Bóbɔndisa bato oyo bazali na mpasi
“Yehova apakoli ngai . . . mpo na kobɔndisa bato nyonso oyo bazali kolela.”—YISAYA 61:1, 2, NW.
1, 2. Tosengeli kobɔndisa banani, mpe mpo na nini?
YEHOVA, Nzambe ya kobɔndisama nyonso ya solosolo, azali koteya biso ete tókanisaka basusu ntango bazali na mpasi. Azali koteya biso ‘tólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi’ mpe tóbɔndisaka bato nyonso oyo bazali kolela. (1 Batesaloniki 5:14) Ntango bandeko na biso bandimi bazali na mposa ya libɔndisi ndenge yango, topesaka bango yango. Tolingaka mpe bato oyo bazali na kati ya lisangá te, ezala baoyo bamonisá biso ata mbala moko te ete balingaka biso.—Matai 5:43-48; Bagalatia 6:10.
2 Yesu Klisto atángaki esakweli moko mpe alobaki ete ye nde asengelaki kokokisa mokumba oyo esakweli yango elobelaki: “Elimo ya Nkolo Mokonzi Yehova ezali likoló na ngai, mpamba te Yehova apakoli ngai mpo na koyebisa bato ya komikitisa nsango malamu. Atindi ngai kosalisa bato oyo bazoki na motema, . . . kobɔndisa bato oyo bazali kolela.” (Yisaya 61:1, 2, NW; Luka 4:16-19) Baklisto bapakolami ya mikolo na biso bayebaka banda kala ete bango mpe basengeli kokokisa mokumba yango, mpe “bampate mosusu” bapesaka bango mabɔkɔ na esengo na mosala yango.—Yoane 10:16.
3. Ntango bato bazali komituna, “Mpo na nini Nzambe atikaka nzela na makama?,” ndenge nini tokoki kosalisa bango?
3 Ntango makama esalemi mpe epesi bato mpasi mingi na motema, mbala mingi batunaka ete, “Mpo na nini Nzambe atikaka nzela na makama?” Biblia epesi eyano ya polele na motuna yango. Kasi, ekoki kosɛnga ntango mpo moto oyo ayekolaka Biblia te akanga mpenza ntina ya eyano yango. Mikanda ya Batatoli ya Yehova ekoki kosalisa ye.a Nzokande, mbala mingi bato babɔndisamaki ntango kaka batángelaki bango bavɛrsɛ ya Biblia lokola Yisaya 61:1, 2, oyo ezali komonisa ete Nzambe azali na mposa ete bato bábɔndisama.
4. Ndenge nini Motatoli moko na Pologne asalisaki elenge mwasi oyo azalaki komitungisa, mpe ndenge nini lisolo yango ekoki kosalisa yo mpo na kosalisa bato mosusu?
4 Mposa ya libɔndisi eponi mbula te. Na Pologne, elenge mwasi moko oyo azalaki konyokwama na makanisi atunaki mwasi moko oyo ayebani na ye toli. Mwasi yango oyo azali Motatoli ya Yehova, atunaki ye na boboto mwa mituna mpe amonaki ete elenge yango azalaki komituna ebele ya mituna mpe makambo mosusu ezalaki kotungisa ye: “Mpo na nini mokili etondi na mabe? Mpo na nini bato bazali konyokwama? Mpo na nini leki na ngai ya mwasi oyo azali ebɔsɔnɔ azali konyokwama? Mpo na nini nabɛlaka motema? Na Lingomba balobaka ete ezali mokano ya Nzambe. Kasi, soki ezali bongo, nakondima lisusu Nzambe yango te!” Motatoli yango abondelaki Yehova na nse ya motema, na nsima alobaki na ye boye: “Nasepeli na ndenge otuni ngai mituna yango. Nakomeka kosalisa yo.” Ayebisaki ye ete ye mpe azalaki komituna mituna mingi ntango azalaki mwana moke mpe Batatoli ya Yehova basalisaki ye. Alimbolaki boye: “Bateyaki ngai ete Nzambe anyokolaka bato te. Nzambe alingaka bato, alingaka bázala malamu mpenza, mpe etikali moke abongola makambo nyonso na mokili. Maladi, bobange, mpe liwa ekozala lisusu te, mpe bato oyo batosaka ye bakozala na bomoi ya seko awa na mabelé.” Alakisaki elenge mwasi yango bavɛrsɛ oyo: Emoniseli 21:3, 4; Yobo 33:25; Yisaya 35:5-7 mpe 65:21-25. Nsima ya kosolola ntango molai, elenge mwasi yango alobaki na mongongo oyo emonisaki ete abɔndisamaki mpenza: “Nayebi sikoyo ntina ya bomoi na ngai. Nakoki koya kotala yo lisusu?” Bakómaki koyekola Biblia mbala mibale na pɔsɔ.
Tóbɔndisa na libɔndisi oyo Nzambe azali kopesa
5. Ntango tozali komonisa moto ete tozali koyeba mpasi na ye, nini ekobɔndisa ye mpenza?
5 Ntango tolingi kobɔndisa bato mosusu, ebongaka mpenza ete tózala na maloba ya boboto. Tosengeli kosala nyonso mpo maloba mpe mongongo na biso emonisa moto ete tozali koyeba mpasi na ye. Yango esɛngaka koloba te kaka mpo na koloba. Biblia elobi na biso ete “na nzela ya ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na nzela ya kobɔndisama oyo euti na Makomami tókoka kozala na elikya.” (Baloma 15:4) Mpo na yango, na ntango oyo ebongi tokoki kolimbola soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini, mpe tokoki kosalela Biblia mpo na komonisa ndenge oyo bokonzi yango ekosilisa mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo oyo. Na nsima tokoki kokanisa elongo na moto mpo na kosalisa ye amona mpo na nini ebongi kotyela elikya yango motema. Na ndenge yango nde tokobɔndisa.
6. Tosengeli kosalisa bato bákanga ntina ya nini mpo ete Makomami ekoka mpenza kobɔndisa bango?
6 Mpo moto akoka kobɔndisama mpenza, asengeli koyeba Nzambe ya solo, ayeba bomoto na ye mpe mpo na nini tokoki kotyela bilaka na ye motema. Ntango tolingi kosalisa moto moko oyo azali naino mosambeli ya Yehova te, ezali malamu kolimbolela ye makambo oyo elandi. (1) Libɔndisi oyo ezali na Biblia euti na Yehova, Nzambe ya solo. (2) Yehova azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Mozalisi ya likoló ná mabelé. Azali Nzambe ya bolingo mpe atondi na motema-boboto mpe na solo. (3) Tokoki kozwa makasi ya kobunda na mikakatano na biso soki tozwi boyebi mpenza ya Liloba na ye oyo ekosalisa biso tópusana penepene na ye. (4) Biblia ezali na bavɛrsɛ oyo elobeli mpenza mikakatano oyo bato ya ndenge na ndenge bazali kokutana na yango.
7. (a) Likambo nini ekoki komonana soki tozali komonisa mpenza ete libɔndisi oyo Nzambe azali kopesa “ezali kotondana na nzela ya Klisto”? (b) Ndenge nini okoki kobɔndisa moto oyo azali komona ete azalaki na etamboli ya mabe?
7 Bandeko mosusu, mpo na kobɔndisa bato bayebi Biblia oyo bazali kolela, batángelaki bango mokapo ya 2 Bakolinti 1:3-7. Nsima ya kotánga bavɛrsɛ yango, babendaki likebi na maloba “kobɔndisama oyo tozali kozwa ezali kotondana na nzela ya Klisto.” Vɛrsɛ yango ekoki kosalisa moto ayeba ete Biblia ezali mokanda oyo ebɔndisaka, oyo tosengeli kotalela malamu. Tokoki mpe kobimisa makanisi mosusu na vɛrsɛ yango oyo mbala mosusu tokolobela yango na mabaku mosusu. Soki moto azali kokanisa ete misala ya mabe oyo asalaki nde ememeli ye mikakatano, boye tokoki koyebisa ye, kozanga ete tóloba lokola nde tozali kosambisa ye, ete maloba ya 1 Yoane 2:1, 2 mpe Nzembo 103:11-14 ekoki kobɔndisa ye. Na ndenge yango, tokobɔndisa mpenza bato mosusu na libɔndisi oyo euti na Nzambe.
Ntango mobulu ekómi mingi to bato bazali na mikakatano ya mbongo
8, 9. Ndenge nini tokoki mpenza kobɔndisa bato oyo banyokwami mpo na mobulu?
8 Ebele ya bato bazali komitungisa mpo ete bafandi na bisika oyo mobulu ezali mingi to mpe bitumba ezali kuna. Ndenge nini tokoki kobɔndisa bango?
9 Baklisto ya solo bakebaka ete na maloba mpe na misala na bango bámikɔtisa ata na ngámbo moko te ya baoyo bazali kobunda bitumba na mokili oyo. (Yoane 17:16) Kasi, basalelaka malamu Biblia mpo na komonisa ete makambo mabe oyo ezali lelo ekoumela libela na libela te. Bakoki kotánga Nzembo 11:5 mpo na komonisa ndenge oyo Yehova atalelaka bato oyo balingaka mobulu to mpe Nzembo 37:1-4 mpo na komonisa ndenge oyo Nzambe azali kolendisa biso ete tózongisa mabe na mabe te kasi tótyela Ye motema. Maloba ya Nzembo 72:12-14 ezali komonisa ndenge oyo Salomo Monene, Yesu Klisto, oyo azali sikoyo Mokonzi na likoló, ayokaka mpo na bato oyo basali likambo te kasi bazali konyokwama mpo na mobulu.
10. Soki ofandi bambula mingi na esika oyo bitumba esilaka te, ndenge nini bavɛrsɛ oyo totángi ekoki kobɔndisa yo?
10 Bato mosusu bafandi na bisika oyo bato bazali kowela bokonzi mpe bitumba esilaka te. Bakómi komona lokola nde bitumba mpe mikakatano oyo yango ebimisaka ezali kaka makambo ya bomoi. Elikya se moko batikali na yango ezali ete bakozala mwa malamu soki bakei kofanda na mboka mopaya. Kasi, mingi balongaka kosala yango te, mpe na kati ya baoyo bamekaki, bamosusu kutu bakufaki. Baoyo mpe bazali kolonga kokende na mikili mosusu, mbala mingi bazali komona ete batiki mikakatano ya ndenge mosusu mpe bakei komikɔtisa na mikakatano ya ndenge mosusu. Tokoki kotángela bango Nzembo 146:3-6 mpo na kosalisa bango bátya elikya na bango na likambo oyo ezali malamu koleka kofanda na mboka mopaya. Esakweli ya Matai 24:3, 7, 14 to 2 Timote 3:1-5 ekoki kosalisa bango na kotalela likambo na bozindo mpo báyeba ntina oyo bazali kokutana na makambo yango; ntina yango ezali ete ebongiseli ya makambo oyo ekómi na nsuka. Bavɛrsɛ lokola Nzembo 46:1-3, 8, 9 mpe Yisaya 2:2-4 ekoki kosalisa bango na koyeba ete tokoki kozala na elikya ya kofanda na kimya na mikolo ezali koya.
11. Bavɛrsɛ nini ebɔndisaki mwasi moko na Afrika ya Wɛsti, mpe mpo na nini?
11 Ntango bitumba ezalaki kosila te na Afrika ya Wɛsti, mwasi moko akimaki ndako na ye ntango masasi ezalaki kobɛta. Na nsima, akómaki kobangabanga, akómaki mawamawa, mpe alɛmbaki nzoto. Ye na mobali na ye na mwana na bango bakómaki kofanda na mboka mopaya. Kasi, lokola mobali yango alingaki kokóma sango, mokolo mosusu atumbaki buku ya libala na bango, abenganaki mwasi na ye oyo azalaki na zemi ná mwana mosusu ya mbula zomi. Ntango batángelaki mwasi yango Bafilipi 4:6, 7 ná Nzembo 55:22, mpe masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Lamuká!, abɔndisamaki mpe amonaki ete bomoi na ye ekómaki na ntina.
12. (a) Libɔndisi nini Makomami ezali kopesa bato oyo bazali kotungisama na mikakatano ya nkita? (b) Ndenge nini Motatoli moko na Azia asalisaki kiliya na ye?
12 Kobeba ya nkita ya ekólo ebebisi bomoi ya ebele ya bato. Ntango mosusu mpe bitumba ná mikakatano na yango nde ebebisi bomoi ya bato. Na bantango mosusu, bato oyo bakómaki na mwa mbongo oyo bazalaki kobomba to basombaki mwa biloko ya valɛrɛ, babungisaki yango nyonso, to batɛkisaki yango mpe batikalaki mabɔkɔ mpamba mpo na mikano ya mabe oyo guvɛrnema ezwaki, mpo na lokoso ná kozanga bosembo ya bakonzi. Bato mosusu bazalaka na biloko mingi te ya mokili oyo. Bato nyonso wana bakoki kobɔndisama soki bayebi ete Nzambe alaki ete akosilisa bampasi ya bato oyo bazali kotyela ye elikya mpe alaki mokili ya sembo oyo kati na yango bato bakosepela na misala ya mabɔkɔ na bango. (Nzembo 146:6, 7; Yisaya 65:17, 21-23; 2 Petelo 3:13) Na ekólo moko ya Azia, Motatoli moko ayokaki kiliya na ye azali komilelalela ete nkita ya ekólo na bango ebebi mingi; Motatoli yango ayebisaki ye ete makambo yango ezali kosalema na mokili mobimba. Atángelaki ye Matai 24:3-14 mpe Nzembo 37:9-11; nsima na yango bakómaki koyekola Biblia.
13. (a) Soki bato batyelaki bilaka ya lokuta motema, ndenge nini tokoki kosalela Biblia mpo na kosalisa bango? (b) Soki bato bazali kokanisa ete bampasi ezali komonisa ete Nzambe azali te, ndenge nini okoki kokanisa na bango?
13 Soki bato banyokwami bambula mingi to batyaki motema na ebele ya bilaka ya lokuta, bakoki kozala lokola Bayisalaele na Ezipito oyo, “na ntina na bolɛmbu na mitema” bayokaki te. (Exode 6:9) Na ntango wana, ekoki kozala malamu komonisa bango ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa bango bálonga mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo oyo mpe bákima makambo oyo ezali kobebisa bomoi ya ebele ya bato. (1 Timote 4:8b) Bato mosusu bakoki kokanisa ete bomoi ya mpasi oyo bazali na yango ezali komonisa ete Nzambe azali te to akipaka bango te. Okoki kosalela bavɛrsɛ oyo ebongi mpo na kokanisa na bango mpe kosalisa bango báyeba ete Nzambe apesi biso lisalisi kasi bato mingi balingi yango te.—Yisaya 48:17, 18.
Ntango mipɛpɛ makasi to koningana ya mabelé ebimisi makama
14, 15. Ntango ebele ya bato bazalaki na mpasi na mitema nsima ya likama moko monene, ndenge nini Batatoli ya Yehova bamonisaki ete bazalaki komibanzabanza mpo na bango?
14 Mopɛpɛ makasi, koningana ya mabelé, mɔtɔ makasi, to ngomba ebimisi mɔtɔ ekoki komema makama. Yango ekoki kopesa ebele ya bato mpasi. Tokoki kosala nini mpo na kobɔndisa bato oyo babiki na makama ya ndenge wana?
15 Bato basengeli koyeba ete bazali komibanzabanzaka mpo na bango. Na ekólo moko, ntango bateroriste basalaki likambo moko ya nsɔmɔ, ebele ya bato bazalaki na mpasi na mitema. Mingi babungisaki bandeko, bato mosusu oyo bazalaki kosunga mabota na bango bakufaki, bato mosusu babungisaki baninga, basusu babungisaki misala, to mpe bamonaki ete bazalaki komikosa na kokanisa ete bazali na kimya. Batatoli ya Yehova bazalaki kokende kotala bato na bisika oyo bafandi, bazalaki komonisa bango ete bazalaki komibanzabanza mpo na nyonso oyo bato yango babungisaki mpe bazalaki kotángela bango maloba ya kobɔndisa oyo ezali na kati ya Biblia. Bato mingi basepelaki mpenza na ndenge oyo bamibanzabanzaki mpo na bango.
16. Ntango likama esalemaki na ekólo Salvador, mpo na nini mosala ya kosakola ya Batatoli ya mboka wana ezalaki koleka malamu?
16 Na mobu 2001, mabelé eninganaki makasi na ekólo Salvador mpe na nsima pɔtɔpɔtɔ oyo ezalaki kouta na ngomba ebomaki ebele ya bato. Mwana ya mbula 25 ya Motatoli moko akufaki mpe fianse ya mwana yango akufelaki bandeko mibale ya basi. Mama ya elenge mobali yango ná fianse na ye bamipesaki na mosala ya kosakola. Bato mingi bazalaki koloba na bango ete Nzambe nde akamataki bato oyo bakufaki to mpe ete liwa na bango ezali mokano ya Nzambe. Batatoli bazalaki kotánga maloba ya Masese 10:22 mpo na komonisa ete Nzambe alingaka te ete biso tózala na mpasi. Bazalaki kotánga Baloma 5:12 mpo na komonisa ete liwa eutaki na lisumu ya moto, kasi ezali mokano ya Nzambe te. Bazalaki mpe kolobela nsango ya kobɔndisa oyo ezali na Nzembo 34:18; Nzembo 37:29, Yisaya 25:8, mpe Emoniseli 21:3, 4. Bato bazalaki koyoka bango, mingimingi lokola basi yango mpe babungisaki bandeko na bango na likama yango, mpe babandaki koyekola Biblia na bato ebele.
17. Na ntango likama esalemi, lisalisi nini tokoki kopesa?
17 Ntango likama moko esalemi, okoki kokutana na moto oyo azali na mposa ya lisalisi nokinoki. Mbala mosusu ekoki kozala mpo bábengela ye monganga, bámema ye na lopitalo, to bápesa ye mwa biloko ya kolya to esika ya kolala. Na 1998, ntango mabelé eninganaki na Italie, mopanzi-nsango moko alobaki ete Batatoli ya Yehova “basalaka makambo oyo esengeli mpenza, basalisaka bato oyo bazali na mpasi, balukaka naino koyeba te soki bazali na lingomba nini.” Na bisika mosusu, makambo oyo Biblia esakolaki mpo na mikolo ya nsuka ezali kopesa bato mpasi mingi. Na bisika wana, Batatoli ya Yehova balobelaka bisakweli ya Biblia, mpe babɔndisaka bato na elikya oyo Biblia ezali kopesa ete Bokonzi ya Nzambe ekomemela bato kimya ya solosolo.—Masese 1:33; Mika 4:4.
Ntango moto akufi na libota moko
18-20. Ntango bato bakufeli ndeko na kati ya libota, okoki koloba to kosala nini mpo na kobɔndisa bango?
18 Mokolo na mokolo ebele ya bato bazali kolela mpo ndeko to moninga na bango akufi. Okoki kokutana na bato oyo bazali kolela ntango ozali na mosala ya kosakola to ntango ozali kosala mosala na yo. Okoki koloba nini to kosala nini mpo na kobɔndisa bango?
19 Liwa yango ebulunganisi mpenza makanisi ya moto oyo okutani na ye? Okuti ebele ya bato bazali kolela na ndako? Ezali na makambo mingi oyo okoki koloba, kasi esɛngaka kozala na bososoli. (Mosakoli 3:1, 7) Mbala mosusu ebongi kaka komonisa ete likambo yango epesi yo mpe mawa, kotikela bango mokanda moko oyo ebongi (mwa buku, zulunalo, to trakte), mpe kozonga nsima ya mwa mikolo mpo na koyeba soki okoki kosalisa bango na likambo mosusu. Na ntango oyo ebongi, tuná soki bakosepela otángela bango mwa makanisi ya Biblia. Yango ekoki kokitisa bango mitema mpe kobɔndisa bango. (Masese 16:24; 25:11) Okoki te kosekwisa moto oyo akufi, ndenge Yesu asalaki. Nzokande, okoki komonisa bato makambo oyo Biblia elobi mpo na bato oyo bakufá, kasi okokeba ete na ntango wana oluka te kokweisa mateya ya lokuta oyo bato bandimaka. (Nzembo 146:4; Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4) Okoki kotángela bango bilaka ya lisekwa oyo Biblia epesi. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Okoki kolimbwela bango yango, mbala mosusu mpe kolobela lisolo moko ya Biblia oyo elobeli lisekwa. (Luka 8:49-56; Yoane 11:39-44) Okoki mpe kolobela bizaleli malamu ya Nzambe ya bolingo oyo apesi biso elikya yango. (Yobo 14:14, 15; Yoane 3:16) Okoki komonisa ndenge oyo mateya yango esalisaki yo mpe mpo na nini ondimaka yango.
20 Soki obengisi moto oyo azali na mawa na Ndako ya Bokonzi, yango ekoki kosalisa ye mpamba te akokutana na bato oyo balingaka mpenza baninga na bango mpe bayebi kolendisana. Na Suède, mwasi moko amonaki ete ezalaki yango nde azalaki koluka na bomoi na ye mobimba.—Yoane 13:35; 1 Batesaloniki 5:11.
21, 22. (a) Likambo nini tosengeli kosala mpo na kobɔndisa basusu? (b) Ndenge nini okoki kobɔndisa moto oyo ayebi Makomami malamu?
21 Ntango oyebi ete moto moko azali na mawa, azala ndeko na kati ya lisangá to moto mosusu oyo azali na lisangá te, ozangaka ntango mosusu maloba ya koloba na ye to oyebaka te soki okoki kosala nini? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “libɔndisi” na kati ya Biblia elimboli mpenzampenza “kobenga moto aya pene.” Kozala mobɔndisi ya malamu esɛngi kozala pene mpo na kosalisa baoyo bazali na mawa.—Masese 17:17.
22 Ezali boni soki moto oyo olingi kobɔndisa ayebi oyo Biblia elobi mpo na baoyo bakufá, mpo na lisiko, mpe mpo na lisekwa? Kaka kokende kotala moninga oyo azali na bilikya moko na yo ekoki kobɔndisa ye. Soki azali na mposa ya koloba, yoká ye malamu. Kokanisa te ete osengeli kaka koloba na ye ebele ya makambo. Soki botángi na ye mwa bavɛrsɛ, talelá yango lokola maloba ya Nzambe oyo ezali kolendisa mitema na bino mibale. Lobelá elikya makasi oyo bozali na yango ete bilaka ya Makomami ekokokisama. Soki ozali komonisa mawa ya Nzambe mpe soki ozali koyebisa solo ya ntina mingi oyo ezali na Liloba ya Nzambe, okoki kosalisa baoyo bazali kolela bázwa libɔndisi mpe elendiseli oyo euti na Yehova, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso.”—2 Bakolinti 1:3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá babuku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mokapo 8; Ndenge ya kosolola na bato na Makomami, nkasa 374-381, 237-241; Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous?, mokapo 10; mpe mwa buku Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
Okoloba nini?
• Bato mingi bapesaka nani foti mpo na makama oyo ezali kosalema, mpe ndenge nini tokoki kosalisa bango?
• Tokoki kosala nini mpo na kosalisa bato mosusu bázwa libɔndisi oyo ezali kouta na Biblia?
• Makambo nini ezali kopesa bato mpasi na mboka na bino, mpe ndenge nini okoki kobɔndisa bango?
[Bililingi na lokasa 23]
Bazali koyebisa nsango oyo ekoki mpenza kobɔndisa na ntango ya mpasi
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Kaa ya bato bakimá mboka: FƆTƆ YA ONU 186811/J. Isaac
[Elilingi na lokasa 24]
Moto akoki kobɔndisama ntango azali komona moninga na ye