Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/4 lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Mokanda ya Biblia nimero 19​—Nzembo
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Makanisi ya ntina na eteni ya liboso ya mokanda ya Nzembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Makanisi ya ntina ya eteni ya mibale ya mokanda ya Nzembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/4 lok. 31

Mituna ya batángi

Mpo na nini mokanda ya Nzembo ekabolami na banimero ndenge moko te na Babiblia nyonso?

Biblia ya libosoliboso oyo batyaki banimero ezali libongoli moko ya Lifalanse oyo Robert Estienne abimisaki na mobu 1553. Nzokande, emonani lokola batyaki banimero na mokanda ya Nzembo liboso mpenza Biblia wana ebima, mpamba te mokanda yango esangisi nde banzembo ebele oyo bato ndenge na ndenge bakomaki.

Emonani ete Yehova atindaki liboso Davidi asangisa banzembo oyo bakobanda koyemba na losambo. (1 Ntango 15:16-24) Bato mingi bakanisaka ete na nsima, Ezela oyo azalaki nganga-nzambe mpe “mokomeli ya mayele,” azwaki mokumba ya kosangisa mokanda mobimba ya Nzembo na ndenge ezali lelo oyo. (Ezela 7:6) Na yango, tosengeli koloba ete ntango bakomaki yango, mokanda ya Nzembo esangisaki nde banzembo ebele.

Ntango ntoma Paulo asalaki lisukulu moko na sinagoga na Antiokia (na Pisidia) na mobembo na ye ya liboso na mosala ya misionɛrɛ, azongelaki maloba ya Nzembo ete: “Ndenge kaka ekomamá na nzembo ya mibale ete, ‘Yo ozali mwana na ngai, ngai nakómi Tata na yo lelo.’” (Misala 13:33) Na Babiblia na biso lelo oyo, maloba yango ezali kaka na nzembo 2:7. Kasi, batyaki banimero na banzembo mingi ndenge moko te na mabongoli nyonso ya Biblia. Ntina ezali ete, mpo na kobongola Babiblia mosusu, basalelaki makomi ya Liebele oyo Bamasorete bakomaki; nzokande, mpo na Babiblia mosusu, basalelaki libongoli ya Septante na lokota ya Grɛki, libongoli moko ya makomi ya Liebele oyo esalemaki na ekeke ya mibale liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na ndakisa, libongoli ya Latin oyo babengi Vulgate, oyo basalelaki mpo na kobongola Babiblia mingi ya Katolike, elandaki ndenge batyá banimero ya mokanda ya Nzembo na libongoli ya Septante, kasi Libongoli ya Mokili ya Sika ná mabongoli mosusu elandaka makomi ya Bamasorete.

Kasi, bokeseni yango ezali mpenzampenza wapi? Na makomi ya Liebele, banzembo ezali 150. Kasi, na libongoli ya Septante, basangisi nzembo ya 9 ná ya 10 ekómá nzembo moko, ndenge moko mpe nzembo ya 114 ná ya 115. Lisusu, bakabolá nzembo 116 ná 147 na nzembo mibalemibale. Na ndenge yango, atako motángo ya nzembo ezali kaka ndenge moko, kobanda na nzembo 10 tii na nzembo 146 na libongoli ya Septante, ndenge oyo mikapo elandani ekeseni na makomi ya Liebele na nzembo moko. Yango wana, na libongoli ya Douay, oyo elandi libongoli ya Latin oyo babengi Vulgate, oyo yango moko elandá libongoli ya Septante, nzembo 23 ezalaka nde nzembo 22.

Ndenge moko mpe, molɔngɔ ya bavɛrsɛ na nzembo mosusu ekoki kokesene na mabongoli mosusu ya Biblia. Mpo na nini? Buku moko (Cyclopedia) ya McClintock ná Strong, elobi ete ezali mpo mabongoli mosusu elandaka “momeseno ya Bayuda ya kotánga maloba oyo ezalaka likoló ya nzembo lokola vɛrsɛ ya liboso,” nzokande mabongoli mosusu elandaka yango te. Kutu, soki maloba yango ezali molai, mbala mingi batángaka yango lokola vɛrsɛ mibale, mpe yango esalaka ete bavɛrsɛ ya nzembo ekóma mpe ebele.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto