Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/8 nk. 22-26
  • Tolɛmbi kasi makasi esili te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tolɛmbi kasi makasi esili te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Losambo ya boklisto ezali boombo te
  • “Tólongola kilo nyonso”
  • Ezali na ntina mingi koboya mindɔndɔ mpe kozala na bopɔlɔ
  • Yehova Nzambe apesaka biso makasi
  • Tólɛmba te
  • Ndenge tozwaka nguya ya kobundisa komekama mpe kolɛmba nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • “Tolongola bipekiseli nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Okosala nini soki olɛmbi nzoto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Ndenge oyo okoki kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/8 nk. 22-26

Tolɛmbi kasi makasi esili te

“[Yehova] . . . motongi ya nsuka ya mokili . . . Akopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya.”​—YISAYA 40:28, 29.

1, 2. (a) Maloba nini ya boboto bayebisi bato nyonso oyo bazali na mposa ya kosambela Nzambe ya solo? (b) Nini ekoki kozala likama mpo na elimo na biso?

BISO bayekoli ya Yesu toyebi malamu maloba na ye ya boboto oyo: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. . . . Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Matai 11:28-30) Longola yango, balaki baklisto “bileko ya kopema . . . epai ya Yehova ye moko.” (Misala 3:19) Na ntembe te yo moko osí omoná ete koyekola solo ya Biblia, kozala na elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya, mpe kotosa mitinda ya Yehova na bomoi na yo epemisaka mpenza.

2 Kasi, ntango mosusu, basaleli mosusu ya Yehova balɛmbaka. Kolɛmba yango ekoki kosila nsima ya mwa ntango, kasi mosusu eumelaka. Ntango bambula ezali koleka, baklisto mosusu bakoki komona ete mikumba na bango ezali nde kokóma kilo, na esika epemisa bango ndenge Yesu alobaki. Makanisi mabe ndenge wana ekoki kozala likama mpo na boyokani ya moklisto ná Yehova.

3. Mpo na nini Yesu apesaki toli oyo ezali na Yoane 14:1?

3 Mwa moke liboso bákanga Yesu mpe báboma ye, ayebisaki bayekoli na ye boye: “Mitema na bino etungisama te. Bómonisa kondima na kati ya Nzambe, bómonisa mpe kondima na kati na ngai.” (Yoane 14:1) Ntango Yesu alobaki bongo ayebaki ete etikali moke bantoma bákutana na makambo ya mpasi. Na nsima, bato basengelaki konyokola bango makasi. Yesu ayebaki ete bantoma na ye bakokaki kobɛta libaku ntango balɛmbi makasi. (Yoane 16:1) Soki basali eloko te, mawa ekoki kobebisa elimo na bango mpe kolongola elikya na bango epai ya Yehova. Ezali mpe bongo mpo na baklisto lelo oyo. Soki kolɛmba eumeli mingi, tokoki kokóma na mawa mingi, mpe mitema na biso ekoki kokóma kilo. (Yilimia 8:18) Tokoki kolɛmba na kati na biso mpenza. Ntango totungisami ndenge wana, tokoki kosila makasi nyonso na makanisi mpe na elimo, ata mpe kobungisa mposa ya kosambela Yehova.

4. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela mitema na biso ya elilingi elɛmba te?

4 Biblia epesi toli malamu mpenza ete: “Koleka biloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo, mpamba te bomoi eutaka na yango.” (Masese 4:23, NW) Biblia epesi toli malamu oyo ekosalisa biso tóbatela motema na biso ya elilingi elɛmba te. Kasi, tosengeli liboso koyeba malamu makambo oyo elɛmbisaka biso.

Losambo ya boklisto ezali boombo te

5. Maloba nini Klisto alobaki mpo na bayekoli na ye, oyo ekoki komonana lokola bongolabongola?

5 Ya solo, kozala moklisto esɛngaka molende mpenza. (Luka 13:24) Kutu, Yesu alobaki boye: “Moto oyo azali komema nzete na ye ya mpasi te mpe azali kolanda ngai te akoki kozala moyekoli na ngai te.” (Luka 14:27) Soki totaleli maloba yango likolólikoló, tokoki komona lokola nde Yesu abongoli maloba, mpo alobaki liboso ete mokumba na ye ezali kilo te mpe epemisaka; kasi soki totali malamu ezali bongolabongola te.

6, 7. Mpo na nini tokoki koloba ete losambo na biso ezali kilo te?

6 Soki moto asali mosala makasi alɛmbaka, kasi soki ezali mosala ya ntina, ayokaka esengo mpe ekitisaka ye motema. (Mosakoli 3:13, 22) Sikoyo, tómituna naino: ezali na mosala ya ntina koleka mosala ya koyebisa bazalani na biso solo ya Biblia? Lisusu, milende nyonso oyo tozali kosala mpo na kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi na biso emonanaka mpamba soki totali matomba oyo yango ememelaka biso. (Masese 2:10-20) Ata ntango bazali konyokola biso, tomonaka ete koyoka mpasi mpo na Bokonzi ya Nzambe ezali lokumu mpo na biso.​—1 Petelo 4:14.

7 Mokumba ya Yesu epemisaka mpenza, mingimingi soki totali molili ya elimo oyo bato oyo bakangami na mangomba ya lokuta bazali na yango. Nzambe alingi biso mpe asɛngaka biso makambo oyo eleki biso te. “Bakomandema na ye ezali kilo te.” (1 Yoane 5:3) Boklisto ya solo, ndenge emonisami na kati ya Biblia, ezali boombo te. Ezali polele ete losambo na biso elɛmbisaka te.

“Tólongola kilo nyonso”

8. Mingimingi, nini elɛmbisaka na elimo?

8 Mbala mingi, soki tolɛmbi na elimo, ezalaka mpo na kilo oyo mokili oyo mabe ezali kobakisela biso. Lokola “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe,” makambo ya mabe oyo ezali pembenipembeni na biso ekoki kolɛmbisa biso mpe kobulunganisa biso. (1 Yoane 5:19) Komipesa na makambo oyo ezali mpenza na ntina te ekoki kokómisa bomoi na biso mindɔndɔ mpe kotya makambo ya elimo nkaka. Kilo yango oyo ebakisami ekoki kolɛmbisa biso to kotungisa elimo na biso. Yango wana, Biblia epesi biso toli ete “tólongola kilo nyonso.”​—Baebele 12:1-3.

9. Ndenge nini komipesa na koluka biloko ya mokili ekoki kotyela biso kilo?

9 Na ndakisa, tokoki kobendama na makanisi ya bato ya mokili ya koluka kokóma bato minene, kozala na mbongo mingi, komipesa na masano, kosala mibembo kaka mpo na komona mokili, mpe makambo mosusu. (1 Yoane 2:15-17) Na ekeke ya liboso, baklisto mosusu balandaki bozwi mpe bakómisaki bomoi na bango mindɔndɔ. Ntoma Paulo alobaki boye: “Baoyo balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo bakweaka na kati ya komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na kati ya libebi mpe na likama. Mpo bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso, mpe na kokolisáká bolingo wana bamosusu babungisami nzela uta na kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.”​—1 Timote 6:9, 10.

10. Ndakisa ya moloni eteyi biso nini mpo na bozwi?

10 Lokola tozali kosalela Nzambe, soki tolɛmbi, tosengeli komituna soki ezali te mpo tomipesi na koluka biloko ya mokili mpe yango ekómi kotya makambo ya elimo nkaka. Yango ekoki mpenza kosalema, ndenge Yesu amonisaki yango na ndakisa ya moloni. Yesu alobaki ete “mitungisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo mpe bamposa ya biloko mosusu” ezali lokola nzubɛ oyo ‘ekɔti mpe etye nkaka’ na liloba ya Nzambe na mitema na biso. (Malako 4:18, 19) Yango wana, Biblia epesi biso toli oyo: “Tiká ete ezaleli na bino na bomoi ezanga bolingo ya mbongo, wana bozali kosepela na oyo bozali na yango na biloko ya sikoyo. Mpo alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’”​—Baebele 13:5.

11. Ndenge nini tokoki kolongola makambo oyo ekoki kolɛmbisa biso?

11 Ntango mosusu, likambo oyo ememaka mindɔndɔ na bomoi na biso, ezali te koluka biloko mingi ya mokili, kasi nde ndenge tozali kosalela biloko oyo tozali na yango. Bato mosusu bakoki kolɛmba mpo na maladi, liwa ya bandeko na bango, to mikakatano mosusu. Bamonaka ete ebongi bátalelaka mbala na mbala makambo nini bakoki kobongola. Mobali moko ná mwasi na ye bamonaki malamu bábosana masano mosusu oyo bazalaki kolinga mingi mpe makambo oyo ezali mpenza na ntina te oyo bazalaki kokana kosala. Bakangisaki biloko nyonso oyo babongisaki mpo na makambo yango mpe babombaki yango na esika oyo bakobanda komona yango te. Biso mpe tokoki kozwa litomba soki, mbala na mbala, tozali kotalela makambo oyo tomesaná kosala mpe biloko na biso, kolongola nyonso oyo ezali lokola kilo ezangi ntina, oyo ekoki kolɛmbisa biso.

Ezali na ntina mingi koboya mindɔndɔ mpe kozala na bopɔlɔ

12. Likambo nini tosengeli koyeba na ntina na mabunga na biso?

12 Mabunga na biso moko, ata na makambo mikemike, ekoki mokemoke kobendela biso mindɔndɔ na bomoi. Davidi alobaki mpenza solo ete: “Mabe na ngai eleki likoló ya motó na ngai; ezali na bozito boleki nguya na ngai.” (Nzembo 38:4) Mbala mingi, kobongola mwa mimeseno mosusu ekoki mpe kolongola biso kilo.

13. Ndenge nini koboya mindɔndɔ ekoki kosalisa biso na kozala na makanisi oyo ebongi mpo na mosala ya kosakola?

13 Biblia ezali kolendisa biso tózala na “bwanya oyo ebongi mpe makoki ya kokanisa.” (Masese 3:21, 22, NW) Elobi lisusu ete: “Bwanya oyo euti na likoló ezali . . . makambo makasimakasi te.” (Yakobo 3:17) Bato mosusu bamilukelaki mindɔndɔ mpo balukaki kokokana na bandeko mosusu na mosala ya Nzambe. Nzokande, Biblia epesi toli oyo: “Tiká moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, mpe na yango akozwa ntina ya komikumisa na oyo etali ye moko mpenza, kasi na komikokanisáká na moto mosusu te. Mpo moto na moto akomema mokumba na ye moko.” (Bagalatia 6:4, 5) Toboyi te, ndakisa malamu ya bandeko na biso baklisto ekoki kolendisa biso mpo tósalela Nzambe na motema mobimba, kasi soki tozali na bwanya oyo ebongi mpe tozali koluka mindɔndɔ te, tokomityela mikano na kotalela makoki na biso.

14, 15. Ndenge nini tokoki komonisa bwanya oyo ebongi ntango tozali kotalela makambo oyo nzoto mpe makanisi na biso esengeli na yango?

14 Koboya mindɔndɔ ata na makambo oyo ekoki komonana ete ezali mpenza minene te, ekoki kosalisa biso mpo tólɛmba te. Na ndakisa, tozalaka nde na mimeseno ya malamu, oyo ekoki kosalisa biso tózala nzoto kolɔngɔnɔ? Tózwa ndakisa ya mobali moko ná mwasi na ye oyo basalaka na filiale moko ya Batatoli ya Yehova. Bango mibale bamonaka ete mpo na kolɛmba te, ezali na ntina kozala na bwanya oyo ebongi. Mwasi alobi boye: “Ata soki tozali na misala mingi, tosalaka makasi ete mokolo na mokolo tólalaka na ngonga oyo toponá. Tosalaka mpe ngalasisi mbala na mbala. Yango esalisaka biso mpenza. Toyebaka mpe bolɛmbu na biso, mpe tolukaka te kosala makambo oyo eleki biso. Tosalaka makasi tóluka te kozala lokola bato mosusu oyo bazali lokola nde balɛmbaka te.” Tómituna motuna oyo: Tolyaka malamu mpe tolalaka mingi? Soki tozali kobatela nzoto na biso na ndenge oyo tokoki mpo ezala kolɔngɔnɔ, ekosalisa biso tólɛmba te.

15 Bamosusu kati na biso basengeli na makambo oyo bato mosusu bazali na mposa na yango te. Na ndakisa, mobongisi-nzela moko oyo asalá na bisika mingi ya mpasi. Abɛlaki bamaladi mingi ya makasi, ata mpe kanser. Nini esalisaka ye alonga mitungisi? Alobi boye: “Ezali na ntina mingi nazwaka ntango oyo nakoki kofanda kimya ngai moko. Soki nabandi komitungisa mingi mpe nabandi kolɛmba, nakómaka na mposa nafanda na esika oyo nazali kaka ngai moko, epai nakoki kotánga mpe kopema.” Bwanya oyo ebongi mpe makoki ya kokanisa esalisaka biso tóyeba bamposa na biso mpe tókokisa yango mpe na bongo, tókima bolɛmbu ya elimo.

Yehova Nzambe apesaka biso makasi

16, 17. (a) Mpo na nini ezali na ntina mingi tóbatela elimo na biso elɛmba te? (b) Likambo nini tosengeli kobosana te na makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo?

16 Ezali na ntina mingi tóbatela elimo na biso elɛmba te. Soki Yehova Nzambe azali moninga na biso ya motema, nzoto na biso ekoki kolɛmba, kasi ata mokolo moko te tokotika kosambela ye. Yehova nde ‘apesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo azangi makasi, abakisaka nguya.’ (Yisaya 40:28, 29) Ntoma Paulo amonaki bosolo ya maloba yango mpe akomaki boye: “Tozali kotika te, kasi ata soki bomoto na biso ya libándá ezali kobeba, ya solo mpenza bomoto na biso ya kati ezali kokómisama ya sika mokolo na mokolo.”​—2 Bakolinti 4:16.

17 Tomoni ete asaleli maloba “mokolo na mokolo.” Yango ezali komonisa ete tosengeli mokolo na mokolo kosalela makambo oyo Yehova abongisi mpo na bolamu na biso. Misionɛrɛ moko oyo asalaki na bosembo na boumeli ya mbula 43, azalaki ntango mosusu kolɛmba. Kasi, makasi na ye esilaki te. Alobi boye: “Nakómá na momeseno ya kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mikolo nyonso mpo na kobondela Yehova mpe kotánga Liloba na ye liboso ya kobanda mosala. Momeseno yango esalisi ngai nayika mpiko tii lelo oyo.” Tokoki kotyela nguya ya Yehova motema soki mbala na mbala, tóloba ata “mokolo na mokolo,” tozali kobondela mpe komanyola na bizaleli na ye malamu mingi mpe bilaka na ye.

18. Libɔndisi nini Biblia epesi mpo na bandeko ya sembo oyo bakómi mibange to bazali na maladi?

18 Yango ezali na ntina mingi lisusu epai ya baoyo bazali komiyoka ete balɛmbi mpo bakómi mibange to bazali na maladi. Bandeko ya ndenge wana bakoki kolɛmba, mpo bazali koluka kosala lokola bandeko mosusu te, kasi nde mpo bazali kosala lisusu te ndenge bazalaki kosala liboso. Tokoki mpenza kobɔndisama na koyeba ete Yehova apesaka mibange lokumu! Biblia elobi boye: “Nsuki mpembe izali enkoti ya lokumu o motó, bakozwa yango o nzela ya bosembo.” (Masese 16:31, Liloba lya Nzambe) Yehova ayebi bolɛmbu na biso mpe asepelaka mingi na mosala oyo tosalelaka ye na motema mobimba ata soki tozali na bolɛmbu. Lisusu, Nzambe abosanaka te mosala malamu oyo tosí tosaleli ye. Biblia eyebisi biso boye: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.” (Baebele 6:10) Biso nyonso tozali na esengo mingi ya kozala na bandeko oyo batikali sembo epai ya Yehova banda ebele ya bambula!

Tólɛmba te

19. Matomba nini tokoki kozwa soki tozali ntango nyonso kosala oyo ezali malamu?

19 Bato mingi balobaka ete kosala ngalasisi mbala na mbala esalisaka nzoto elɛmba mingi te. Ndenge moko mpe, komipesa na makambo ya elimo ekoki kokitisa kolɛmba. Biblia elobi boye: “Tótika te kosala oyo ezali malamu, mpamba te na ntango oyo ekoki tokobuka soki tolɛmbi te. Na bongo, ya solo, wana tozali na ntango oyo ebongi mpo na yango, tiká tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Bagalatia 6:9, 10) Maloba ya bavɛrsɛ yango ezali komonisa ete tosengeli kokanga mabɔkɔ te. Kosalela bato mosusu malamu ekoki kosalisa biso tólɛmba te na mosala ya Yehova.

20. Mpo tólɛmba te, tosengeli kokima baninga ya ndenge nini?

20 Nzokande, kozala moninga ya bato oyo batyolaka mibeko ya Nzambe mpe kolekisa ntango na bango ekoki kotyela biso kilo. Biblia elobi boye: “Libanga ezali na bozito mpe zɛlɔ na bozito lokola; kasi [nkanda oyo zoba ayokisaka] eleki yango mibale na bozito.” (Masese 27:3) Mpo tólɛmba te, tosengeli koboya kozala baninga ya bato oyo bazalaka kaka na makanisi ya mabe, oyo batalaka kaka mabunga ya basusu mpe balingaka kaka kotɔnga bato.

21. Ndenge nini tokoki kolendisa basusu na makita ya lisangá?

21 Yehova atyá makita ya lisangá mpo na kopesa biso makasi na elimo. Na makita yango tozwaka libaku malamu ya kolendisana na nzela ya mateya oyo ekitisaka motema mpe tokutanaka na baninga ya malamu. (Baebele 10:25) Na kati ya lisangá, moto nyonso asengeli kosala makasi alendisaka ntango azali kopesa biyano na makita to azali koteya na estrade. Baoyo bazali na mokumba ya koteya basengeli mpenza kolendisaka basusu. (Yisaya 32:1, 2) Ata ntango esengeli kolendisa to kopamela, esengeli kopesa toli yango na maloba oyo ekokitisa motema. (Bagalatia 6:1, 2) Bolingo na biso mpo na basusu ekosalisa biso tósalela Yehova kozanga ete makasi na biso esila.​—Nzembo 133:1; Yoane 13:35.

22. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, mpo na nini tosengeli kozala na mpiko?

22 Kosambela Yehova na ntango oyo ya nsuka esɛngi kokanga mabɔkɔ te mosala. Lisusu, baklisto mpe balɛmbaka na elimo; bakutanaka mpe na makambo oyo elɛmbisaka. Nzoto na biso ya kozanga kokoka ezali na bolɛmbu, ezali lokola mbɛki. Atako bongo, Biblia elobi boye: “Tozali na eloko oyo ya motuya na kati ya bambɛki ya mabelé, mpo nguya oyo eleki makasi ezala ya Nzambe kasi te oyo euti na biso moko.” (2 Bakolinti 4:7) Ya solo, tokoki kolɛmba, kasi tótika te ete makasi na biso esila to tózonga nsima. Tózala nde ‘na mpiko mpenza mpe tóloba ete: “Yehova azali mosungi na ngai.”’​—Baebele 13:6.

Mwa bozongeli

• Wapi mwa makambo ya kilo oyo tokoki kolongola?

• Ndenge nini tokoki kosalela bandeko na biso baklisto “oyo ezali malamu”?

• Ndenge nini Yehova asungaka biso ntango tolɛmbi?

[Elilingi na lokasa 23]

Yesu ayebaki ete soki bantoma na ye balɛmbi ntango molai bakobulungana

[Elilingi na lokasa 24]

Bandeko mosusu babosani masano mpe makambo mosusu oyo ezali mpenza na ntina te oyo bazalaki kolinga

[Elilingi na lokasa 26]

Atako tozali na bolɛmbu, Yehova apesaka motuya mingi na losambo oyo tozali kopesa ye na motema mobimba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto