Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/10 nk. 8-13
  • Makambo nini endimisaka yo elikya ya Paladiso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo nini endimisaka yo elikya ya Paladiso?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Emonaneli ya paladiso
  • Bato balongwaki na boombo mpe babongwanaki
  • Makambo mosusu oyo ekosalisa yo na komona ndenge Paladiso ekozala
  • “Tokomonana na Paradiso!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Paladiso ezongisami!
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Tikalá libela na paradiso ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Paladiso ya elimo ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/10 nk. 8-13

Makambo nini endimisaka yo elikya ya Paladiso?

“Nayebi moto moko na kati na bomoko elongo na Klisto oyo . . . amemamaki tii na kati ya paladiso.”​—2 BAKOLINTI 12:2-4.

1. Bilaka nini ya Biblia esepelisaka bato mingi?

PALADISO. Oyebi lisusu ndenge oyokaki ntango bayebisaki yo mpo na mbala ya liboso ete Nzambe alaki kokómisa mabelé oyo paladiso? Kanisá ntango oyokaki ete ‘miso ya bato bakufá miso ekofungwama, matoi ya bato bakufá matoi ekoyoka, mpe esobe ekobimisa’ banzete kitoko. To mpe ntango oyokaki esakweli oyo elobi ete mbwa ya zamba ekofanda elongo na mwana ya mpate mpe mwana moke akotambola na nkoi! Oyokaki esengo te ntango otángaki ete baninga mpe bandeko na biso oyo bakufá bakosekwa mpe bakozala na likoki ya kofanda mpo na libela na Paladiso?​—Yisaya 11:6; 35:5, 6; Yoane 5:28, 29.

2, 3. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete ondimaka bilaka ya Biblia bindimelá te? (b) Wapi likambo mosusu oyo ezali mpe kopesa biso elikya?

2 Ezali na bantina oyo ondimaka bilaka ya Biblia oyo etali Paladiso. Na ndakisa, ondimaka maloba oyo Yesu alobaki na moto mabe oyo babakaki na nzete pembeni na ye ete: “Okozala elongo na ngai na Paladiso.” (Luka 23:43) Ondimaka maloba oyo: “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka na ye, mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.” Lisusu, ondimaka elaka oyo elobi ete Nzambe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na biso; liwa, mawa, koganga ná mpasi ekozala lisusu te. Nyonso wana ezali komonisa ete mabelé ekokóma lisusu paladiso!​—2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:4.

3 Kasi, likambo mosusu oyo ezali kondimisa elikya ya Paladiso ezali ebongiseli moko oyo baklisto ya mokili mobimba bazali kati na yango lelo oyo. Ebongiseli nini? Nzambe asali paladiso ya elimo mpe atye basaleli na ye na kati na yango. Ntango mosusu okoki kozala na mokakatano mpo na kokanga ntina ya maloba “paladiso ya elimo,” kasi paladiso yango esakolamaki mpe ezali lelo oyo.

Emonaneli ya paladiso

4. Mokapo ya 2 Bakolinti 12:2-4 elobeli emonaneli nini, mpe ekoki mpenza kozala ete nani amonaki yango?

4 Mpo na paladiso yango ya elimo, ntoma Paulo akomaki boye: “Nayebi moto moko na kati na bomoko elongo na Klisto oyo . . . amemamaki kaka motindo wana tii na likoló ya misato. Ɛɛ, nayebi moto yango​—soki na nzoto to na libándá ya nzoto, nayebi te, Nzambe nde ayebi​—ete amemamaki tii na kati ya paladiso mpe ayokaki maloba oyo ekoki kolobama te oyo epesami nzela te na moto aloba yango.” (2 Bakolinti 12:2-4) Paulo alobelaki likambo yango nsima ya kolobela makambo oyo ezali kondimisa ete azalaki ntoma. Lisusu, Biblia elobeli moto mosusu te oyo amonaki likambo wana, mpe Paulo nde ayebisi biso yango. Na bongo, emonani mpenza ete ye moko Paulo nde amonaki emonaneli wana. Akɔtaki na “paladiso” nini?​—2 Bakolinti 11:5, 23-31.

5. Eloko nini Paulo amonaki te, mpe na bongo, ezalaki “paladiso” ya ndenge nini?

5 Maloba ya Paulo ezali komonisa te ete “likoló ya misato” ezali mopɛpɛ oyo ezali zingazinga ya mabelé, to likoló epai minzoto ezali, to mokili mosusu oyo bato ya astronomi bakanisaki ete ezali. Mbala mingi Biblia esalelaka motángo misato mpo na konyata to kolobela makasi likambo moko. (Mosakoli 4:12; Yisaya 6:3; Matai 26:34, 75; Emoniseli 4:8) Na bongo, oyo Paulo amonaki na emonaneli ezalaki esika moko ya likoló to ya nkembo. Amonaki nde paladiso ya elimo.

6. Makambo nini ya kala ezali kosalisa biso tókanga ntina ya makambo oyo Paulo amonaki?

6 Bisakweli mosusu ya kala ya Biblia ezali kosalisa biso tókanga ntina ya likambo yango. Ntango libota ya Nzambe na ntango ya kala ezalaki lisusu sembo te, azwaki ekateli ya kotika bato ya Babilone bábebisa Yuda ná Yelusaleme. Badati ya Biblia ezali komonisa ete likambo yango esalemaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Esakweli elobaki ete mokili yango ekotikala mpamba mbula 70; na nsima, Nzambe akopesa Bayuda oyo bakobongola motema nzela ya kozonga na mboka na bango mpe bakozongisa losambo ya solo. Likambo yango ebandaki kokokisama na mobu 537 L.T.B. (Deteronome 28:15, 62-68; 2 Mikonzi 21:10-15; 24:12-16; 25:1-4; Yilimia 29:10-14) Kasi, nini ekómelaki mokili yango? Na boumeli ya mbula 70 wana, ekómaki zamba na zamba, bisika mosusu ekaokaki, ekómaki bisika ya bangombolo. (Yilimia 4:26; 10:22) Atako bongo, elaka moko epesamaki: “[Yehova] akobɔndisa Siona, akobɔndisa bisika ya mpamba na ye nyonso; akozalisa lisobe na ye lokola Edene, esika na ye ya mpamba lokola elanga [to Paladiso, Septante] ya [Yehova].”​—Yisaya 51:3.

7. Nini esengelaki kosalema nsima ya mbula 70 oyo mokili etikalaki mpamba?

7 Makambo yango ekokisamaki nsima ya mbula 70 ya boombo. Nzambe apambolaki mpe makambo ebongaki. Kanisá naino: “Lisobe mpe esika ekaoki ekosepela, lisobe ekoyoka esengo, ekobimisa felele na habaselete. Ekobimisa felele mingi mpenza, ekosepela na esengo mpe na nzembo. . . . Motɛngumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo ya ebubu ekoyemba na esengo. Zambi mai makopunzwa kati na lisobe, bitima kati na mokili mokaoki. Zɛlɔ oyo ekaoki ekobongwana liziba mpe mabelé ya mposa ekozala bitima ya mai; na efandelo ya ngombolo, esika elalaki bango, ekozala na matiti mpe mingendu.”​—Yisaya 35:1-7.

Bato balongwaki na boombo mpe babongwanaki

8. Nini ezali komonisa biso ete mokapo 35 ya Yisaya ezalaki kolobela nde bato?

8 Ezalaki mbongwana monene mpenza! Mokili oyo etikalaki mpamba ekómaki paladiso. Kasi, esakweli yango mpe bisakweli mosusu oyo ekokisamaki emonisaki ete bato mpe basengelaki kobongwana, lokola kaka mokili oyo etikalaki mpamba ekómaki lisusu kobota mbuma. Mpo na nini tolobi bongo? Mpamba te Yisaya alobelaki “babikisami ya [Yehova],” oyo basengelaki kozonga na mboka na bango “na nzembo” mpe kozala na “esengo mpe kosepela.” (Yisaya 35:10) Bato nde bakokaki kosala makambo wana, kasi mabelé te. Longola yango, na mokapo mosusu Yisaya asakolaki mpo na bato oyo bakozonga na Siona ete: “Bábyangama nzete makasi ya boyengebene, oyo ekonami na [Yehova] . . . Zambi lokola mokili ekotɔisa matiti na yango, . . . [Yehova] akopunzwisa boyengebene mpe masanzoli liboso ya mabota nyonso.” Yisaya alobaki lisusu mpo na libota ya Nzambe boye: “[Yehova] akokamba yo ntango nyonso . . . , akokembisa mpe mikuwa na yo na mafuta; okozala lokola elanga esopameli mai.” (Yisaya 58:11; 61:3, 11; Yilimia 31:10-12) Na bongo, ndenge mboka esengelaki kobonga, Bayuda oyo babimaki na boombo basengelaki mpe kobonga.

9. “Paladiso” nini Paulo amonaki, mpe ntango nini emonaneli yango ekokisamaki?

9 Ndakisa wana ya kala ezali kosalisa biso tókanga ntina ya makambo oyo Paulo amonaki. Makambo ya emonaneli yango etaleli lisangá ya boklisto, oyo Paulo abengaki “elanga ya Nzambe oyo ezali kolonama” mpe oyo esengeli kobota mbuma. (1 Bakolinti 3:9) Emonaneli wana esengelaki kokokisama ntango nini? Makambo oyo Paulo amonaki, abengaki yango ‘emoniseli,’ elingi koloba likambo oyo ekokokisama nsima. Ayebaki ete nsima ya liwa na ye, lipɛngwi moko monene ekobima. (2 Bakolinti 12:1; Misala 20:29, 30; 2 Batesaloniki 2:3, 7) Ntango bapɛngwi bakómaki ebele mpe baklisto ya solo bazalaki koyebana lisusu te, bakokaki te kobengama elanga kitoko. Kasi, na nsima, losambo ya solo esengelaki kozonga. Basaleli ya Nzambe basengelaki kozonga mpo ‘bayengebene bángɛnga makasi lokola moi na kati ya bokonzi ya Tata na bango.’ (Matai 13:24-30, 36-43) Ntango Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló, mwa bambula na nsima, likambo yango ekokisamaki. Mpe nsima ya bambula nyonso oyo eleki, ekómi komonana polele ete basaleli ya Nzambe bazali na kati ya paladiso ya elimo oyo Paulo amonaki na emonaneli.

10, 11. Mpo na nini tokoki koloba ete tozali na paladiso ya elimo, atako tozali bato ya kozanga kokoka?

10 Nzokande, lokola toyebi yango, biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana tokoki kokamwa te ete ntango mosusu mikakatano ebimaka kati na biso, ndenge ezalaki mpe kobima na kati ya baklisto na ntango ya Paulo. (1 Bakolinti 1:10-13; Bafilipi 4:2, 3; 2 Batesaloniki 3:6-14) Kasi, kanisá paladiso ya elimo oyo tozali na yango lelo oyo. Liboso tozalaki bato ya mpasi, lelo oyo tobikisami na elimo. Kanisá nzala oyo tozalaki na yango na elimo; lelo oyo tozali kolya malamu. Na esika basaleli ya Nzambe bányokwama na mokili oyo ekaoki na elimo, Nzambe azali kondima bango mpe kosopela bango ebele ya mapamboli. (Yisaya 35:1, 7) Na esika tózala lokola bakufi-miso mpe tótambola na molili makasi ya elimo, tozali komona pole mpo tozali na bonsomi mpe tondimami na Nzambe. Bato mingi oyo bakufaki matoi na elimo mpe bazalaki koyoka bisakweli ya Biblia te, bazali lelo oyo koyoka mpe kokanga ntina ya makambo oyo Biblia elobi. (Yisaya 35:5) Na ndakisa, bamilio ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bayekoli vɛrsɛ mokomoko ya esakweli ya Danyele. Na nsima bayekoli mokapo mokomoko ya mokanda ya Yisaya. Bilei wana ya elimo oyo ezali kolendisa ezali komonisa ete tozali na paladiso ya elimo, boye te?

11 Lisusu, kanisá mbongwana oyo bato ndenge na ndenge ya sembo basali mpo bákanga ntina ya Liloba ya Nzambe mpe básalela yango na bomoi na bango. Tokoki mpenza koloba ete batiki bizaleli mabemabe oyo bazalaki na yango. Mbala mosusu yo mpe otikaki bizaleli mabe oyo ozalaki na yango mpe omoni ete obongwani mpenza, bandeko na yo ya elimo mpe basali bongo. (Bakolose 3:8-14) Yango wana, ntango ozali kosangana na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova, ozali na kati ya bato oyo bakómi bato ya kimya mpe ya boboto. Toboyi te, bazali naino bato ya kozanga kokoka, kasi tokoki koloba te ete bazali bankɔsi oyo ezali konguluma to banyama ya mabe. (Yisaya 35:9) Kimya oyo ezali na kati ya bandeko ya elimo ezali komonisa nini? Ezali komonisa polele ete tozali na paladiso ya elimo. Paladiso yango ezali elilingi ya paladiso oyo ekozala awa na mabelé, epai tokofanda soki totikali sembo epai ya Nzambe.

12, 13. Tosengeli kosala nini mpo tótikala na paladiso ya elimo?

12 Kasi, ezali na likambo moko oyo tosengeli kobosana te. Nzambe alobaki na Bayisalaele boye: “Okotosa lilako nyonso oyo ezali ngai kolakela bino lelo, ete bózala na makasi mpe bókoka [kokɔta] na mokili mpe kokamata yango.” (Deteronome 11:8) Levitike 20:22, 24 elobeli mpe mokili yango: “Bokotosa mibeko na ngai nyonso mpe malako na ngai nyonso, mpe kosala yango, ete mokili kuna ekokómisa ngai bino mpo na kofanda, mosanza bino te. Kasi ngai nalobelaki bino ete, Bokozwa mokili na bango lokola libula, mpe nakopesa yango na bino ete bózala na yango, mokili eleki na mabɛlɛ mpe na mafuta ya nzoi.” Tomoni ete mpo Bayisalaele bázwa Mokili ya Ndaka, basengelaki kozala na boyokani malamu na Yehova Nzambe. Soki Nzambe atikaki bato ya Babilone bálonga Bayisalaele mpe bálongola bango na mokili na bango, ezali mpo batosaki mibeko na ye te.

13 Ezali na makambo mingi oyo esepelisaka biso na paladiso ya elimo. Tozali komona makambo kitoko oyo ezali mpe kokitisa motema. Tofandi na kimya elongo na baklisto oyo basali makasi bátika bizaleli mabe. Bazali kosala makasi bázala na boboto mpe básalisaka basusu. Kasi, mpo na kotikala na paladiso ya elimo ezali kosɛnga kaka te tózala na boyokani malamu na bato yango. Tosengeli mpe kozala na boyokani malamu na Yehova mpe kosala mokano na ye. (Mika 6:8) Tokɔtaki na paladiso yango na bolingo na biso moko, kasi, soki tozali kosala makasi te mpo na kobatela boyokani na biso na Nzambe, tokoki kopɛngwa to mpe bakoki kobimisa biso.

14. Nini ekosalisa biso tótikala na paladiso ya elimo?

14 Likambo moko ya ntina oyo ekosalisa biso ezali kokoba kolendisama na Liloba ya Nzambe. Tótala maloba ya elilingi oyo ezali na Nzembo 1:1-3: “Esengo ezali na moto oyo aboyi [kolanda] toli ya bato ya mabe . . . Kasi mposa na ye ezali kati na Mobeko ya [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi. Azali lokola nzete oyo ekonami penepene na bitima ya mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekokaoka te. Nyonso ekosalaka ye ebongi.” Longola yango, mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele ezali kopesa bilei ya elimo na kati ya paladiso yango ya elimo.​—Matai 24:45-47.

Makambo mosusu oyo ekosalisa yo na komona ndenge Paladiso ekozala

15. Mpo na nini Moize asengelaki te kotambwisa Bayisalaele tii na Mokili ya Ndaka; atako bongo, amonaki nini?

15 Tótala likambo mosusu oyo ezali komonisa biso mwa moke ndenge Paladiso ekozala. Nsima ya koyengayenga mbula 40 na esobe, Moize atambwisaki bana ya Yisalaele tii na Mokili patatalu ya Moaba, na ɛsti ya Ebale Yolodani. Mpo na libunga moko oyo Moize asalaki liboso, Yehova alobaki na ye ete akokatisa Bayisalaele na ngámbo ya Yolodani te. (Mituya 20:7-12; 27:12, 13) Moize asɛngaki Nzambe boye: “Nabondeli yo, Tiká nakata ngámbo mpe natala mokili malamu na ngámbo ya [Yolodani].” Atako Moize asengelaki kokɔta na mokili yango te, ntango amataki na Ngomba Pisega mpe amonaki bisika ndenge na ndenge ya mokili yango, amonaki ete ezalaki mpenza “mokili malamu.” Okanisaka ete mokili yango ezalaki ndenge nini?​—Deteronome 3:25-27.

16, 17. (a) Ndenge nini Mokili ya Ndaka na ntango ya kala ekeseni na ndenge ezali na mikolo na biso? (b) Mpo na nini tokoki kondima ete kala Mokili ya Ndaka ezalaká mpenza lokola paladiso?

16 Soki okanisaka ete mokili yango ezalaki ndenge ezali lelo, okoki koloba ete ezalaki mokili ya zɛlɔ, ya bisobe ya mabanga, mpe ya moi makasi. Kasi, ezali na makambo oyo ezali kondimisa biso ete mokili yango ezalaki mpenza ndenge mosusu na ntango ya kala. Na zulunalo Scientific American, Walter Lowdermilk, moto ya mayele na makambo ya mai mpe ya mabelé, alimbolaki ete mabelé ya mokili yango “ebebisamaki na boumeli ya mbula nkóto oyo bazalaki kosalela yango malamu te.” Moto yango ya mayele akomaki boye: “Bato nde basalá ete mokili yango oyo ezalaki kitoko ekóma ‘esobe’; ebebaki yango moko te.” Kutu, boyekoli na ye emonisaki ete “mokili yango ezalaki mpenza paladiso mpo na kobɔkɔla bibwɛlɛ.” Emonani polele ete bato nde babebisá mabelé ya mboka wana oyo ezalaki “paladiso mpo na kobɔkɔla bibwɛlɛ.”a

17 Soki okanisi makambo oyo otángá na Biblia na ntina na mokili yango, okomona ete ezali mpenza bongo. Kanisá makambo oyo Yehova ayebisaki libota na ye na nzela ya Moize: “Mokili oyo ekokata bino ngámbo mpo na kokamata yango, ezali mokili ya ngomba mpe ya mabwaku, oyo ekomɛlaka mai ya mbula ya likoló, mokili oyo [Yehova] Nzambe na yo akobatelaka.”​—Deteronome 11:8-12.

18. Ndenge nini Yisaya 35:2 ezalaki kopesa Bayisalaele oyo bazalaki na boombo mwa likanisi ya lolenge oyo Mokili ya Ndaka ekozala?

18 Mokili ya Ndaka ezalaká na zamba kitoko mpe na mabelé ya malamu; yango wana soki totángi nkombo ya bisika na yango mosusu, tomonaka mbala moko mokili oyo ezali lokola paladiso. Tokoki komona likambo yango polele na esakweli ya Yisaya mokapo 35, oyo ekokisamaki mbala ya liboso ntango Bayisalaele bautaki na Babilone. Yisaya asakolaki boye: “Ekobimisa felele mingi mpenza, ekosepela na esengo mpe na nzembo; nkembo ya Lebanona ekopesamela yango, lokumu ya Kalemele mpe Salono. Bakomona nkembo ya [Yehova], bokonzi ya Nzambe na biso.” (Yisaya 35:2) Ntango Bayisalaele bazali koyoka bankombo lokola Lebanona, Kalemele, mpe Salono, na makanisi na bango bazalaki komona bisika ya kitoko mpenza.

19, 20. (a) Lobelá ndenge etúká ya Salono ya kala ezalaki. (b) Wapi lolenge moko oyo tokoki kolendisa elikya na biso ya Paladiso?

19 Tózwa ndakisa ya Salono, lobwaku moko oyo ezali na kati ya bangomba ya Samalia mpe Mbu Monene, to Meditelane. (Talá fɔtɔ na lokasa 10.) Eyebanaki mpo na kitoko na yango mpe mabelé na yango malamu. Lokola lobwaku yango ezalaki kozwa mai mingi, ezalaki na matiti mingi mpo na bibwɛlɛ, kasi, na nɔrdi na yango, ezalaki na bazamba ya banzete babengi chênes. (1 Ntango 27:29; Loyembo ya Salomo 2:1; Yisaya 65:10) Na yango, Yisaya 35:2 esakolaki ete Bayisalaele bakozonga na mboka na bango mpe mokili na bango ekozala kitoko lokola paladiso. Esakweli yango ezalaki mpe kolobela paladiso kitoko ya elimo oyo, bambula mingi na nsima, Paulo amonaki na emonaneli. Tomoni ete esakweli yango mpe bisakweli mosusu ezali kolendisa elikya na biso ete bato bakofanda na paladiso awa na mabelé.

20 Ntango tozali na kati ya paladiso ya elimo, tokoki kobakisa botɔndi na biso mpo na paladiso yango mpe kolendisa elikya na biso ya Paladiso oyo ekozala awa na mabelé. Ndenge nini? Soki tozali kobakisa bososoli na biso ya makambo oyo tozali kotánga na Biblia. Masolo mpe bisakweli mingi ya Biblia etángi bankombo ya bamboka mpe bisika mosusu. Okolinga koyeba malamu bisika yango mpe bantaka oyo ekabolaki yango? Na lisolo oyo elandi, tokotalela ndenge malamu oyo okoki kosala yango mpe kozwela yango litomba.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na buku The Geography of the Bible, Denis Baly alobi boye: “Ezali komonana ete zamba mpe matiti ya mokili yango ezali lisusu ata moke te ndenge ezalaká na ntango ya kala.” Mpo na nini? “Bato bazalaki na mposa ya nkoni mpe ya banzete mpo na kotonga bandako, yango wana . . . babandaki kokatakata banzete mpe, na ndenge yango, mabelé etikalaki polele mpe mbula ná moi makasi ekómaki kobebisa yango. Mbongwana wana na mabelé esalaki ete klima . . . ekóma mobebisi monene ya mokili yango.”

Ozali koyeba lisusu?

• “Paladiso” ya ndenge nini ntoma Paulo amonaki na emonaneli?

• Ndenge nini Yisaya mokapo 35 ekokisamaki mpo na mbala ya liboso, mpe ezali na boyokani nini na emonaneli ya Paulo?

• Ndenge nini tokoki lisusu kobakisa botɔndi na biso mpo na paladiso ya elimo mpe kolendisa elikya na biso ya paladiso oyo ekozala awa na mabelé?

[Elilingi na lokasa 10]

Lobwaku ya Salono, etúká moko ya mabelé malamu na Mokili ya Ndaka

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Elilingi na lokasa 12]

Moize amonaki ete ezalaki “mokili malamu”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto