Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/7 lok. 8
  • Bolingo oyo eleki bolingo nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolingo oyo eleki bolingo nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Olandaka “nzela oyo eleki nyonso” oyo ya bolingo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • “Nde oyo eleki kati na yango misato, ezali bolingo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bolingo (agape): ezali nini te mpe ezali nini
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • “Likambo eleki ntina mpenza, bólinganaka makasi”
    Bókɛngɛlaka!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/7 lok. 8

Bolingo oyo eleki bolingo nyonso

NA KATI ya Makomami ya Grɛki ya boklisto, to Kondimana ya Sika, liloba oyo ebongolami “bolingo” ezali mingimingi liloba ya Grɛki agapê.

Buku Étude perspicace des Écrituresa elimboli liloba yango boye: “[Agapê] ezali bilingelá te, ezali te kaka likambo ya kosepela na moto, ndenge bato mingi bakanisaka, kasi ezali nde bolingo ya motema oyo euti na mposa ya kolanda mitinda, kokokisa mokumba, koluka mpenza bolamu ya basusu na kolanda oyo ezali sembo. Agapê (bolingo) elongolaka koyina na motema ya moto, epesaka nzela ata moke te ete koyina emema moto na koboya mitinda ya sembo mpe na kozongisa mabe na mabe.”

Agapê ekoki mpe kozala mposa makasi ya motema. Ntoma Petelo apesaki toli ete: “Bólinganaka [agapê] makasi.” (1 Petelo 4:8) Na bongo, tokoki koloba ete agapê ezali ezaleli oyo eutaka na motema mpe na makanisi. Tolendisi yo otalela mwa bavɛrsɛ oyo ezali komonisa nguya mpe bonene ya bolingo yango oyo eleki bolingo nyonso. Bavɛrsɛ oyo elandi ekoki kosalisa yo: Matai 5:43-47; Yoane 15:12, 13; Baloma 13:8-10; Baefese 5:2, 25, 28; 1 Yoane 3:15-18; 4:16-21.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto