Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/6 nk. 20-23
  • Otikaka ete mikakatano ezongisa yo nsima?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Otikaka ete mikakatano ezongisa yo nsima?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bakutanaki na mikakatano ya makasi mpenza
  • Tóboya kokanela bato mpe kobomba nkanda
  • Kotika te kosala makambo ya malamu ata na kati ya mpasi
  • Taleláká Yehova
  • Yehova akosunga yo
  • “Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • “Ngai nazali nde na esika ya Nzambe?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Yehova azali kosalisa yo mpo olonga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Abatelaki, asungaki mpe alɛmbaki bango te
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/6 nk. 20-23

Otikaka ete mikakatano ezongisa yo nsima?

MPASI mpe mikakatano ezali mingi na “bantango ya ndenge mosusu” oyo tozali. (2 Timote 3:1) Mikakatano mosusu oyo ekómelaka biso ezalaka ya mwa ntango moke mpe na nsima elekaka. Kasi mosusu eumelaka basanza, ata mpe bambula. Yango wana, bato mingi bamiyokaka lokola Davidi, oyo abelelaki Yehova ete: “Mikakatano ya motema na ngai eyei mingi mingi; bimisá ngai na mpasi yango nyonso.”​—Nzembo 25:17.

Ozali kobunda na mikakatano ya makasi na bomoi na yo? Soki ezali bongo, Biblia ekoki kosalisa mpe kolendisa yo. Tótalela bomoi ya basaleli ya Yehova mibale ya sembo oyo balongaki mikakatano na bango: Yozefe mpe Davidi. Soki totaleli ndenge oyo basalaki ntango bakutanaki na mikakatano, tokoki kozwa mateya oyo ekosalisa biso tólonga mikakatano ya ndenge yango lelo oyo.

Bakutanaki na mikakatano ya makasi mpenza

Ntango Yozefe akómaki na mbula 17, bandeko na ye batyaki ye na mokakatano moko makasi. Bayaya ya Yozefe bamonaki ete tata na bango, Yakobo, “alingaki ye na koleka bandeko na ye nyonso.” Yango wana, “bayinaki ye mpe bakokaki kolobela ye na motema malamu te.” (Genese 37:4) Na ntembe te likambo yango ezalaki kotungisa Yozefe mpe kopesa ye mpasi. Nsukansuka, bandeko ya Yozefe bayinaki ye lisusu makasi mpe batɛkaki ye na boombo.​—Genese 37:26-33.

Ntango Yozefe azalaki moombo na Ezipito, mwasi ya nkolo na ye azalaki kolɛngola ye mpo asala na ye ekobo, kasi ye aboyaki. Lokola Yozefe aboyaki, epesaki mwasi yango nkanda mpe akoselaki ye makambo ete alingaki kosangisa na ye nzoto na makasi. Batyaki ye “na bolɔkɔ,” epai “bazokisaki makaka na ye na minyɔtɔ, akangamaki kati na minyɔlɔlɔ.” (Genese 39:7-20; Nzembo 105:17, 18) Ezalaki komekama makasi mpenza! Pene na mbula soki 13, Yozefe anyokwamaki na boombo mpe na bolɔkɔ mpo na motema mabe ya bato mosusu, ata mpe bandeko na ye moko.​—Genese 37:2; 41:46.

Davidi, mokonzi ya Yisalaele, akutanaki mpe na mikakatano ntango azalaki elenge. Na boumeli ya bambula mingi, azalaki kokimakima mpo Mokonzi Saulo azalaki kolukaluka ye lokola nyama mpo aboma ye. Bomoi ya Davidi ezalaki ntango nyonso na likama. Mokolo mosusu, Davidi akendaki koluka biloko ya kolya epai ya nganga-nzambe Ahimeleke. (1 Samwele 21:1-7) Ntango Saulo ayokaki ete Ahimeleke asalisaki Davidi, apesaki mitindo ete báboma ye ná banganga-nzambe mosusu nyonso mpe mabota na bango. (1 Samwele 22:12-19) Kanisá naino mpasi oyo Davidi ayokaki ndenge babomaki bango mpo na ye!

Kanisá ebele ya bambula oyo Yozefe ná Davidi batungisamaki mpe banyokwamaki. Soki totaleli ndenge bayikelaki bampasi yango mpiko, tokozwa mateya ya malamu mpenza. Tótalela makambo misato oyo tokoki komekola epai na bango.

Tóboya kokanela bato mpe kobomba nkanda

Ya liboso, mibali yango ya sembo baboyaki kokwea na motambo ya kokanela bato mpe kobombela bango nkanda. Ntango Yozefe azalaki na bolɔkɔ, makanisi ya mabe ekokaki koyela ye na ndenge bandeko na ye batɛkaki ye, akokaki mpe ata kokana kozongisela bango mabe soki akutani na bango. Nini emonisi ete Yozefe atikaki te ete makanisi mabe wana ekɔta na motema na ye? Tótala likambo oyo asalaki ntango azwaki libaku ya kozongisela bandeko na ye mabe, ntango bayaki na Ezipito kosomba masango. Biblia elobi boye: “[Yozefe] alongwaki na bango mpe alelaki. . . . Yozefe apesaki monɔkɔ ete [basaleli na ye] bátondisa ngɔtɔ [ya bandeko na ye] na masango, mpe ete bázongisa mosolo ya moto na moto na kati ya ngɔtɔ na ye, mpe ete bápesa bango kolya mpo na mobembo.” Na nsima, ntango atindaki bandeko na ye bákende kozwa tata na bango báya na ye na Ezipito, Yozefe alobaki na bango boye: “Koswana na nzela te.” Na maloba mpe na misala, Yozefe amonisaki ete abombaki nkanda te.​—Genese 42:24, 25; 45:24.

Davidi mpe akangelaki Mokonzi Saulo nkanda te. Mbala mibale mobimba, Davidi azwaki libaku ya koboma Saulo. Kasi, ntango bato ya Davidi bazalaki kotya ye mbamba ete aboma Saulo, ye alobaki boye: “[Yehova] apekisa ngai ete nasalela nkolo na ngai, mopakolami ya [Yehova], likambo oyo te mpo na kosembola lobɔkɔ na ngai epai na ye awa ezali ye mopakolami ya [Yehova].” Davidi atikaki Yehova ye moko akata likambo; alobaki na bato na ye boye: “Lokola [Yehova] azali na bomoi, [Yehova] akobɛta ye, soki ete mokolo na ye ya kufa ekokóma soki ete akokita na etumba mpe akokufa.” Kutu na nsima, Davidi asalaki loyembo moko ya mawa mpo na kolela Saulo ná mwana na ye Yonatana. Lokola Yozefe, Davidi mpe abombaki nkanda te.​—1 Samwele 24:3-6; 26:7-13; 2 Samwele 1:17-27.

Tobombaka nkanda mpe tokanelaka bato ntango basali biso mabe? Ezali mpasi te likambo ya ndenge wana ekómela biso. Soki totiki nzela ete tókóma kosala makambo na nkanda, yango ekoki komemela biso mpasi koleka kutu mabe oyo basali biso. (Baefese 4:26, 27) Atako tokoki te kopekisa bato mosusu básala biso mabe, tokoki kopekisa nkanda na biso. Soki tozali na kondima ete Yehova ye moko akokata likambo na ntango ebongi, tokobombela bato nkanda te mpe tokokanela bango te.​—Baloma 12:17-19.

Kotika te kosala makambo ya malamu ata na kati ya mpasi

Liteya ya mibale oyo tokoki kozwa epai ya Yozefe ná Davidi ezali ete tótika te ete mikakatano elɛmbisa biso. Tokoki kobanda komitungisa koleka ndelo mpo na bolɛmbu na biso, mpe kobosana oyo tozali na makoki ya kosala. Mikakatano yango ekoki mpe kozongisa biso nsima. Yango ekokaki kokómela Yozefe. Kasi, Yozefe atikaki te ete mikakatano epekisa ye kosala malamu. Ntango azalaki moombo, Yozefe “abongaki na miso [ya nkolo na ye] mpe asalelaki ye. Azalisaki ye mobateli ya ndako na ye.” Ata na bolɔkɔ, Yozefe atikaki te ete mikakatano ezongisa ye nsima. Lokola Yehova azalaki na ye mpe azalaki kosala mosala malamu, “nkolo ya bolɔkɔ azalisaki ye mokɛngɛli ya bakangami nyonso bazalaki na bolɔkɔ, mpe makambo nyonso masalamaki wana, ye moto asalaki yango.”​—Genese 39:4, 21-23.

Na bambula oyo Davidi azalaki kokimakima, ye mpe atikaki te mikakatano ezongisa ye nsima. Ntango azalaki na esobe ya Palana, ye ná bato na ye bazalaki kobatela bibwele ya Nabala mpo miyibi báyiba yango te. Mobateli moko ya bampate ya Nabala alobaki boye: “Bazalaki babateli na biso butu na moi.” (1 Samwele 25:16) Na nsima, ntango Davidi akómaki kofanda na Sikelage, abundisaki banguna ya Yisalaele na bingumba na bango oyo ezalaki na sudi, mpe na bongo, abatelaki bandelo ya Yuda.​—1 Samwele 27:8; 1 Ntango 12:​20-22.

Ezali nde kosɛnga ete tósala milende mpo mikakatano ezongisa biso nsima te? Atako yango ezali likambo ya pɛtɛɛ te, tokoki kolonga kosala yango. Ntoma Paulo akanisaki bomoi na ye mpe akomaki boye: “Nasili koyekola, na makambo ata ya ndenge nini, kosepela na oyo nazali na yango. . . . Na eloko nyonso mpe na makambo nyonso nasili koyekola sɛkɛlɛ ya kotonda mpe ya kozala na nzala; ya kozala na biloko mingi mpe ya kokelela.” Nini esalisaki Paulo akóma na makanisi wana? Azalaki ntango nyonso kotyela Yehova motema. Alobaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”​—Bafilipi 4:11-13.

Taleláká Yehova

Liteya ya misato oyo tokoki kozwa ezali ete, na esika tólukaka kosilisa mikakatano na biso nokinoki na ndenge oyo Biblia endimi te, tosengeli kotalelaka Yehova. Yakobo akomaki boye: “Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba, mpo bino bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, kozangáká eloko te.” (Yakobo 1:4) Mpo tótika ezaleli ya koyika mpiko esala “mosala na yango mobimba,” tosengeli kotika mikakatano yango tii na nsuka, kozanga koluka kosilisa yango nokinoki na ndenge oyo Biblia endimi te. Soki tozali kosala bongo, kondima na biso ekomekama mpe ekopɛtolama, mpe nguya na yango ekomonana polele. Yozefe ná Davidi bazalaki na ezaleli ya koyika mpiko ndenge wana. Mpo na kosilisa mikakatano na bango, balukaki te kosala makambo oyo ekosepelisa Yehova te. Basalaki nyonso oyo bakokaki ata na kati ya mikakatano. Batalelaki Yehova, mpe Yehova apambolaki bango mpenza! Yehova apesaki mokomoko na bango mokumba ya kobikisa mpe kotambwisa bato na ye.​—Genese 41:39-41; 45:5; 2 Samwele 5:4, 5. 

Biso mpe tokoki kokutana na mikakatano mpe koluka kosilisa yango na banzela oyo Biblia endimi te. Na ndakisa, obandi kolɛmba nzoto mpo ozali koluka moto oyo okoki kobalana na ye kasi ozwi ye naino te? Soki ezali bongo, benganá makanisi nyonso oyo ekoki kotinda oyo obuka mobeko ya Yehova oyo esɛngi ete tóbala ‘kaka kati ya Nkolo.’ (1 Bakolinti 7:39) Ozali nde na mikakatano na libala na yo? Na esika opesa nzela na elimo ya mokili, oyo ezali kolendisa kokabwana mpe koboma libala, salá nde makasi osilisa mikakatano yango elongo na molongani na yo. (Malaki 2:16; Baefese 5:21-33) Ozali nde na mokakatano ya kokokisa bamposa ya libota na yo mpo ozangi mbongo? Kotalela Yehova esɛngaka mpe koboya koluka mbongo na banzela ya mabe. (Nzembo 37:25; Baebele 13:18) Biso nyonso tosengeli mpenza kosala makasi mpo tótika te ete mikakatano ezongisa biso nsima mpe tósala nyonso mpo Yehova apambola biso. Ntango tozali kosala bongo, tózwa ekateli ya kotalela kaka Yehova, na elikya ete akosilisa mikakatano na biso nyonso mpe mpo na libela.​—Mika 7:7.

Yehova akosunga yo

Soki tozali komanyola na masolo ya Biblia oyo elobeli ndenge oyo bato lokola Yozefe mpe Davidi balongaki mabe oyo basalaki bango mpe mikakatano mosusu oyo bakutanaki na yango, yango ekolendisa biso mpenza. Atako Biblia elobeli masolo na bango na mokuse, mikakatano na bango eumelaki ebele ya bambula. Omituna boye: ‘Ndenge nini basaleli ya Nzambe wana ya sembo basilisaki mikakatano na bango? Ndenge nini babatelaki esengo na bango? Bizaleli nini balonaki?’

Ekozala mpe malamu tótalelaka ezaleli ya koyika mpiko oyo basaleli ya Yehova ya lelo bazali komonisa. (1 Petelo 5:9) Mbula na mbula, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ebimisaka ebele ya masolo ya bomoi ya baklisto ya sembo. Otángaka masolo yango mpe omanyolaka na yango? Longola yango, na kati ya masangá na biso tozali na bandeko oyo bazali koyikela mikakatano mpiko na bosembo mpenza. Oyanganaka na bango na makita pɔsɔ na pɔsɔ mpe ozwaka mateya na ndakisa na bango?​—Baebele 10:24, 25.

Soki ozali kotungisama na mikakatano, yebá malamu ete Yehova azali komibanzabanza mpo na yo mpe akosunga yo. (1 Petelo 5:6-10) Salá makasi mpo otika te ete mikakatano elɛmbisa yo. Landá ndakisa ya Yozefe, Davidi mpe bato mosusu mpo okanelaka bato te, obombaka nkanda te, otikaka te ete mikakatano ezongisa yo nsima mpe otalelaka Yehova mpo na kosilisa mikakatano na yo nyonso mpe mpo na libela. Pusaná penepene na ye na nzela ya libondeli mpe na komipesa na makambo ya elimo. Soki ozali kosala bongo, yo mpe okomona ete okobungisa esengo na yo te ata na ntango ya mpasi.​—Nzembo 34:8.

[Elilingi na lokasa 21]

Yozefe atikaki te ete mikakatano ezongisa ye nsima

[Elilingi na lokasa 23]

Davidi atalelaki Yehova mpo na kosilisa mikakatano na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto