Bilenge, bozali kobongisa avenire na bino?
“Nayebi makanisi mazali ngai kokanisa mpo na bino; . . . Yango makanisi ya kimya mpe ya mabe te, kopesa bino elikya na ntango ekoya.”—YILIMIA 29:11.
1, 2. Ndenge nini mikóló bakoki kotalela bolenge mpe ndenge nini bilenge bakoki kotalela yango?
MIKÓLÓ mingi balobaka ete bolenge ezali ntango ya malamu mingi na bomoi. Bakanisaka ntango oyo bango moko bazalaki bilenge, ntango bazalaki makasi mpe bazalaki kosepela na bomoi. Bayokaka mposa ya ntango oyo bazalaki na mikumba mingi te, bazalaki na ntango mingi ya kosakana mpe bazalaki komona ete bazali na ebele ya bambula liboso na bango mpo na kosala makambo ndenge na ndenge.
2 Nzokande, mbala mosusu bino moko bilenge bomonaka makambo ndenge mosusu. Mbala mosusu bozali kobunda na mikakatano oyo makambo ya sika mpe kokola na nzoto ememaka. Na kelasi, ntango mosusu baninga bazali koluka komema bino na banzela ya mabe. Mbala mosusu bozali kobunda etumba makasi mpo bóbendama te na komɛla bangi to masangá, mpe na kosala pite. Mingi kati na bino bozali kokutana na mikakatano mpo boboyi kokɔta na makambo ya politiki to kaka mpo na kondima na bino. Ya solo, kozala elenge ekoki kozala mpasi mingi. Kasi, ntango moto azali elenge, azali mpe na libaku ya kosala ebele ya makambo malamu. Yango wana, motuna ezali kotunama boye, Ndenge nini bokosalela ntango yango?
Sepelá na bolenge na yo
3. Salomo apesaki bilenge toli nini mpe likebisi nini?
3 Mikóló bayebisaka bino ete bolenge eumelaka te, mpe ezali solo. Nsima ya mwa bambula, bokomona ete botikali lisusu bilenge te. Yango wana, ntango bozali naino bilenge, bósepela na bolenge na bino! Yango nde toli Mokonzi Salomo apesaki ntango akomaki boye: “Ee elenge, sepelá na bolenge na yo mpe tiká ete motema na yo esepelisa yo na mikolo ya bolenge na yo; tambolá mpe na nzela ya motema na yo mpe na pole ya miso na yo.” Kasi, Salomo akebisaki mpe bilenge na maloba oyo: “Longolá mawa na motema na yo mpe bimisá mabe na nzoto na yo.” Na nsima, abakisaki ete: “Bomwana mpe bolenge ezali mpamba.”—Mosakoli 11:9, 10.
4, 5. Mpo na nini ezali likambo ya bwanya ete bilenge bábongisa avenire na bango? Pesá ndakisa.
4 Bokangi ntina ya maloba ya Salomo? Mpo na kosalisa bino, tózwa ndakisa ya elenge moko oyo bapesi ye eloko moko ya valɛrɛ, na ndakisa, moboti na ye to ndeko na bango akufi mpe atikeli ye ebele ya mbongo. Eloko nini akosala na yango? Akoki kosakana na yango mpe kobebisa yango nyonso, ndenge mwana ya kilikili asalaki, na ndakisa moko oyo Yesu apesaki. (Luka 15:11-23) Nini ekokómela ye soki mbongo nyonso esili? Akokóma koyoka mawa ete azalaki mafumafu! Kasi, soki asaleli mbongo yango mpo na kobongisa avenire na ye, na ndakisa asombi biloko ya motuya to asali na yango mombongo. Nsima ya bambula, ntango ekobanda kobotela ye matabisi, bokanisi ete akozala na mawa ete asakanaki na mbongo na ye te ntango azalaki elenge? Te!
5 Bino mpe bótalela bolenge na bino lokola likabo ya motuya oyo Nzambe apesi bino, mpamba te ezali mpenza bongo. Bokosalela yango ndenge nini? Bokoki kosilisa makasi na bino nyonso na bisengo, kaka na kolanda loyenge ya mpambampamba mpe kobosana avenire na bino. Kasi, soki bosali bongo, “bomwana mpe bolenge” na bino ekozala “mpamba.” Eleki malamu, ntango bozali naino bilenge, bóbongisa nde avenire na bino!
6. (a) Toli nini ya Salomo ekoki kosalisa bilenge? (b) Yehova alingi kosala nini mpo na bilenge, mpe ndenge nini elenge akoki kozwela yango litomba?
6 Salomo alobaki likambo moko oyo ekoki kosalisa bino bósala malamu ntango bozali naino bilenge. Alobaki boye: “Kanisá Motongi na yo na mikolo ya bolenge na yo.” (Mosakoli 12:1) Yango nde sɛkɛlɛ mpo na kolonga, elingi koloba koyoka Yehova mpe kosala mokano na ye. Na ntango ya kala, Yehova ayebisaki Bayisalaele makambo oyo alingaki kosalela bango: “Nayebi makanisi mazali ngai kokanisa mpo na bino; . . . Yango makanisi ya kimya mpe ya mabe te, kopesa bino elikya na ntango ekoya.” (Yilimia 29:11) Yehova alingi kopesa bino mpe “elikya na ntango ekoya.” Soki bozali kobosana ye te na makambo oyo bozali kosala, oyo bozali kokanisa , mpe na mikano na bino, avenire mpe elikya yango ekozala ya malamu.—Emoniseli 7:16, 17; 21:3, 4.
“Bópusana penepene na Nzambe”
7, 8. Ndenge nini elenge akoki kopusana penepene na Yehova?
7 Yakobo alendisaki biso tókanisaka Yehova ntango alobaki ete: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Yehova azali Mozalisi, Nkolo-Mokonzi ya likoló, oyo ebongi bato nyonso básambela ye mpe básanzola ye. (Emoniseli 4:11) Kasi, soki topusani penepene na ye, ye mpe akopusana penepene na biso. Bolingo mpe komibanzabanza ya ndenge wana ezali kosepelisa motema na bino te?—Matai 22:37.
8 Tokoki kopusana penepene na Yehova na ndenge ebele. Na ndakisa, ntoma Paulo alobaki boye: “Bótingama na mabondeli, bótikala ekɛngɛ na kati na yango elongo na matɔndi.” (Bakolose 4:2) Na maloba mosusu, bózwa momeseno ya kobondela. Bózalaka te bato oyo balobaka kaka amen soki tata na bino to ndeko mosusu na lisangá asali libondeli mpo na bato nyonso. Osí ofungolelá Yehova motema na yo mpo na koyebisa ye makanisi, mitungisi, mpe mikakatano na yo? Osí oyebisá ye makambo oyo okoyoka nsɔni mpo na koloba yango na moto mosusu? Mabondeli ya sembo, oyo euti mpenza na motema, epesaka moto kimya na motema. (Bafilipi 4:6, 7) Mabondeli wana esalisaka biso tópusana penepene na Yehova mpe tóyoka ete ye mpe azali kopusana penepene na biso.
9. Ndenge nini elenge akoki koyoka Yehova?
9 Tokomona ndenge mosusu ya kopusana penepene na Yehova na maloba oyo ya Biblia: “Yoká toli mpe yambá kolakisama ete ozala na mayele na nsima.” (Masese 19:20) Soki ozali koyoka Yehova mpe ozali kotosa maloba na ye, ozali kobongisa avenire na yo. Ndenge nini okoki komonisa ete ozali koyoka Yehova? Na ntembe te oyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita mpe oyokaka masolo oyo esalemaka kuna. Lisusu, ‘okumisaka tata na yo ná mama na yo’ na ndenge osanganaka na boyekoli ya libota. (Baefese 6:1, 2; Baebele 10:24, 25) Osalaka malamu. Kasi, longola makambo wana, ‘osombaka ntango’ mpo na kobongisa makita, kotánga Biblia mokolo na mokolo, mpe kotánga mikanda mpo na koluka koyeba makambo mosusu? Omekaka kosalela makambo oyo otángaka mpo omitambwisa lokola ‘moto ya bwanya’? (Baefese 5:15-17; Nzembo 1:1-3) Soki osalaka yango, ozali kopusana penepene na Yehova.
10, 11. Bilenge bazwaka matomba nini ntango bazali koyoka Yehova?
10 Mokomi ya mokanda ya Masese, alimbolaki ntina ya mokanda yango na ebandeli na yango. Alobaki ete ezali “mpo na koyeba bwanya mpe disipilini, mpo na kososola maloba ya mayele, mpo na kozwa disipilini oyo epesaka bwanya, boyengebene mpe bososoli mpe bosembo, mpo na kolakisa bokɛngi na bato bazangi boyebi, na elenge boyebi mpe makoki ya kokanisa.” (Masese 1:1-4, NW) Na yango, soki ozali kotánga mpe kosalela maloba ya Masese, ata mpe mikanda mosusu ya Biblia, okokóma na boyengebene mpe bosembo, mpe Yehova akosepela opusana penepene na ye. (Nzembo 15:1-5) Na ntango ozali kozwa bososoli, bokɛngi, makoki ya kokanisa, okomona mpe ete okobanda kozwa bikateli ya malamu.
11 Kasi, koluka ete elenge amonisa bwanya ndenge wana ezali nde kolekisa ndelo? Te, mpamba te baklisto mingi oyo bazali bilenge basalaka yango. Mpe mpo na yango, bato mosusu bapesaka bango limemya mpe ‘batyolaka bolenge na bango te.’ (1 Timote 4:12) Baboti na bango basepelaka mingi mpo na bango, mpe Yehova alobi ete basepelisaka motema na ye. (Masese 27:11) Atako bazali bilenge, bakoki kozala na elikya ete likambo oyo Biblia elobi ekosalema mpe epai na bango: “Talá moto ya sembo mpe moná moyengebene; sosolá ete moto ya kimya akotikala libela.”—Nzembo 37:37.
Poná makambo ya malamu
12. Wapi moko na makambo ya ntina bilenge basengeli kopona, mpe mpo na nini likambo nyonso oyo bakopona, ata ndɛlɛ, ekobongola bomoi na bango?
12 Ntango moto azali elenge, esɛngaka apona makambo mingi oyo, mosusu kati na yango ekobongola bomoi na ye mpo na libela. Makambo mosusu oyo ozali kopona sikoyo, ekoki kobongola bomoi na yo mpo na bambula mingi oyo ekoya. Soki oponi nzela ya malamu, okozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo. Soki oponi nzela ya malamu te, yango ekoki kobebisa bomoi na yo mobimba. Tótalela likambo yango na makambo mibale oyo osengeli kopona. Ya liboso: Nani okopona azala moninga na yo? Mpo na nini yango ezali na ntina mingi? Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” (Masese 13:20) Na maloba mosusu, tosukaka kaka na komekola baninga na biso, bázala bato ya bwanya to bazoba. Yo olingi kozala moto ya ndenge nini?
13, 14. (a) Longola bato oyo otambolaka na bango, baninga mabe ezali mpe banani? (b) Libunga nini bilenge basengeli kokima?
13 Ntango balobi baninga, na ntembe te omonaka bato oyo otambolaka na bango. Ezali bongo, kasi esuki wana te. Ntango ozali kotala televizyo, to ozali koyoka miziki, to ozali kotánga mokanda moko, to okei kotala filme, to ozali kosalela Internet, ozali mpe kokutana na baninga. Soki baninga yango bazali kolakisa yo bitumba mpe makambo ya nsɔni to bazali kolakisa yo komɛla bangi, kolangwa masanga, to makambo mosusu oyo Biblia epekisi, ozali kokóma moninga ya “bazoba,” oyo basalaka makambo lokola nde Yehova azali te.—Nzembo 14:1.
14 Mbala mosusu okanisaka ete lokola oyanganaka na makita mpe osalaka makambo mosusu na lisangá, okoki kotala filme ya bitumba to koyoka miziki ya kitoko, kasi ezali na maloba ya salite, mpe ekosala yo eloko te. Mbala mosusu okanisaka ete soki ozali kosalela Internet, soki obwaki mwa liso na esika oyo balakisi bato bazali bolumbu to bazali kosangisa nzoto, ekosala eloko moko te. Ntoma Paulo amonisi ete ozali komikosa! Alobi boye: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakolinti 15:33) Bilenge mingi oyo basalaki bongo, baninga mabe babebisaki bizaleli malamu na bango. Yango wana, zwá mpenza ekateli makasi ya kokima baninga wana. Soki osali bongo, olandi mpenza toli ya Paulo oyo: “Bótika kolanda ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana na kokómisáká makanisi na bino sika, mpo bómindimisa bino moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.”—Baloma 12:2.
15. Yebisá likambo ya mibale oyo esɛngaka bilenge bápona, mpe ntango mosusu bakutanaka na mikakatano nini mpo na yango?
15 Talá likambo mosusu oyo osengeli kopona. Mokolo mosusu ekosɛnga opona mosala nini okosala ntango okosilisa kelasi. Soki na mboka na bino misala ezali mpasi, okoki kokanisa ete osengeli kaka kondima mbala moko mosala nyonso ya malamu oyo emonani. Nzokande soki ofandaka na mokili ya bozwi, misala ekoki kozala mingi, mpe mosusu ekoki kobenda yo. Na bosembo nyonso, balakisi to baboti na yo bakoki kotinda yo opona mosala oyo bakofuta yo mbongo mingi, mbala mosusu kutu oyo ekoki kokómisa yo moto ya mbongo. Kasi, ntango mosusu koyekola mosala yango ekotikela yo kaka mwa ntango moke mpo na kosalela Yehova.
16, 17. Limbolá ndenge oyo bavɛrsɛ ndenge na ndenge ekoki kosalisa elenge azala na makanisi malamu mpo na kopona mosala.
16 Kobosanaka te kotalela makanisi ya Biblia liboso ya kozwa ekateli. Biblia ezali kolendisa biso tósala mosala, na ndenge yango biso moko tokozwa mbongo mpo na kolya, kolata mpe kokokisa bamposa na biso mosusu. (2 Batesaloniki 3:10-12) Kasi, ezali mpe na makambo mosusu oyo tosengeli kotalela. Tosɛngi na yo otánga bavɛrsɛ oyo mpe okanisa ndenge oyo ekoki kosalisa elenge azala na makanisi oyo ebongi na likambo ya kopona mosala ya kosala: Masese 30:8, 9; Mosakoli 7:11, 12; Matai 6:33; 1 Bakolinti 7:31; 1 Timote 6:9, 10. Nsima ya kotánga bavɛrsɛ yango, omoni likanisi ya Yehova na likambo yango?
17 Esengeli te ete mosala na biso ekóma na ntina mingi na miso na biso mpe tózongisa mosala ya Yehova nsima. Soki okoki koyekola mosala ya malamu na kelasi ya ntei, ezali malamu. Soki olingi kokende lisusu mwa mosika na bakelasi, osengeli kosolola likambo yango na baboti na yo. Kasi, na nyonso wana, kobosana mikano ya elimo te, yango nde “makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:9, 10) Kosala te libunga oyo Baluku, sekrɛtɛrɛ ya Yilimia, asalaki. Abosanaki valɛrɛ ya mosala na ye mpe akómaki ‘koluka makambo minene mpo na ye moko.’ (Yilimia 45:5) Na eleko moko, abosanaki ete na mokili oyo, ‘likambo ya monene’ ata moko te ekokaki kosalisa ye apusana penepene na Yehova to kobikisa ye ntango Yelusaleme ekobomama. Ekoki mpe kolobama bongo mpo na biso lelo oyo.
Pesá motuya mingi na makambo ya elimo
18, 19. (a) Likambo nini ezali kotungisa bato mingi na esika ofandi, mpe osengeli koyoka ndenge nini mpo na bango? (b) Mpo na nini bato mingi bayebaka te ete bazali na nzala na elimo?
18 Osí omoná bafɔtɔ ya bana ya mikili oyo ezali na nzala makasi? Soki osí omoná yango, na ntembe te oyokelaki bango mawa. Oyokelaka mpe bato oyo ofandi na bango esika moko mawa? Mpo na nini osengeli koyokela bango mawa? Mpamba te mingi kati na bango bazali mpe konyokwama na nzala. Bazali na nzala oyo Amosa asakolaki: “Nkolo [Yehova] alobi ete, Talá, mikolo ekoya wana nakotinda nzala kati na mokili. Ekozala nzala ya kwanga te, kozanga ya mai mpe te; ekozala nzala ya koyoka maloba ya [Yehova].”—Amosa 8:11.
19 Ezali solo ete bato mingi oyo bazali na nzala yango ya elimo “bayebi bobola na bango ya elimo” te. (Matai 5:3) Mingi bazali koyeba te ete bazali na nzala ya elimo. Bamosusu kutu bakoki kokanisa ete bazali kolya malamu. Kasi, bazali kokanisa bongo mpo bazali koleisama na “bwanya ya mokili” oyo ezangi ntina, oyo ezali komonana na mposa ya biloko ya mokili, makanisi ya bato ya siansi, makanisi ya bato mpo na etamboli ya malamu, mpe makambo mosusu ya ndenge wana. Bato mosusu bazali kokanisa ete “bwanya” oyo bato bazali koteya lelo emonisi ete mateya ya Biblia esilá ngala. Kasi, “mokili na nzela ya bwanya na yango eyebi Nzambe te.” Bwanya ya mokili ekosalisa yo te opusana penepene na Nzambe. Bwanya yango ezali “bozoba epai ya Nzambe.”—1 Bakolinti 1:20, 21; 3:19.
20. Mpo na nini ebongi te kolanda bato oyo basambelaka Yehova te?
20 Ntango ozali kotala bililingi ya bana ya nzala, oyokaka ata mposa moke ya kozala lokola bango? Te! Nzokande, bilenge mosusu oyo babɔkwami na baboti oyo bazali baklisto bazali kosepela kozala lokola bato oyo bazali na nzala ya elimo. Mbala mosusu bilenge yango bakanisaka ete bilenge ya mokili bamitungisaka te, bango nde bamonaka bisengo ya bomoi. Babosanaka ete bilenge wana bazali mosika na Yehova. (Baefese 4:17, 18) Lisusu, babosanaka makama ya nzala ya elimo. Na kati ya makama yango, tokoki kotánga bazemi ya balabala mpe motungisi na elimo mpe mpasi ya nzoto mpe ya makanisi oyo eutaka na etamboli ya mobulu, kokóma moombo ya makaya, kolangwa masanga, mpe komɛla bangi. Nzala ya elimo ekómisaka moto motomboki, akozanga mpenza elikya, mpe akozala na mokano te na bomoi na ye.
21. Ndenge nini okoki komibatela mpo olanda te makanisi mabe ya bato oyo basambelaka Yehova te?
21 Yango wana, ntango ozali na kelasi, elongo na bana oyo basambelaka Yehova te, kolanda ezaleli na bango te. (2 Bakolinti 4:18) Bana mosusu bakobanda kotyola makambo ya elimo. Lisusu, na bazulunalo, na radio, mpe na televizyo, okoyoka makambo oyo ezali komonisa lokola nde pite, kolangwa, koloba maloba ya salite, ezali mabe te. Boyá makambo wana. Tikalá moninga ya bato oyo bazali ‘kobatela kondima mpe lisosoli ya malamu.’ Zalá ntango nyonso na “mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.” (1 Timote 1:19; 1 Bakolinti 15:58) Saláká misala na Ndako ya Bokonzi mpe omipesa na mosala ya kosakola. Ntango ozali naino na kelasi, saláká mbala na mbala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Saláká bongo mpo na kolendisa elimo na yo, mpe okozala ntango nyonso na makanisi malamu.—2 Timote 4:5.
22, 23. (a) Mpo na nini mbala mingi bato mosusu bakangaka ntina te ya bikateli oyo elenge moklisto akoki kozwa? (b) Balendisi bilenge na kosala nini?
22 Soki ozali kotalela makambo na liso ya elimo, bato mosusu bakokanga ntina te ya bikateli mosusu oyo okobanda kozwa. Na ndakisa, ezali na elenge mobali moko oyo ayebaki kobɛta miziki malamu mpe azalaki na mayele mingi na kelasi. Ntango asilisaki kelasi, akómaki kosala na tata na ye mosala ya kosukola batalatala ya bafenetre ya bandako minene mpo akoka kosala mosala ya mobongisi-nzela oyo azalaki kokana banda kala. Balakisi na ye bayebaka te ntina oyo azwaki ekateli ya ndenge wana; kasi, yango ezali likambo ya kokamwa te mpo na yo soki ozali penepene na Yehova.
23 Ntango ozali kokanisa makambo oyo okosala na bolenge na yo, oyo ezali lokola eloko ya valɛrɛ, lukáká mpe ‘omibombela moboko kitoko na esika moko ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo osimba makasi bomoi ya solosolo.’ (1 Timote 6:19) Zalá na ekateli ya ‘kokanisa Mozalisi na yo Monene’ na bolenge na yo mpe bomoi na yo mobimba. Yango nde nzela kaka moko ya kozala na avenire ya malamu mpo na libela.
Okopesa makanisi nini?
• Toli nini ya Biblia ekoki kosalisa bilenge bábongisa avenire na bango?
• Tángá mwa balolenge oyo elenge akoki “kopusana penepene na Nzambe.”
• Wapi mwa bikateli oyo ekobongola bomoi ya elenge?
[Bililingi na lokasa 15]
Okotika ete mikano na yo esilisa yo makasi nyonso ya bolenge?
[Elilingi na lokasa 17]
Bilenge oyo bazali na bwanya babatelaka liso na bango ya elimo