Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/3 nk. 10-14
  • “Salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Basakoli ya molende na ntango ya kala
  • Basakoli ya molende lelo oyo
  • Kotatola ndako na ndako
  • Mpo na nini tozali kokoba kosakola?
  • Kopalanganisa nsango malamu ememelaka biso moko matomba
  • Tómibombela biloko ya motuya na likoló
  • Baklisto nyonso ya solo basengeli kozala bapalanganisi ya nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Batatoli ya Yehova: bapalanganisi ya solo ya nsango malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Banani bazali basakoli ya solo ya nsango malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Kokisá mokumba na yo ya mopalanganisi ya nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/3 nk. 10-14

“Salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu”

“Batelá makanisi na yo na makambo nyonso, . . . salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu.”​—2 TIMOTE 4:5.

1. Mokumba nini Yesu apesaki bayekoli na ye?

NKOMBO ya Yehova mpe mikano na ye ezali kosakolama na mabelé mobimba. Ezali bongo mpamba te bato oyo bamipesi mpo na kosalela Nzambe bazali kozwa na lisɛki te mokumba oyo Yesu Klisto apesaki bayekoli na ye ntango alobaki ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.”​—Matai 28:19, 20.

2. Malako nini bapesaki mokɛngɛli Timote, mpe wapi lolenge moko oyo bakɛngɛli baklisto bakoki kokokisa mosala na bango ya ministre?

2 Bayekoli ya liboso ya Yesu bazwaki mokumba yango na lisɛki te. Na ndakisa, ntoma Paulo apesaki Timote, moninga na ye mokɛngɛli, toli oyo: “Salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu, kokisá mosala na yo ya ministre malamumalamu.” (2 Timote 4:5) Na moi ya lelo, lolenge moko oyo mokɛngɛli asengeli kokokisa mosala na ye ya ministre ezali na kozala mosakoli ya molende ya Bokonzi, oyo abimaka na mosala yango pɔsɔ na pɔsɔ. Na ndakisa, mokɛngɛli ya Boyekoli ya mokanda azali na mokumba malamu ya kopesa ndakisa na mosala ya kosakola mpe ya kopesa basusu formasyo. Paulo akokisaki mokumba na ye ya kosakola nsango malamu, mpe apesaki bamosusu formasyo.​—Misala 20:20; 1 Bakolinti 9:16, 17.

Basakoli ya molende na ntango ya kala

3, 4. Makambo nini Filipo asalaki na mosala na ye ya mopalanganisi ya nsango malamu?

3 Baklisto ya ekeke ya liboso bayebanaki ete bazalaki basakoli ya molende. Tózwa ndakisa ya mosakoli Filipo. Azalaki moko ya “mibali nsambo ya lokumu malamu . . . oyo batondi na elimo mpe na bwanya” oyo baponamaki mpo na kokabola bilei ya mokolo na mokolo epai ya basi bakufelá mibali oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki mpe baoyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Liebele na Yelusaleme. (Misala 6:1-6) Ntango mosala yango esilaki mpe bato nyonso, longola kaka bantoma, bapanzanaki mpo na kokima minyoko, Filipo akendaki na Samalia. Kuna, asakolaki nsango malamu mpe na nguya ya elimo santu, abenganaki bademo mpe abikisaki bakatatali mpe batɛngumi. Basamalia mingi bandimaki nsango ya Bokonzi mpe bazwaki batisimo. Ntango bantoma na Yelusaleme bayokaki nsango yango, batindaki ntoma Petelo ná ntoma Yoane na Samalia mpo bandimi oyo bautaki kozwa batisimo bázwa mpe elimo santu.​—Misala 8:4-17.

4 Na nsima, elimo ya Nzambe etambwisaki Filipo mpo akende kokutana na mokube Moetiopia na nzela ya Gaza. Filipo alimbwelaki ye malamumalamu esakweli ya Yisaya; na nsima, “moto monene [yango] na ntango ya Kandase mokonzi mwasi ya Baetiopia” andimelaki Yesu Klisto mpe azwaki batisimo. (Misala 8:26-38) Nsima na yango, Filipo akendaki na Asedodo mpe na nsima na Kaisalia, “akobaki kosakola nsango malamu na bingumba nyonso” oyo azalaki koleka. (Misala 8:39, 40) Apesaki mpenza ndakisa malamu lokola mopalanganisi ya nsango malamu!

5. Bana basi minei ya Filipo bayebanaki mpo na mosala nini?

5 Mbula 20 na nsima, Filipo azalaki kaka kosakola na Kaisalia. Ntango Paulo ná Luka bafandaki na ndako na ye, “azalaki na bana basi minei, bangɔndɔ, oyo bazalaki kosakola.” (Misala 21:8-10) Na ntembe te bana yango bazwaki formasyo malamu na elimo, bazalaki na molende na mosala ya kosakola; kutu, bazwaki libaku malamu ya kosakola makambo. Lelo oyo mpe, soki baboti bazali na molende na mosala ya kosakola, bana na bango bakoki kolanda ndakisa yango mpe ekotinda bango básala mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu na molende bomoi na bango mobimba.

Basakoli ya molende lelo oyo

6. Ndenge nini bapalanganisi ya nsango malamu ya ekeke ya liboso basalaki mosala na bango?

6 Na esakweli monene oyo alobelaki mikolo na biso mpe mikolo ya nsuka, Yesu Klisto alobaki boye: “Na kati ya bikólo nyonso nsango malamu esengeli kosakolama liboso.” (Malako 13:10) Nsango malamu esengeli naino kosakolama “na mabelé mobimba oyo efandami” liboso nsuka eya. (Matai 24:14) Ntango Paulo mpe basakoli mosusu ya ekeke ya liboso bazalaki kosakola nsango malamu, bato mingi bakómaki bandimi, mpe masangá efungwamaki na bisika ndenge na ndenge na mikili oyo Ampire ya Loma ezalaki koyangela. Bankulutu ya masangá yango bazalaki kopalanganisa nsango malamu elongo na bandeko mosusu mpe mpo na yango, nsango malamu ekómaki tii na bamboka ya mosika. Liloba ya Yehova ekobaki kokola mpe kolonga, se ndenge ezali kosalema lelo oyo mpamba te bamilio ya Batatoli ya Yehova bazali kosala mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu. (Misala 19:20) Yo mpe ozali na kati ya bato oyo bazali kosanzola Yehova na esengo?

7. Lelo oyo, bapalanganisi ya nsango malamu bazali kosala nini na mosala na bango?

7 Basakoli mingi ya Bokonzi bazali lelo oyo komipesa mpo na kosala mingi lisusu na mosala ya kopalanganisa nsango malamu. Mingi bazali bamisionɛrɛ, mpe mingi lisusu koleka bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe babongisi-nzela basungi. Mibali, basi mpe bana oyo bazali basakoli ya molende ya Bokonzi bazali kosala mosala malamu mpenza! Yehova azali kopambola basaleli na ye nyonso oyo bazali kosalela ye na bomoko lokola bapalanganisi ya nsango malamu.​—Sefania 3:9.

8. Mosala nini ya kotya bilembo ezali kosalema lelo oyo, mpe banani bazali kosala yango?

8 Nzambe apesi bayekoli ya Yesu oyo bazali bapakolami na elimo mokumba ya kosakola nsango malamu na mabelé mobimba. “Bampate mosusu” ya Klisto oyo bazali se kobakisama bazali kopesa bango mabɔkɔ na mosala yango. (Yoane 10:16) Na maloba ya esakweli, bakokanisi mosala yango oyo ezali kobikisa bomoi ya bato na kotya bilembo na bilongi ya baoyo bazali kolela mpe kokimela mpo na makambo mabe oyo ezali kosalema lelo oyo. Etikali moke, bato mabe bakobomama. Liboso na yango, tozali na libaku malamu ya koyebisa bato ya mabelé mobimba solo oyo ezali kobikisa bomoi!​—Ezekiele 9:4-6, 11.

9. Ndenge nini tokoki kosalisa basakoli ya sika?

9 Soki tobandá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu mwa kala, na ntembe te tokoki kosalisa bato ya sika na lisangá. Tokoki ntango mosusu kobimaka na bango na mosala ya kosakola. Bankulutu basengeli kosala nyonso oyo bakoki mpo na kolendisa bandeko mosusu na elimo. Milende ya bakɛngɛli oyo bazali na komikitisa ekoki mpenza kosalisa basusu na kozala bapalanganisi ya nsango malamu oyo bazali na molende mpe bazali kobota mbuma.​—2 Petelo 1:5-8.

Kotatola ndako na ndako

10. Klisto ná bayekoli na ye ya liboso bapesaki ndakisa nini na mosala ya kosakola?

10 Yesu Klisto apesaki bayekoli na ye ndakisa malamu lokola mopalanganisi ya nsango malamu. Na ntina na mosala ya Klisto mpe bantoma na ye, Liloba ya Nzambe elobi boye: “Atambolaki engumba na engumba mpe mboka na mboka, koteyáká mpe kosakoláká nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe. Mpe bazomi na mibale bazalaki elongo na ye.” (Luka 8:1) Ezali boni mpo na bantoma bango moko? Na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), nsima ya kozwa elimo santu, “mikolo nyonso na kati ya tempelo mpe na ndako na ndako, kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto, Yesu.”​—Misala 5:42.

11. Na kotalela Misala 20:20, 21, ntoma Paulo asalaki makambo nini na mosala na ye?

11 Lokola ntoma Paulo azalaki na molende na mosala na ye ya kopalanganisa nsango malamu, ayebisaki bankulutu ya Efese boye: “Namipekisaki te koyebisa bino makambo nyonso oyo ezalaki na litomba to koteya bino na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako.” Ntango Paulo azalaki ‘koteya ndako na ndako,’ azalaki nde kokende kotala baninga na ye basambeli ya Yehova na bandako na bango mpo na kolendisa bango? Te, mpamba te abakisaki boye: “Natatolaki malamumalamu ezala epai ya Bayuda mpe epai ya Bagrɛki na oyo etali kobongola motema epai ya Nzambe mpe kondima na kati ya Nkolo na biso Yesu.” (Misala 20:20, 21) Bato oyo bamipesaki na Yehova bazalaki lisusu na mposa te báteya bango “kobongola motema epai ya Nzambe mpe kondima na kati ya Nkolo na biso Yesu Klisto.” Paulo apesaki bankulutu ya Efese formasyo na mosala ya kosakola ndako na ndako ntango azalaki koteya kobongola motema mpe kondima epai ya bato oyo bazalaki bandimi te. Na ndenge wana, Paulo azalaki kolanda ndenge ya kosakola oyo Yesu abandisaki.

12, 13. Na boyokani na Bafilipi 1:7, basaleli ya Yehova basalaki nini mpo na lotomo na bango ya kosakola?

12 Mosala ya ndako na ndako ekoki kozala mokakatano monene. Na ndakisa, bato mosusu basilikaka ntango tokei na bandako na bango mpo na koyebisa bango nsango ya Biblia. Biso tozalaka na mposa ya kosilikisa bato te. Biblia nde esɛngi biso tósakolaka ndako na ndako, mpe topesaka litatoli na ndenge yango mpo tolingaka Nzambe mpe bazalani na biso. (Malako 12:28-31) Mpo na ‘kokɔtela mpe kondimisa na mibeko’ lotomo na biso ya kosakola ndako na ndako, ntango mosusu tosambaki na batribinale, ata mpe na tribinale monene ya États-Unis. (Bafilipi 1:7) Na makambo mingi, tribinale yango elongisaki biso. Ekateli moko oyo tribinale yango ezwaki elobi boye:

13 “Kokabola mikanda ya Nzambe ezali ndenge ya kopalanganisa nsango malamu oyo bamisionɛrɛ basalaka banda mikanda ekóma kobimisama na imprimerie. Ezali mayele oyo ezali kobota mbula oyo mangomba ndenge na ndenge esalelaka banda kala. Mayele yango ya kopalanganisa nsango malamu ezali kosalelama lelo oyo, mingimingi na mwa mangomba ndenge na ndenge oyo basakoli na yango bazali komemela bankóto ya bato Evanzile na bandako mpe bazali kokende kotala bato mpo na koluka bandimi ya sika. . . . Na kotalela likanisi ya Premier Amendement [na buku ya ebongiseli mpe mibeko ya ekólo (Constitution) ya États-Unis], lolenge yango ya mosala ya Nzambe ezali ndenge moko na kosambela to mpe koteya na bandako-nzambe.”​—Lisambisi ya Murdock mpe etúká ya Pennsylvanie, 1943.

Mpo na nini tozali kokoba kosakola?

14. Mosala na biso ya kosakola ekoki kobota mbuma nini?

14 Ezali na bantina mingi oyo tosakolaka ndako na ndako. Mbala nyonso oyo tosololi na moto na ndako moko, tomekaka kolona solo ya Biblia na motema na ye. Ntango tozali kozongela ye, tolukaka nde kosopa mai na solo oyo tolonaki. Yango ekoki kobota mbuma malamu na nsima, mpamba te Paulo akomaki: “Ngai nalonaki, Apolo amwangisaki mai, kasi Nzambe azalaki kokolisa.” (1 Bakolinti 3:6) Yango wana, tókoba ‘kolona mpe komwangisa mai,’ na elikya ete Yehova ‘akokolisa.’

15, 16. Mpo na nini tozongelaka bato mbala na mbala na bandako na bango?

15 Tosalaka mosala mopalanganisi ya nsango malamu mpamba te bomoi ya bato mingi ezali na likama. Na nzela ya mosala ya kosakola tokoki komibikisa mpe kobikisa bato oyo bazali koyoka biso. (1 Timote 4:16) Soki toyebi ete bomoi ya moto moko ezali na likama, tokozala nde na bolɛmbu mpo na kobikisa ye? Te! Tozongaka mbala na mbala kotala bato na bandako na bango mpamba te yango ekoki kobikisa bomoi na bango. Makambo ezali se kobongwana. Moto oyo azali na ntango ya koyoka nsango ya Biblia te lelo, akoki kozala na mposa ya koyoka yango lobi. Kaka na ndako moko oyo tobɛtaki mbala eleki, tokoki kokuta moto mosusu oyo akoyamba biso mpe akondima tósolola na ye.

16 Ata mpe makanisi ya bato ekoki kobongwana. Na ndakisa, moto akoki kotungisama mpo na liwa ya ndeko to moninga na ye mpe yango ekoki kotinda ye andima koyoka nsango ya Bokonzi. Tokosepela kobɔndisa moto ya ndenge wana, kosalisa ye ayeba bamposa na ye ya elimo, mpe komonisa ye ndenge oyo akoki kokokisa yango.​—Matai 5:3, 4.

17. Wapi ntina eleki monene oyo tosakolaka?

17 Ntina eleki monene oyo totatolaka ndako na ndako mpe tosakolaka na balolenge mosusu ezali ete tozali na mposa ete bato báyeba nkombo ya Yehova. (Exode 9:16; Nzembo 83:18) Toyokaka mpenza esengo ntango tosalisi bato oyo balingaka solo mpe boyengebene bákóma basanzoli ya Yehova! Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Bilenge mpe baseka lokola, banunu mpe bana elongo; tiká ete básanzola nkombo ya [Yehova] zambi bobele nkombo na ye eleki. Nkembo na ye ezali likoló na mokili mpe lola.”​—Nzembo 148:12, 13.

Kopalanganisa nsango malamu ememelaka biso moko matomba

18. Matomba nini tozwaka na mosala ya kopalanganisa nsango malamu?

18 Kopalanganisa nsango malamu ememelaka biso matomba mingi. Kosakola nsango malamu ndako na ndako esalisaka biso tólona ezaleli ya komikitisa, mingimingi ntango bazali koyamba biso na boboto te. Mpo na kozala bapalanganisi ya nsango malamu oyo bazali kobota mbuma, tosengeli kozala lokola Paulo, oyo ‘akómaki makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso mpo na kobikisa bamosusu.’ (1 Bakolinti 9:19-23) Makambo oyo tokutanaka na yango na mosala ya kosakola esalisaka biso tóyeba koloba na mayele. Soki tozali kotyela Yehova motema mpe toyebi kopona maloba oyo tokobimisa, tokosalela toli ya Paulo oyo: “Tiká liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto moko na moko eyano.”​—Bakolose 4:6.

19. Ndenge nini elimo santu esalisaka bapalanganisi ya nsango malamu?

19 Kopalanganisa nsango malamu esalisaka biso mpe tótyela elimo santu ya Nzambe motema. (Zekalia 4:6) Na nsima, na mosala na biso, tomonisaka mbuma ya elimo yango oyo ezali “bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima, boboto, komipekisa.” (Bagalatia 5:22, 23) Esalisaka biso tózala malamu na bato, mpamba te kolanda nzela oyo elimo ezali kolakisa biso esalisaka biso tózala na bolingo, tózala bato ya esengo mpe ya kimya, tózala na motema molai mpe motema malamu, tómonisa bolamu mpe kondima, mpe tómonisa boboto mpe komipekisa ntango tozali kosakola nsango malamu.

20, 21. Tángá mwa matomba ya komipesa na mosala ya kopalanganisa nsango malamu.

20 Litomba mosusu tozwaka na mosala ya kopalanganisa nsango malamu ezali ete toyekolaka komitya na esika ya basusu. Ntango bato bazali koyebisa biso mikakatano na bango: maladi, kozanga mosala, mikakatano na mabota, tomizwaka te lokola minganga to bato mosusu ya mayele, kasi totángelaka bango bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekoki kolendisa mpe kobɔndisa bango. Tomibanzabanzaka mpo na bato oyo bazipi bango miso na elimo kasi bazali komonisa ete balingaka boyengebene. (2 Bakolinti 4:4) Ezalaka mpenza esengo kosalisa na elimo bato oyo ‘bazali na ezaleli ebongi mpo na bomoi ya seko’!​—Misala 13:48.

21 Soki pɔsɔ na pɔsɔ tozali kosangana na mosala ya kopalanganisa nsango malamu, yango esalisaka biso tótya ntango nyonso makanisi na biso na makambo ya elimo. (Luka 11:34) Kosala bongo ezali na matomba, mpamba te, soki bongo te, tokobendama na mposa ya koluka biloko ya mokili, oyo epalangani mingi. Ntoma Yoane apesaki baklisto toli oyo: “Bólingaka mokili te ná biloko oyo ezali na kati ya mokili. Soki moto azali kolinga mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te; mpamba te eloko nyonso oyo ezali na kati ya mokili​—mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela​—euti epai ya Tata te, kasi euti na mokili. Lisusu, mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:15-17) Komipesa na kopalanganisa nsango malamu mpe kozala na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo esalisaka biso mpo tólinga mokili te.​—1 Bakolinti 15:58.

Tómibombela biloko ya motuya na likoló

22, 23. (a) Bapalanganisi ya nsango malamu bazali komibombela biloko nini ya motuya? (b) Lisolo oyo ekolanda ekosalisa biso na nini?

22 Kozala na molende na mosala ya kosakola Bokonzi ememaka matomba ya seko. Yesu amonisaki yango ntango alobaki boye: “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabelé, epai nsɛlɛlɛ mpe koguga ebebisaka, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi mpe bayibaka. Nzokande, bómibombela biloko ya motuya na likoló, epai nsɛlɛlɛ mpe koguga ebebisaka te, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi te mpe bayibaka te. Mpo epai eloko na yo ya motuya ezali, kuna motema na yo mpe ekozala.”​—Matai 6:19-21.

23 Tiká tókoba komibombela biloko ya motuya na likoló, tóbosana te ete ezali na libaku moko te oyo eleki libaku malamu ya kozala Batatoli ya Nkolo Mokonzi Yehova. (Yisaya 43:10-12) Wana tozali kokokisa mokumba na biso ya baministre ya Nzambe, tokoki komiyoka lokola moklisto moko ya mwasi ya mbula koleka 90 oyo alobaki na ntina na ebele ya bambula oyo asalelaki Nzambe ete: “Na nyonso wana, nazali kotɔnda Yehova oyo andimaki ngai na mosala na ye na boumeli ya bambula nyonso wana, mpe libondeli na ngai ezali ete azala Tata na ngai seko na seko.” Soki biso mpe tozali kozwa na motuya boyokani na biso na Nzambe, na ntembe te tokolinga kosala mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu malamumalamu. Lisolo oyo ekolanda ekosalisa biso tóyeba ndenge oyo tokoki kosala mosala na biso ya kosakola malamumalamu.

Okopesa eyano nini?

• Mpo na nini tosengeli kosala mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu?

• Okoki koloba nini mpo na mosala ya bapalanganisi ya nsango malamu na ntango ya kala mpe na moi ya lelo?

• Mpo na nini totatolaka ndako na ndako?

• Matomba nini ozwaka na mosala ya kopalanganisa nsango malamu?

[Bililingi na lokasa 10]

Bapalanganisi ya nsango malamu na mikolo na biso bazali lokola Filipo ná bana na ye ya basi

[Elilingi na lokasa 14]

Matomba nini ozwaka na kosakola nsango malamu?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto