Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/9 nk. 10-15
  • Masolo ya elimo elendisaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masolo ya elimo elendisaka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Taleláká motema na yo
  • “Bókoba kokanisa makambo wana”
  • Zaláká na masolo ya kolendisa
  • Masolo ya elimo ezalaka na matomba
  • Lisolo ya sika oyo ekosalisa biso tóbanda kosolola na bato
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Masolo oyo makoki kolendisa baninga
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Tózala bato oyo balendisaka
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Ndenge ya kosalela eteni “Ndenge ya kobanda lisolo”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/9 nk. 10-15

Masolo ya elimo elendisaka

“Tiká ete liloba moko te ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino, kasi liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki oyo ezali malamu.”​—BAEFESE 4:29.

1, 2. (a) Koloba ezalaka na motuya nini? (b) Basaleli ya Yehova balingaka kosalela lolemo na bango ndenge nini?

LUDWIG KOEHLER, moto ya mayele na maloba ya lokota alobaki ete: “Koloba ezali likambo moko oyo bato bakoki kolimbola te; ezali likabo ya Nzambe, ezali likamwisi.” Mbala mosusu totalelaka likabo yango ya Nzambe kaka bongobongo. (Yakobo 1:17) Kasi, kanisá makambo oyo tozangaka ntango ndeko to moninga na biso abɛli maladi ya paralize mpe azali lisusu kokoka koloba te. Joan, mwasi moko oyo mobali na ye abɛlaki maladi yango eleki mwa bambula, alobaki boye: “Liboso tozalaki kosolola malamu mpenza. Kasi sikoyo, mwaye tósolola lisusu ndenge tomesanaki ezali te!”

2 Kosolola ekoki kokolisa boninga, kobongisa boyokani, kolendisa moto oyo alɛmbi, kolendisa kondima, mpe kobakisa esengo ya bomoi; kasi kosolola nyonso te nde esalaka makambo yango. Salomo, mokonzi ya bwanya alobaki boye: “Moto azali oyo akoloba lokola [azali kokata na mopanga, NW]; nde lolemo ya bato ya [bwanya] ezali na bomoi.” (Masese 12:18) Esengeli ete masolo na biso basaleli ya Yehova ekitisaka mitema mpe elendisaka na esika ezokisaka mpe epesaka mpasi. Esengeli mpe ete lolemo na biso esanzolaka Yehova, ezala na mosala ya kosokola to na masolo na biso. Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Tosepeli kati na Nzambe ntango nyonso mpe tokotɔnda nkombo na yo libela.”​—Nzembo 44:8.

3, 4. (a) Biso nyonso tozalaka na mokakatano nini na maloba oyo ebimaka na monɔkɔ na biso? (b) Mpo na nini tosengeli kokebaka na maloba na biso?

3 Moyekoli Yakobo alobaki ete: “Lolemo, moko te na kati ya bato akoki kotosisa yango.” Mpe amonisaki biso ete: “Tobɛtaka mabaku mbala mingi. Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, ye azali moto ya kokoka, oyo akoki kopekisa mpe nzoto na ye mobimba.” (Yakobo 3:2, 8) Moto moko te kati na biso azali moto ya kokoka. Yango wana, ata soki tozali kokana malamu ndenge nini, ntango mosusu maloba na biso elendisaka basusu te to mpe esanzolaka Mozalisi na biso te. Na yango, tosengeli kokebaka na maloba na biso. Lisusu, Yesu alobaki ete: “Liloba nyonso ya mpambampamba oyo bato balobaka, bakozongisa monɔkɔ mpo na yango na Mokolo ya Kosambisama; mpo na maloba na yo okotángama moyengebene, mpe na maloba na yo okokweisama likambo.” (Matai 12:36, 37) Nzambe ya solo akotuna biso mpo na maloba na biso.

4 Moko ya lolenge eleki malamu ya koboya kobimisa maloba ya mabe ezali kolona momeseno ya kosolola masolo ya elimo. Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo tokoki kosala yango, masolo nini tokoki kosololaka, mpe matomba oyo masolo ya malamu ekoki komemela biso.

Taleláká motema na yo

5. Na ndenge nini motema etindaka moto asololaka masolo ya kolendisa?

5 Mpo na kolona momeseno ya kosolola masolo ya kolendisa, tosengeli liboso koyeba ete maloba na biso emonisaka makambo oyo ezali na motema na biso. Yesu alobaki boye: “Uta na makambo oyo etondi na motema nde monɔkɔ elobaka.” (Matai 12:34) Yango elingi koloba ete tolingaka kolobela makambo oyo ezali na ntina na miso na biso. Yango wana, moto na moto asengeli amitunaka boye: ‘Masolo na ngai emonisaka ete motema na ngai ezali ndenge nini? Ntango nazali na libota to baninga na ngai bandimi, nalobelaka mingi makambo ya elimo to nalobelaka kaka masano, bilamba, bafilme, kolya, biloko oyo nasombi sika, to makambo mosusu ya mpambampamba?’ Mbala mosusu, kozanga ete tóyeba yango, makambo oyo ezali na ntina mingi te esí ezwi esika monene na bomoi mpe na makanisi na biso. Soki tozali kosala makasi ya kotya makambo eleki ntina na esika ya liboso, tokolinga masolo ya malamu mpe bomoi na biso ekobongwana.​—Bafilipi 1:10.

6. Komanyola ezali na ntina nini mpo na masolo na biso?

6 Ndenge mosusu ya kobongisa masolo na biso ezali komanyola. Soki tozali kosala makasi ya kokanisa makambo ya elimo, tokolinga mingi masolo ya elimo. Mokonzi Davidi ayebaki ete ezalaka bongo. Ayembaki boye: ‘Tiká ete maloba ya monɔkɔ na ngai mpe makanisi ya motema na ngai mandimama liboso na yo, Ɛ [Yehova].’ (Nzembo 19:14) Lisusu, Asafa, mokomi ya nzembo alobaki boye: “Nakobanzaka mpe mosala na yo [Nzambe] nyonso, nakosolola yango nyonso esali yo.” (Nzembo 77:12) Soki motema mpe makanisi emipesi na solo ya Liloba ya Nzambe ekobimisa maloba ya malamu. Yilimia akokaki te kotika kolobela makambo oyo Yehova ateyaki ye. (Yilimia 20:9) Ekoki mpe kozala bongo mpo na biso soki tozali komanyola makambo ya elimo.​—1 Timote 4:15.

7, 8. Makambo nini ebimisaka masolo ya kolendisa?

7 Kozala na mimeseno ya malamu ya elimo esalisaka biso tózalaka na ebele ya masolo ya kolendisa. (Bafilipi 3:16) Mayangani ya minene mpe ya mike, makita ya lisangá, mikanda ya sika, mokapo ya mokolo mpe komantɛrɛ na yango, epesaka biso ebele ya biloko ya motuya oyo tokoki kolobela na masolo na biso. (Matai 13:52) Makambo oyo tokutanaka na yango na mosala ya kosakola ekoki mpe kolendisa basusu na elimo!

8 Mokonzi Salomo azalaki kosepela na banzete, banyama, bandɛkɛ, mpe bambisi ndenge na ndenge oyo azalaki komona na Yisalaele. (1 Mikonzi 4:33) Azalaki kolinga mingi kolobela biloko oyo Nzambe akelá. Biso mpe tokoki kosala bongo. Basaleli ya Yehova balingaka kolobela makambo ndenge na ndenge, kasi makambo ya elimo nde ezalaka na esika ya liboso na masolo ya bato ya elimo.​—1 Bakolinti 2:13.

“Bókoba kokanisa makambo wana”

9. Toli nini Paulo apesaki Bafilipi?

9 Ezala na makambo nini, masolo na biso ekolendisa soki tozali kolanda toli oyo ntoma Paulo apesaki lisangá ya Filipi. Akomaki boye: “Makambo nyonso oyo ezali ya solo, makambo nyonso oyo ebongi na lobanzo, makambo nyonso ya boyengebene, makambo nyonso ya pɛto, makambo nyonso oyo ekoki kolingama, makambo nyonso oyo elobelami malamu, soki ezaleli moko ya malamu ezali mpe soki eloko moko oyo ebongi kosanzolama ezali, bókoba kokanisa makambo wana.” (Bafilipi 4:8) Makambo oyo Paulo atángaki ezali na ntina mingi, yango wana alobaki ete “bókoba kokanisa makambo wana.” Tosengeli kotondisa mitema mpe makanisi na biso na makambo yango. Na yango, tótala sikoyo ndenge kotya likebi na mokomoko na makambo mwambe oyo Paulo atángaki ekoki kosalisa biso na masolo na biso.

10. Ndenge nini masolo na biso ekoki kolobelaka makambo oyo ezali solo?

10 Makambo ya solo oyo balobeli elimboli kaka te oyo ezali lokuta te. Ezali nde makambo oyo ezali sembo mpe bakoki kotyela yango motema, na ndakisa solo ya Liloba ya Nzambe. Yango wana, ntango tozali koyebisa bato mosusu solo ya Biblia oyo tosepelaki na yango, masukulu to masolo mosusu oyo elendisaki biso, to toli ya Biblia oyo esalisaki biso, tozali kotalela makambo ya solo. Nzokande, toboyaka “oyo ebengami na lokuta mpenza ete ‘boyebi,’ ” oyo emonanaka na miso lokola nde ezali solo. (1 Timote 6:20) Toboyaka mpe kopalanganisa matɔngi to kobɛta masolo oyo toyebi malamu te soki ezali solo to te.

11. Makambo nini oyo ebongi na lobanzo tokoki kolobelaka na masolo na biso?

11 Makambo oyo ebongi na lobanzo ezali masolo ya lokumu mpe ya ntina, ezali te makambo ya mpambampamba. Ezali makambo ya ntina oyo, na ndakisa, etali mosala ya kosakola, ntango ya mpasi oyo tozali, mpe ntina oyo tosengeli kobatela etamboli ya malamu. Ntango tozali kolobela makambo oyo ebongi, tolendisaka ekateli na biso ya kolala mpɔngi te na elimo, ya kotikala sembo, mpe ya kokoba kosakola nsango malamu. Makambo malamu oyo tokutanaka na yango na mosala ya kosakola mpe makambo oyo ezali koleka na mokili, oyo ezali komonisa biso ete tozali na mikolo ya nsuka, epesaka biso likoki ya kobɛta ebele ya masolo ya kolendisa.​—Misala 14:27; 2 Timote 3:1-5.

12. Na kolanda toli ya Paulo ya kotalelaka makambo ya boyengebene mpe ya pɛto, masolo nini tosengeli koboyaka?

12 Maloba ya boyengebene elimboli oyo ezali sembo na miso ya Nzambe, oyo ezali kolanda masɛngami na ye. Ya pɛto ezali kopesa likanisi ya bosantu na makanisi mpe na etamboli. Matɔngi, masɛki ya nsɔni, to maloba ya salite esengeli kozala na esika te na masolo na biso. (Baefese 5:3; Bakolose 3:8) Ezala na mosala to na kelasi, baklisto oyo bazali na bwanya balongwaka na esika oyo babandi kobɛta masolo ya ndenge wana.

13. Pesá bandakisa ya masolo oyo elobelaka makambo oyo ekoki kolingama mpe oyo elobelami malamu.

13 Ntango Paulo alobaki ete tótalelaka makambo oyo ekoki kolingama, azalaki kokanisa makambo oyo ezali malamu mpe elɛngi to oyo ekolisaka bolingo, ekeseni na oyo ebimisaka koyinana, koswana to matata. Makambo oyo elobelami malamu ezali makambo ya lokumu mpenza. Na kati ya makambo yango tokoki kotánga masolo ya bomoi ya bandeko ya sembo, oyo ebimaka mbala na mbala na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ezali malamu koyebisa bato mosusu ndenge oyokaki na motema na yo nsima ya kotánga masolo ya kolendisa ndenge wana. Koyoka makambo malamu oyo bato mosusu basalaki elendisaka mpenza! Masolo ya ndenge wana elendisaka bolingo mpe bomoko na lisangá.

14. (a) Komonisa bizaleli malamu ezali kosɛnga nini? (b) Ndenge nini maloba na biso ekoki kozala na makambo oyo ebongi kosanzolama?

14 Paulo alobaki ete “soki ezaleli moko ya malamu ezali.” Ezaleli malamu ezali ezaleli oyo euti na motema malamu to ezaleli oyo ebongi. Tosengeli kosala nyonso ete maloba na biso etambwisamaka na mitinda ya Biblia mpe emonisaka boyengebene, ezalaka pɛto, mpe emonisaka ezaleli malamu. Maloba oyo ebongi kosanzolama elimboli “oyo ebongi na longonya.” Soki osepeli na lisolo oyo ndeko moko asali to na ndakisa ya bosembo ya ndeko moko na lisangá, yebisá ye yango mpe lobelá yango epai ya bato mosusu. Mbala na mbala, ntoma Paulo azalaki kokumisa bizaleli malamu ya baninga na ye bandimi. (Baloma 16:12; Bafilipi 2:19-22; Filemona 4-7) Lisusu, biloko oyo Mozalisi na biso akelá ebongi kosanzolama. Biloko yango ezali na ebele ya makambo oyo ekoki kosalisa biso na kobɛta masolo ya kolendisa.​—Masese 6:6-8; 20:12; 26:2.

Zaláká na masolo ya kolendisa

15. Etinda nini ya Biblia ezali kosɛnga baboti básololaka masolo ya ntina na bana na bango?

15 Deteronome 6:6, 7 elobi boye: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛlɛma yo.” Na maloba mosusu, etinda yango ezali kosɛnga ete baboti básololaka na bana na bango masolo ya ntina mpe ya kolendisa.

16, 17. Baklisto oyo bazali na bana bakoki kozwa liteya nini na ndakisa ya Yehova ná Abalayama?

16 Ntembe ezali te ete Yesu azalaki kosolola mingi na Tata na ye ya likoló ntango bazalaki kotalela mokumba na ye awa na mabelé. Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Tata moto atindaki ngai apesaki ngai komandema na oyo etali makambo nasengeli koyebisa mpe oyo nasengeli koloba.” (Yoane 12:49; Deteronome 18:18) Ekoki mpenza kozala ete Abalayama azalaki kosolola mingi na mwana na ye Yisaka mpo na kolobela ndenge oyo Yehova alingaki bango ná bankɔkɔ na bango. Na ntembe te masolo wana esalisaki Yesu mpe Yisaka na kotosa mokano ya Nzambe.​—Genese 22:7-9; Matai 26:39.

17 Bana na biso mpe basengeli koyokaka masolo ya kolendisa. Atako baboti bazali na misala mingi, basengeli kolukaka ntango ya kosolola na bana na bango. Soki likoki ezali, ezali malamu libota mobimba elyaka esika moko ata mbala moko na mokolo. Na ntango bozali kolya mpe nsima ya kolya, bokozala na mabaku mingi ya kosolola masolo ya kolendisa oyo ekoki kozala na litomba mpo na elimo ya libota.

18. Lobelá lisolo oyo ezali komonisa matomba oyo ezwamaka ntango baboti bazali kosolola malamu na bana.

18 Alejandro, mobongisi-nzela moko oyo azali na mbula koleka 20, alobi ete akómaki na ntembe na motema na ye ntango azalaki na mbula 14. Alobi boye: “Maloba ya baninga na ngai ya kelasi ná balakisi na ngai etindaki ngai nakóma komituna soki Nzambe azali mpenza mpe soki Biblia ezali mpenza mokanda ya Nzambe. Baboti na ngai bazwaki bangonga ebele mpo na kosolola na ngai. Masolo yango esalisaki ngai na kolonga ntembe oyo nazalaki na yango na ntango wana ya mpasi mpe nazwa bikateli ya malamu na bomoi na ngai.” Azali ndenge nini lelo oyo? Alejandro alobi lisusu boye: “Nazali naino epai ya baboti. Kasi, lokola biso nyonso tozali na misala mingi, ekómá mpasi mpo ngai ná tata tózwa ntango ya kosolola mingi ndenge wana. Yango wana, biso mibale tolyaka esika moko mbala moko na pɔsɔ na esika na ye ya mosala. Nasepelaka mingi na masolo oyo tosololaka.”

19. Mpo na nini biso nyonso tozali na mposa ya masolo ya elimo?

19 Tosepelaka mpe na mabaku ya kosolola masolo ya elimo na baninga na biso bandimi? Tozwaka mabaku ya ndenge yango na makita, na mosala ya kosakola, ntango tokutani mpo na kolekisa ntango elongo, to ntango tozali kosala mobembo. Paulo azalaki na mposa makasi ya kosolola na baklisto ya Loma. Akomelaki bango ete: “Nazali na mposa makasi ya komona bino, . . . mpo kolendisana ezala na kati na bino, moto na moto alendisama na kondima ya mosusu, na oyo ya bino mpe na oyo ya ngai.” (Baloma 1:11, 12) Johannes, moklisto moko oyo azali nkulutu alobaki boye: “Kosolola masolo ya elimo na bandeko baklisto ekokisaka mposa moko ya ntina mingi. Epesaka esengo na motema mpe ekitisaka mitungisi ya mokolo na mokolo. Mbala mingi nasɛngaka mibange bábɛtela ngai masolo ya bomoi na bango mpe báyebisa ngai nini esalisaki bango na kotikala sembo. Nsima ya ebele ya bambula, nasololi na mibange mingi, mpe mokomoko apesaki ngai mwa bwanya to likambo moko oyo esalisaki ngai na bomoi na ngai.”

20. Okoki kosala nini soki ozali liboso ya moto oyo azalaka nsɔninsɔni?

20 Esengeli kosala nini soki moto oyo ozali kosolola na ye azali kosepela na masolo ya elimo te? Kolɛmba nzoto te. Mbala mosusu okosolola na ye malamu nsima. Salomo alobaki ete: “Liloba lilobami na ntango malamu ezali lokola wolo etyami na kati ya palata.” (Masese 25:11) Yebá komitya na esika ya bato oyo bazalaka nsɔninsɔni. “Toli kati na motema ya moto ezali lokola mai ya bozindo, nde moto ya mayele akotoka yango.”a (Masese 20:5) Likoló na nyonso, kotika te ete makanisi ya bato ezongisa yo nsima mpo na kolobela makambo oyo esepelisaka motema na yo.

Masolo ya elimo ezalaka na matomba

21, 22. Wapi matomba oyo tokoki kozwa soki tozali kosolola masolo ya elimo?

21 Paulo apesaki toli oyo: “Tiká ete liloba moko te ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino, kasi liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki oyo ezali malamu.” (Baefese 4:29; Baloma 10:10) Ntango mosusu ezalaka mpasi mpo na kobenda bato na masolo ya malamu, kasi ezalaka na matomba ebele. Masolo ya elimo esalisaka biso tóyebisa bato mosusu kondima na biso mpe tótonga bondeko na biso.

22 Yango wana, tósalela likabo ya koloba mpo na kolendisa basusu mpe kosanzola Nzambe. Masolo ya ndenge yango ekosepelisa biso mpe ekolendisa basusu. Likoló ya nyonso, ekosepelisa motema ya Yehova mpamba te atyaka likebi na masolo na biso mpe asepelaka ntango tozali kosalela malamu lolemo na biso. (Nzembo 139:4; Masese 27:11) Soki tozali kosolola masolo ya elimo, tokoki kolikya ete Yehova akobosana biso te. Biblia elobelaki basaleli ya Yehova na mikolo na biso na maloba oyo: “Bongo, baoyo batosaki [Yehova] balobanaki moto na moninga na ye mpe [Yehova] ayokamelaki bango, ɛɛ ayokaki bango. Mpe mokonda na kokanisa ekomamaki liboso na ye mpo na baoyo bazalaki kotosa [Yehova] mpe kobanga nkombo na ye.” (Malaki 3:16; 4:5) Ezali mpenza na ntina ete masolo na biso elendisaka na elimo!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na Yisalaele, mabulu mosusu ya mai ezalaki mozindo mpenza. Bato ya arkeoloji bamonaki libulu moko monene oyo ezalaki na bozindo ya mɛtrɛ 25 na Gibona. Ezalaki na basikalié mpo na kokita kotoka mai.

Okopesa eyano nini?

• Masolo na biso emonisaka nini mpo na biso moko?

• Makambo nini ya kolendisa tokoki kolobelaka?

• Kosolola ememaka malamu nini na libota mpe na lisangá?

• Masolo ya kolendisa ezali na matomba nini?

[Bililingi na lokasa 12]

Masolo oyo elendisaka elobelaka . . .

“makambo nyonso oyo ezali solo”

“makambo nyonso oyo ebongi na lobanzo”

“eloko moko oyo ebongi kosanzolama”

“makambo nyonso elobelami malamu”

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Ezipeli ya kasɛti-video, Staline: Fɔtɔ ya U.S. Army; Ezipeli ya buku Créateur, Nébuleuse de l’Aigle: J. Hester ná P. Scowen (AZ State Univ.), NASA

[Elilingi na lokasa 13]

Ntango ya kolya epesaka nzela na kosolola malamu masolo ya elimo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto