Yehova amonaka makambo oyo yo osalaka?
OKOPESA eyano nini soki batuni yo motuna wana? Bato mingi bakoloba ete: ‘Nandimi ete Nzambe azalaki komona makambo oyo bato lokola Moize, Gideona mpe Davidi bazalaki kosala; kasi nandimi te ete atyaka likebi na likambo oyo ngai nakoki kosala. Nazali Moize to Gideona to Davidi te.’
Ya solo, bato mosusu ya sembo na ntango ya kala basalaki misala minene oyo emonisaki kondima. ‘Balongaki makonzi na bitumba, bakangaki minɔkɔ ya bankɔsi, bakangaki bokasi ya mɔtɔ, balongaki kokima mino ya mopanga.’ (Baebele 11:33, 34) Nzokande, ezali mpe na bato mosusu oyo bazalaki na kondima, kasi basalaki makambo ya kokamwa ndenge wana te; kasi, Biblia ezali kondimisa biso ete Nzambe amonaki mpe misala na bango. Mpo na komonisa yango, tókamata ndakisa ya mobateli moko ya mpate, ya mosakoli moko, mpe ya mwasi moko oyo akufelá mobali oyo Makomami elobeli.
Mobateli moko ya mpate apesi mbeka
Okanisaka Abele, mwana ya mibale ya Adama ná Eva, na likambo nini? Mbala mosusu oyebi ete babomaki ye, likambo oyo ntango mosusu ekokómela bato mingi te kati na biso. Kasi, Abele abendaki likebi ya Nzambe libosoliboso mpo na likambo mosusu.
Mokolo moko, Abele akamataki mwa banyama oyo eleki kitoko na etonga na ye mpe apesaki Nzambe mbeka. Lelo oyo, tokoki komona ete likabo na ye ezalaki monene te, kasi Yehova amonaki yango mpe andimaki yango. Nzokande, esuki kaka wana te. Pene na mbula nkóto minei na nsima, Yehova apesaki ntoma Paulo elimo santu akoma likambo yango na mokanda na ye epai ya Baebele. Ata nsima ya ebele ya bambula, Nzambe abosanaki mwa mbeka wana te!—Baebele 6:10; 11:4.
Abele atalelaki nini mpo na kopona mbeka oyo akopesa Nzambe? Biblia elobeli yango te, kasi ekoki mpenza kozala ete azwaki ntango ya kokanisa likambo yango. Lokola azalaki mobateli ya mpate, tokoki mpenza kokanisa ete azwaki banyama oyo apesaki na etonga na ye. Kasi, tósimba ete akamataki oyo eleki kitoko—“biteni ya mafuta.” (Genese 4:4, NW) Ekoki mpe kozala ete akanisaki malamumalamu likoló ya maloba oyo Yehova ayebisaki nyoka na elanga ya Edene, ete: “Nakotya koyinana kati na yo na mwasi mpe kati na mombóto na yo mpe momboto na ye. Ye akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW; Emoniseli 12:9) Atako ayebaki te soki “mwasi” ná “mombóto” ya mwasi ezali banani, Abele akangaki ntina ete, ntango ‘bakosasa litindi’ ya mwasi makila ekosopana. Na ntembe te ayebaki ete eloko moko te ekoki kozala na motuya koleka ekelamu ya bomoi. Likambo ya ntina koleka ezali ete mbeka oyo apesaki ebongaki mpenza.
Lelo oyo, baklisto bazali mpe kopesa Nzambe mbeka lokola Abele apesaki. Bazali kopesa bana ya mpate ya liboso ya bitonga na bango te, kasi “mbeka ya lisanzoli . . . , elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosala eyambweli mpo na nkombo [ya Nzambe].” (Baebele 13:15) Mbɛbu na biso esalaka eyambweli ntango tozali koyebisa bamosusu makambo oyo tondimaka.
Olingi ete mbeka ya masanzoli na yo ezala malamu koleka? Soki bongo, talelá malamumalamu bamposa ya bato ya teritware na yo. Makambo nini etungisaka bango? Basepelaka na makambo nini? Nsango nini ya Biblia ekoki mpenza kobenda likebi na bango? Ntango nyonso oyo ozali kosakola, talelá lolenge osalaka yango mpo okoka kobongisa lisusu. Ntango mpe ozali koloba na ntina na Yehova, monisá mpenza na motema na yo mobimba ete ondimaka makambo oyo ozali koloba. Salá nyonso ete mbeka na yo ezala mpenza “mbeka ya lisanzoli.”
Mosakoli moko asakweli bato oyo baboyi koyoka
Sikoyo, talelá naino mosakoli Enoka. Ntango mosusu azalaki kaka ye moko motatoli ya Yehova Nzambe na ntango na ye. Yo mpe ozali lokola Enoka, elingi koloba ozali kosambela Yehova na bosembo kaka yo moko na libota na bino? Na kelasi na bino, to na esika oyo osalaka, ozali bobele yo moko moto oyo otosaka mitinda ya Biblia? Soki bongo, okoki kokutana na mikakatano. Baninga, bandeko, bana-kelasi, to baninga ya mosala bakoki kotinda yo obuka mibeko ya Nzambe. Bakoki koloba boye: “Moto moko te akoyeba likambo oyo osali. Tokobomba yango.” Bakoki mpe kokangama na komonisa ete komitungisa mpo na kozala na bizaleli malamu ezali na ntina te mpamba te Nzambe akipaka kutu makambo na yo te. Lokola bakosepela te mpo ozali kokanisa mpe kosala ndenge bango basalaka te, bakosala nyonso oyo bazali na likoki ya kosala mpo na kolɛmbisa yo.
Ya solo, kokutana na mokakatano ya ndenge wana ezali likambo ya pɛtɛɛ te, kasi okoki kolonga yango. Kanisá Enoka, moto ya nsambo na molɔngɔ oyo ebandi na Adama. (Yuda 14) Na ntango oyo Enoka abotamaki, bato mingi babosanaki bizaleli nyonso ya malamu. Bazalaki na elobeli ya nsɔni; bazalaki kosala makambo oyo ezalaki “kozokisa.” (Yuda 15) Na makambo mingi, bazalaki kosala kaka ndenge ebele ya bato bazali kosala lelo oyo.
Ndenge nini Enoka alongaki? Eyano na motuna wana ezali na ntina mpo na biso lelo. Atako ekoki kozala ete Enoka azalaki moto bobele moko na mabelé oyo azalaki kosambela Yehova, azalaki mpenzampenza ye moko te. Enoka atambolaki elongo na Nzambe.—Genese 5:22.
Na bomoi ya Enoka, azalaki kokanisa ntango nyonso kosepelisa Nzambe. Ayebaki ete kotambola na Nzambe esuki kaka te na kozala na etamboli ya pɛto, to na bizaleli malamu. Mposa ya Yehova ezalaki ete Enoka asakola. (Yuda 14, 15) Esengelaki kokebisa bato ete Nzambe azali komona misala na bango ya mabe. Enoka alandaki kotambola na Nzambe mbula koleka 300—bambula mingi koleka oyo mokomoko na biso ayikeli makambo mabe mpiko. Tii na liwa na ye, akobaki kotambola elongo na Nzambe.—Genese 5:23, 24.
Bapesi biso mpe etinda ya kosakola ndenge bapesaki Enoka. (Matai 24:14) Longola kosakola ndako na ndako, tomekaka mpe kosakola nsango malamu epai ya bandeko na biso, baninga ya mosala, mpe baninga na biso ya kelasi. Kasi, ntango mosusu, tokakatanaka mpo na kosakola na molende. Yo mpe obangaka kosakola na molende? Kolɛmba nzoto te. Landá ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso, mpe bondelá Nzambe apesa yo molende. (Misala 4:29) Kobosana ata moke te ete ntango nyonso oyo ozali kotambola elongo na Nzambe, ozali mpenza yo moko te.
Mwasi moko oyo akufelá mobali alambi biloko ya kolya
Kanisá naino, mwasi moko oyo akufelá mobali oyo batángi ata nkombo na ye te azwaki mbano mbala mibale mpo alambaki biloko ya kolya. Mwasi yango azalaki Moyisalaele te, kasi moto ya ekólo mosusu, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya 10 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), na engumba Zalefata. Biloko na ye ya kolya elingaki esila liboso ete elanga ya makasi mpe nzala ya monene oyo ezalaki na mboka ekóma na nsuka. Atikalaki kaka na mwa kɔpɔ moko ya farini na mwa ndambo ya mafuta mpo na kolya ya nsuka ye ná mwana na ye.
Na ntango wana, mopaya moko ayaki. Mopaya yango ezali Eliya, mosakoli ya Nzambe, mpe asɛngaki ete alya mpe ndambo ya mwa biloko ya mwasi yango. Mwa biloko yango etikalaki moke mpenza mpe ekokaki kaka mpo na ye ná mwana na ye, na yango azalaki mpenza na eloko te oyo akokaki kopesa mopaya yango. Kasi, Eliya alakaki ye, na liloba ya Yehova, ete soki akabeli ye mwa eloko ya kolya, ye ná mwana na ye bakokufa nzala te. Esɛngaki ete mwasi yango—moto akufelá mobali mpe moto ya ekólo mosusu—azala na kondima mpo alikya ete Nzambe ya Yisalaele akomona ye. Atako bongo, andimelaki Eliya, mpe Yehova apesaki ye mbano. “Mbɛki ya [farini, NW] esilaki te mpe molangi ya mafuta ekaukaki te lokola na liloba ya [Yehova] oyo elobaki ye na nzela na Eliya.” Mwasi wana ná mwana na ye bazwaki biloko ya kolya mingi tii ntango nzala monene yango esilaki.—1 Mikonzi 17:8-16.
Nzokande, mwasi yango azwaki mpe mbano mosusu. Mwa ntango elekaki nsima ya likamwisi wana, mwana na ye ya bolingo akufaki. Eliya ayokaki mawa mpe abondelaki Yehova asekwisa mwana yango. (1 Mikonzi 17:17-24) Likamwisi ya ndenge wana esalemaki naino liboso te. Ezalaki ata na lisolo moko te oyo emonisi ete moto moko asekwisamaki liboso! Yehova akoyokela nde lisusu mwasi yango ya ekólo mosusu mawa? Ɛɛ. Yehova apesaki Eliya nguya asekwisa mwana yango. Na nsima, Yesu amonisaki na ntina na mwasi yango oyo azwaki libaku malamu wana ete: “Ezalaki na basi mingi oyo bakufelá mibali na Yisalaele . . . Atako bongo Eliya atindamaki . . . na Zalefata na mokili ya Sidoni epai ya mwasi moko oyo akufelá mobali.”—Luka 4:25, 26.
Lelo oyo nkita ebebi makasi mpenza, ata na mikili ya bozwi. Bato mosusu balongoli bango na misala na bakompanyi ya minene nsima ya ebele ya bambula oyo basalaki kuna na bosembo. Lokola misala ezali komonana lisusu te, moklisto moko akoki kobanda kolekisa ntango mingi na mosala na likanisi ete kompanyi ekotika ye na mosala. Soki asali bongo, akoki kozala lisusu na ntango mingi te mpo na koyangana na makita, kobima na mosala ya kosakola, to kokokisa bamposa ya libota na ye ezala na mayoki to na elimo. Kasi, amoni ete asengeli kosala nyonso mpo na kobatela mosala wana.
Moklisto oyo azali kokutana na mikakatano ya mbongo ndenge wana asengeli kaka komitungisa. Na mikolo oyo, kozwa mosala ekómi mpasi. Mingi kati na biso tozali koboma nzoto te mpo na kokóma bato ya bomɛngo, kasi lokola mwasi oyo akufelá mobali na engumba Zalefata, tolingi kaka tózwaka mwa eloko ya kolya. Kasi, ntoma Paulo akundoleli biso ete Nzambe alobaki boye: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” Na elikya mpenza, tokoki koloba ete: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?” (Baebele 13:5, 6) Paulo abosanaki elaka yango te na bomoi na ye mobimba, mpe Yehova asungaki ye ntango nyonso. Nzambe akosalela biso mpe bongo soki tosundoli ye te.
Ntango mosusu tokoki kokanisa ete misala na biso ekokokana ata moke te na makambo oyo bato ya elimo lokola Moize, Gideona, ná Davidi basalaki, atako bongo, tokoki kolanda ndakisa ya kondima na bango. Tokoki mpe kokanisa mwa misala ya kondima oyo Abele, Enoka, mpe mwasi oyo akufelá mobali na engumba Zalefata basalaki. Yehova asepelaka na misala nyonso oyo ezali komonisa kondima—ata oyo ya moke mpenza. Ntango mwana-kelasi aboyi komɛla bangi oyo moninga na ye ya kelasi apesi ye, ntango moklisto moko aboyi etamboli ya mbindo ya basi to mibali oyo bazali kolandalanda ye na esika ya mosala, to ntango Motatoli moko oyo akómi mobange mpenza azali koyangana na makita nyonso atako nzoto na ye elɛmbi mpe ezali lisusu kolɔngɔnɔ te, Yehova azali komona yango. Mpe azali kosepela!—Masese 27:11.
Omonaka oyo bato mosusu basalaka?
Ya solo, Yehova amonaka mpenza oyo biso tosalaka. Yango wana, lokola tozali bamekoli ya Nzambe, tosengeli kotyaka likebi mpo na komona milende ya bamosusu. (Baefese 5:1) Mpo na nini te kotyaka likebi mpenza na mikakatano oyo bandeko na yo baklisto bazali kokutana na yango mpo na koyangana na makita, kobima na mosala ya kosakola, ata mpo na kosala misala na bango ya mokolo na mokolo?
Na nsima, yebisáká bandeko na yo basambeli ya Yehova ete osepelaka mpenza na milende na bango. Bakosepela mingi ete omonaka milende na bango, mpe yango ekondimisa bango ete Yehova mpe amonaka oyo bazali kosala.