalaki mpenza na bilei mingi te, Yehova abatelaki bango. Lelo oyo, azali mpe kosala ndenge wana mpo na baoyo bazali komonisa kondima epai na ye.​—Matai 6:11, 25-34.

12. Ndenge nini kondima ekoki kosalisa biso na kozwa mwa biloko ya kobikela?

12 Yango elingi koloba te ete soki tozali na kondima mpe tozali kotosa mibeko ya Biblia tokotonda na bomɛngo, kasi ekosalisa biso nde tózanga te biloko ya kobikela, ata soki ezali moke. Tópesa ndakisa: Biblia ezali kopesa biso toli ete tózala bato ya sembo, oyo bayebi mosala mpe oyo basalaka na molende. (Masese 22:29; Mosakoli 5:18, 19; 2 Bakolinti 8:21) Tosengeli kozwa na lisɛki te likambo ya koyebana ete tozali bato ya gɔigɔi te na mosala. Ata na bamboka oyo misala ya malamu ezali mpenza komonana te, bato ya mosala oyo bazali sembo, oyo bayebi mosala na bango malamu mpe oyo basalaka na molende bazalaka malamu koleka bato mosusu. Atako bato yango ya mosala bakoki kozala na biloko mingi te, bazangaka te biloko ya kobikela mpe bazalaka na esengo ya kolya bilei oyo bazwi na motɔki na bango.​—2 Batesaloniki 3:11, 12.

Kondima esalisaka biso tóyikela mpasi ya motema mpiko

13, 14. Ndenge nini kondima esalisaka biso tóyikela mpasi ya motema mpiko?

13 Liloba ya Nzambe ezali komonisa ete ezali mabe te moto ayoka mpasi na motema ntango akufeli ndeko to moninga ya bolingo. Abalayama, moto ya sembo, alelaki ntango Sala, mwasi na ye ya bolingo, akufaki. (Genese 23:2) Davidi ayokaki mpasi na motema ntango bayebisaki ye nsango ya liwa ya mwana na ye Abesaloma. (2 Samwele 18:33) Ata Yesu, moto ya kokoka, alelaki ntango moninga na ye Lazalo akufaki. (Yoane 11:35, 36) Ntango tokufeli ndeko to moninga ya bolingo, tokoki koyoka mpasi mingi na motema, kasi kondima bilaka oyo ezali na Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso tóyikela mpasi wana mpiko.

14 Paulo alobaki ete: ‘Nazali na elikya epai ya Nzambe ete ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.’ (Misala 24:15) Tosengeli kondima likambo oyo Nzambe asili kobongisa mpo na kozongisa ebele ya bato na bomoi. (Yoane 5:28, 29) Kati na bato yango, ezali na Abalayama na Sala, Yisaka na Lebeka, Yakobo na Lea, bato oyo bakufá mpe bazelaka mokolo oyo bakosekwa na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. (Genese 49:29-32) Ekozala mpenza esengo monene ntango bandeko mpe baninga oyo tolingaki mingi bakolamuka na liwa mpo na kofanda awa na mabele! (Emoniseli 20:11-15) Liboso tókóma na ntango wana, kondima ekolongola te mpasi nyonso tokoki koyoka na motema; kasi ekosalisa biso tótikala penepene na Nzambe, ye oyo asalisaka biso tóyika mpiko na ntango tokufeli moto.​—Nzembo 121:1-3; 2 Bakolinti 1:3.

Kondima elendisaka bato oyo bazali konyokwama na makanisi

15, 16. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete konyokwama na makanisi ezali likambo ya sika te mpo na bato ya kondima? (b) Wapi makambo oyo tokoki kosala ntango tozali konyokwama na makanisi?

15 Liloba ya Nzambe ezali mpe komonisa ete ata bato oyo bazali na kondima bakoki konyokwama na makanisi. Ntango oyo amekamaki makasi, Yobo azalaki komona lokola nde Nzambe asundolaki ye. (Yobo 29:2-5) Nehemia akómaki mawamawa mpo Yelusaleme na lopango na yango ebebaki mpenza. (Nehemia 2:1-3) Nsima ya kowangana Yesu, Petelo “alelaki na mawa makasi” mpo amitungisaki mingi. (Luka 22:62) Paulo mpe alendisaki baninga na ye bandimi ya lisangá ya Tesaloniki ete ‘bálobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi.’ (1 Batesaloniki 5:14) Nyonso wana ezali komonisa ete soki lelo oyo ezali na bato oyo bazali na kondima kasi bazali konyokwama na makanisi, yango ezali likambo ya sika te. Na yango, tokoki kosala nini mpo na koyika mpiko ntango tozali konyokwama na makanisi?

16 Tokoki konyokwama na makanisi mpo ete mikakatano ya makasi ndenge na ndenge ezali koyela biso. Na esika tótya mikakatano nyonso liboke moko mpe ekóma lokola mokakatano moko ya monene mpenza, tokoki koluka ndenge oyo tokosilisa mokakatano mokomoko na kosaleláká mitinda ya Biblia. Yango ekoki kolɛmbisa mpasi na biso ya makanisi. Soki mpe tozali kopona malamu makambo oyo tokosala mpe tozali kopemisa nzoto na ndenge oyo ekoki, yango mpe ekoki kosalisa biso. Tósimba likambo oyo: Kondima Nzambe mpe kondima Liloba na ye esalaka ete tózala malamu na elimo, mpamba te endimisaka biso lisusu makasi ete atyelaka biso likebi mpenza.

17. Toyebi ndenge nini ete Yehova atyelaka biso likebi?

17 Petelo apesi biso elaka oyo ezali kobɔndisa: “Bómikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe, mpo atombola bino na ntango ekoki; wana bozali kobwaka mitungisi na bino nyonso likoló na ye, mpamba te ye atyelaka bino likebi.” (1 Petelo 5:6, 7) Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “[Yehova] akosimbaka nyonso baoyo balingi kokwea mpe [akotombola] nyonso bangumbami.” (Nzembo 145:14) Tosengeli kondima bilaka yango, mpamba te ezali na Liloba ya Nzambe. Ata soki tozali kaka kotungisama na makanisi, kondima na biso ekolendisama mpenza ntango tozali koyeba ete tokoki kokitisela Tata na biso ya bolingo mitungisi na biso nyonso!

Kondima mpe mikakatano mosusu

18, 19. Ndenge nini kondima esalisaka biso na koyikela maladi mpiko mpe na kobɔndisa baninga na biso bandimi oyo bazali kobɛla?

18 Kondima na biso ekoki komekama makasi ntango tozali kobɛla makasi to mpe ntango ndeko to moninga na biso ya bolingo azali kobɛla makasi. Atako Biblia elobi te ete baklisto lokola Epafalodito, Timote mpe Tolofime babikisamaki na ndenge ya likamwisi, ntembe ezali te ete Yehova asalisaki bango báyika mpiko. (Bafilipi 2:25-30; 1 Timote 5:23; 2 Timote 4:20) Lisusu, mokomi ya nzembo ayembaki mpo na “ye oyo atyelaka moto mpamba likebi” ete: “Yehova ye moko akosunga ye na kiti ya mpasi; okobongola mpenza mbeto na ye nyonso na ntango ya maladi na ye.” (Nzembo 41:1-3, NW) Ndenge nini maloba ya mokomi ya nzembo ekoki kosalisa biso na kobɔndisa baninga na biso bandimi oyo bazali kobɛla?

19 Tokoki kosalisa bango na elimo ntango tozali kobondela elongo na bango mpe ntango tozali kobondela mpo na bango. Atako lelo oyo tokosɛnga te ete bábikisama na ndenge ya likamwisi, tokoki kosɛnga Nzambe apesa bango mpiko oyo ekosalisa bango na ntango oyo bazali kobɛla mpe apesa bango makasi ya elimo oyo basengeli na yango mpo na koyika mpiko na ntango wana oyo balɛmbi. Yehova akosunga bango, mpe kondima na bango ekokóma makasi soki bazali kokanisa ntango oyo “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Tozali mpenza kobɔndisama na koyeba ete na nzela ya Yesu oyo asekwaki mpe na nzela ya Bokonzi ya Nzambe, bato oyo bazali kotosa Nzambe bakobikisama libela na libela na lisumu, na maladi mpe na liwa! Mpo na bilaka nyonso wana, tozali mpenza kotɔnda Yehova, ‘ye oyo akobikisa maladi nyonso na biso.’​—Nzembo 103:1-3; Emoniseli 21:1-5.

20. Mpo na nini ekoki kolobama ete kondima ekoki kosalisa biso na koyika mpiko na “mikolo mabe” ya bobange?

20 Kondima ekoki mpe kosalisa biso tóyika mpiko na “mikolo mabe” ya bobange, ntango oyo nzoto ebebaka mokemoke mpe makasi esilaka mokemoke. (Mosakoli 12:1-7) Baoyo kati na biso bazali mibange bakoki kobondela ndenge oyo mokomi ya nzembo oyo akómaki mobange abondelaki na loyembo na ye oyo: “Yo ozali elikya na ngai, ɛ Nkolo . . . Boyá ngai na ntango ya konuna te, tiká ngai te wana nguya na ngai elɛmbi.” (Nzembo 71:5, 9) Mokomi ya nzembo azalaki na mposa ete Yehova asimba ye makasi; ndenge moko mpe ebele ya baninga na biso baklisto oyo banuni na mosala ya Nzambe bayokaka mposa yango. Lokola bazali na kondima, báyeba ete mabɔkɔ ya Yehova, lokola ezali seko na seko, ekosunga bango ntango nyonso.​—Deteronome 33:27.

Tóbatela kondima na Liloba ya Nzambe

21, 22. Soki tozali na kondima, yango ekosala nini na boyokani na biso na Nzambe?

21 Kondima nsango malamu mpe Liloba mobimba ya Nzambe esalisaka biso tópusana penepene mpenza na Yehova. (Yakobo 4:8) Ya solo, azali Nkolo Mokonzi na biso, kasi azali mpe Mozalisi mpe Tata na biso. (Yisaya 64:8; Matai 6:9; Misala 4:24) Mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Yo ozali Tata na ngai, Nzambe na ngai mpe Libanga ya kobika na ngai.” (Nzembo 89:26) Soki tozali komonisa kondima na Yehova mpe na Liloba na ye, biso mpe tokoki kotalela ye lokola ‘Libanga ya kobika na biso.’ Talá libaku malamu oyo tozali na yango!

22 Yehova azali Tata ya baklisto oyo babotami na elimo mpe ya baninga na bango oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele. (Baloma 8:15) Lisusu, moto oyo atii kondima na ye epai ya Tata na biso ya likoló, ayokaka mawa te ete amikosaki. Davidi alobaki ete: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.” (Nzembo 27:10) Tozali mpe na elaka oyo: “[Yehova] akotika bato na ye te mpo na lokumu ya nkombo na ye monene.”​—1 Samwele 12:22.

23. Tosengeli kosala nini mpo boyokani na biso na Yehova eumela?

23 Kasi, mpo boyokani na biso na Yehova eumela, tosengeli kondima nsango malamu mpe kotalela Makomami ete ezali mpenza Liloba ya Nzambe. (1 Batesaloniki 2:13) Tosengeli kondima Yehova na motema mobimba mpe kotika Liloba na ye engɛngisa nzela na biso. (Nzembo 119:105; Masese 3:5, 6) Kondima na biso ekokola ntango tozali kobondela ye mpe tozali komonisa ete tozali kotya elikya na motema mawa na ye mpe na lisungi na ye.

24. Likanisi nini ya kobɔndisa ezali na Baloma 14:8?

24 Kondima etindaki biso tómipesa na Nzambe mpo na libela. Lokola tozali na kondima makasi, ata soki tokufi, tokotikala kaka basaleli na ye oyo bamipesi, oyo mpe bazali na elikya ya lisekwa. Ɛɛ, “soki tozali na bomoi mpe soki tozali kokufa, tozali bato ya Yehova.” (Baloma 14:8) Tiká ete tózala ntango nyonso na likanisi wana ya kobɔndisa na mitema na biso, wana tozali kotika te kotyela Liloba ya Nzambe motema mpe tozali ntango nyonso kondima nsango malamu.

Okopesa eyano nini?

• Kondima ezali nini, mpe mpo na nini tozali na mposa na yango?

• Mpo na nini ezali na ntina mingi tóndima nsango malamu mpe Liloba ya Nzambe mobimba?

• Ndenge nini kondima esalisaka biso na ntango tokutani na mikakatano ya ndenge na ndenge?

• Nini ekosalisa biso tózala ntango nyonso na kondima?

[Bililingi na lokasa 12]

Yehova aleisaki Yilimia na Eliya mpo bazalaki na kondima

[Bililingi na lokasa 13]

Yobo, Petelo na Nehemia bazalaki na kondima makasi

[Bililingi na lokasa 15]

Mpo boyokani na biso na Yehova eumela, tosengeli kondima nsango malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto