Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/8 nk. 17-21
  • Yehova azali ‘Ekimelo na biso na ntango ya mpasi’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova azali ‘Ekimelo na biso na ntango ya mpasi’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nguya ya libondeli
  • Elimo ya Nzambe esalisaka biso
  • Lisangá: Ebongiseli oyo ezali komonisa bolingo ya Nzambe
  • Tózala ntango nyonso na makanisi ya malamu
  • Okoki kozwa libɔndisi na ntango ya mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Lolenge nini okoki kobɛlɛma epai na Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Yehova abikisaka moto oyo azali na mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/8 nk. 17-21

Yehova azali ‘Ekimelo na biso na ntango ya mpasi’

“Kobika ya bayengebene euti na [Yehova], ye azali ekimelo na bango na ntango ya mpasi.”​—NZEMBO 37:39.

1, 2. (a) Yesu asɛngaki nini na libondeli mpo na bayekoli na ye? (b) Mposa ya Nzambe mpo na basaleli na ye ezali nini?

YEHOVA azali mozwi-ya-nguya-nyonso. Azali na makasi ya kobatela basambeli na ye ya sembo na ndenge nyonso oyo alingi. Akoki ata kokabola basaleli na ye na bato ya mokili oyo mpe kotya bango na esika oyo bakozala na kimya. Kasi, mpo na bayekoli na ye, Yesu abondelaki Tata na ye ya likoló boye: “Nazali te kosɛnga yo olongola bango na mokili, kasi okɛngɛla nde bango mpo na moto mabe.”​—Yoane 17:15.

2 Yehova amoni malamu alongola biso “na mokili” te. Kasi, mposa na ye ezali ete tózala na kati ya bato ya mokili oyo mpo tósakwela bango nsango ya elikya oyo ekobɔndisa bango. (Baloma 10:13-15) Kasi, ndenge Yesu alobaki na libondeli, na kati ya mokili oyo, “moto mabe” azali penepene na biso. Bato oyo bazangi botosi mpe bilimo mabe bakoki koyokisa biso mpasi mpe kotungisa biso mingi; lisusu, baklisto bakutanaka na mikakatano lokola bato mosusu nyonso.​—1 Petelo 5:9.

3. Likambo nini ekoki kokómela ata basambeli ya sembo ya Yehova, kasi ndenge nini Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso?

3 Lokola tozali kokutana na mikakatano ya ndenge wana, esengeli kaka ntango mosusu tólɛmba. (Masese 24:10) Biblia ezali na masolo ya ebele ya bato oyo bakutanaki na mikakatano. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Moyengebene azali na makambo mingi ya mpasi nde [Yehova] akobikisa ye kati na yango nyonso.” (Nzembo 34:19) Ya solo, mpasi ekómelaka ata “moyengebene.” Lokola Davidi, biso mpe tokoki ntango mosusu ‘kobɛtama mpe konyatama mingi mpenza.’ (Nzembo 38:8) Kasi, tokoki kolendisama na koyeba ete “[Yehova] azali penepene ya bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na milimo minyatami.”​—Nzembo 34:18; 94:19.

4, 5. (a) Na boyokani na Masese 18:10, tosengeli kosala nini mpo Nzambe abatela biso? (b) Wapi mwa makambo oyo tokoki kosala mpo Nzambe asalisa biso?

4 Ndenge Yesu asɛngaki na libondeli, Yehova azali mpenza kokɛngɛla biso. Azali ‘ekimelo na biso na ntango ya mpasi.’ (Nzembo 37:39) Mokanda ya Masese elobi mpe ndenge yango: “Nkombo ya [Yehova] ezali ndako molai ya nguya; moyengebene akokima kuna mpe akobika.” (Masese 18:10) Vɛrsɛ yango emonisi likambo moko ya ntina mingi: Yehova amibanzabanzaka mpo na bikelamu na ye. Nzambe abatelaka mpenzampenza bato ya sembo oyo balukaka ye, lokola nde tozali kokima na ndako ya makasi epai tokobatelama.

5 Ntango tokutani na mikakatano, ndenge nini tokoki koluka libateli epai ya Yehova? Tótalela makambo misato ya ntina mingi oyo tokoki kosala mpo Yehova asalisa biso. Ya liboso, tosengeli kobondelaka Tata na biso ya likoló. Ya mibale, tosengeli kondima litambwisi ya elimo santu na ye. Mpe ya misato, tosengeli kotosa ebongiseli ya Yehova; elingi koloba tosengeli kosanganaka na baninga baklisto oyo bakoki kokitisa mpasi na biso.

Nguya ya libondeli

6. Ndenge nini baklisto ya solo batalelaka libondeli?

6 Soki moto azali konyokwama na makanisi to azali kotungisama, minganga mosusu bapesaka toli ete abondelaka. Toboyi te, moto oyo azali kotungisama na makanisi akoki koyoka malamu soki afandi kimya mpe azali kobondela; kasi, yango ezali kaka lokola afandi na esika oyo mopɛpɛ ezali kobɛta nkasa ya nzete to azali koyoka lokito ya mai oyo ezali kotyola, to bazali konyolisa ye mokɔngɔ. Baklisto ya solo bakitisaka motuya ya libondeli te na kotaleláká yango kaka lokola nkisi ya kolɛmbisa mitungisi. Mpo na biso, kobondela ezali kosolola na limemya nyonso na Mozalisi. Libondeli esengeli komonisa ete moto abangaka Nzambe mpe atyelaka ye motema. Libondeli ezali moko ya makambo ya ntina na losambo na biso.

7. Kotyela Nzambe motema ntango tozali kobondela elimboli nini, mpe ndenge nini mabondeli ya ndenge yango esalisaka biso mpo tólonga mitungisi?

7 Mabondeli na biso esengeli komonisa ete totyelaka Yehova motema. Ntoma Yoane akomaki boye: “Kondimisama tozali na yango na ntina etali ye, yango oyo, ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” (1 Yoane 5:14) Yehova, Oyo-Aleki-Likoló, Nzambe kaka moko ya solo mpe mozwi-ya-nguya-nyonso, atyaka likebi ntango basambeli na ye bazali kosala mabondeli oyo euti mpenza na motema. Koyeba mpamba ete Nzambe na biso ya bolingo ayokaka biso ntango tozali koyebisa ye mitungisi mpe mikakatano na biso elendisaka.​—Bafilipi 4:6.

8. Mpo na nini baklisto ya sembo, ntango bazali kobondela Yehova, basengeli soki moke te koyoka nsɔni to kokanisa ete babongi te?

8 Baklisto ya sembo basengeli te koyokaka nsɔni, kokanisa ete babongi te, to kozanga elikya ntango bazali kobondela Yehova. Ya solo, ntango tosali likambo moko oyo eyokisi biso mawa to mikakatano eleki biso motó, tokoki kokakatana mpo na kobondela Yehova. Na ntango wana, ebongi tóbosana te ete Yehova ‘ayokelaka banyokolami na ye mawa’ mpe ete “abɔndisaka baoyo balɛmbi nzoto.” (Yisaya 49:13; 2 Bakolinti 7:6) Ezali mingimingi na ntango oyo tozali na mpasi mpe tozali kotungisama nde tosengeli kokende epai ya Tata na biso ya likoló, ekimelo na biso.

9. Kondima ezali na ntina nini mpo na kopusana penepene na Nzambe na nzela ya libondeli?

9 Mpo na kozwa mpenza litomba na libondeli, tosengeli kozala na kondima ya solosolo. Biblia elobi ete “moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Kondima esuki te kaka na koyeba ete Nzambe azali. Kondima ya solo esɛngaka kotya motema ete Nzambe azali na likoki mpe na mposa ya kopesa biso mbano lokola tozali kotosa ye. “Miso ya Yehova ezali likoló ya bayengebene, mpe matoi na ye ezali epai ya lilɔmbɔ na bango.” (1 Petelo 3:12) Soki tozali kobosana te ete Yehova alingaka biso mpe amibanzabanzaka mpo na biso, tokobanda kosala mabondeli oyo euti mpenza na motema.

10. Mabondeli na biso esengeli kozala ndenge nini mpo Yehova asalisa biso na elimo?

10 Yehova ayokaka mabondeli oyo tosalaka na motema mobimba. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Nalelaki na motema na ngai mobimba; yokelá ngai, Ee [Yehova].” (Nzembo 119:145) Tosengeli te kosala lokola bandimi ya mangomba mingi oyo basalaka kaka mabondeli ya likolólikoló. Ntango tozali kobondela Yehova na ‘motema na biso mobimba,’ maloba na biso ezalaka na ndimbola mpe na ntina. Nsima ya kobondela na bozindo ndenge wana, tomonaka ete motema na biso ekiti mpamba te tokitisi ‘mokumba na biso epai ya Yehova.’ Ndenge Biblia elobi yango, “ye akokumba” biso.​—Nzembo 55:22; 1 Petelo 5:6, 7.

Elimo ya Nzambe esalisaka biso

11. Wapi lolenge moko oyo Yehova ayanolaka biso ntango tozali ‘kokoba kosɛnga’ ye asalisa biso?

11 Yehova ayokaka mpe ayanolaka mabondeli na biso. (Nzembo 65:2) Davidi akomaki boye: “Nakobyanga nkombo na yo na mokolo ya mpasi na ngai, mpo ete okozongisela ngai liloba.” (Nzembo 86:7) Yango wana, Yesu alendisaki bayekoli na ye ‘bákoba kosɛnga’ lisalisi ya Yehova mpamba te “Tata na likoló akopesa elimo santu . . . epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango.” (Luka 11:9-13) Ya solo, nguya ya Nzambe esalisaka to ebɔndisaka basaleli na ye.​—Yoane 14:16.

12. Ndenge nini elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso ntango mikakatano elekeli biso?

12 Ata ntango tokutani na mpasi, elimo ya Nzambe ekoki kopesa biso “nguya oyo eleki makasi.” (2 Bakolinti 4:7) Ntoma Paulo, moto oyo akutanaki na mikakatano mingi, alobaki na elikya nyonso boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Bafilipi 4:13) Ndenge moko mpe, baklisto mingi lelo oyo bamonaki ete bazwaki lisusu makasi na elimo mpe balendisamaki nsima ya kosala malɔmbɔ. Mbala mingi, mikakatano oyo ezali kotungisa biso ekitaka soki tozwi lisalisi ya elimo ya Nzambe. Mpo na makasi yango oyo Nzambe apesaka, tokoki koloba lokola ntoma Paulo ete: “Tokamolami na ndenge nyonso, kasi tofinani te tii na kozanga koningana; tosili mayele, kasi tozangi ata mwa nzela moke te ya kobimela; tozali konyokolama, kasi tosundolami te; tozali kobambama na nse, kasi tobomami te.”​—2 Bakolinti 4:8, 9.

13, 14. (a) Ndenge nini, na nzela ya Liloba na ye, Yehova amonisi ete azali ekimelo na biso? (b) Ndenge nini kosalela mitinda ya Biblia esalisaki yo?

13 Lisusu, elimo santu etambwisaki bato oyo bakomaki Liloba ya Nzambe mpe ebatelaki liloba yango mpo biso tózwela yango litomba. Ndenge nini, na nzela ya Liloba na ye, Yehova azalaka ekimelo na ntango ya mpasi? Ya liboso, na ndenge epesaka biso bwanya oyo ebongi mpe makoki ya kokanisa. (Masese 3:21-24) Biblia eteyaka bɔɔngɔ na biso mpe ebakisaka likoki na biso ya kokanisa. (Baloma 12:1) Ntango tozali kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola, tokomona ete ‘makoki na biso ya kososola ekoteyama mpo na kokesenisa ná mabe ná malamu.’ (Baebele 5:14) Mbala mosusu mitinda ya Biblia esí esalisá yo ozwa bikateli ya malamu ntango ozalaki na mikakatano. Biblia epesaka biso bokɛngi oyo ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano ya minene.​—Masese 1:4.

14 Liloba ya Nzambe epesaka biso mpe makasi na ndenge mosusu: na nzela ya elikya ya lobiko. (Baloma 15:4) Biblia elobi na biso ete makambo ya mabe ekoumela libela na libela te. Makambo nyonso oyo ezali konyokola biso ezali kaka mpo na mwa ntango. (2 Bakolinti 4:16-18) Tozali na “elikya moko ya bomoi ya seko oyo Nzambe, oyo akoki te kobuka lokuta, alaká liboso ya bantango ya kalakala.” (Tito 1:2) Soki tozali kosepela na kati ya elikya wana, tozali kobosana ata moke te bomoi ya malamu mingi oyo Yehova alaki, tokoyikela makambo ya mpasi mpiko.​—Baloma 12:12; 1 Batesaloniki 1:3.

Lisangá: Ebongiseli oyo ezali komonisa bolingo ya Nzambe

15. Ndenge nini baklisto bakoki kosalisanaka?

15 Likabo mosusu Yehova apesi biso oyo ekoki kosalisa biso na ntango ya mpasi ezali bandeko na biso baklisto na lisangá. Biblia elobi boye: “Moninga ya solo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17, NW) Liloba ya Nzambe ezali kolendisa bandeko nyonso na lisangá bápesanaka lokumu mpe bálinganaka. (Baloma 12:10) Ntoma Paulo akomaki boye: “Tiká moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.” (1 Bakolinti 10:24) Soki tozali na elimo ya ndenge wana, yango ekosalisa biso tótyela bamposa ya basusu likebi, na esika tókanisaka kaka mikakatano na biso. Ntango tozali kosalisa basusu, bango bakozwa lisalisi, kasi biso moko mpe tokoyoka esengo oyo ekokitisa bozito ya mikumba na biso.​—Misala 20:35.

16. Ndenge nini moklisto mokomoko akoki kolendisa basusu?

16 Mibali mpe basi oyo bakɔmeli na elimo bakoki kosalisa mingi mpo na kolendisa basusu. Mpo na kosala yango, basengeli kosala ete bandeko bábangaka te kosolola na bango mpe bázangaka ntango te ya kosolola na bango. (2 Bakolinti 6:11-13) Lisangá ezwaka mpenza lipamboli ntango bato nyonso bazali kopesa bilenge longonya, kolendisa bandeko ya sika, mpe kolendisa baoyo bazali konyokwama na makanisi. (Baloma 15:7) Soki bandeko bazali kolingana, yango elongolaka mpe ezaleli ya kokanisela basusu mabe. Tosengeli kokanisaka mbala moko te ete soki ndeko moko akutani na bampasi, elingi koloba ete azali na mokakatano ya elimo. Paulo alendisaki baklisto ‘bálobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi.’ (1 Batesaloniki 5:14) Biblia ezali komonisa ete ata baklisto ya sembo bakutanaka na mikakatano.​—Misala 14:15.

17. Mabaku nini tozali na yango ya kolendisa bandeko na biso baklisto?

17 Makita ya lisangá ezali mpenza ntango malamu mpo na kobɔndisana mpe kolendisana. (Baebele 10:24, 25) Kasi, kolendisana yango esengeli te kosukaka kaka na Ndako ya Bokonzi. Basaleli ya Nzambe balukaka mpe mabaku ya kolekisa ntango elongo na bandeko. Ntango ndeko moko akutani na mikakatano, tokoluka nokonoki kosalisa ye mpo boninga na biso ekómá makasi. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bokabwani ezala te na kati ya nzoto, kasi ete binama na yango ezala na lobanzo . . . yango na yango. Mpe soki enama moko ezali koyoka mpasi, binama nyonso mosusu ezali mpe koyoka mpasi elongo na yango; to soki enama moko ezwi nkembo, binama nyonso mosusu mpe esepelaka elongo na yango.”​—1 Bakolinti 12:25, 26.

18. Ezaleli nini tosengeli koboya ntango tozali koyoka ete tolɛmbi?

18 Tokoki ntango mosusu komiyoka ete tolɛmbi mpenza mpe tozali na mposa te ya kolekisa ntango na baninga na biso baklisto. Tosengeli kobengana makanisi ya ndenge wana mpo tózanga te libɔndisi mpe lisalisi oyo tokoki kozwa epai ya bandeko na biso bandimi. Biblia ekebisi biso na maloba oyo: “Ye oyo akomitangola na bamosusu akolukaka yango ekosepelisa ye moko; akosilika na makambo nyonso ya mayele.” (Masese 18:1) Bandeko mibali mpe basi oyo Nzambe apesi biso bazali elembo oyo emonisi ete amibanzabanzaka mpo na biso. Soki tozali na botɔndi mpo na likambo yango oyo emonisi bolingo na ye, tokozwa lisalisi na ntango ya mpasi.

Tózala ntango nyonso na makanisi ya malamu

19, 20. Ndenge nini Biblia ezali kosalisa biso na koboya makanisi ya mabe?

19 Ntango tolɛmbi mpe tozali na mawa, ezali mpasi te tókóma na makanisi ya mabe. Na ndakisa, bato mosusu, ntango bakutani na mpasi, bakoki kobanda komituna soki bazali mpenza malamu na elimo, kokanisa ete mikakatano na bango ezali komonisa ete Nzambe azali kosepela na bango te. Kasi, tóbosana te ete Yehova amekaka moto te na “makambo ya mabe.” (Yakobo 1:13) Biblia elobi boye: “[Nzambe] alingi konyokola te to koyokisa bana ya bato mpasi.” (Bileli 3:33) Kutu, ayokaka nde mawa mingi ntango basaleli na ye bazali konyokwama.​—Yisaya 63:8, 9; Zekalia 2:8.

20 Yehova azali “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” (2 Bakolinti 1:3) Atyelaka biso likebi, mpe na ntango oyo ebongi, akotombola biso. (1 Petelo 5:6, 7) Soki tozali kobosana te ete Nzambe alingaka biso, yango ekosalisa biso tózala ntango nyonso na makanisi malamu mpe na esengo. Yakobo akomaki boye: “Bómona yango esengo mpenza, bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ya ndenge na ndenge.” (Yakobo 1:2) Mpo na nini? Apesaki eyano oyo: “Mpamba te na kokómáká moto oyo andimami akozwa motole ya bomoi, oyo Yehova alakaki na baoyo bazali kokoba kolinga ye.”​—Yakobo 1:12.

21. Atako tozali kokutana na mikakatano, elikya nini Nzambe apesi na baoyo bazali sembo epai na ye?

21 Ndenge Yesu alobaki yango, na mokili tokozala na bolɔzi. (Yoane 16:33) Kasi Biblia elaki ete “bolɔzi to mpasi to monyoko to nzala to bolumbu to likama” ekokabola biso te na bolingo ya Yehova mpe na bolingo ya Mwana na ye. (Baloma 8:35, 39) Tozali mpenza kolendisama na koyeba ete mpasi nyonso oyo tokoki kokutana na yango ezali kaka mpo na mwa ntango. Liboso bampasi nyonso ya bato esila, miso ya Yehova, Tata na biso ya bolingo ezali likoló na biso mpo na kobatela biso. Soki toluki libateli epai na ye, akozala “ebatelelo makasi mpo na bango banyokolami; . . . ebatelelo makasi [na] ntango ya minyoko.”​—Nzembo 9:9.

Toyekoli makambo nini?

• Baklisto basengeli koyeba ete bakokutana na makambo nini na mokili oyo mabe?

• Ndenge nini kobondela na molende ekoki kolendisa biso ntango tozali konyokwama?

• Na ndenge nini elimo ya Nzambe esalisaka?

• Tokoki kosala nini mpo tósalisanaka?

[Elilingi na lokasa 18]

Tosengeli koluka Yehova lokola nde tozali kokima mpo na kobombana na ndako ya makasi

[Bililingi na lokasa 20]

Bandeko oyo bakɔmeli na elimo basalelaka mabaku nyonso mpo na kopesa basusu longonya mpe kolendisa bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto