Ndenge ya malamu ya kotalela mosala
NA MOKILI oyo etondi na mikakatano mpo na mombongo oyo ezali kosalema na kati ya bato ya mokili mobimba, mpo na kowelana makasi, mpe mpo na baizini oyo ezali kosalela bamasini na esika ya bato, bato mingi bazali lisusu kosepela te na likanisi ya kolamukáká ntɔngɔ nyonso mpo na kokendaka na mosala. Nzokande, tosengeli kosepelaka na mosala na biso. Mpo na nini? Mpamba te tokelamá na elilingi ya Nzambe—mpe Nzambe asepelaka na mosala na ye. Na ndakisa, Genese 1:31 elobi ete nsima ya “mikolo” motoba ya kozalisa oyo ezali nde bileko ya bambula ebele “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe ezalaki malamu mingi.”
Na ntembe te, lokola Yehova alingaka mosala yango ezali moko ya bantina oyo abengami “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11) Na bongo, tomoni te ete soki tozali komekola ye, tokokóma mpe na esengo lokola ye? Salomo, mokonzi ya kala ya Yisalaele, oyo asalisaki misala minene ya kotonga mpe abongisaki makambo mingi, akomaki ete: “Moto na moto alya mpe amɛla mpe ayoka esengo mpo na malamu ya mosala na ye nyonso. Yango likabo ya Nzambe.”—Mosakoli 3:13.
Lelo oyo, lokola makambo ya mosala ekómi kobongwana nokinoki, ekómi mpasi mpenza mpo moto atalelaka mosala na ndenge ya malamu. Kasi Yehova Nzambe apambolaka baoyo balandaka toli na ye ya bolingo. (Nzembo 119:99, 100) Bato ya ndenge wana bakómaka basali malamu, oyo bakoki kotyela bango motema, mpe mpo na yango, ezalaka mwa mpasi mpo bábungisa mosala na bango. Bayekolaka mpe kotalela bomoi na bango mpe mosala na bango na liso ya elimo, kasi batalaka kaka te matomba ya mosuni oyo bakoki kozwa na mosala. Yango esalisaka bango na kozwa bikateli ya malamu na bomoi na bango mpe na komona ete esengo na bango eutaka kaka te na mosala na bango to na bakompanyi, oyo mbala mingi emonanaka ete ebongi te ete bátyela yango motema. (Matai 6:31-33; 1 Bakolinti 2:14, 15) Esalisaka bango bákóma na ndenge ya malamu ya kotalela mosala.
Monisá bizaleli oyo esepelisaka Nzambe na mosala na yo
Bato mosusu bakómá baombo ya mosala; bamipesá mobimba na mosala na bango. Basusu bazelaka na motema mɔtɔmɔtɔ ete ngonga ya kosilisa mosala ekoka mpo bázonga na ndako. Wapi ndenge ya malamu ya kotalela mosala? Biblia epesi eyano ete: “Malamu ozala na mwa ntango ya bopemi esika ‘te osala mosala ntango inso mpe olanda [mopɛpɛ].” (Mosakoli 4:6, Liloba lya Nzambe) Koboma nzoto na mosala to komipesa mobimba na yango ezali malamu te, ezali lokola ‘kolanda mopɛpɛ.’ Mpo na nini tolobi bongo? Mpo ete na ndenge yango, tokoki kobebisa makambo oyo epesaka biso esengo mingi koleka: boyokani na biso na libota mpe na baninga na biso, makambo na biso ya elimo, bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso, ata mpe koyeisa bomoi na biso mokuse. (1 Timote 6:9, 10) Ndenge ya malamu ya kotalela mosala ezali ya kosepela na moke oyo tozali kozwa mpe kozala na kimya, na esika ya koboma nzoto na mosala, likambo oyo ememaka kowelana mpe bampasi.
Soki Biblia ezali koyebisa bato ete bátalelaka mosala na ndenge wana, yango elakisi te ete ezali kolendisa bango bázala na gɔigɔi. (Masese 20:4) Gɔigɔi esilisaka moto lokumu mpe elongolaka limemya oyo bato mosusu bakokaki kopesa ye. Mpe oyo eleki mabe, ebebisaka boyokani na biso na Nzambe. Biblia elobi polele ete moto oyo alingi kosala te asengeli mpe kolya te biloko oyo bato mosusu baluki. (2 Batesaloniki 3:10) Nzokande, asengeli kotika bizaleli wana mpe kosala mosala makasi, mpo na kozwa na motɔki na ye moko biloko oyo akobikela na yango mpe oyo akosalisa na yango bato oyo azali na mokumba ya kosalisa. Soki azali kosala mosala makasi, akoki ata mpe kosalisa baoyo bazali mpenza na bosɛnga—yango nde likambo oyo Nzambe azali kolendisa biso tósala.—Masese 21:25, 26; Baefese 4:28.
Bóyekolisa bango banda bomwana ete bálinga mosala
Mimeseno malamu ya mosala eyaka yango moko te; bayekolaka yango banda bomwana. Yango wana, Biblia ezali koloba na baboti ete: “Bɔkɔlá mwana na nzela ebongi na ye; ata ntango akokóma mokóló akolongwa na yango te.” (Masese 22:6, NW) Longola ndakisa ya malamu oyo bapesaka bana na bango na ndenge bango moko bazali kosala mosala, baboti oyo bazali na bwanya babandaka kopesa bana na bango ya mike misala ya ndako oyo ekoki na mbula na bango mpo na komesenisa bango na mosala. Atako bana bakoki kosepela te na misala mosusu, nsukansuka bakokóma komimona ete bazali na ntina na kati ya libota—mingimingi soki tata ná mama bazali kopesa bango longonya ntango basali mosala malamu. Likambo ya mawa ezali ete baboti mosusu basalelaka bana na bango makambo nyonso, ntango mosusu mpo bakanisaka ete yango nde komonisela bango boboto. Baboti ya ndenge wana basengeli kokanisa malamumalamu maloba ya Masese 29:21 (Liloba lya Nzambe), oyo elobi ete: “Soko opusi kobondela moombo [to mwana] wa yo ut’o bolenge, okokomisa ye motó makasi.”
Baboti ya malamu bamibanzabanzaka mpenza mpo na kelasi ya bana na bango, balendisaka bango báyekola malamu mpe básala milende na kelasi. Yango ekoki kosalisa bilenge nsima ya mikolo ntango bakozwa misala.
Zalá na bwanya ntango ozali kopona mosala
Atako Biblia eyebisi biso te lolenge ya mosala oyo tosengeli kosala, epesi biso toli malamu oyo tosengeli kolanda mpo bokoli na biso na elimo, mosala oyo tozali kosalela Nzambe mpe mikumba na biso mosusu ya ntina ebeba te. Na ndakisa, ntoma Paulo akomaki ete: “Ntango oyo etikali ekómi mokuse. Yango wana tiká baoyo . . . bazali kosalela mokili [bázala] lokola baoyo bazali kosalela yango na makambo nyonso te; mpo makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.” (1 Bakolinti 7:29-31) Eloko moko te na mokili oyo ekotikala libela to ekobongwana te. Soki topesi ntango mpe makasi na biso nyonso mpo na mokili yango, ezali lokola nde tozali kobomba biloko na biso nyonso ya kobikela na kati ya ndako moko oyo batongá yango esika oyo ezindaka na ntango ya mpela. Yango ekozala nde kozanga mayele!
Mabongoli mosusu ya Biblia ebongoli maloba “bazali kosalela yango na makambo nyonso te” na “bátía mitéma na bangó té” mpe na “bamipesaka na yango mpenza te.” (Liloba lya nzambe; Bible na lingala ya lelo oyo) Bato ya bwanya babosanaka te ete ntango “ekómi mokuse” mpo na mokili oyo mpe ete “kotya motema” to “komipesa” na yango ekosuka kaka na kopesa bango mawa mpe mpasi na motema.—1 Yoane 2:15-17.
‘Nzambe akotika yo ata moke te’
Yehova ayebi bamposa na biso koleka kutu biso moko. Ayebi mpe soki tokómi wapi mpo na oyo etali kokokisama ya mokano na ye. Yango wana azali koyebisa biso boye: “Tiká ete ezaleli na bino na bomoi ezanga bolingo ya mbongo, wana bozali kosepela na oyo bozali na yango na biloko ya sikoyo. Mpo ete [Nzambe] alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’” (Baebele 13:5) Maloba yango ezali kobɔndisa mpenza! Lokola azalaki komekola Nzambe na likambo etali komibanzabanza na bolingo nyonso mpo na bato, Yesu alekisaki ntango mingi, na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, lisolo oyo eyebani mingi, mpo na koteya bayekoli na ye lolenge ya malamu ya kotalela mosala mpe biloko ya mokili.—Matai 6:19-33.
Batatoli ya Yehova basalaka nyonso mpo na kosalela mateya yango. Na ndakisa, ntango patrɔ moko asɛngaki mosali na ye moko, oyo azali mpe Motatoli oyo ayebi mosala ya kura, ete atikalaka ntango nyonso kosala nsima ya ngonga ya mosala, Motatoli yango aboyaki. Mpo na nini aboyaki? Mpo alingaki te ete mosala na ye ezwa ntango oyo azalaki kolekisa elongo na libota na ye mpe na makambo ya elimo. Lokola azalaki mosali malamu mpe oyo bakokaki kotyela motema, patrɔ na ye andimaki asala ndenge oyo asepelaki. Ya solo, esukaka ntango nyonso ndenge wana te, kutu esɛngaka ntango mosusu ete moto alongwa na mosala mpe aluka mosala mosusu mpo azala ntango nyonso na likoki ya kosala makambo nyonso ya ntina na bomoi na ye. Atako bongo, baoyo batyelaka Yehova motema na bango mobimba bamonaka ete bapatrɔ na bango basepelaka na bango mpo na etamboli malamu na bango mpe bizaleli na bango ya malamu na esika ya mosala.—Masese 3:5, 6.
Ntango bato nyonso bakosala misala ya malamu
Na ebongiseli ya makambo oyo ezangi kokoka, misala ekozala kaka na mikakatano mpe ekozala kaka mpasi mpo na kozwa mosala. Kutu, lokola mokili ezali se kobeba mpe nkita ezali se kokita to mpe kokwea, makambo ekoki kobeba lisusu mingi. Kasi makambo ekotikala ndenge wana libela te. Etikali moke, moto moko te akozanga lisusu mosala. Lisusu, moto na moto akomipesa na mosala na ye mpe akosepela na yango. Likambo yango ekosalema ndenge nini? Mbongwana ya ndenge wana ekouta wapi?
Na nzela ya mosakoli na ye Yisaya, Yehova alobelaki ntango ya ndenge wana. Yehova alobaki ete: “Nazali kokela likoló ya sika na mabelé ya sika; mpe makambo ya kala ekoya lisusu na makanisi te, ekoya mpe lisusu na motema te.” (Yisaya 65:17, NW) Azalaki kolobela guvɛrnema ya sika, oyo ekokokisa elaka ya kosala mokili moko ya sika, oyo kati na yango bato ya ndenge mosusu mpenza bakofanda.—Danyele 2:44.
Mpo na oyo etali ndenge bomoi mpe misala ekozala na ntango yango, esakweli ebakisi ete: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga ya [vinyo] mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya; zambi lokola mikolo ya nzete, bongo ekozala mikolo ya bato na ngai, mpe baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala ya mabɔkɔ na bango. Bakosala mosala ya mpamba te, bakobota bana mpo na nsɔmɔ ya pwasa te, zambi bakozala bakitani mpe bapambolami ya [Yehova] mpe bana na bango elongo na bango.”—Yisaya 65:21-23.
Mokili ya sika oyo Nzambe akosala ekokesana mpenza na mokili ya lelo! Okosepela te kozala na mokili ya ndenge wana, oyo na kati na yango ‘okosala mosala ya mpamba te’ kasi okosepela mpenza na “mbuma” ya mosala na yo? Kasi, yoká malamu soki banani bakozwa mapamboli wana: “Bakozala bakitani mpe bapambolami ya [Yehova].” Yo mpe okoki kozala moko ya “bapambolami” yango soki oyebi Yehova mpe okokisi makambo oyo ye azali kosɛnga. Yesu alobaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo ozwa boyebi oyo epesaka bomoi na nzela ya boyekoli ya Biblia, Liloba ya Nzambe.
Box on page 6]
“BAZALI KOLUKA BANGO MINGI”
Biblia elobi ete: “Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo na bino mobimba lokola mpo na Yehova, kasi mpo na bato te.” (Bakolose 3:23) Na ntembe te, moto oyo alandaka etinda wana na mosala na ye, akozala mosali oyo moto nyonso akolinga kozwa ye na mosala. Yango wana, na buku na ye (How to Be Invisible), J. J. Luna apesaki toli na bapatrɔ oyo bazali koluka bato ya mosala ete báluka bango na kati ya bato oyo basambelaka, kasi abakisaki: “Likambo ya solo ezali ete mingimingi tozwaka Batatoli [ya Yehova].” Moko ya bantina oyo apesaki ezali ete bayebani malamu ete bazali bato ya bosembo, yango wana “bazali koluka bango mingi” na misala ndenge na ndenge.
[Bililingi na lokasa 5]
Kotya mosala na esika na yango, makambo ya elimo mpe kopema na esika na yango, esepelisaka moto