Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/9 nk. 8-13
  • Tyelá Yehova motema na yo mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tyelá Yehova motema na yo mobimba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kolonga likambo oyo epekisaka bato mingi kotyela Yehova motema
  • Mpo na nini Yehova atikaka nzela na bampasi?
  • Kotyela Yehova motema ezali kosɛnga nini?
  • Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Moto nyonso akozala na bonsomi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Mpo na nini bampasi etondi na mokili?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/9 nk. 8-13

Tyelá Yehova motema na yo mobimba

“Ozali elikya na ngai, Ee Nkolo Mokonzi Yehova, oyo natyelaka motema banda bolenge na ngai.”​—NZEMBO 71:5, NW.

1. Davidi, elenge mobateli ya mpate, akutanaki na likambo nini?

GOLIATA azalaki mobali ya mbinga, na bolai ya mɛtrɛ soki misato. Tokoki kokamwa te ete basoda nyonso ya Yisalaele bazalaki kobanga kobunda na ye! Na boumeli ya bapɔsɔ, ntɔngɔ nyonso mpe mpokwa nyonso, engambe Mofilistia yango azalaki kotumola basoda ya Yisalaele, kosɛnga bango bátindela ye elombe moko mpo na kobunda na ye. Nsukansuka, moto moko andimaki kobunda na ye; azalaki kutu soda te, kasi mwa elenge mobali moko boye. Davidi, elenge yango oyo azalaki mobateli ya mpate, azalaki komonana lokola mwa nzinzi liboso ya moto oyo alingaki kobunda na ye. Kutu, ekoki kozala ete molato ya etumba mpe bibundeli ya Goliata elekaki Davidi na kilo. Atako bongo, elenge mobali yango abimaki mpo na kobunda na engambe wana mpe eyebani tii na moi ya lelo ete azalaki na mpiko.​—1 Samwele 17:1-51.

2, 3. (a) Nini epesaki Davidi mpiko ya kobunda na Goliata? (b) Wapi makambo mibale tokolobela oyo tokoki kosala mpo tóyeba kotyela Yehova motema?

2 Davidi azwaki mpiko wana wapi? Yoká maloba oyo ekoki kozala ete Davidi nde akomaki yango na nsima: “Ozali elikya na ngai, Ee Nkolo Mokonzi Yehova, oyo natyelaka motema banda bolenge na ngai.” (Nzembo 71:5, NW) Ya solo, Davidi azalaki kotyela Yehova motema mobimba ata ntango azalaki naino elenge. Akendaki kobunda na Goliata mpe alobaki boye: “Yo oyeli ngai na mopanga mpe na likɔnga monene mpe na likɔnga moke, kasi ngai nayeli yo na nkombo ya [Yehova] ya bibele, Nzambe ya basoda ya Yisalaele oyo yo obɛteli bango ntembe.” (1 Samwele 17:45) Goliata atyelaki makasi na ye mpe bibundeli na ye motema, nzokande, Davidi atyaki ya ye motema epai ya Yehova. Lokola ayebaki ete Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ azali na ye, Davidi azalaki na ntina ya kobanga moto te, ata soki moto yango azali engambe ndenge nini to azali na bibundeli makasi ndenge nini!

3 Ntango ozali kotánga lisolo ya Davidi, omonaka ete osengeli kolendisa elikya na yo epai ya Yehova? Na ntembe te tozali mingi oyo toyokaka ndenge yango. Sikoyo, tótalela naino makambo mibale oyo tokoki kosala mpo tóyeba kotyela Yehova motema. Ya liboso, tosengeli kolonga likambo oyo epekisaka bato mingi kotyela Yehova motema. Ya mibale, tosengeli koyeba soki kotyela Yehova motema ezali kosɛnga nini.

Ndenge ya kolonga likambo oyo epekisaka bato mingi kotyela Yehova motema

4, 5. Mpo na nini ebele ya bato bakakatanaka mpo na kotyela Nzambe motema?

4 Nini epekisaka bato bátyela Nzambe motema? Mbala mingi, bato mosusu bayebaka te ntina oyo makambo mabe esalemaka. Bateyaka bato mingi ete Nzambe nde apesaka bato mpasi. Soki likama moko esalemi, basango ná bapastɛrɛ balobaka ete Nzambe “akamati” bato oyo bakufi mpo báfanda pembeni na ye kuna na likoló. Lisusu, bakonzi mingi ya mangomba bateyaka ete makambo nyonso oyo esalemaka na mokili, ata mpe makama mpe makambo mabe, etángamá na Nzambe. Ezali mwa mpasi kotya elikya epai ya Nzambe ya motema makasi ndenge wana motema. Satana oyo azali kozipa miso ya bato oyo bazangi kondima, alendisaka “mateya” wana “ya bademo.”​—1 Timote 4:1; 2 Bakolinti 4:4.

5 Satana alukaka ete bato bátika kotyela Yehova motema. Monguna yango ya Nzambe alingaka te tóyeba ntina mpenza oyo bato bakutanaka na bampasi. Soki totángi na Biblia ntina oyo tomonaka mpasi, Satana alukaka ete tóbosana yango. Yango wana, ezali malamu tótalelaka mbala na mbala ntina misato oyo mokili etondi na bampasi. Kosala bongo ekondimisa biso ete mikakatano oyo tokutanaka na yango na bomoi na biso eutaka na Yehova te.​—Bafilipi 1:9, 10.

6. Ndenge nini 1 Petelo 5:8 elobeli ntina moko oyo bato bazali komona mpasi?

6 Moko ya bantina oyo bato banyokwamaka ezali mpo Satana alingi te ete basaleli ya Yehova bátikala sembo. Asalaki nyonso mpo Yobo atikala sembo te, kasi alongaki te. Atako bongo, azali kotika kaka te. Lokola azali moyangeli ya mokili oyo, azali koluka “kolya” basaleli ya sembo ya Yehova. (1 Petelo 5:8) Basaleli yango ezali mokomoko na biso! Satana azali kosala nyonso mpo tótika kosalela Yehova. Yango wana abimiselaka biso minyoko mbala na mbala. Kasi atako minyoko yango ezali koyokisa biso mpasi, ezali na ntina tóyikela yango mpiko. Soki tozali kosala bongo, tokomonisa ete Satana azali mokosi mpe, na ndenge yango, tokosepelisa Yehova. (Yobo 2:4; Masese 27:11) Lokola Yehova azali kopesa biso makasi ya koyikela minyoko mpiko, elikya na biso epai na ye ezali se kokóma makasi.​—Nzembo 9:9, 10.

7. Wapi ntina ya bampasi oyo Bagalatia 6:7 elobeli?

7 Ntina ya mibale oyo bato bazali komona mpasi emonisami na maloba oyo: “Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” (Bagalatia 6:7) Mbala mingi bato baponaka banzela ya mabe, yango wana bakutanaka na bampasi. Bato mingi batambwisaka mituka mobulumobulu, mpe basukaka na makama. Bato mosusu bamɛlaka makaya, mpe yango ememelaka bango maladi ya motema to kanser ya mimpululu. Bato oyo bamipesaka na pite to na ekobo babebisaka mabala na bango, basilisaka nzoto na bango kilo, bazwaka bamaladi ya mabe, mpe bazemi ya balabala. Bato bakoki kopesa Nzambe foti mpo na bampasi yango, kasi ezali se mbuma ya banzela oyo bango moko baponaki.​—Masese 19:3.

8. Na kotalela Mosakoli 9:11, mpo na nini bato bamonaka mpasi?

8 Ntina ya misato oyo bato bamonaka mpasi elobelami na Mosakoli 9:11 (NW): “Nabalukaki mpo na kotala na nse ya moi ete momekano ezali kaka ya bato ya mbangu te, etumba ezali kaka ya bato ya makasi te, mpe bilei na bato ya bwanya te, ata mpe bozwi na bato ya mayele, ata mpe lokumu na bato bayebi makambo mingi, mpamba te ntango mpe likambo ekanami te ekómelaka bango nyonso.” Ntango mosusu, moto akoki kozwa likama mpo azalaki na esika oyo likama esalemi. Mpasi mpe liwa ekoki koyela biso na ntango tozali kokanisa te mpe yango etalelaka te makasi to mpe bolɛmbu na biso. Na ndakisa, ntango Yesu azalaki awa na mabelé, ndako moko ya molai na Yelusaleme ekweaki mpe ebomaki bato 18. Yesu amonisaki ete ezali te ete Nzambe apesaki bango etumbu mpo na masumu na bango. (Luka 13:4) Ya solo, tosengeli kopesa Yehova foti te mpo na bampasi ya ndenge wana.

9. Na oyo etali bampasi, likambo nini bato mingi bakangaka ntina na yango te?

9 Koyeba mpo na nini bampasi mosusu eyaka ezali na ntina mingi. Nzokande, ezali na likambo moko oyo bato bakangaka ntina na yango te. Yango oyo: Mpo na nini Yehova Nzambe atikaka nzela na bampasi?

Mpo na nini Yehova atikaka nzela na bampasi?

10, 11. (a) Na kotalela Baloma 8:19-22, nini ekómelaki “bozalisi mobimba”? (b) Ndenge nini tokoki koyeba ye oyo atyaki bozalisi na kati ya kozanga ntina?

10 Mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki Baloma ezali na maloba oyo ezali kosalisa biso tókanga ntina ya likambo yango. Paulo akomaki boye: “Mposa makasi ya bozalisi ezali kozela komonisama ya bana ya Nzambe. Mpo bozalisi etyamaki na kati ya kozanga ntina, na mokano na yango moko te kasi na moto oyo atyaki yango, mpo na elikya oyo ete bozalisi yango moko mpe ekolongolama na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo. Mpo toyebi ete bozalisi mobimba ezali kokoba komilelalela elongo mpe ezali konyokwama elongo tii sikoyo.”​—Baloma 8:19-22.

11 Mpo na kokanga ntina ya bavɛrsɛ yango, tosengeli naino kozwa biyano na mwa mituna ya ntina. Na ndakisa, Nani atyaki bozalisi na kati ya kozanga ntina? Bato mosusu balobaka ete ezali Satana; bamosusu Adama. Kasi moko te kati na bango akokaki kotya bozalisi na kati ya kozanga ntina. Mpo na nini? Mpamba te moto oyo atye bozalisi na kati ya kozanga ntina asali yango “mpo na elikya.” Ya solo, azali kopesa elikya ete nsukansuka bato ya sembo ‘bakolongolama na boombo ya kopɔla.’ Elikya wana ekoki kouta epai ya Adama te, epai ya Satana mpe te. Kaka Yehova nde akoki kopesa yango. Na bongo, ezali polele ete ye nde atyaki bozalisi na kati ya kozanga ntina.

12. Wapi makanisi oyo bato bazalaka na yango na ntina na “bozalisi mobimba,” mpe ndenge nini toyebi ndimbola ya bozalisi yango?

12 Kasi, “bozalisi mobimba” oyo bavɛrsɛ yango elobeli ezali nini? Bato mosusu balobaka ete “bozalisi mobimba” ezali nde bikelamu nyonso oyo ezali na mokili, ná banyama ná banzete. Kasi, banyama ná banzete ezalaka na elikya ya kokóma na “bonsomi ya nkembo ya bana ya Nzambe”? Te. (2 Petelo 2:12) Na yango, “bozalisi mobimba” esengeli kozala kaka bato. Ezali bozalisi wana nde ebebisamaki na lisumu mpe na liwa oyo eutaki na botomboki oyo esalemaki na Edene mpe yango nde ezalaka na mposa ya elikya.​—Baloma 5:12.

13. Botomboki ya Edene ememelaki bato makambo nini?

13 Botomboki yango esalaki mpenza nini epai ya bato? Paulo alobeli mbuma na yango na mwa maloba moke kaka: kozanga ntina.a Buku moko elobi ete liloba yango ezali komonisa “kozanga ntina ya eloko moko oyo ezali kosala te mosala oyo esengelaki kosala.” Bato bakelamaki mpo bázala na bomoi ya seko, bázala libota ya kokoka mpe ya bomoko oyo bazali kosala elongo mpo na kobatela mabelé oyo esengelaki kozala paladiso. Nzokande, bakómá na bomoi mokuse, etondi na mpasi mpe mitungisi. Lokola Yobo alobaki yango, “moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi.” (Yobo 14:1) Ezali mpenza kozanga ntina!

14, 15. (a) Nini ezali komonisa biso ete Yehova akatelaki bato etumbu na bosembo? (b) Mpo na nini Paulo alobi ete bozalisi etyamaki na kati ya kozanga ntina “na mokano na yango moko te”?

14 Sikoyo, tózongela motuna ya ntina: Mpo na nini “Zuzi ya mabelé mobimba” atikaki bato na bomoi oyo etondi na mpasi mpe mitungisi? (Genese 18:25, NW) Kosala bongo ezalaki mpenza komonisa bosembo? Tóbosana te likambo oyo baboti na biso ya liboso basalaki. Lokola batombokelaki Nzambe, bamityaki na ngámbo ya Satana, oyo abimisaki ntembe monene na ntina ya lotomo ya Yehova ya koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba. Botomboki na bango emonisaki ete bandimelaki Satana oyo alobaki ete moto akozala malamu koleka soki apesi Yehova mokɔngɔ mpe akómi komitambwisa ye moko na lisalisi ya ekelamu ya elimo oyo etombokelaki Nzambe. Lokola Yehova akatelaki batomboki etumbu, apesaki bango nde eloko oyo balukaki. Atikelaki moto likoki ya komiyangela mpe kotambwisama na Satana. Na ntango wana, ekateli nini ekokaki kozala sembo koleka kotika bato na kati ya kozanga ntina kasi mpo na elikya?

15 Ya solo, ezalaki “mokano” ya bozalisi “yango moko” te. Toponaka te kobotama baombo ya lisumu mpe kopɔla. Kasi Yehova, na motema mawa na ye, atikaki ete Adama ná Eva bábota naino bana liboso bákufa. Atako biso bana na bango totyamaki na kati ya lisumu mpe liwa, tozali na libaku ya kosala oyo Adama ná Eva bazangaki kosala. Tokoki koyokela Yehova mpe komona ete bokonzi na ye ezali sembo mpe ya kokoka, nzokande boyangeli ya bato, kozanga kotalela Yehova, ememaka mpasi, mitungisi, mpe kozanga ntina. (Yilimia 10:23; Emoniseli 4:11) Lisusu, makambo oyo Satana azali kotinda bato básala ezali se kobakisa mikakatano. Bomoi ya bato ezali komonisa bosolo ya likambo yango.​—Mosakoli 8:9.

16. (a) Nini ezali kondimisa biso ete bampasi oyo ezali na mokili lelo oyo eutaka epai ya Yehova te? (b) Elikya nini Yehova, na bolingo na ye, apesi bato ya sembo?

16 Ezali polele ete Yehova azalaki na bantina malamu ya kotya bato na kati ya kozanga ntina. Kasi, yango elingi koloba ete kozanga ntina mpe bampasi oyo ezali kotungisa bato lelo oyo eutaka epai ya Yehova? Tózwa ndakisa ya zuzi moko oyo akateli mosali moko ya mabe etumbu na bosembo. Moto yango akoki komona mpasi mingi ntango azali kosala etumbu na ye; kasi, akoki mpenza na bosembo kopesa zuzi foti mpe koloba ete ye nde alukeli ye mpasi? Te! Lisusu, ata mokolo moko te mabe eutá epai ya Yehova. Yakobo 1:13 elobi boye: “Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki te komeka moto na yango.” Tóbosana mpe te ete Yehova apesaki etumbu yango “mpo na elikya.” Na bolingo na ye, azwi bibongiseli mpo bana ya Adama ná Eva oyo bazali sembo bálongwa na kozanga ntina mpe bázwa “bonsomi ya nkembo ya bana ya Nzambe.” Mpo na libela, bato ya sembo bakobanga te ete bozalisi ekozonga lisusu na kozanga ntina. Lokola Yehova akosukisa likambo yango na bosembo, ekomonana mpo na libela ete ye nde azali na lotomo ya kozala mokonzi.​—Yisaya 25:8.

17. Nsima ya kotalela ntina ya bampasi oyo ezali na mokili lelo oyo, tokómi na makanisi nini?

17 Nsima ya kotalela ntina ya bampasi oyo bato bazali kokutana na yango, tokoki kopesa Yehova foti to kotika kotyela ye motema? Kutu, boyekoli yango epesi biso ntina ya koloba lokola Moize: “Ye libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe ya sembo mpe na mabe te, ye moyengebene mpe mosembwi.” (Deteronome 32:4) Tómanyolaka makambo yango mbala na mbala mpo tóbosana yango te. Na ndenge yango, ntango tokutani na mikakatano, Satana akolonga te kolona ntembe na mitema na biso. Kasi, ezali boni mpo na likambo ya mibale oyo tolobelaki na ebandeli? Kotyela Yehova motema ezali kosɛnga nini?

Kotyela Yehova motema ezali kosɛnga nini?

18, 19. Biblia elobi nini mpo na kolendisa biso na kotyela Yehova motema, kasi na likambo yango, libunga nini bato mosusu bazalaka na yango?

18 Liloba ya Nzambe elobi na biso ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” (Masese 3:5, 6) Yango ezali maloba kitoko mpe ezali kopesa elikya. Na ntembe te, na molɔ́ngɔ́ mobimba, ezali na moto moko te oyo tokoki kotyela motema koleka Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló. Nzokande, kotánga maloba yango ya Masese ezali mpasi te, kasi kosalela yango nde ezali mpasi.

19 Bato mingi bazali na libunga na likambo ya kotyela Yehova motema. Bato mosusu bakanisaka ete kotya motema yango ezali likambo oyo esengeli koya yango moko. Bamosusu bakanisaka ete kotyela Nzambe motema elimboli kolikya ete akobatela biso na mikakatano nyonso, akosilisa bampasi na biso nyonso, akosala ete makambo na biso ya mokolo na mokolo etambolaka ndenge tozali kokanisa mpe esalemaka mpenza na ntango oyo tolingi yango! Kasi, makanisi wana ezali libunga. Kotya motema ezali liyoki to mpe makanisi mpamba te. Mpo na mikóló, kotya motema elimbolaka kokanisa malamu liboso ya kozwa bikateli.

20, 21. Kotyela Yehova motema ezali kosɛnga nini? Pesá ndakisa.

20 Tótalela mpe oyo Masese 3:5 elobi. Epai mosusu, elendisi na kotyela Yehova motema, mpe epai mosusu esɛngi biso tótyela bososoli na biso motema te. Yango elingi nde koloba ete tosengeli kosalela makanisi na biso te? Te, mpamba te Yehova, oyo apesi biso makanisi yango, alingaka ete tósalela yango mpo na kosalela ye. (Baloma 12:1) Kasi, totalelaka nini to totyaka motema wapi ntango tozali kozwa bikateli? Soki makanisi na biso ekesani na oyo ya Yehova, tondimaka nde ete bwanya na ye eleki oyo ya biso mosika? (Yisaya 55:​8, 9) Kotyela Yehova motema elimboli kotika ete makanisi na ye etambwisa oyo ya biso.

21 Tópesa ndakisa: Mwana moko ya moke afandi na motuka, na kiti ya nsima, mpe baboti na ye bazali liboso. Tata na ye azali kotambwisa. Soki bakutani na mwa kwɔkɔsɔ na nzela​—na ndakisa babungi nzela to bakutani na mbula to mopɛpɛ makasi​—mwana ya botosi, oyo atyelaka baboti na ye motema, akosala nini? Akobanda nde koganga kuna na nsima mpe kopesa tata na ye mitindo na ndenge ya kotambwisa motuka? Akobanda nde kotɛmɛla makanisi ya baboti na ye to kosala motó makasi soki balobi na ye afanda na kiti na ye? Te, akotya motema ete ndenge oyo baboti na ye bazali kosala nde ezali malamu, atako bazali bato ya kozanga kokoka. Yehova azali Tata ya kokoka. Omoni te ete tosengeli mpenza kotyela ye motema mobimba, mingimingi soki tokutani na mikakatano?​—Yisaya 30:21.

22, 23. (a) Mpo na nini tosengeli kotyela Yehova motema ntango tokutani na mikakatano, mpe ndenge nini tokoki kosala yango? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

22 Nzokande, Masese 3:6 emonisi ete tosengeli ‘kotalela Yehova na banzela na biso nyonso,’ kasi te kaka ntango tokutani na mikakatano. Na bongo, bikateli na biso ya mokolo na mokolo esengeli komonisaka ete totyelaka Yehova motema. Ntango tokutani na mikakatano, tosengeli kobungisa elikya te, kobanga te, to koboya kolanda toli ya Yehova oyo elakisaka ndenge eleki malamu ya kosilisa mikakatano. Tosengeli kotalela mikakatano lokola mabaku ya komonisa ete tozali kondima bokonzi ya Yehova, mpo biso mpe tómonisa ete Satana azali mobuki-lokuta, mpe mpo na kolona botosi mpe bizaleli mosusu oyo esepelisaka Yehova.​—Baebele 5:7, 8. 

23 Tokoki komonisa ete tozali kotyela Yehova motema, ata soki tokutani na mikakatano nini. Tokomonisa yango na mabondeli na biso mpe na ndenge tokotalela Liloba ya Yehova mpe ebongiseli na ye mpo na kotambwisa biso. Kasi, ndenge nini tokoki mpenzampenza komonisa ete totyelaka Yehova motema ntango tokutani na mikakatano na mokili oyo? Lisolo oyo elandi ekolobela likambo yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba ya Grɛki oyo Paulo asalelaki mpo na “kozanga ntina” ezali se liloba yango oyo Biblia ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki esaleli mpo na kobongola maloba oyo Salomo azongelaki mbala na mbala na mokanda ya Mosakoli, na ndakisa ntango alobaki ete “nyonso ezali mpamba!”​—Mosakoli 1:2, 14; 2:11, 17; 3:19; 12:8.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini Davidi amonisaki ete azalaki kotyela Yehova motema?

• Wapi bantina misato oyo bato bazali komona mpasi lelo oyo, mpe mpo na nini ezali malamu tótalelaka bantina yango mbala na mbala?

• Yehova akatelaki bato etumbu nini, mpe mpo na nini etumbu yango ezalaki sembo?

• Kotyela Yehova motema ezali kosɛnga nini?

[Bililingi na lokasa 8]

Davidi atyelaki Yehova motema

[Elilingi na lokasa 10]

Yesu amonisaki ete kokwea ya ndako moko ya molai na Yelusaleme, ezalaki mokano ya Yehova te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto