Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/10 nk. 9-14
  • Banani bazali kopesa Nzambe nkembo lelo oyo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Banani bazali kopesa Nzambe nkembo lelo oyo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bazali kutu na likambo ya koloba te”
  • “Batambwisi oyo bakufá miso” bazali kobungisa ebele ya bato nzela
  • Banani bazali mpenza kopesa Nzambe nkembo?
  • Ozali kopesa Nzambe nkembo?
  • Ozali kongɛngisa nkembo ya Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Tópesa Yehova nkembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Kotika eloko moko te epekisa yo ozwa nkembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Tiká ete bikelamu nyonso esakola nkembo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/10 nk. 9-14

Banani bazali kopesa Nzambe nkembo lelo oyo?

“Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya.”​—EMONISELI 4:11.

1, 2. (a) Bandakisa nini ezali komonisa ete mingimingi bato bamekolaka kaka biloko oyo Nzambe akelá mpo na kosala biloko ya sika? (b) Motuna nini tokoki komituna, mpe eyano na motuna yango ezali nini?

MOKOLO moko, na bambula ya 1940, Georges de Mestral, moto moko ya Suisse, abimaki ná mbwa na ye mpo na kotambola mwa moke. Ntango azongaki na ndako, amonaki mwa mbuma mikemike ekangami na bilamba na ye mpe na nzoto ya mbwa. Atalaki bambuma yango na mikroskope mpe amonaki mwa biloko mikemike lokola ndɔbɔ ekangamikangami na eloko nyonso oyo elingamá. Na nsima, abimisaki ekangeli babengi velcro, oyo ezalaka epai mosusu nsendensende mpe epai mosusu nsukinsuki, oyo basalelaka ntango mosusu na esika ya butɔ. De Mestral azali moto kaka moko te oyo ayekolá eloko moko oyo Nzambe akelá mpo na kosala eloko mosusu. Na États-Unis, Wilbur Wright ná leki na ye Orville bazwaki mayele ya kosala aviɔ nsima ya kotala ndenge bandɛkɛ minene epumbwaka. Alexandre-Gustave Eiffel, moto ya France, ayekolaki ndenge oyo mikuwa ya makolo ebongisamá mpo na komema kilo ya nzoto mobimba mpe na ndenge yango, asalaki “Tour Eiffel” oyo ezali na Paris.

2 Bandakisa yango ezali komonisa ete mingimingi bato bamekolaka kaka biloko oyo Nzambe akelá mpo na kosala biloko ya sika. Kasi, motuna tokoki komituna yango oyo: Bato boni oyo babimisaka biloko ya sika bapesaka nkembo epai ya Ye oyo asalaki mbuma mikemike, bandɛkɛ ya minene, mikuwa ya makolo, mpe biloko mosusu nyonso ya kokamwa oyo bamekolaka mpo na kosala biloko ya sika? Ezali mawa komona ete, na moi ya lelo, bato bazali te kopesa Nzambe nkembo oyo ebongi na ye.

3, 4. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “nkembo” elimbolaka nini, mpe esengeli kolimbola nini ntango esalelami mpo na Yehova?

3 Moto mosusu akoki komituna ete, ‘Ezali mpenza na ntina tópesa Nzambe nkembo? Azalaka na nkembo te banda kala?’ Ya solo, Yehova azali Moto oyo aleki na nkembo na molɔ́ngɔ́ mobimba, kasi yango elingi koloba te ete bato nyonso bapesaka ye nkembo. Na Biblia, liloba ya Liebele oyo ebongolami na “nkembo” elimbolaka libosoliboso “kilo.” Basalelaka yango mpo na eloko nyonso oyo epesaka moto kilo to oyo ekómisaka ye moto monene na miso ya bato. Ntango basaleli yango mpo na Nzambe, elimbolaka makambo oyo emonisaka bato bonene ya Nzambe.

4 Na moi ya lelo, bato mingi te bazali kotya likebi na makambo oyo ezali komonisa bonene ya Nzambe. (Nzembo 10:4; 14:1) Kutu, bato minene ya mokili, ata baoyo bandimaka ete Nzambe azali, mbala mingi bazali kotinda bato bázanga limemya epai ya Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba oyo atondi na nkembo. Ndenge nini bazali kosala yango?

“Bazali kutu na likambo ya koloba te”

5. Bato mingi ya siansi balobaka ete biloko ya kokamwa oyo ezali na mokili ebimaki ndenge nini?

5 Bato mingi ya siansi balobaka ete Nzambe azali te. Soki ezali mpenza bongo, biloko ya kokamwa oyo ezali na mokili, ata mpe bato, bautá wapi? Balobaka ete moto moko te asalaki yango, ebimaki yango moko. Na ndakisa, Stephen Jay Gould, moto moko oyo andimaka evolisyo, akomaki boye: “Biso bato toutá na mitindo moko ya kokamwa ya bambisi oyo ezalaki na binyanyelo (nageoires) ya ndenge mosusu mpenza, oyo ebongwanaki mpe ekómaki makolo mpo na bikelamu oyo etambolaka na mabelé . . . Tokoki koluka eyano ‘ya malamu koleka,’ kasi eyano yango ezali te.” Richard Leakey ná Roger Lewin bakomaki mpe boye: “Mbala mosusu bato babimaki na mbongwana moko monene mpe ya mbalakaka.” Ata bato mosusu ya siansi oyo bakumisaka kitoko ya biloko oyo ezali na mokili, balobaka te ete Nzambe nde akelá yango.

6. Nini ekangisaka bato monɔkɔ bápesa te Nzambe lokumu na ye ya Mozalisi?

6 Ntango bato oyo bayekoli mingi bazali koloba ete biloko oyo ezali ebimá yango moko, balukaka komonisa ete kaka bato oyo bazali na mayele te nde bandimaka yango te. Bato mingi batalelaka likambo yango ndenge nini? Eleki mwa bambula, mobali moko oyo amipesá mpenza na evolisyo atunaki bato oyo bandimaka liteya yango mituna. Mpe alobaki boye: “Namonaki ete bato mingi bandimaka ete biloko oyo ezali ebimá yango moko mpo bayebisá bango ete bato nyonso ya mayele bandimaka bongo.” Ya solo, ntango bato oyo bayekoli mingi bazali koloba ete Nzambe azali te, bato mosusu bakangaka monɔkɔ mpe bapesaka Nzambe te lokumu na ye ya Mozalisi.​—Masese 14:15, 18.

7. Na kolanda Baloma 1:20, likambo nini ezali polele na biloko oyo tomonaka na miso, mpe mpo na nini?

7 Bato ya siansi bazali nde na bilembeteli oyo endimisaka bango ete biloko oyo ebimaki yango moko? Eloko te! Tozali komona ebele ya biloko oyo ezali komonisa ete Mozalisi azali. Na ntina na ye, toma Paulo akomaki boye: “Bizaleli na ye oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili [to bato], mpamba te yango emonanaka na nzela ya biloko oyo esalemá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye, yango wana [bato oyo bazangi kondima] bazali kutu na likambo ya koloba te.” (Baloma 1:20) Tokoyeba ete Mozalisi azali soki totali misala na ye. Yango wana, Paulo alobaki ete banda na ebandeli, ezali na biloko oyo bato bakoki ‘komona,’ oyo endimisaka ete Nzambe azali, soki batali biloko oyo akelá. Biloko nini?

8. (a) Ndenge nini likoló emonisaka nguya mpe bwanya ya Nzambe? (b) Nini ezali komonisa ete molɔ́ngɔ́ ezali na Mobandisi?

8 Tokoki komona ete Nzambe azali soki totali minzoto na likoló. Nzembo 19:1 elobi ete: “Likoló ekosakolaka nkembo ya Nzambe, lola ekoyebisaka misala ya mabɔkɔ na ye.” “Likoló,” elingi koloba moi, sanza, mpe minzoto, emonisaka nguya mpe bwanya ya Nzambe. Totikalaka monɔkɔ polele ntango totali ebele ya minzoto oyo ezali na likoló. Minzoto nyonso wana etambolaka na ndenge ya mobulumobulu te.a (Yisaya 40:26) Moto oyo akanisaka malamu, akoki mpenza koloba ete ebongiseli wana esalemaki kaka yango moko? Kutu, bato mingi ya siansi balobaka ete molɔ́ngɔ́ ebandaki na mbalakaka. Mpo na komonisa mokakatano oyo yango ezali kobimisa, profɛsɛrɛ moko akomaki boye: “Koloba ete molɔ́ngɔ́ ezali na ebandeli te ezali likanisi eleki malamu mpo na moto oyo andimaka te ete Nzambe azali to oyo alobaka ete tokoki koyeba Nzambe te. Ndenge moko mpe, soki tolobi ete molɔ́ngɔ́ ezali na ebandeli, tosengeli mpe koloba ete ezali na mobandisi; soki te ndenge nini tokoki kokanisa ete molɔ́ngɔ́ esalemaki, kasi moto moko te asalaki yango?”

9. Ndenge nini bwanya ya Yehova emonanaka polele epai ya banyama oyo akelá?

9 Tomonaka mpe makambo mosusu awa na mabelé oyo endimisaka ete Nzambe azali. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Misala na yo mingi boni, ee [Yehova]! Otɛmisaki yango nyonso na [bwanya, NW]. Mokili etondi maa na biloko bisalaki yo.” (Nzembo 104:24) ‘Biloko oyo Yehova asalaki,’ na ndakisa banyama, emonisaka bwanya na ye. Ndenge tomonaki na ebandeli, lokola biloko ya bomoi esalemá malamu mpenza, mbala mingi bato ya mayele bamekolaka yango mpo na kobimisa biloko mosusu. Tótalela mwa bandakisa mosusu. Bato ya mayele bazali koyekola maseke ya nyama oyo ezalaka na bitape mpo na kosala bikɔti ya basoda oyo ekozala makasi koleka; bazali koyekola malamu motindo moko ya nzinzi oyo ezali na matoi eyokaka malamu mpenza mpo na kobongisa lisusu bamasini oyo bato oyo bayokaka malamu te balataka na matoi; bazali mpe koyekola malamu mapapu ya esulungutu mpo na kobakisa mayele ya kosala baaviɔ oyo emonanaka te mpe lokito na yango eyokanaka te. Kasi, ata bato bamekimeki ndenge nini, bakolonga te kosala eloko oyo ekozala mpenzampenza lokola oyo Mozalisi akelá. Buku Biomimicry​—Innovation Inspired by Nature elobi boye: “Bikelamu ya bomoi esalaka makambo nyonso oyo tokoki kokanisa kosala, mpe esalaka yango kozanga kosalela biloko lokola esansi, ebebisaka mopɛpɛ to mai te, to mpe esalaka te makambo oyo ekoki kokóma likama mpo na yango moko.” Yango ezali komonisa mpenza bwanya!

10. Mpo na nini koboya kondima ete Mozalisi moko Monene azali elongobani te? Pesá ndakisa.

10 Ntango tozali kotala na likoló to awa na mabelé, tomonaka polele ete Mozalisi moko akelaki yango. (Yilimia 10:12) Tosengeli mpenza kozala na likanisi moko na bikelamu ya likoló oyo bazali koganga ete: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” (Emoniseli 4:11) Kasi, bato mingi ya siansi bamonaka bilembeteli yango te na ‘miso ya motema na bango,’ atako bazali kokamwa ntango bazali komona na miso ndenge biloko yango ebongisamá. (Baefese 1:18) Tokoki kolimbola yango na ndakisa oyo: Moto oyo azali kosepela na kitoko ya biloko, kasi azali kondima te ete ezali na Mozalisi, azali lokola moto oyo azali kosepela na liyemi moko kitoko, kasi azali koboya kondima ete ezali na moyemi moko oyo asalaki yango. Yango wana Biblia elobi ete baoyo baboyaka kondima ete Nzambe azali “bazali kutu na likambo ya koloba te”!

“Batambwisi oyo bakufá miso” bazali kobungisa ebele ya bato nzela

11, 12. Liteya oyo elobi ete makambo nyonso esí etángaka euti na likanisi nini, mpe nini emonisi ete liteya yango ezali kopesa Nzambe nkembo te?

11 Bato mingi oyo basambelaka bakanisaka mpenza ete losambo na bango epesaka Nzambe nkembo. (Baloma 10:2, 3) Nzokande, mangomba ezali mpe ebongiseli moko oyo ezali kopekisa ebele ya bato bápesa Nzambe nkembo. Na ndenge nini? Tótalela makambo mibale.

12 Ya liboso, mangomba ezali kopesa Nzambe nkembo te mpo eteyaka makambo ya lokuta. Tókamata ndakisa ya liteya oyo elobaka ete makambo nyonso etángamá. Liteya yango euti na likanisi oyo elobi ete lokola Nzambe azali na likoki ya koyeba makambo oyo ekoya, ayebaka mpe likambo mokomoko ndenge ekosuka. Na bongo, liteya yango ezali komonisa ete Nzambe así abongisá makambo nyonso​—ya malamu to ya mabe​—oyo ekokómela moto mokomoko. Na kolanda liteya yango, bampasi mpe mabe nyonso oyo ezali na mokili lelo, ezali mokano ya Nzambe. Yango ezali kopesa Nzambe nkembo te mpamba te ezali kopesa ye foti oyo ebongi kopesama na Monguna na ye monene, Satana, oyo Biblia ebengi “moyangeli ya mokili”!​—Yoane 14:30; 1 Yoane 5:19.

13. Mpo na nini ebongi te tókanisa ete Nzambe akoki te koboya koyeba makambo mosusu oyo ekosalema? Pesá ndakisa.

13 Biblia eteyaka te ete makambo nyonso etángamá mpe koloba bongo ezali kokosela Nzambe makambo. Liteya yango eyebi kokesenisa te makambo oyo Nzambe akoki kosala mpe oyo azali mpenza kosala. Ya solo, Biblia ezali komonisa polele ete Nzambe akoki koyeba makambo oyo ekosalema. (Yisaya 46:9, 10) Kasi, tosengeli kokanisa te ete akoki te koboya koyeba makambo oyo ekosalema to mpe ete nyonso oyo esalemaka ezalaka kaka mokano na ye. Tópesa ndakisa: Soki ozali na makasi mingi, okobanda nde kotombola eloko nyonso ya kilo oyo omoni na nzela? Te! Ezali mpe ndenge moko mpo na Nzambe, azali na makoki ya koyeba makambo ekosalema, kasi yango elingi koloba te ete alukaka koyeba likambo mokomoko to abongisaka yango liboso. Akoki koyeba liboso likambo moko soki asepeli koyeba yango.b Ezali komonana polele ete mateya ya lokuta, lokola oyo elobi ete makambo nyonso etángamá, epesaka Nzambe nkembo te.

14. Na likambo nini mangomba epesi Nzambe nkembo te?

14 Likambo ya mibale oyo ezali kosala ete mangomba epesa Nzambe nkembo te ezali etamboli ya bandimi na yango. Baklisto basengeli kolanda mateya ya Yesu. Na ndakisa, Yesu ateyaki bayekoli na ye ete ‘bálinganaka’ mpe bázala “bato ya mokili te.” (Yoane 15:12; 17:14-16) Tokoloba boni mpo na bakonzi ya mangomba ya boklisto? Bazali mpenza kolanda mateya yango?

15. (a) Bakonzi ya mangomba basalaki nini na ntango ya bitumba? (b) Etamboli ya bakonzi ya mangomba ebimisi mbuma nini epai ya bamilio ya bato?

15 Tótala makambo oyo bakonzi ya mangomba basalaki na ntango ya bitumba. Bakɔtaki na bitumba mingi, bandimaki yango, to mpe bazalaki bato ya liboso mpo na kopesa yango mabɔkɔ. Babenisaki basoda mpe balobaki ete ata babomi, ezali mabe te. Tozali mpenza komituna motuna oyo: ‘Bakonzi yango bakanisá ata moke te ete na ngámbo mosusu, baninga na bango bakonzi ya mangomba mpe bazali kosala kaka lokola bango?’ (Talá etanda “Nzambe azali na ngámbo nini?”) Bakonzi ya mangomba bapesaka Nzambe nkembo te ntango balobaka ete azalaka na ngámbo na bango na bitumba oyo ezali koboma ebele ya bato; bapesaka ye mpe nkembo te ntango balobaka ete mateya ya Biblia esilá ngala mpe bandimaka pite ná ekobo. Makambo na bango ekokani mpenza na oyo ya bakonzi ya mangomba oyo Yesu abengaki “bato ya misala ya botyoli-mibeko” mpe “batambwisi oyo bakufá miso”! (Matai 7:15-23; 15:14) Bolingo ya bato mingi mpo na Nzambe ekiti mpo na etamboli ya bakonzi ya mangomba.​—Matai 24:12.

Banani bazali mpenza kopesa Nzambe nkembo?

16. Mpo na nini tosengeli kotala na Biblia mpo na koyeba banani mpenza bazali kopesa Nzambe nkembo?

16 Soki bato minene mpe ya lokumu bazali kopesa Nzambe nkembo te, boye banani mpenza bazali kopesa ye nkembo? Mpo na kozwa eyano, tosengeli kotala oyo Biblia elobi. Nzambe ye moko nde asengeli koyebisa ndenge oyo tosengeli kopesa ye nkembo, mpe amonisi yango na kati ya Liloba na ye, Biblia. (Yisaya 42:8) Tótalela ndenge misato oyo tokoki kopesa Nzambe nkembo, mpe na mokomoko na yango, tóyeba nani azali mpenza kosala yango lelo oyo.

17. Ndenge nini Yehova amonisaki ete kopesa nkombo na ye nkembo ezali na esika monene na mokano na ye, mpe banani lelo oyo bazali kopesa nkombo na ye nkembo na mabelé mobimba?

17 Ya liboso, tokoki kopesa Nzambe nkembo soki tozali kosanzola nkombo na ye. Maloba oyo Yehova ayebisaki Yesu ezali komonisa ete kosanzola nkombo ya Nzambe ezali na ntina mingi. Mwa mikolo liboso Yesu akufa, abondelaki boye: “Tata, pesá nkombo na yo nkembo.” Bongo, mongongo moko elobaki ete: “Napesi yango nkembo mpe nakopesa yango nkembo lisusu.” (Yoane 12:28) Na ntembe te ezalaki mongongo ya Yehova ye moko. Maloba oyo alobaki ezali komonisa polele ete kopesa nkombo na ye nkembo ezali na ntina mingi na miso na ye. Na bongo, banani lelo oyo bazali koyebisa bato nkombo ya Nzambe mpe kosanzola yango na mabelé mobimba mpe, na ndenge yango, bazali kopesa ye nkembo? Ezali Batatoli ya Yehova, mpe bazali kosala yango na mikili 235!​—Nzembo 86:11, 12.

18. Ndenge nini tokoki koyeba bato oyo bazali kosambela Nzambe na “solo,” mpe lingomba nini ezali koteya solo ya Biblia eleki sikoyo mbula koleka nkama?

18 Ya mibale, tokoki kopesa Nzambe nkembo soki tozali koteya solo na ntina na ye. Yesu alobaki ete basambeli ya solo basengeli “kosambela [Nzambe] na . . . solo.” (Yoane 4:24) Ndenge nini tokoki koyeba baoyo basambelaka Nzambe na “solo”? Bato yango basengeli koboya mateya oyo euti na Biblia te mpe oyo ezali koloba lokuta mpo na Nzambe mpe mokano na ye. Basengeli koteya kaka solo ya Liloba ya Nzambe, lokola oyo: Yehova azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya Nyonso, mpe kaka ye moko abongi na lokumu wana (Nzembo 83:18); Yesu azali Mwana ya Nzambe mpe moto oyo Nzambe aponi mpo azala Mokonzi na Bokonzi ya Masiya (1 Bakolinti 15:27, 28); Bokonzi ya Nzambe ekosantisa nkombo ya Yehova mpe ekokokisa mokano na ye mpo na mabelé mpe mpo na bato (Matai 6:9, 10); nsango malamu ya Bokonzi yango esengeli kosakolama na mabelé mobimba. (Matai 24:14) Eleki sikoyo mbula koleka nkama, kaka lingomba moko nde ezali ntango nyonso koteya solo wana ya ntina mingi: Batatoli ya Yehova!

19, 20. (a) Mpo na nini etamboli malamu ya baklisto epesaka Nzambe nkembo? (b) Mituna nini ekoki kosalisa biso tóyeba banani bazali kopesa Nzambe nkembo na etamboli na bango ya malamu?

19 Ya misato, tokoki kopesa Nzambe nkembo soki tozali kotosa mibeko na ye na bomoi na biso. Ntoma Petelo akomaki boye: “Bósala ete etamboli na bino ezalaka malamu na kati ya bikólo, mpo, na likambo oyo bazali kolobela bino mabe lokola nde na basali-mabe, bákoka kopesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akoya kotala mpo basili komona na miso na bango moko misala na bino ya malamu.” (1 Petelo 2:12) Etamboli ya moklisto emonisaka kondima na ye. Ntango bato oyo bazali komona ete kondima ya moklisto ezali kotinda ye azala na etamboli malamu, yango epesaka Nzambe nkembo.

20 Lelo oyo, banani bazali kopesa Nzambe nkembo na etamboli malamu na bango? Baguvɛrnema mingi ezali kokumisa bandimi ya lingomba nini ete bazali bato ya mobulu te, batosaka mibeko mpe bafutaka mpako na bango? (Baloma 13:1, 3, 6, 7) Banani bayebani na mokili mobimba ete bazali na bomoko oyo esangisi mindɛlɛ ná baindo, bato ya bikólo mpe ya minɔkɔ nyonso? (Nzembo 133:1; Misala 10:34, 35) Lingomba nini eyebani na mokili mobimba ete eteyaka bato Biblia, mpe elendisaka bato bátosa mibeko, bábongisa mabota mpe bázala na bizaleli malamu oyo Biblia ezali kolendisa? Ezali kaka lingomba moko oyo etamboli malamu ya bandimi na yango na makambo wana mpe na makambo mosusu emonisaka yango polele: Batatoli ya Yehova!

Ozali kopesa Nzambe nkembo?

21. Mpo na nini mokomoko na biso asengeli komituna soki apesaka Yehova nkembo?

21 Ebongi mokomoko na biso amituna ete, ‘Nazali kopesa Yehova nkembo?’ Nzembo 148 elobi ete bikelamu mingi ezali kopesa Nzambe nkembo. Baanzelu, likoló, mabelé, banyama, nyonso wana epesaka Yehova nkembo. (Vɛrsɛ 1-10) Ezali mawa komona ete bato mingi lelo oyo bazali kopesa Yehova nkembo te! Soki na bomoi na yo ozali kosala makambo oyo ezali kopesa Nzambe nkembo, ozali kolanda bikelamu mosusu oyo ezali kopesa Yehova nkembo. (Vɛrsɛ 11-13) Yango nde lolenge eleki malamu ya kotambwisa bomoi na yo.

22. Mapamboli nini okozwa soki ozali kopesa Nzambe nkembo, mpe osengeli kozala na ekateli nini?

22 Soki ozali kopesa Yehova nkembo, ozali na ebele ya mapamboli. Ntango ozali kosala misala oyo emonisi kondima na mbeka oyo Klisto apesaki mpo na kobikisa biso, ozali kozongisa boyokani malamu na Nzambe, mpe okozala na kimya na Tata na biso ya likoló mpe akopambola yo. (Baloma 5:10) Soki ozali kokanisa bantina oyo osengeli kopesa Nzambe nkembo, okozala na esengo mpe na botɔndi. (Yilimia 31:12) Na ndenge yango, okoyeba kosalisa basusu bázala na esengo, mpe na bongo, yo moko okozala na esengo mingi koleka. (Misala 20:35) Tiká ete ozala na kati ya bato oyo bazali na ekateli makasi ya kopesa Nzambe nkembo, sikoyo mpe mpo na libela!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu na ndenge oyo likoló ezali komonisa bwanya mpe nguya ya Nzambe, talá buku Approchez-vous de Jéhovah, mokapo 5 mpe 17, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Talá buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 2, lokasa 641-642, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini tokoki koloba ete bato ya siansi basalisi bato te na kopesa Nzambe nkembo?

• Wapi ndenge mibale oyo mangomba ezali kopekisa bato bápesa Nzambe nkembo.

• Wapi balolenge oyo tokoki kopesa Nzambe nkembo?

• Mpo na nini osengeli komituna soki ozali kopesa Yehova nkembo?

[Etanda na lokasa 12]

“Nzambe azali na ngámbo nini?”

Mobali moko, moto ya Allemagne, oyo azalaká soda na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe na nsima akómaki Motatoli ya Yehova, alobaki boye:

“Likambo ezalaki kotungisa ngai na ntango ya etumba . . . ezali komona bakonzi ya mangomba nyonso, Bakatolike, Baprotesta, mpe bongo na bongo, bazali kobenisa basoda mpe baaviɔ oyo ezalaki komema bango liboso bákende kobwaka babɔmbi. Mbala mingi nazalaki komituna, ‘Nzambe azali na ngámbo nini?’

“Basoda ya Allemagne bazalaki kolata mokaba oyo, na ebende na yango bakomá Gott mit uns (Nzambe azali na biso). Kasi, nazalaki komituna: ‘Mpo na nini Nzambe akoki te kozala na basoda ya ngámbo mosusu oyo tozali na bango lingomba moko, oyo bazali mpe kosambela ye?’”

[Elilingi na lokasa 10]

Batatoli ya Yehova bazali mpenza kopesa Nzambe nkembo na mokili mobimba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto