Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/6 nk. 26-29
  • Alexandre VI​—Pápa oyo Rome ebosani te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Alexandre VI​—Pápa oyo Rome ebosani te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge akómaki pápa
  • Ndenge moko na bakonzi ya mokili
  • Bato mosusu bakómi kolobela mabe ya pápa
  • Mituna ya ntina mingi
  • Ezali mpenza boklisto ya solo?
  • Mibeko oyo ekabolaki bakɔntina
    Lamuká!—2015
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/6 nk. 26-29

Alexandre VI​—Pápa oyo Rome ebosani te

“MPO na mondimi ya Katolike, maloba ezali te mpo na komonisa mabe ya Alexandre VI.” (Buku Geschichte der Päpste seit dem Ausgang des Mittelalters [Bapápa banda na nsuka ya Moyen Âge]) “Tokoki ata moke te kolongisa ye na makambo oyo asalaki na bomoi na ye . . . Tondimi mpenza ete makambo oyo pápa yango asalaki ezali nsɔni mpo na Lingomba. Atako bato oyo bazalaki na bomoi na eleko wana bamesanaki komona makambo ya ndenge wana, bazalaki komona ete makambo oyo Borgia ná bandeko na ye bazalaki kosala ete ezalaki mpenza makambo ya nsɔmɔ, mpe mbuma mabe na yango ezali naino komonana ata nsima ya mbula koleka nkama minei.”​—Buku L’Église et la Renaissance (1449-1517).

Mpo na nini babuku minene wana ya lisolo ya Lingomba ya Katolike elobeli pápa ná libota na ye na maloba ya makasi ndenge wana? Makambo nini basalaki mpo bálobela bango mabe ndenge wana? Na Rome, bauti kolakisa biloko ya kala (banda na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 2002 tii Febwali 2003); ebongiseli yango ezalaki na motó ya likambo ete I Borgia​—l’arte del potere (Libota ya Borgia​—Ndenge basalelaki bokonzi), bato oyo bakendaki kotala biloko oyo balakisaki bazwaki libaku ya kotalela bokonzi ya bapápa, mingimingi ndenge Rodrigo Borgia, to Alexandre VI (oyo azalaki pápa banda mobu 1492 tii na mobu 1503) asalelaki bokonzi yango.

Ndenge akómaki pápa

Rodrigo Borgia abotamaki na mobu 1431 na libota moko ya lokumu na Játiva, na ekólo Aragon, lelo oyo na kati ya Espagne. Noko na ye Alphonse de Borgia, episkɔpɔ ya Valence, akɔtisaki ye kelasi mpe ntango Rodrigo azalaki naino elenge mpenza, alukelaki ye esika na kati ya lingomba (elingi koloba apesaki ye mikumba mpe bazalaki kofuta ye). Ntango Rodrigo akokisaki mbula 18, Alphonse​—na ntango wana akómaki kardinale​—atindaki ye na Italie mpe kuna ayekolaki mibeko (droit). Ntango Alphonse akómaki Pápa Calixte III, atyaki Rodrigo ná mwana mosusu ya ndeko na ye bakardinale. Pere Lluís Borgia akómaki guvɛrnɛrɛ ya bingumba ebele. Mwa moke na nsima, Rodrigo akómaki vice-chancelier ya lingomba, mpe atikalaki na mokumba yango ata ntango bato mosusu bakómaki bapápa mpe mokumba yango ekómisaki ye moto monene, andukaki bozwi, akómaki na nguya mpe na bomɛngo mingi.

Rodrigo azalaki na mayele mingi, ayebaki koloba, azalaki kosalela mbongo na ye mpo na kolendisa misala ya ntɔki; ayebaki mpe ndenge ya kokokisa mikano na ye. Kasi, Rodrigo azalaki na bamakango mpe abotaki bana minei na makango moko oyo afandaki na ye tii liwa na ye mpe abotaki bana mosusu na basi mosusu. Atako Pápa Pie II apamelaki ye mpo alingaki “makambo ya nsɔni mingi” mpe azalaki na “mposa makasi ya bisengo,” Rodrigo abongwanaki te.

Na liwa ya Pápa Innocent VIII, na mobu 1492, bakardinale bayanganaki mpo na kopona pápa ya sika. Eyebani malamu ete Rodrigo Borgia, alakaki bakardinale mingi biloko kitoko mpe asalelaki mayele mabe, yango wana baponaki ye mpe akómaki Pápa Alexandre VI. Ndenge nini afutaki bakardinale oyo baponaki ye? Apesaki bango bisika minene na lingomba, bandako ya mineneminene, bingumba, bamonastɛrɛ, mpe badiosɛzɛ oyo bakokaki kozwa na yango bozwi mingi. Yango wana moto moko ya mayele na makambo ya kala ya lingomba abengaki eleko oyo Alexandre VI azalaki pápa ete “mikolo ya makambo ya nsɔmɔ mpe ya nsɔni mpo na Lingomba ya Katolike.”

Ndenge moko na bakonzi ya mokili

Alexandre VI asalelaki bokonzi na ye lokola mokambi ya lingomba mpo na kosilisa matata kati na Espagne ná Portugal, bikólo oyo ezalaki kowela bamboka ya sika oyo bamonaki na Amerika. Lokola azalaki mpe na bokonzi ya politiki, azalaki na bikólo oyo azalaki koyangela na ntei ya Italie, mpe azalaki koyangela ndenge moko na bakonzi mosusu ya eleko ya Renaissance. Na bongo, na boyangeli ya Pápa Alexandre VI, lokola mpe ya bapápa mosusu oyo bazalaki liboso mpe nsima na ye, bazalaki kofuta avoka mingi, kotya bandeko na bango na bisika ya malamu mpe nungunungu ezalaki kotambola mingi ete bazalaki koboma bato.

Na ntango wana, bakonzi ya bamboka ndenge na ndenge bazalaki kobunda mpo na kowela mabelé ya Italie, mpe pápa azalaki kokɔta na bitumba yango. Mpo akóma na nguya mingi lisusu, atya bana na ye na bisika ya minene, mpe mpo amatisa libota na ye likoló ya mabota mosusu nyonso, azalaki kosala boyokani to mpe kokata boyokani na bakonzi mosusu. Mwana na ye Juan, abalaki mwana ya ndeko ya mokonzi ya Castille, mpe akómaki duc de Gandía, na Espagne. Mwana na ye mosusu, Jofré, abalaki nkɔkɔ ya mokonzi ya Naples.

Ntango pápa akómaki na mposa ya moto moko oyo akosalisa ye mpo boyokani na ye na France ekóma makasi, abalisaki Lucrèce, mwana na ye ya mwasi ya mbula 13, na libota ya duc de Milan; atako mwana yango azalaki fianse ya moto moko monene ya ekólo Aragon. Ntango amonaki ete libala yango ezali lisusu na litomba te mpo na mikano na ye ya politiki, abimisaki likambo moko mpo azwa nzela ya koboma yango, mpe abalisaki Lucrèce na Alphonse de Aragon, bokonzi oyo ezalaki koyokana te na bokonzi ya Milan. Na ntango yango, lokola César Borgia​—mwana na ye mosusu oyo abotamaki mama moko na Lucrèce, oyo azalaki koluka lokumu mpe azalaki makambo mabe​—asalaki boyokani na Louis XII, mokonzi ya France, libala ya ndeko na ye ya mwasi ná moto ya Aragon ekómaki nkaka. Basalaki nini? Buku moko eyebisi ete “bato minei balingaki koboma” Alphonse, mobali ya Lucrèce, “na kati ya Bazilike Saint Pierre kasi esimbaki te, bazokisaki ye kaka. Ntango mpota na ye ebandaki kobela, mosali moko ya César akamolaki ye nkingo mpe abomaki ye.” Lokola pápa alingaki kosala boyokani mosusu mpo na mikano na ye ya politiki, abalisaki Lucrèce, oyo akómaki na mbula 21, na mobali ya misato: mwana ya duc de Ferrare, moto ya nguya mingi.

Balobaka ete César azalaki “na makambo mabe, asopaki makila mingi.” Tata na ye atyaki ye kardinale ntango azalaki na mbula 17; nzokande ye abongaki nde na bitumba kasi na makambo ya lingomba te mpo azalaki na mayele mabe, alingaki mingi lokumu mpe kofuta avoka, kaka lokola mwa bato mosusu. Nsima ya kotika mokumba oyo azalaki na yango na lingomba, abalaki mwana moko ya mokonzi ya France, mpe na nzela ya libala yango, akómaki mokonzi ya duché de Valentinois. Na nsima, basoda ya France bapesaki ye mabɔkɔ mpe abandaki kobundisa bingumba mpe koboma bato mpo na koyangela nɔrdi ya Italie.

Mpo basoda ya France bátika te kopesa César mabɔkɔ, pápa apesaki nzela na likambo moko ya nsɔni oyo Louis XII, mokonzi ya France alukaki, elingi koloba andimaki ete mokonzi wana aboma libala na ye mpe abala Anne de Bretagne mpo ekólo oyo mwasi yango azalaki koyangela ekóma na kati ya bokonzi na ye. Mokanda moko elobi ete pápa “andimaki kosambwisa Lingomba mpe kolɛmbisa mitinda ya makasi mpo na koluka bolamu ya libota na ye.”

Bato mosusu bakómi kolobela mabe ya pápa

Libota ya Borgia ekómaki na banguna mingi mpe bato bakómaki kolobela mabe oyo bazalaki kosala. Mbala mingi pápa azalaki kolanda te bato oyo bazalaki kolobela ye mabe, kasi akokaki kokanga matoi te na maloba ya Jérôme Savonarola. Moto yango azalaki sango (dominicain), moteyi ya mpiko mpe moto ya politiki na Florence. Alobaki ete pápa ná bato na ye bazalaki kosala mabe mpe ete mikano ya politiki ya pápa ezalaki mabe, mpe asɛngaki ye atika ebonga mpe ete mbongwana esalema na lingomba. Savonarola alobaki ete: “Bino bakonzi ya Lingomba, . . . na butu bozali kokende kokutana na bamakango na bino mpe na ntɔngɔ bozali kosala misa.” Na nsima alobaki ete: “[Bakonzi yango] bazali na elongi ya mwasi ya ndumba, lokumu na bango ezali kobebisa Lingomba. Nalobi na bino, bato yango bandimelá Klisto te.”

Mpo na kokangisa Savonarola monɔkɔ, pápa apesaki ye ebonga ya kardinale, kasi Savonarola aboyaki. Nsukansuka, balongolaki Savonarola na lingomba, bakangaki ye, banyongaki ye mpo asɛnga bolimbisi, na nsima babomaki ye na nsinga na nkingo mpe batumbaki ye; toyebi te soki ezalaki mpo azalaki kotɛmɛla pápa to mpo na makambo oyo azalaki koteya.

Mituna ya ntina mingi

Makambo yango ezali kotinda biso tómituna mituna ya ntina mingi. Ndenge nini pápa akokaki kosalela mayele mabe mpe kozala na etamboli mabe ndenge wana? Bato ya mayele na makambo ya kala balobaka nini mpo na yango? Bango nyonso bapesaka makanisi ndenge moko te.

Mingi balobaka ete esengeli naino koyeba makambo oyo ezalaki na ntango Alexandre VI azalaki pápa mpo na koyeba ntina oyo asalaki makambo wana. Ekoki mpenza kozala ete mikano na ye ya politiki mpe makambo oyo asalaki na kati ya lingomba ezalaki mpo na kobatela kimya, kosilisa matata kati na bikólo oyo ezalaki koyokana te, kolendisa boninga ná bato oyo asalaki na bango boyokani mpo na kobatela bokonzi ya pápa, mpe mpo na kobatela bomoko ya bikólo ya boklisto liboso ya Turquie, bokonzi oyo ezalaki likama mpo na bikólo yango.

Tokoloba boni mpo na etamboli na ye? Moto moko ya mayele alobi boye: “Eleko na eleko Lingomba ezalaki na baklisto ya mabe ná basango oyo babongaki na mosala yango te. Mpo makambo yango ekamwisa moto te, Klisto ye moko asakolaki yango; kutu akokanisaki Lingomba na ye na elanga oyo blé mpe matiti mabe ezali kokola esika moko, to mpe na monyama oyo ezali na mbisi ya malamu ná ya mabe, se ndenge andimaki Yuda na kati ya bantoma na ye.”a

Moto yango ya mayele abakisi ete: “Ata soki eloko ya motuya efandi na esika ya mabe, yango ekoki kokitisa motuya na yango te, ndenge moko mpe, masumu ya sango ekoki te kobebisa . . . mateya na ye. . . . Wolo etikalaka kaka wolo, ata soki mabɔkɔ ya mbindo to ya pɛto ezali kopesa yango.” Moto moko ya mayele na makambo ya kala ya Lingomba ya Katolike alobi ete mpo na oyo etali Alexandre VI likanisi oyo bandimi ya sembo ya Lingomba ya Katolike basengeli kozala na yango ezali toli oyo Yesu apesaki bayekoli na ye na ntina na bakomeli mpe Bafalisai: ‘Bósala oyo bazali koloba, kasi oyo bazali kosala te.’ (Matai 23:2, 3) Kasi, okanisi ete tokoki mpenza kondima makanisi wana?

Ezali mpenza boklisto ya solo?

Yesu apesaki malako ya polele mpo na koyeba baklisto ya solo: “Na bambuma na bango bokoyeba bango. Babukaka soki moke te bambuma ya vinyo na kati ya banzubɛ to bambuma ya figi na kati ya nsende, boye te? Ndenge moko mpe nzete nyonso ya malamu ebotaka mbuma ya malamu, kasi nzete nyonso oyo epɔlá ebotaka mbuma oyo ezangá ntina; nzete ya malamu ekoki te kobota mbuma oyo ezangá ntina, nzete oyo epɔlá mpe ekoki kobota mbuma ya malamu te. Boye, ya solo mpenza, bokoyeba bato wana na bambuma na bango.”​—Matai 7:16-18, 20.

Banda kalakala, bakonzi ya mangomba balandaka mpenza mateya ya boklisto ya solo oyo Yesu ateyaki mpe oyo bayekoli na ye bamonisaki? Tótalela kaka makambo mibale: kokɔta na makambo ya politiki mpe etamboli.

Yesu azalaki mokonzi na mokili oyo te. Kutu, ye moko alobaki ete azalaki ata na esika ya “kolalisa motó na ye te.” Bokonzi na ye ezalaki “ya mokili oyo te,” mpe bayekoli na ye bazalaki “bato ya mokili te, ndenge mpe [ye moko azalaki] moto ya mokili te.” Yango wana, Yesu aboyaki kokɔta na makambo ya politiki ya ntango na ye.​—Matai 8:20; Yoane 6:15; 17:16; 18:36.

Nzokande, banda kalakala, tomonaka ete bakonzi ya mangomba balukaka mpenza kozala baninga ya bakonzi ya politiki mpo na kozwa lokumu mpe biloko ya mokili, atako likambo yango ememeli bato mpasi mingi. Tozali komona ete bakonzi mingi ya mangomba bazalaka bato ya bomɛngo, ata soki ebele ya bato oyo bango basengeli kosalela bazali babola.

Yakobo, ndeko ya Yesu, alobaki boye: “Basi ya ekobo, boyebi te ete boninga ná mokili ezali bonguna ná Nzambe? Na yango, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.” (Yakobo 4:4) Mpo na nini “monguna ya Nzambe”? Mokapo ya 1 Yoane 5:19 elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.”

Mpo na etamboli ya Alexandre VI, moto moko ya mayele na makambo ya kala oyo azalaki na eleko ya Borgia akomaki boye: “Azalaki na etamboli mabe mpenza. Ayebaki nsɔni te, azalaki koloba solo te, azalaki na kondima te to mpe amipesaki na losambo te. Atondaki na lokoso, na mposa ya lokumu, azalaki motema mabe, mpe azalaki na mposa makasi ete bana na ye bázala na bisika minene.” Kasi, Borgia azali kaka ye moko te mokonzi ya lingomba oyo asalaki makambo mabe ndenge wana.

Makomami elobi nini mpo na bizaleli ya ndenge wana? Ntoma Paulo atunaki boye: “Boyebi te ete bato bazangi boyengebene bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te? Bómikosa te. Bato ya pite, mpe . . . bato ya ekobo, mpe . . . bato ya lokoso . . . bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”​—1 Bakolinti 6:9, 10.

Moko na mikano ya elakiseli ya Borgia ná libota na ye oyo euti kosalema na Rome ezalaki mpo na kosalisa bato “bátalela misala ya bato minene wana na ndenge oyo makambo ezalaki na ntango na bango . . . , mpo na kokanga ntina, kasi te mpo na kolongisa to kokweisa bango.” Kutu, batikaki ete moto na moto oyo akendaki kotala yango ye moko azwa likanisi ya nsuka. Likanisi nini ya nsuka ozwi?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na kozwa ndimbola ya malamu ya bandakisa yango, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 1995, nkasa 5-6, mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1992, nkasa 17-22.

[Elilingi na lokasa 26]

Rodrigo Borgia, Pápa Alexandre VI

[Elilingi na lokasa 27]

Tata ya Lucrèce Borgia asalelaki ye mpo na kobakisa nguya na ye

[Elilingi na lokasa 28]

César Borgia alingaki lokumu mpe kofuta avoka

[Elilingi na lokasa 29]

Lokola Jérôme Savonarola alingaki kokanga monɔkɔ te, babomaki ye na nsinga na nkingo mpe batumbaki ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto