Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/2 nk. 18-22
  • “Makambo ya mokili oyo ezali kobongwana”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Makambo ya mokili oyo ezali kobongwana”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nsukansuka, libombami eyebani!
  • Makambo emonisi polele “ntango ya nsuka”
  • Ndenge oyo lisano ekosuka
  • Makambo malamu mingi ekoya!
  • Ndenge nini toyebi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka”
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
  • Mikolo ya nsuka—Ntango nini?
    Lamuká!—2008
  • Kobosana mokolo ya Yehova te
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/2 nk. 18-22

“Makambo ya mokili oyo ezali kobongwana”

“Talá oyo nazali koloba, bandeko, ntango oyo etikali ekómi mokuse.”​—1 BAKOLINTI 7:29.

1, 2. Mbongwana nini omoni banda obotamá?

MBONGWANA nini esalemi na mokili banda obotamá? Okoki kotánga mosusu kati na yango? Na ndakisa, tomoni ete mayele ya minganga ekoli mingi. Mayele oyo minganga bakómi na yango esali ete na mikili mosusu, bato bakómi koumela na bomoi tii kokóma na mbula koleka 70; nzokande, na ebandeli ya bambula 1900, bato mingi bazalaki koleka mbula 50 te! Kanisá mpe matomba oyo tozali kozwa na kosalela radio, televizyo, to mpe telefone. Tobosani mpe te mbongwana oyo esalemi na mateya, na transport, na ntomo ya bato, nyonso wana ebongisi bomoi ya ebele ya bato.

2 Kasi, mbongwana mosusu mpe ezalaki ya malamu te. Tokoki te kobosana ndenge oyo mobulu ezali kobakisama, bato bazali se komipesa na misala mabe, bamɛli-bangi bazali kokóma ebele, ebele ya mabala ezali kokufa, biloko ezali se komata ntalo, mpe bato mingi bakómi kobanga bateroriste. Nyonso wana ezali kondimisa maloba oyo ntoma Paulo alobá banda kala ete: “Makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.”​—1 Bakolinti 7:31.

3. Paulo alingaki koloba nini ntango akomaki ete “makambo ya mokili oyo ezali kobongwana”?

3 Ntango Paulo alobaki maloba wana, akokanisaki mokili na teyatre. Baoyo bazali kosala teyatre yango​—bato ya politiki, bakonzi ya mangomba mpe bavɛdɛti minene—​moto na moto azali kobima na ngala na ye, asali lisano na ye, mpe nsima akiti mpe atikeli bato mosusu esika. Esalemaka bongo banda kala. Kala, bato ya libota moko bazalaki kolandana na kiti ya bokonzi mpe ezalaki koumela bongo bambula ebele​—mbala mosusu kutu bankama ya bambula—​mpe makambo ezalaki kobongwana malɛmbɛmalɛmbɛ. Lelo oyo ezali lisusu bongo te; makambo ekoki kobongwana mbala moko ntango kaka babomi mokonzi moko monene! Na ntango ya yikiyiki oyo tozali, tozali koyeba te ntango tolali lelo, lobi makambo ekozala ndenge nini.

4. (a) Likanisi nini ya malamu baklisto basengeli kozala na yango na ntina etali makambo ya mokili? (b) Wapi makambo mibale tolingi kotalela sikoyo?

4 Soki mokili ezali lokola teyatre mpe bato minene na yango basani, baklisto bazali nde batali.a Kasi, lokola baklisto bazali “bato ya mokili te,” bamitungisaka mingi te na koyeba soki basani yango bakosala malamu to te mpe soki ekozala banani. (Yoane 17:16) Bango bazali nde kotya makanisi na bango na makambo oyo ekomonisa ete lisano elingi kosila na ndenge ya nsɔmɔ; mpo bayebi ete mokili oyo esengeli kosuka liboso Yehova atya mokili ya sika ya boyengebene oyo tozelaka banda kala.b Yango wana, tótalela makambo mibale oyo ezali komonisa ete tozali na ntango ya nsuka mpe ete mokili ya sika ekómi pene. Makambo yango ezali (1) Kolandana ya makambo ndenge esakolami na Biblia mpe (2) Kobeba ya makambo ya mokili.​—Matai 24:21; 2 Petelo 3:13.

Nsukansuka, libombami eyebani!

5. “Bantango oyo etyamá mpo na bikólo mosusu” ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli kotalela yango?

5 Boyekoli ya badati (chronologie) esalisaka na koyeba ntango nini likambo moko ekosalema. Yesu alobelaki eleko oyo boyangeli moko te ekomonisa Bokonzi ya Nzambe, kaka bakonzi ya mokili nde bakobanda koyangela. Yesu abengaki yango “bantango oyo etyamá ya bikólo mosusu.” (Luka 21:24) Na nsuka ya “bantango oyo etyamá,” Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, mpe Yesu akozala Mokonzi na yango oyo abongi. Yesu akobanda naino koyangela “kati ya bayini na [ye].” (Nzembo 110:2) Na nsima, ndenge Danyele 2:44 elobi yango, Bokonzi yango “ekobuka mpe ekosilisa” baguvɛrnema nyonso ya bato, mpe yango moko ekotikala mpo na libela.

6. “Ntango oyo etyamá mpo na bikólo mosusu” ebandaki na mbula nini, eumelaki ntango boni mpe esukaki ntango nini?

6 “Bantango oyo etyamá mpo na bikólo mosusu” esengelaki kosuka na mbula nini mpo Bokonzi ya Nzambe ebanda koyangela? Eyano na motuna yango, oyo ‘ekangamaki na elembo kino ntango ya nsuka,’ ezali kosɛnga koyekola kolandana ya makambo ndenge esakolami na Biblia. (Danyele 12:9) Wana “ntango” ekómaki pene, Yehova amonisaki eyano na motuna yango na etuluku moko ya bayekoli ya Biblia. Elimo santu esalisaki bango na koyeba ete “bantango oyo etyamá mpo na bikólo mosusu” ebandaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), mbula oyo Yelusaleme ebomamaki, mpe ete “bantango” yango esengelaki koumela mbula 2 520. Na ndenge yango, basosolaki ete “bantango oyo etyamá mpo na bikólo mosusu” esukaki na 1914. Lisusu, bakangaki ntina ete nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo ebandaki na 1914. Lokola ozali moyekoli ya Biblia, okoki nde kosalela Biblia mpo na kolimbola ndenge bazwaki dati ya 1914?c

7. Bavɛrsɛ nini ezali kosalisa biso na koyeba ebandeli, bolai, mpe nsuka ya ntango nsambo oyo mokanda ya Danyele elobeli?

7 Mokanda ya Danyele ezali na likambo moko oyo ezali kosalisa na koyeba libombami yango. Lokola Yehova asalelaki Nebukadenesala, mokonzi ya Babilone mpo na koboma Yelusaleme na ebandeli ya “ntango oyo etyamá,” na mobu 607 L.T.B., amonisaki na nzela ya mokonzi yango ete akotika bikólo ya mokili eyangela na boumeli ya ntango nsambo. (Ezekiele 21:26, 27; Danyele 4:16, 23-25) Ntango nsambo ezali mbula boni? Emoniseli 11:2, 3 mpe 12:6, 14 emonisi ete ntango misato ná ndambo ezali mikolo 1 260. Na bongo, ntango nsambo ezali mikolo 1 260 mbala mibale, oyo epesi mikolo 2 520. Esuki kaka bongo? Te, mpamba te Yehova alakisaki mosakoli Ezekiele, oyo azalaki na bomoi na eleko moko na Danyele, ndimbola ya elobeli yango: “Natyeli yo mokolo moko mpo na mbula moko.” (Ezekiele 4:6) Na bongo, ntango nsambo esengeli kozala mbula 2 520. Soki tobandi kotánga mbula 2 520 banda na mobu 607 L.T.B., tokomona ete bantango oyo etyamá esengeli kosuka na 1914.

Makambo emonisi polele “ntango ya nsuka”

8. Makambo nini okoki kotánga mpo na komonisa ete mokili ezali kobeba se kobeba banda 1914?

8 Makambo oyo ezali koleka na mokili banda 1914 ezali kondimisa ete boyekoli na biso ya badati ya Biblia ezali malamu. Yesu ye moko alobaki ete na “bosukisi ya ebongiseli ya makambo” tokomona bitumba, nzala, mpe bamaladi. (Matai 24:3-8; Emoniseli 6:2-8) Makambo yango ezali komonana banda 1914. Ntoma Paulo atángaki mpe makambo mosusu mpe alobaki ete bizaleli ya bato ekobongwana mpenza. Makambo oyo alobaki ezali yango mpenza nde tozali komona.​—2 Timote 3:1-5.

9. Bato oyo balandaka ndenge mokili ezali kotambola bazali koloba nini mpo na makambo na yango banda 1914?

9 Tokoki mpenza koloba ete “makambo ya mokili” ebongwani mingi banda 1914? Na buku na ye moko (The Generation of 1914), Profesɛrɛ Robert Wohl akomaki boye: “Baoyo bamonaki etumba bamonaka kaka ete na Augusto 1914, mokili moko esukaki mpe mosusu ebandaki.” Doktɛrɛ Jorge Costa e Silva, mokambi ya departema ya bamaladi ya motó na OMS, akomaki makanisi oyo ezali kondimisa likambo yango ete: “Tozali na eleko oyo makambo ezali kobongwana nokinoki, mpe mbongwana yango ezali kobakisa mitungisi na ndenge oyo emonaná naino te.” Yo mpe ozali komona yango?

10. Ndenge nini Biblia ezali kolimbola ntina oyo makambo ezali kobeba na mokili banda 1914?

10 Nani azali kosala ete makambo ya mokili ebeba mingi boye? Emoniseli 12:7-9 emonisi ye polele: “Etumba ebimaki na likoló: Mikaele [Yesu Klisto] mpe baanzelu na ye babundaki ná dalagona [Satana Zabolo], mpe dalagona mpe baanzelu na ye babundaki, kasi alongaki te, mpe esika ezalaki lisusu te mpo na bango na likoló. Bongo dalagona yango ya monene abwakamaki na nse, . . . oyo azali kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela.” Tomoni ete Satana Zabolo nde azali kobimisa mobulu, mpe kobwakama na ye na nse na 1914 ememaki “mawa na mabelé mpe na mbu, mpamba te Zabolo akiteli bino, azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.”​—Emoniseli 12:10, 12.

Ndenge oyo lisano ekosuka

11. Satana azali kosalela mayele nini mpo na kokosa “mabelé mobimba oyo efandami”? (b) Ntoma Paulo alobelaki molende nini Satana akosala mpo na kokosa bato?

11 Lokola Satana ayebi ete mikolo na ye etikali ya kotánga, angali nde kongala na kokosa “mabelé mobimba oyo efandami” banda 1914. Lokola azali elombe mpo na kokosa, ye moko azali komibomba mpe azali kobimisa bakonzi mpe bato minene mpe azali kotambwisa bango lokola na teyatre. (2 Timote 3:13; 1 Yoane 5:19) Moko ya mikano na ye ezali ya kokosa bato na kokanisa ete boyangeli na ye ekoki kotya kimya ya solosolo. Na lokuta na ye wana, alongi kokosa ebele ya bato mpamba te, atako ebele ya makambo ezali komonisa ete mokili ezali se kobeba, bato bazali kaka na elikya. Ntoma Paulo asakolaki ete liboso mokili oyo ebomama, likambo moko ekosalema oyo ekomonisa mpenza mayele mabe ya Satana. Akomaki boye: “Na ntango oyo bakoloba: ‘Kimya mpe kobatelama!’ na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko ndenge mpasi ya kobota eyelaka mwasi ya zemi.”​—1 Batesaloniki 5:3; Emoniseli 16:13.

12. Milende nini ezali kosalema mpo na kotya kimya na mikolo na biso?

12 Banda mwa bambula, bato ya politiki bazali mbala mingi kolobela “kimya mpe kobatelama” na makambo ndenge na ndenge oyo bazali kosala. Kutu, basakolaki mobu 1986 lokola mbula ya kimya na mokili mobimba, nzokande kimya ezalaki te na mbula yango. Milende wana ya bakonzi ya mokili ezali mpenzampenza kokokisa maloba ya Paulo na 1 Batesaloniki 5:3, to alingaki nde kolobela likambo moko monene oyo ekobenda mpenza likebi ya bato na mokili mobimba?

13. Ntango Paulo asakolaki koganga “Kimya mpe kobatelama!,” akokanisaki kobomama oyo ekoya nsima na yango na likambo nini, mpe yango ekoki koteya biso nini?

13 Lokola mbala mingi tokangaka ntina malamu ya bisakweli ya Biblia se soki ekokisami to ntango ezali kokokisama, toyebi naino te soki likambo yango ezali ndenge nini. Kasi, likambo ya kobenda likebi ezali ete Paulo alobaki ete nsima wana bakoganga “Kimya mpe kobatelama!” kobomama ekoya na mbalakaka ndenge mpasi ya kobota eyelaka mwasi ya zemi. Na sanza libwa oyo zemi eumelaka, mwasi abandaka koyoka mokemoke ete mwana azali kokola na libumu na ye. Akoki koyoka ndenge motema ya mwana ezali kobɛta to koyoka ye azali koningana na kati ya libumu. Akoki ata koyoka ete mwana azali kotuta ye. Bilembo ebakisamaka mokemoke tii mokolo oyo mpasi ya kobota ekokanga ye, oyo ekomonisa ete ntango ya likambo oyo azalaki kozela ekoki, elingi koloba kobotama ya mwana. Na bongo, ezala ndenge nini oyo esakweli ya koganga “Kimya mpe kobatelama!” ekokokisama, likambo ya mbalakaka mpe ya mpasi ekoya nsima na yango; kasi nsukansuka, likambo ya malamu ekosalema: kobomama ya bato mabe mpe ebandeli ya mokili ya sika.

14. Makambo ekolandana ndenge nini mpe ekosuka ndenge nini?

14 Kobomama oyo ezali koya ekozala likambo ya nsɔmɔ mpo na baklisto ya sembo oyo bakomona yango. Ya liboso, bakonzi ya mokili (ebongiseli ya politiki ya Satana) bakobalukela bato oyo bazali na Babilone Monene (ebongiseli ya mangomba) mpe bakoboma bango. (Emoniseli 17:1, 15-18) Na bongo, na mbala moko, bokonzi ya Satana ekokabwana, ngámbo moko ekobundisa ngámbo mosusu, mpe Satana akoyeba ndenge ya kopekisa likambo yango te. (Matai 12:25, 26) Yehova akotya na mitema ya bakonzi ya mokili ete “bákokisa likanisi na ye” ya kolongola mangomba ya lokuta na mabelé. Nsima ya koboma mangomba ya lokuta, Yesu Klisto akotambwisa basoda ya likoló mpo na koboma bibongiseli ya Satana oyo ekotikala​—ebongiseli ya mombongo mpe ya politiki. Na nsuka, Satana ye moko akokangama. Ezali ndenge wana nde teyatre oyo ebandá kalakala ekosuka.​—Emoniseli 16:14-16; 19:11-21; 20:1-3.

15, 16. Bomoi na biso esengeli kozala ndenge nini lokola bayebisi biso ete “ntango oyo etikali ekómi mokuse”?

15 Makambo yango nyonso wana ekosalema ntango nini? Toyebi mokolo mpe ngonga te. (Matai 24:36) Kasi, toyebi ete “ntango oyo etikali ekómi mokuse.” (1 Bakolinti 7:29) Na bongo, ezali na ntina mingi tóyeba kosalela ntango yango malamu. Na ndenge nini? Ndenge ntoma Paulo alobaki, tosengeli ‘komisombela ntango oyo ebongi’ mpo na makambo oyo eleki ntina mpe kotika oyo ezangi ntina mpe kosalela mokolo nyonso malamu. Mpo na nini? “Mpamba te mikolo ezali mabe.” Mpe soki tozali ‘kososola soki mokano ya Yehova ezali nini’ mpo na biso, tokobebisa te ntango oyo etikali.​—Baefese 5:15-17; 1 Petelo 4:1-4.

16 Lokola toyebi ete ebongiseli mobimba ya makambo ya mokili ekobomama, mokomoko na biso asengeli kosala nini? Mpo na litomba na biso, ntoma Petelo akomaki boye: “Lokola biloko nyonso wana esengeli kosilela bongo, bosengeli kozala bato ya ndenge nini na misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe!” (2 Petelo 3:11) Tosengeli mpenza kozala bato ya ndenge yango! Na kolanda toli ya Petelo, tosengeli (1) kokeba na etamboli na biso mpo tómindimisa ete ezali ya bosantu, mpe (2) kotalaka soki molende na biso na mosala ya Yehova ezali komonisa ntango nyonso bolingo mingi oyo tozali na yango mpo na ye.

17. Baklisto ya sembo basengeli kokeba na mitambo nini ya Satana?

17 Bolingo na biso mpo na Nzambe ekopekisa biso tómipesa na makambo ya mokili oyo ekoki kobenda biso. Na kotalela ndenge mokili oyo ekosuka, soki biso tobandi kolanda bisengo na yango, tozali komitya na likama. Atako tofandi mpe tozali kosala na kati ya mokili, tosengeli kolanda toli malamu ya kosalela mokili yango na makambo nyonso te. (1 Bakolinti 7:31) Tosengeli nde kosala nyonso mpo makambo ya lokuta ya mokili oyo ekosa biso te. Bato ya mokili bakolonga te kosilisa mikakatano na yango. Bakokende mosika te na kobundabunda na bango. Nini ezali kondimisa biso yango? Ezali mpo Liloba ya Nzambe elobi yango: “Mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”​—1 Yoane 2:17.

Makambo malamu mingi ekoya!

18, 19. Mbongwana nini okomona na mokili ya sika, mpe mpo na nini kozela na yo ekozala ya mpamba te?

18 Etikali moke Yehova asukisa teyatre ya Satana ná bato na ye. Nsima na yango, Yehova akopambola bato ya sembo oyo bakobika na nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo mpo na kobanda makambo ya sika oyo ekoumela seko. Bitumba ekozala lisusu te; Nzambe “akosukisa bitumba kino na nsuka ya mokili.” (Nzembo 46:9) Na esika bato bákufaka nzala, “masango ekotondana na mokili . . . mbuma na yango ekoningana.” (Nzembo 72:16) Babolɔkɔ, bapolisi, bamaladi oyo epanzanaka na kosangisa nzoto, mombongo ya bangi, koboma mabala, kokangama ya bakompanyi, bateroriste, nyonso wana ekozala lisusu te.​—Nzembo 37:29; Yisaya 33:24; Emoniseli 21:3-5.

19 Malita ekofungwama mpe ebele ya bato bakosekwa. Ekozala esengo monene ntango bato oyo bazalaká na bomoi na eleko mosusu bakokutana na bato ya eleko mosusu mpe bandeko ná baninga oyo liwa ekabola bango banda kala bakokutana lisusu mpe bakoyambana na esengo! Nsukansuka, bato nyonso bakosambela Yehova. (Emoniseli 5:13) Ntango mbongwana wana nyonso ekosalema, mabelé mobimba ekokóma paladiso. Motema na yo ekozala ndenge nini ntango okotalatala mokili yango? Na ntembe te okoganga ete, ‘Nazelaki yango banda kala, kasi nazelaki mpamba te!’

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na esika mosusu, Paulo alobaki ete baklisto bapakolami bazali “eloko ya kotala epai ya mokili, mpe epai ya baanzelu, mpe epai ya bato.”​—1 Bakolinti 4:9.

b Na ndakisa, mpo na koyeba “mokonzi ya nɔrdi,” oyo Danyele 11:40, 44, 45 elobeli, talá buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele!, nkasa 280-281.

c Biblia ezali komonisa ete mbula 70 elekaki kobanda Yelusaleme ekweaki tii ntango Bayuda balongwaki na boombo na mobu 537 L.T.B. (Yilimia 25:11, 12; Danyele 9:1-3) Mpo na kozwa ndimbola malamu ya “ntango oyo etyamá mpo na bikólo mosusu,” talá buku Comment raisonner à partir des Écritures, nkasa 84-88, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini maloba ya Paulo ete “makambo ya mokili oyo ezali kobongwana” ekokisami na mikolo na biso?

• Ndenge nini boyekoli ya badati ya Biblia emonisi biso nsuka ya “ntango oyo etyamá mpo na bikólo mosusu”?

• Ndenge nini mbongwana na makambo ya mokili endimisi ete “ntango ya nsuka” ebandaki na 1914?

• Lokola “ntango oyo etikali ekómi mokuse,” yango esengeli kotinda biso na kosala nini?

[Elilingi na lokasa 20]

Nsukansuka​—libombami elimbolami!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto