Bilaka ya nani okoki kotyela motema?
“AZALAKI kolaka makambo minene, ndenge ye moko azalaki moto monene; kasi misala na ye ezali mpamba, se ndenge ye moko azali sikoyo.”—Lisano King Henry the Eighth, ya William Shakespeare.
Shakespeare alobelaki nde makambo minene oyo Thomas Wolsey, episkɔpɔ moko ya Angleterre, oyo azalaki moto monene ya politiki na Angleterre na ekeke ya 16, azalaki kolaka. Bato mingi bakoloba ete maloba wana ya Shakespeare ebongi mpe mpo na bilaka mingi oyo bazali kopesa bango lelo oyo. Bakonzi bazali kolaka makambo mingi, kasi bazali mpenza kokokisa yango te. Yango wana, tokoki kokamwa te komona ete bato bazali lisusu kondima elaka ata moko te.
Ebele ya bilaka ya lokuta
Na bambula ya 1990, ntango etumba ezalaki kosalema na mikili ya Balkans, ONU ezwaki meko ete etumba ekóma te na engumba Srebrenica na ekólo Bosnie mpo na kobatela basivili oyo bazalaki kokima kuna. Bikólo nyonso ya ONU ekanisaki ete basoda oyo bazalaki kobunda bakotosa likambo yango. Ebele ya Bamizilma oyo bakimaki na Srebrenica mpo na kobatela bomoi na bango bakanisaki mpe bongo. Kasi, nsukansuka elaka ya kobatela bato oyo bakimaki kuna ekokisamaki te. (Nzembo 146:3) Na sanza ya Yuli 1995, basoda oyo bazalaki kobunda babenganaki basoda ya ONU mpe bakɔtaki na engumba yango. Bamizilma koleka 6 000 balimwaki mpe bamosusu soki 1 200 babomamaki.
Bato bazali kokokisa bilaka na bango te na makambo nyonso. Bato bazali komona ete bazali kokosa bango na “ebele ya bapiblisite ya lokuta.” Bato batiki kondima “bilaka ya bato ya politiki.” (The New Encyclopædia Britannica, Volimi 15, lokasa 37) Bandimi bazali kotyela bakonzi ya mangomba motema, nzokande bakonzi yango bazali kolyela bango mpenza. Ata mpe bato mosusu oyo basalaka misala oyo esɛngaka kozala na motema mawa mpe komibanzabanza mpo na basusu—na ndakisa balakisi mpe minganga—bazali kokosa to mpe koboma bato oyo bazali kosalisa. Yango wana Biblia ekebisi biso mpenza ete tótyela maloba nyonso motema te!—Masese 14:15.
Bilaka oyo ezali kokokisama
Atako nyonso wana, bato mosusu bakokisaka mpenza bilaka na bango, ata soki mbala mosusu ekosɛnga bango bámipimela makambo mosusu. (Nzembo 15:4) Soki balaki likambo, bamonaka lokola nde bakɔti nyongo, mpe bafutaka yango. Bato mosusu bazalaka mpenza na makanisi malamu ya kokokisa bilaka oyo bapesaki. Bazalaka mpenza na mposa ya kokokisa maloba na bango, kasi bazangaka nde makoki. Makambo ekoki kobongwana mpe kobebisa mikano oyo moto azalaki na yango.—Mosakoli 9:11.
Mpo na ntina moko to mosusu, bato bazali kokakatana mpo na kotya motema na bilaka oyo ata moto nini apesi. Yango wana, tokoki kotuna motuna oyo: Ezali na bilaka oyo tokoki kotyela motema? Ɛɛ. Tokoki kotyela bilaka ya Biblia, Liloba ya Nzambe, motema. Mpo na yango, tolendisi yo otánga lisolo elandi. Mbala mosusu okoloba lokola ebele ya bato mosusu ete tokoki kotyela bilaka ya Nzambe motema.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
AP Photo/Amel Emric