Tyelá elimo ya Nzambe motema ntango bomoi na yo ezali kobongwana
“Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo omimonisa moto oyo andimami na Nzambe.”—2 TIMOTE 2:15.
1. Mbongwana nini ezalaka komekama mpo na elimo na biso?
MOKILI ezali se kobongwana. Bato ya siansi bazali kosala makambo minene mpe bazali kobimisa biloko ya sika; kasi, epai mosusu, bizaleli ya bato ezali se kobeba. Ndenge tomonaki na lisolo eleki, baklisto basengeli kokima elimo ya kopesa Nzambe mokɔngɔ oyo etondi na mokili oyo. Kasi, ntango mokili ezali kobongwana, biso mpe tozali kobongwana na makambo mingi. Tozalaki bana mike, tozali kokóma mikóló. Tokoki kokóma na bozwi to mpe kobungisa yango, tokoki kobɛla, mpe ndeko to moninga na biso akoki kokufa. Mbongwana mingi ya ndenge wana tokanaka yango te, mpe ekoki mpenza kozala komekama mpo na elimo na biso.
2. Bomoi ya Davidi ebongwanaki na makambo nini?
2 Bato oyo bomoi na bango ebongwaná mpenza lokola oyo ya Davidi, mwana ya Yisai, bazali mingi te. Davidi azalaki mobateli ya mpate mpe ayebanaki te; kasi, na mbala moko akómaki elombe mpe ayebanaki na ekólo mobimba. Na nsima, akómaki kokima mpo na kobikisa bomoi na ye liboso ya mokonzi oyo azalaki kolanda ye lokola nyama mpo na zuwa. Nsima na yango, Davidi akómaki mokonzi mpe mobundi monene. Abukaki mbuma mabe ya lisumu monene oyo asalaki. Azwaki mikakatano mpe libota na ye ekabwanaki. Azwaki bomɛngo, akómaki mobange, mpe akutanaki na mikakatano ya bobange. Kasi, atako bomoi ya Davidi ebongwanaki na makambo mingi, Davidi atikaki te kotyela Yehova mpe elimo na Ye motema na bomoi na ye mobimba. Asalaki nyonso mpo na komimonisa “moto oyo andimami na Nzambe,” mpe Nzambe apambolaki ye. (2 Timote 2:15) Atako bomoi na biso ekokani na oyo ya Davidi te, tokoki kozwa liteya na ndenge oyo asalaki liboso ya makambo oyo akutanaki na yango na bomoi na ye. Ndakisa na ye ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo elimo ya Nzambe ekoki kokoba kosalisa biso ntango bomoi na biso ebongwani.
Ndakisa ya komikitisa ya Davidi
3, 4. Ndenge nini Davidi, mobateli ya mpate oyo ayebanaki te, akómaki elombe oyo ayebanaki mboka mobimba?
3 Ntango Davidi azalaki elenge, azalaki moto monene te, ata na kati ya libota na ye. Ntango mosakoli Samwele akómaki na Beteleme, tata ya Davidi alakisaki ye bana nsambo na kati ya bana na ye mwambe. Davidi, leki na bango nyonso, atikalaki kobatela bampate. Kasi, Yehova aponaki Davidi akóma mokonzi ya Yisalaele. Bakendaki koluka Davidi na zamba. Na nsima, Biblia elobi boye: “Samwele akamataki liseke lizali na mafuta mpe apakolaki ye kati na bandeko na ye; mpe [elimo ya Yehova, NW] ekwelaki Davidi longwa na mokolo yango.” (1 Samwele 16:12, 13) Davidi atyelaki elimo yango motema bomoi na ye mobimba.
4 Mwa moke na nsima, elenge yango oyo azalaki mobateli ya mpate ayebanaki na ekólo mobimba. Babengaki ye mpo na kosala na ndako ya mokonzi mpe kobɛtɛla ye miziki. Abomaki elombe Goliata, engambe oyo basoda ya makasi ya Yisalaele bazalaki kobanga kobunda na ye. Davidi akómaki mokonzi ya basoda mpe alongaki Bafilistia. Mboka mobimba balingaki ye. Basalaki banzembo ya kokumisa ye. Liboso, mopesi-toli moko ya Mokonzi Saulo alobaki ete elenge Davidi “ayebi nzɛnzɛ, azali mpe moto ya mpiko, moto ya etumba, moto ya liloba kitoko mpe moto malamu.”—1 Samwele 16:18; 17:23, 24, 45-51; 18:5-7.
5. Makambo nini ekokaki kokómisa Davidi lolendo, mpe nini emonisi ete akómaki na lolendo te?
5 Davidi azalaki na nyonso oyo moto alingaka kozala na yango: ayebanaki, azalaki kitoko, azalaki elenge, ayebaki koloba, ayebaki kobɛta miziki, azalaki makasi na etumba, mpe Nzambe alingaki ye. Ata kaka moko na makambo yango ekokaki kokómisa ye lolendo, kasi esalemaki bongo te. Yoká eyano ya Davidi epai ya Mokonzi Saulo, ntango abalisaki ye mwana na ye ya mwasi. Na komikitisa mpenza, Davidi alobaki boye: “Ngai nazali nani mpe bato na ngai banani mpe libota ya tata na ngai bazali banani kati na Yisalaele ete ngai nazala [bokilo] ya mokonzi?” (1 Samwele 18:18) Na ntina na maloba yango, molimboli moko ya Biblia alobaki boye: “Davidi alingaki koloba ete, ezala mpo na makoki na ye moko, to mpo na bonene na ye, to mpo na libota na ye, ata mokolo moko te akokaki kozwa likanisi ya kokóma bokilo ya mokonzi.”
6. Mpo na nini tosengeli kolona komikitisa?
6 Davidi azalaki na komikitisa mpo ayebaki ete Yehova aleki na mosika mpenza bato ya kozanga kokoka na makambo nyonso. Davidi akamwaki na komona ete Nzambe akoki kotyela moto likebi. (Nzembo 144:3) Davidi ayebaki mpe ete lokumu nyonso oyo akoki kozala na yango ezali kaka mpo na komikitisa ya Yehova, oyo akitaki mpenza na nse mpo na kosunga mpe kobatela ye. (Nzembo 18:35) Yango ezali liteya monene mpo na biso! Eloko moko te, ezala mayele na biso, makambo oyo tosalá, to mikumba oyo tozali na yango, esengeli kotinda biso tótombola mapeka. Ntoma Paulo akomaki boye: “Eloko nini ozali na yango oyo bapesaki yo kopesa te? Nzokande, soki mpenza bapesaki yo yango kopesa, mpo na nini ozali komikumisa lokola nde bapesaki yo yango kopesa te?” (1 Bakolinti 4:7) Mpo tózwa elimo santu ya Nzambe mpe ye asepela na biso, tosengeli kolona komikitisa mpe kobatela ezaleli yango.—Yakobo 4:6.
“Bózongisa bino moko te mabe na oyo asali bino mabe”
7. Libaku nini ya koboma Mokonzi Saulo Davidi azwaki?
7 Lokumu ya Davidi evimbisaki ye motó te; nzokande, epesaki Mokonzi Saulo, oyo azalaki lisusu na elimo ya Nzambe te, zuwa ya ligboma. Davidi asalaki mabe moko te, kasi akómaki kokima mpo na kobikisa bomoi na ye mpe akómaki kobombana na esobe. Mokolo moko oyo Mokonzi Saulo azalaki kolandalanda ye, akɔtaki na lidusu moko, nzokande, Davidi ná baninga na ye babombanaki na kati. Baninga ya Davidi batyaki ye mbamba ete alekisa te libaku wana ya koboma Saulo; bango bamonaki ete Nzambe nde abongisi yango. Tokoki kokanisa ndenge, na esika wana ya molili, bazalaki koyebisa Davidi na mongongo ya nse ete: “Talá mokolo molobaki [Yehova] na yo ete, Nakopesa moyini na yo kati na lobɔkɔ na yo ete osalela ye lokola emoni yo malamu.”—1 Samwele 24:2-6.
8. Mpo na nini Davidi aboyaki kozongisa mabe na mabe?
8 Davidi aboyaki kosala Saulo mabe. Azalaki na kondima mpe na motema molai mpe amonaki malamu kotika nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. Ntango mokonzi abimaki na lidusu yango, Davidi abelelaki ye mpe alobaki na ye boye: “[Yehova] akata kati na biso na yo mpe [Yehova] azongisela yo makambo mpo na ngai, kasi lobɔkɔ na ngai ekokóma likoló na yo te.” (1 Samwele 24:12) Atako Davidi ayebaki ete Saulo azali kosala mabe, azongisaki mabe na mabe te; alobaki na Saulo mabe te to mpe atɔngaki ye te. Davidi azwaki mabaku mingi mosusu ya koboma Saulo, kasi, aboyaki kosilisa likambo ye moko. Atyaki motema ete Yehova ye moko akobongisa makambo.—1 Samwele 25:32-34; 26:10, 11.
9. Mpo na nini tosengeli te kozongisa mabe na mabe ntango bazali kopekisa biso kosalela Yehova to bazali konyokola biso?
9 Lokola Davidi, yo mpe okoki kokutana na mikakatano. Mbala mosusu baninga ya kelasi, baninga ya mosala, bandeko na yo, to bato mosusu oyo bazali Batatoli te bazali kopekisa yo kosalela Yehova to mpe bazali konyokola yo. Kozongisa mabe na mabe te. Talelá Yehova, sɛngá ye elimo santu na ye esalisa yo. Bato yango oyo bazali bandimi te bakoki kosepela na bizaleli malamu na yo mpe kokóma bandimi. (1 Petelo 3:1) Ezala esalemi bongo to te, zalá na elikya ete Yehova azali koyeba makambo oyo ezali kotungisa yo mpe akozanga te kosalisa yo na ntango oyo ebongi. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bózongisa bino moko te mabe na oyo asali bino mabe, balingami, kasi bótikela nde nkanda esika; mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa, Yehova alobi bongo.’”—Baloma 12:19.
“Yoká disipilini”
10. Ndenge nini Davidi akweaki na lisumu, mpe ndenge nini alukaki kobomba yango?
10 Bambula elekaki. Davidi akómaki mokonzi ya lokumu mingi. Na kotalela bosembo oyo amonisaki na bomoi na ye, banzembo kitoko oyo akomaki mpo na kosanzola Yehova, tokoki kokanisa ete akokaki kokwea na lisumu monene ata mokolo moko te. Kasi, akweaki. Mokolo moko, Davidi azalaki na esika moko ya likoló na ndako na ye, amonaki mwasi moko azali kosukola. Atunaki bato na ye mpo na koyeba mwasi yango. Ntango bayebisaki ye ete nkombo na ye Bata-Seba, mpe ete mobali na ye, Uliya, akendaki na etumba, Davidi abengisaki mwasi yango mpe asangisaki na ye nzoto. Na nsima, mwasi yango akómaki na zemi. Ekozala nsɔni mingi soki likambo yango eyebani! Na Mibeko ya Moize, ekobo ezalaki lisumu monene oyo etumbu na yango ezalaki liwa. Na ntembe te, mokonzi akanisaki ete akoki kobomba lisumu yango. Yango wana, atindaki maloba ete Uliya azonga na Yelusaleme. Davidi akanisaki ete na butu, Uliya akolala na Bata-Seba, kasi esalemaki bongo te. Davidi atambolaki bɔɔngɔ; azongisaki lisusu Uliya na etumba mpe apesaki ye mokanda amemela Yoaba, mokonzi ya basoda. Na mokanda yango apesaki mitindo ete bátya Uliya na esika oyo banguna bakoboma ye. Yoaba asalaki ndenge mokonzi atindaki, mpe Uliya abomamaki. Bata-Seba alelaki mobali na ye mikolo oyo esɛngamaki, na nsima Davidi abalaki ye.—2 Samwele 11:1-27.
11. Lisolo nini Natana abɛtɛlaki Davidi, mpe ye alobaki nini?
11 Davidi akanisaki ete mayele na ye elongi; kasi, abosanaki ete Yehova amonaki likambo yango mobimba. (Baebele 4:13) Basanza elekaki, mpe mwana abotamaki. Na nsima, Nzambe atindaki mosakoli Natana epai ya Davidi. Mosakoli abɛtɛlaki mokonzi lisolo ya mozwi moko oyo azalaki na ebele ya bampate, kasi azwaki mwana mpate kaka moko ya mobola moko mpe abomaki yango. Davidi ayokaki mabe mpo na kozanga bosembo ya ndenge wana, kasi ayebaki ata moke te ete lisolo yango ezalaki na ndimbola mosusu. Davidi akataki mbala moko likambo ya moto yango. Na nkanda mpenza, alobaki na Natana ete: “Moto oyo asali yango abongi kokufa!”—2 Samwele 12:1-6.
12. Etumbu nini Yehova apesaki Davidi?
12 Mosakoli ayebisaki ye ete: “Yo moto yango!” Davidi amikatelaki etumbu. Na ntembe te, nkanda ya Davidi ebongwanaki mbala moko nsɔni mpe mawa. Davidi afandaki nyɛɛ wana Natana azalaki koyebisa ye lisambisi ya Yehova. Ezali na maloba te oyo ekokaki kobɔndisa ye na ntango wana. Davidi atyolaki liloba ya Yehova na mabe oyo asalaki. Abomaki Uliya na mopanga ya monguna! Mopanga esengelaki kolongwa na ndako ya Davidi te. Azwaki mwasi ya Uliya na kobombana! Likambo ya ndenge yango esengelaki mpe kokómela ye, na kobombana te, kasi na miso ya bato nyonso.—2 Samwele 12:7-12.
13. Ndenge nini Davidi atalelaki disipilini ya Yehova?
13 Malamu ya Davidi ezali ete awanganaki mabe na ye te. Asilikelaki mosakoli Natana te. Apesaki bato mosusu foti te mpo na mabe oyo asalaki, alukaki mpe komilongisa te. Ntango bamonisaki ye masumu na ye, Davidi andimaki mabe na ye mpe alobaki boye: “Nasaleli [Yehova] lisumu.” (2 Samwele 12:13) Nzembo 51 emonisi mpasi oyo ayokaki mpe ndenge oyo abongolaki motema. Abondelaki Yehova na maloba oyo: “Bwaká ngai mosika na elongi na yo te mpe longwelá ngai [elimo] na yo ya bulɛɛ te.” Andimaki ete Yehova, na motema mawa na ye, akoboya te “motema motutami mpe na mawa” mpo na lisumu. (Nzembo 51:11, 17) Davidi atikaki te kotyela elimo ya Nzambe motema. Atako Yehova abikisaki Davidi te na mbuma mabe ya lisumu na ye, alimbisaki ye.
14. Ndenge nini tosengeli kotalela disipilini ya Yehova?
14 Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka masumu. (Baloma 3:23) Ntango mosusu tokoki kokwea na lisumu monene, ndenge Davidi akweaki. Tata oyo alingaka bana na ye apesaka bango disipilini; ndenge moko mpe, Yehova asembolaka bato oyo bazali na mposa ya kosalela ye. Atako disipilini ezalaka na litomba, esalaka mpasi ntango ezali kopesama. Kutu, ntango mosusu eyokisaka “mawa.” (Baebele 12:6, 11) Kasi, soki ‘toyoki disipilini,’ tokoki kozongisa boyokani na biso na Yehova. (Masese 8:33) Mpo na kozala ntango nyonso na elimo ya Yehova, tosengeli kondima kosembolama mpe kosala makasi mpo Nzambe andima biso.
Tótya elikya te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi
15. (a) Ndenge nini bato mosusu basalelaka bozwi na bango? (b) Ndenge nini Davidi asepelaki kosalela bozwi na ye?
15 Biblia elobi te ete liboso Davidi azalaki moto monene to mpe ete libota na ye ezalaki na bozwi. Kasi, ntango azalaki mokonzi, akómaki na bozwi mingi. Oyebi yo moko ete bato mingi babatelaka bozwi na bango, na lokoso nyonso, balukaka kobakisa yango, to mpe basalelaka yango mpo na bolamu na bango moko. Bato mosusu basalelaka mbongo na bango mpo na koluka lokumu. (Matai 6:2) Davidi asalelaki bozwi na ye na ndenge mosusu. Azalaki na mposa ya kokumisa Yehova. Davidi ayebisaki Natana ete azali na mposa ya kotongela Yehova tempelo epai bakotya sanduku ya kondimana oyo, na ntango wana ezalaki na Yelusaleme “na nse ya bilamba.” Yehova asepelaki na makanisi ya Davidi, kasi ayebisaki ye na nzela ya Natana ete Salomo, mwana ya Davidi nde akotongela ye tempelo.—2 Samwele 7:1, 2, 12, 13.
16. Biloko nini Davidi abongisaki mpo na kotonga tempelo?
16 Davidi ayanganisaki biloko ya mosala mpo na ndako monene oyo esengelaki kotongama. Ayebisaki Salomo boye: “Nabongisi mpo na ndako ya [Yehova] talanta nkóto mokama ya wolo mpe talanta nkóto nkóto ya palata mpe motako mpe bibende oyo eyebani bozito te mpo ete ezali mingi mingi. Nabongisi mpe mabanga mpe mabaya. Yo okoki kobakisa na yango.” Davidi ye moko apesaki wolo talanta 3 000 mpe palata talanta 7 000.a (1 Ntango 22:14; 29:3, 4) Likabo ya Davidi ezalaki mpo na komilakisa te, kasi emonisaki kondima mpe komipesa na ye epai ya Yehova Nzambe. Mpo na komonisa ete ayebaki Moto oyo apesaki ye bozwi, alobaki na Yehova boye: “Biloko nyonso ekoutaka na yo mpe topesi yo bobele biloko na yo moko.” (1 Ntango 29:14) Bokabi ya Davidi etindaki ye asala nyonso oyo akoki mpo na losambo ya pɛto.
17. Ndenge nini toli ya 1 Timote 6:17-19 ezali kotalela ná bazwi, ná babola?
17 Biso mpe, tósalela bozwi na biso na misala ya malamu. Na esika ya komipesa na koluka biloko ya mokili, eleki malamu tóluka kondimama na Nzambe; yango nde nzela ya bwanya mpe bolamu ya solosolo. Paulo akomaki boye: “Pesá mitindo na baoyo bazali bato ya bomɛngo na kati ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ete bázala na lolendo te, mpe bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela; básala makambo ya malamu, bázala bato ya bomɛngo na misala ya malamu mpenza, bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato bayebi kokaba, komibombeláká moboko kitoko na esika moko ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.” (1 Timote 6:17-19) Tózala na bozwi to tózanga yango, tótyela elimo ya Nzambe motema mpe tóluka kozala ‘bato ya bomɛngo epai ya Nzambe.’ (Luka 12:21) Eloko moko te ezali na motuya koleka kondimama na Tata na biso ya likoló.
Omimonisa moto oyo andimami na Nzambe
18. Na likambo nini Davidi azali ndakisa malamu mpo na baklisto?
18 Davidi azalaki koluka kondimama na Yehova bomoi ye mobimba. Na nzembo moko ayembaki boye: “Yokelá ngai mawa, ɛ Nzambe, yokelá ngai mawa; zambi molimo na ngai ezali koluka ebombelo epai na yo.” (Nzembo 57:1) Davidi atyelaki Yehova motema mpamba te. Akómaki mpenza mobange mpe “atondaki na mikolo.” (1 Ntango 23:1) Atako Davidi asalaki mabunga ya minene, ntango tolobelaka ye tomonaka ete azali moko ya ebele ya batatoli ya Nzambe oyo bazalaki na kondima makasi.—Baebele 11:32.
19. Ndenge nini tokoki komimonisa bato oyo bandimami na Nzambe?
19 Ntango ozali kokutana na makambo ndenge na ndenge, kobosanaka te ete Yehova akoki kosunga, kolendisa, mpe kosembola yo ndenge asalaki na Davidi. Lokola Davidi, bomoi ya ntoma Paulo mpe ezalaki kobongwana mbala mingi. Ye mpe atikalaki sembo mpe atyelaki elimo ya Nzambe motema. Akomaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Bafilipi 4:12, 13) Soki totyeli Yehova motema, akosalisa biso tólonga. Alingi biso tólonga. Soki tozali koyokela ye mpe topusani penepene na ye, akopesa biso makasi ya kosala mokano na ye. Soki mpe tozali ntango nyonso kotyela elimo ya Nzambe motema, ‘tokomimonisa bato oyo bandimami na Nzambe’ sikoyo mpe libela na libela.—2 Timote 2:15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Biloko nyonso oyo Davidi apesaki, ezali lelo oyo na valɛrɛ ya dolare koleka 1200 000 000.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini tokoki kokima lolendo?
• Mpo na nini tosengeli te kozongisa mabe na mabe?
• Ndenge nini tosengeli kotalela disipilini?
• Mpo na nini tosengeli kotyela Nzambe motema, kasi bozwi te?
[Elilingi na lokasa 16]
Davidi atyelaki elimo ya Nzambe motema mpe alukaki ete Nzambe andima ye. Yo mpe osalaka bongo?
[Elilingi na lokasa 18]
“Biloko nyonso ekoutaka na yo mpe topesi yo bobele biloko na yo moko”